10 Mpo kaka ndenge mbula ná nɛjɛ eutaka na likoló ekiti,
Ezongaka kuna te soki epɔlisi mabele te, ebotisi yango te mpe esali te ete ebimisa milona,
Soki moloni azwi naino mboto te mpe molei azwi naino limpa te,
11 Liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai ekozala ndenge wana.+
Ekozongela ngai te soki ekokisi naino likambo na yango te,+
Kasi ekokokisa mpenza nyonso oyo esepelisaka ngai,+
Mpe ekolonga mpenza na likambo oyo natindaki yango.