31 “Okosala rido+ na nsinga ya bulé, na lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé, na biloko oyo epakolami langi ya motane makasi mpe na lini ya kitoko oyo elíngamalíngamá. Mayemi ya bakeruba ekosalema na bansinga likoló na yango.
33 Okotya rido na nse ya bakroshɛ mpe okokɔtisa sanduku ya Litatoli+ kuna na nsima ya rido. Rido ekokabola mpo na bino Esika Mosantu+ mpe Esika Eleki Mosantu.+