-
1 Bakonzi 7:15-22Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
15 Anyangwisaki kwivre mpe asalaki na yango makonzí mibale.+ Likonzí mokomoko ezalaki na bolai ya mapeko 18 mpe esɛngaki nsinga moko ya mapeko 12 mpo na komeka bonene ya likonzí mokomoko.*+ 16 Mpe asalaki mitó mibale na kwivre oyo enyangwisami, mpo na kotya yango na nsɔngɛ ya makonzí yango. Motó mokomoko ezalaki na bolai ya mapeko mitano. 17 Na motó ya likonzí mokomoko ezalaki na biloko oyo basalá lokola monyama, oyo basalá na minyɔlɔlɔ ya mikemike.+ Monyama mokomoko ezalaki na biteni nsambo. 18 Asalaki milɔngɔ mibale ya bambuma ya nzete ya grenade zingazinga ya eteni moko ya monyama mokomoko mpo ezipa mitó oyo ezalaki na nsɔngɛ ya makonzí yango; asalaki bongo mpo na mitó ya makonzí nyonso mibale. 19 Mitó oyo ezalaki na nsɔngɛ ya makonzí liboso ya ndako ya kokɔtela basalaki yango lokola fololo lísi, na bosanda ya mapeko minei. 20 Mitó yango ezalaki likoló ya makonzí wana mibale, libumu na yango efandaki likoló ya biloko oyo basalá lokola monyama. Ezalaki na bambuma ya grenade 200 oyo etyami na milɔngɔ zingazinga ya motó mokomoko.+
21 Atɛlɛmisaki makonzí ya ndako ya kokɔtela ya tempelo.*+ Atɛlɛmisaki likonzí ya lobɔkɔ ya mobali* mpe apesaki yango nkombo Yakine,* mpe na nsima, atɛlɛmisaki likonzí ya lobɔkɔ ya mwasi* mpe apesaki yango nkombo Boaze.*+ 22 Mpe nsɔngɛ ya makonzí yango ezalaki lokola fololo lísi. Na ndenge wana nde mosala ya makonzí yango esilaki.
-
-
2 Bakonzi 25:17Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
17 Likonzí mokomoko ezalaki na bolai ya mapeko* 18,+ mpe motó oyo ezalaki likoló na yango ezalaki ya kwivre; bolai ya motó yango ezalaki mapeko misato, mpe eloko oyo basalá lokola monyama mpe bambuma ya nzete ya grenade oyo ezingaki motó yango esalemaki na kwivre.+ Likonzí ya mibale ná eloko na yango oyo basalá lokola monyama ezalaki mpe bongo.
-
-
2 Ntango 4:11-13Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
11 Hirame asalaki mpe basaani mpo na putulu ya mɔtɔ, bapau, mpe mabakuli.+
Na bongo Hirame asilisaki mosala oyo Mokonzi Salomo asɛngaki ye asala mpo na ndako ya Nzambe ya solo.+ Talá biloko oyo asalaki: 12 makonzí mibale+ mpe mitó oyo basalá lokola kibakuli oyo ezalaki na nsɔngɛ ya makonzí yango mibale; minyama mibale+ mpo na kozipa mitó yango mibale oyo basalá lokola kibakuli, oyo ezalaki na nsɔngɛ ya makonzí; 13 mpe mbuma 400 ya nzete ya grenade+ mpo na minyama mibale, milɔngɔ mibale ya mbuma ya nzete ya grenade mpo na monyama mokomoko, mpo na kozipa mitó mibale oyo basalá lokola kibakuli oyo ezalaki likoló ya makonzí yango;+
-
-
Yirimia 52:22, 23Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
22 Mpe motó oyo ezalaki likoló na yango ezalaki ya kwivre, molai ya motó yango ezalaki mapeko mitano+ mpe eloko oyo basalá lokola monyama mpe bambuma ya nzete ya grenade oyo ezingaki motó yango esalemaki na kwivre. Likonzí ya mibale ezalaki kaka ndenge moko na oyo ya liboso, ezalaki mpe na bambuma ya grenade. 23 Ezalaki na bambuma ya grenade 96 zingazinga, bambuma nyonso ya grenade ezalaki 100 likoló ya eloko oyo basalá lokola monyama, epai na epai.+
-