Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 43:3
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Tindá pole na yo mpe solo na yo.+

      Ekamba ngai;+

      Emema ngai na ngomba na yo mosantu mpe na tabernakle na yo monene.+

  • Masese 6:23
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpo mitindo ezali mwinda,+

      Mobeko ezali pole,+

      Mpamela mpe disiplini ezali nzela ya bomoi.+

  • Yisaya 51:4
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Ee bato na ngai, bóyoka ngai na likebi,

      Ekólo na ngai, tyá litoi epai na ngai.+

      Mpo mobeko ekobima epai na ngai,+

      Mpe nakotya bosembo na ngai lokola pole mpo na bato ya bikólo.+

  • Baroma 15:4
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpo makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo na koteya biso,+ mpo tózwa elikya na nzela ya ezaleli na biso ya koyika mpiko+ mpe na libɔndisi oyo euti na Makomami.+

  • 2 Timote 3:16, 17
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.+ Ezali na litomba mpo na koteya,+ kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disiplini na bosembo,*+ 17 mpo moto ya Nzambe akoka mpenza, azala na nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.

  • 2 Petro 1:19
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Boye liloba ya esakweli ekómi kotyelama motema mingi koleka, mpe bozali kosala malamu na ndenge bozali kotyela yango likebi lokola na mwinda+ oyo ezali kongɛnga na esika moko ya molili (tii ntɔngɔ ekotana mpe monzoto moko ya ntɔngɔ+ ekobima) na mitema na bino.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto