Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 19:5, 6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Na nsima, alalaki na nse ya mwa nzete yango ya retama mpe mpɔngi ezwaki ye. Kasi na mbalakaka, anzelu moko abimelaki ye mpe asimbaki ye.+ Alobaki na ye: “Lamuká mpe lyá.”+ 6 Ntango Eliya alamukaki, amonaki pene na motó na ye limpa moko ya libungutulu likoló ya mabanga oyo ezali na mɔtɔ, mpe elokó moko ya mai. Alyaki, amɛlaki, mpe alalaki lisusu.

  • Nzembo 34:9, 10
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  9 Bóbanga Yehova, bino basantu na ye nyonso,

      Mpo baoyo babangaka ye bazangaka eloko te.+

      כ [Kaf]

      10 Ata bana-nkɔsi oyo bazali na makasi* bazangaka eloko mpe bayokaka nzala,

      Kasi baoyo balukaka Yehova, bakozanga te eloko ya malamu.+

  • Yisaya 65:13
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Na yango talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:

      “Talá! Basaleli na ngai bakolya, kasi bino bokozala na nzala.+

      Talá! Basaleli na ngai bakomɛla,+ kasi bino bokozala na mposa ya mai.

      Talá! Basaleli na ngai bakosepela,+ kasi bino bokozala na nsɔni.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto