Nzembo 19:7 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Mobeko ya Yehova ezali ya kokoka,+ epesaka makasi.+ Makundoli ya Yehova ebongi kotyelama motema,+ ekómisaka moto oyo azangi mayele moto ya bwanya.+ Nzembo 40:8 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 8 Ee Nzambe na ngai, nasepeli* kosala mokano na yo,+Mpe mobeko na yo ezali mpenza na kati na ngai.+ Nzembo 112:1 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 112 Bósanzola Yah!*+ א [Alef] Esengo na moto oyo azali kobanga Yehova,+ב [Bet]Oyo asepelaka mingi na mitindo na ye.+ Matai 5:3 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 3 “Esengo na baoyo bayebi mposa na bango ya elimo,*+ mpo Bokonzi ya likoló ezali ya bango. Baroma 7:22 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 22 Na motema na ngai, nasepelaka mpenza na mobeko ya Nzambe,+ Yakobo 1:25 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 25 Kasi moto oyo azali kotalatala na mobeko ya kokoka+ mpe ya bonsomi mpe azali kokangama na yango, akómi moyoki oyo abosanaka te, kasi moto oyo azali kosalela makambo yango. Mpe akozala na esengo ndenge azali kosalela yango.+
7 Mobeko ya Yehova ezali ya kokoka,+ epesaka makasi.+ Makundoli ya Yehova ebongi kotyelama motema,+ ekómisaka moto oyo azangi mayele moto ya bwanya.+
112 Bósanzola Yah!*+ א [Alef] Esengo na moto oyo azali kobanga Yehova,+ב [Bet]Oyo asepelaka mingi na mitindo na ye.+
25 Kasi moto oyo azali kotalatala na mobeko ya kokoka+ mpe ya bonsomi mpe azali kokangama na yango, akómi moyoki oyo abosanaka te, kasi moto oyo azali kosalela makambo yango. Mpe akozala na esengo ndenge azali kosalela yango.+