Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 17:6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Na mbula ya libwa ya boyangeli ya Hoshea, mokonzi ya Asiri azwaki Samaria.+ Na nsima, amemaki bato ya Yisraele na mboka mopaya+ na Asiri. Afandisaki bango na Hala mpe na Habore, pene na ebale Gozane+ mpe na bingumba ya Bamede.+

  • Yisaya 7:8
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Mpo motó ya Siri ezali Damasi,

      Mpe motó ya Damasi ezali Rezine.

      Liboso mbula 65 ekoka

      Efraime ekobebisama nyonso mpe ekozala lisusu ekólo te.+

  • Yisaya 28:1, 2
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mawa na motole* ya lofundo* ya balangwi-masanga ya Efraime+

      Mpe na fololo ya nkembo na yango ya kitoko,

      Oyo ezali kokauka, oyo ezali likoló ya lobwaku oyo ebotaka malamu, ya baoyo vinyo elongi bango!

       2 Talá! Yehova akotinda moto ya makasi mpe ya nguya.

      Lokola mbula ya mopɛpɛ makasi, ya bankake mpe ya mabanga, mbula ya mopɛpɛ makasi oyo ezali kobebisa,

      Lokola mbula ya mopɛpɛ makasi mpe ya bankake, ya mai ya makasi oyo ezali kozindisa,

      Akokweisa yango na mabele na makasi mpenza.

  • Hosea 5:14
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Nakozala lokola nkɔsi ya elenge mpo na Efraime,

      Mpe lokola nkɔsi ya nguya* mpo na bato ya Yuda.

      Ngai moko nakopasola bango mpe nakokende na ngai;+

      Nakomema bango, mpe moto moko te akobikisa bango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto