Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 4:34
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 To ezali nde na Nzambe oyo amekaki kolongola ekólo moko mpo na ye na kati ya ekólo mosusu, na nzela ya bitumbu,* na bilembo, na makamwisi,+ na etumba,+ na nguya ya lobɔkɔ na ye,+ na makasi na ye* mpe na makambo minene ya nsɔmɔ,+ lokola oyo Yehova Nzambe na bino asalaki mpo na bino na Ezipito na miso na bino?

  • Nehemia 9:10
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Bongo obimisaki bilembo mpe osalaki makamwisi mpo na kotɛmɛla Farao ná basaleli na ye nyonso mpe bato nyonso ya mokili na ye,+ mpo oyebaki ete basalelaki bato na yo makambo na lofundo.+ Omisalelaki nkombo oyo ezali na lokumu tii lelo.+

  • Nzembo 105:27-36
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Balakisaki bango bilembo na ye,

      Makamwisi na ye na mokili ya Kame.+

      28 Atindaki molili mpe mokili ekómaki molili;+

      Baboyaki* te kotosa maloba na ye.

      29 Akómisaki mai na bango makila,

      Mpe abomaki mbisi na bango.+

      30 Mokili na bango etondaki na magorodo,*+

      Ata na bashambrɛ ya bakonzi.

      31 Apesaki mitindo mapokopoko* etondanela bango

      Mpe ngungi na bateritware na bango nyonso.+

      32 Akómisaki mbula na bango mbula ya mabanga,

      Mpe atindaki mokalikali* na mokili na bango.+

      33 Abebisaki banzete na bango ya vinyo mpe banzete na bango ya figi

      Mpe abukaki banzete ya teritware na bango.

      34 Alobaki ete mabanki etondanela bango,

      Mabanki ya mike oyo ekokaki kotángama te.+

      35 Elyaki milona nyonso na mokili yango,

      Mpe elyaki biloko oyo mabele na bango ebimisaki.

      36 Bongo abomaki mwana nyonso ya liboso na mokili na bango,+

      Ebandeli ya nguya na bango ya kobota.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto