66 Bomoi na yo ekozala na likama monene, okozala na nsɔmɔ butu moi; mpe okoyeba te soki okobika. 67 Na ntɔngɔ okoloba: ‘Soki ezalaki ata mpokwa!’ mpe na mpokwa okoloba: ‘Soki ezalaki ata ntɔngɔ!’ mpo na nsɔmɔ oyo okoyoka na motema na yo, mpe mpo na makambo oyo miso na yo ekomona.