Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 12:7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Na nsima, Yehova abimelaki Abrama mpe alobaki na ye ete: “Nakopesa libota*+ na yo mokili oyo.”+ Na yango, atongaki etumbelo kuna mpo na Yehova, oyo abimelaki ye.

  • Ebandeli 13:14, 15
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Ntango Lota ná Abrama bakabwanaki, na nsima, Yehova alobaki na Abrama ete: “Nabondeli yo, tombolá miso na yo, mpe na esika ozali, talá na nɔrdi, na sudi, na ɛsti mpe na wɛsti, 15 mpo mokili nyonso oyo ozali komona, nakopesa yo yango mpe na libota*+ na yo libela na libela.

  • Ebandeli 15:18
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Na mokolo yango, Yehova asalaki kondimana na Abrama,+ na maloba oyo: “Nakopesa libota* na yo mokili oyo,+ banda na ebale ya Ezipito tii na ebale monene, ebale Efrate:+

  • Ebandeli 26:3
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Fandá mopaya na mokili oyo,+ mpe nakokoba kozala elongo na yo mpe nakopambola yo mpo nakopesa yo mpe libota* na yo mikili oyo nyonso,+ mpe nakokokisa liloba ya ndai oyo nalapelaki Abrahama tata na yo+ ete:

  • Ebandeli 28:13
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe talá! Yehova atɛlɛmaki likoló na yango, mpe alobaki ete:

      “Nazali Yehova Nzambe ya Abrahama tata na yo mpe Nzambe ya Yisaka.+ Mokili oyo yo ozali kolala, nakopesa yo yango ná libota* na yo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto