-
1 Bakonzi 6:23-28Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
23 Mpo na Esika Eleki Mosantu,* asalaki bakeruba mibale+ na mabaya ya nzete ya mafuta, mokomoko ezalaki na bolai ya mapeko zomi.+ 24 Lipapu moko ya keruba ezalaki mapeko mitano, mpe lipapu mosusu mapeko mitano. Banda na nsɔngɛ ya lipapu moko tii na nsɔngɛ ya lipapu mosusu ezalaki mapeko zomi. 25 Keruba ya mibale mpe ezalaki mapeko zomi. Bakeruba yango nyonso mibale ezalaki monene ndenge moko mpe ekokanaki. 26 Bolai ya keruba mokomoko ezalaki mapeko zomi. 27 Na nsima, atyaki bakeruba+ yango na Esika Eleki Mosantu.* Mapapu ya bakeruba yango esembolamaki na boye ete lipapu ya keruba moko etutaki efelo moko, mpe lipapu ya keruba mosusu etutaki efelo mosusu. Mapapu mosusu esembolamaki na katikati ya ndako, mapapu ya bakeruba yango etutanaki. 28 Mpe Salomo azipaki bakeruba yango na wolo.
-