Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 1:9
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Na nsima, Nzambe alobaki ete: “Mai oyo ezali na nse ya likoló esangana esika moko, mpe mabele oyo ekauki emonana.”+ Mpe esalemaki bongo.

  • Yobo 38:8-11
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Nani akangaki mbu na baporte+

      Ntango ezalaki kobima na libumu,

       9 Ntango nalatisaki yango mapata

      Mpe nazipaki* yango molili makasi mpenza

      10 Ntango natyelaki yango ndelo na ngai

      Mpe natyelaki yango bikangiseli ná baporte,+

      11 Mpe nalobaki: ‘Okoki koya tii awa, kasi koleka te;

      Awa nde lolendo ya mbonge na yo esuki’?+

  • Masese 8:29
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Ntango atyelaki mbu mobeko

      Ete mai na yango eleka bandelo na yango te,+

      Ntango atyaki miboko ya mabele,

  • Yirimia 5:22
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Yehova alobi boye: ‘Bozali kobanga ngai te?

      Bozali kolɛnga liboso na ngai te?

      Ngai nde natyá zɛlo mpo ezala ndelo ya mbu,

      Mobeko ya seko oyo mbu ekoki koleka te.

      Ata soki mbonge na yango ezali kotombwatombwana, ekolonga te;

      Ata soki etomboki, ekoki koleka ndelo na yango te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto