-
1 Petro 2:4-7Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
4 Wana bozali koya epai na ye, libanga ya bomoi oyo bato babwaki+ kasi eponami, mpe ezali na motuya na miso ya Nzambe,+ 5 bino moko mpe bozali lokola mabanga ya bomoi oyo bazali kotongela ndako moko ya elimo+ mpo bózala bonganga-nzambe moko mosantu, mpo na kopesa bambeka ya elimo+ oyo Nzambe akoki kondima na nzela ya Yesu Kristo.+ 6 Mpo Likomami elobi boye: “Talá! Nazali kotya na Siona libanga moko oyo eponami, libanga moko ya ntina mingi ya moboko, oyo ezali na motuya, mpe moto oyo azali komonisa kondima na yango akoyoka nsɔni ata moke te.”*+
7 Na yango, azali na motuya nde epai na bino, mpamba te bozali bandimi; kasi epai ya baoyo bazali kondima te, “libanga oyo batongi-ndako babwakaki+ nde ekómi libanga monene ya ntina mingi ya ndako,”*+
-