-
1 Bakonzi 21:20, 21Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
20 Ahaba alobaki na Eliya: “Aa monguna na ngai, ozwi ngai mpenza!”+ Eliya ayanolaki: “Ɛɛ, nazwi yo. Nzambe alobi: ‘Mpo otingami* na kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova,+ 21 talá, nazali komemela yo mpasi; nakokɔmbola yo mpenza mpe nakosilisa na libota na yo mobali nyonso,*+ ezala oyo azangi makoki mpe azangi ntina na Yisraele.+
-
-
2 Bakonzi 10:10, 11Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
10 Na yango, bóyeba ete liloba ya Yehova ata moko te oyo Yehova alobaki mpo na libota ya Ahaba ekozanga kokokisama.*+ Yehova asali oyo alobaki na nzela ya mosaleli na ye Eliya.”+ 11 Lisusu, Yehu abomaki bato nyonso ya libota ya Ahaba oyo batikalaki na Yizireele, abomaki bato minene nyonso ya Ahaba, baninga na ye, mpe banganga-nzambe na ye.+ Atikaki ata moto moko te na bomoi.+
-
-
Yirimia 22:30Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
30 Talá oyo Yehova alobi:
-