Nzembo 139:4 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Ee Yehova, osili koyeba makambo oyo nakolobaLiboso kutu naloba.+ Nzembo 139:6 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Nakoki ata moke te kososola boyebi ya boye.* Eleki likoló mingi, nakoki kokóma kuna te.+ Nzembo 147:5 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Nkolo na biso azali monene mpe na nguya mingi;+Mayele na ye ezali na nsuka te.+ Yisaya 55:9 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 9 “Mpo kaka ndenge likoló etombwani mosika koleka mabele,Ndenge na ngai mpe ya kosala makambo eleki mosika oyo ya binoMpe makanisi na ngai koleka makanisi na bino.+ Baroma 11:33 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 33 Ee bomɛngo* ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali mingi mpenza! Tokoki kokanga ntina ya bikateli na ye ya lisambisi te mpe banzela na ye ekoki koyebana te! 1 Bakorinti 2:16 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 16 Mpo “nani ayebi makanisi ya Yehova,* mpo alakisa ye”?+ Kasi biso tozali na makanisi ya Kristo.+
9 “Mpo kaka ndenge likoló etombwani mosika koleka mabele,Ndenge na ngai mpe ya kosala makambo eleki mosika oyo ya binoMpe makanisi na ngai koleka makanisi na bino.+
33 Ee bomɛngo* ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali mingi mpenza! Tokoki kokanga ntina ya bikateli na ye ya lisambisi te mpe banzela na ye ekoki koyebana te!