Nzembo 103:15, 16 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 15 Moto, mowei mpamba, mikolo na ye ezali lokola oyo ya matiti;+Azali kokola lokola fololo ya esobe.+ 16 Kasi ntango mopɛpɛ ebɛtaka, ezalaka lisusu te,Lokola nde ezalaki wana te.* Yisaya 40:6 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Yoká! Moto moko azali koloba: “Belelá!” Mpe moto mosusu atuni: “Nabelela nini?” “Bato nyonso bazali* matiti ya mobesu. Bolingo na bango nyonso ya sembo ezali lokola fololo ya esobe.+ Yakobo 1:10, 11 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 10 mpe ndeko oyo azali mozwi asepela na kokitisama na ye,+ mpo akoleka lokola fololo ya elanga. 11 Mpo kaka ndenge moi ebimaka na molunge na yango ya makasi mpe ekaukisaka milona, mpe fololo na yango ekweaka mpe kitoko na yango ebebaka, ndenge moko mpe mozwi akokufa wana azali kolanda bomɛngo.+ 1 Petro 1:24 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 24 Mpo “bato nyonso bazali* lokola matiti, mpe nkembo na bango mobimba ezali lokola fololo ya esobe; matiti ekaukaka, mpe fololo ekweaka,
15 Moto, mowei mpamba, mikolo na ye ezali lokola oyo ya matiti;+Azali kokola lokola fololo ya esobe.+ 16 Kasi ntango mopɛpɛ ebɛtaka, ezalaka lisusu te,Lokola nde ezalaki wana te.*
6 Yoká! Moto moko azali koloba: “Belelá!” Mpe moto mosusu atuni: “Nabelela nini?” “Bato nyonso bazali* matiti ya mobesu. Bolingo na bango nyonso ya sembo ezali lokola fololo ya esobe.+
10 mpe ndeko oyo azali mozwi asepela na kokitisama na ye,+ mpo akoleka lokola fololo ya elanga. 11 Mpo kaka ndenge moi ebimaka na molunge na yango ya makasi mpe ekaukisaka milona, mpe fololo na yango ekweaka mpe kitoko na yango ebebaka, ndenge moko mpe mozwi akokufa wana azali kolanda bomɛngo.+
24 Mpo “bato nyonso bazali* lokola matiti, mpe nkembo na bango mobimba ezali lokola fololo ya esobe; matiti ekaukaka, mpe fololo ekweaka,