-
Balevi 16:21, 22Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
21 Arona akotya mabɔkɔ na ye mibale na motó ya ntaba-mobali oyo ezali na bomoi mpe akoyambola likoló na yango mabunga nyonso ya Bayisraele mpe mabe na bango nyonso ná masumu na bango nyonso, mpe akotya yango na motó ya ntaba-mobali yango+ mpe akotika yango ekende na esobe, na lisalisi ya moto oyo abongisami mpo na kosala yango. 22 Ntaba-mobali yango ekomema mabunga na bango nyonso+ na kati ya mokili ekauká,+ mpe akotika ntaba-mobali yango ekende na esobe.+
-
-
Yirimia 31:34Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
34 “Mpe bakoteyana lisusu te moto na moto moninga na ye mpe moto na moto ndeko na ye ete: ‘Yebá Yehova!’+ mpo bango nyonso bakoyeba ngai, banda na oyo aleki moke tii na oyo aleki monene kati na bango,”+ Yehova alobi bongo. “Mpo nakolimbisa libunga na bango, mpe nakokanisa lisumu na bango lisusu te.”+
-