4 Bikeko na bango ezali palata mpe wolo,
Esalemi na mabɔkɔ ya moto.+
5 Ezali na monɔkɔ, kasi elobaka te;+
Ezali na miso, kasi emonaka te;
6 Ezali na matoi, kasi eyokaka te;
Ezali na zolo, kasi eyokaka nsolo te;
7 Ezali na mabɔkɔ, kasi esimbaka eloko te;
Ezali na makolo, kasi etambolaka te;+
Ebimisaka ata liloba moko te na mongongo na yango.+
8 Bato oyo basalaka yango bakokóma lokola yango,+
Ata mpe baoyo nyonso batyelaka yango motema.+