Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 14:21
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Sikoyo Moize asembolaki lobɔkɔ na ye likoló ya mbu;+ mpe Yehova azongisaki mai ya mbu yango nsima na mopɛpɛ makasi ya ɛsti butu mobimba, asalaki ete esika oyo mbu ezalaki ekóma mabele oyo ekauki,+ mpe mai ekabwanaki.+

  • Yosua 3:16
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 mai oyo ezalaki kotíyola etɛlɛmaki esika moko. Emataki lokola efelo, mosika mpenza na Adama, engumba oyo ezali pene na Zaretane, mpe mai oyo ezalaki kokita mpo na kokende na mbu ya Araba, Mbu ya Mungwa,* ekaukaki. Mai yango etikaki kotíyola, mpe bato bakatisaki na esika oyo etalani na Yeriko.

  • Nzembo 114:1-3
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 114 Ntango Yisraele ebimaki na Ezipito,+

      Ntango bana ya Yakobo bautaki epai ya bato oyo bazalaki koloba monɔkɔ moko ya bapaya,

       2 Yuda ekómaki esika na ye mosantu,

      Yisraele bokonzi na ye.+

       3 Mbu emonaki yango mpe ekimaki;+

      Yordani ezongaki nsima.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto