-
Marko 1:2-4Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
2 Kaka ndenge ekomamá na mokanda ya mosakoli Yisaya: “(Talá! nazali kotinda momemi-nsango na ngai liboso na yo,* mpe akobongisa nzela mpo na yo.)+ 3 Mongongo ya moto moko ezali koganga na esobe: ‘Bóbongisa nzela ya Yehova!* Bósembola babalabala na ye.’”+ 4 Yoane Mobatisi azalaki na esobe, azalaki kosakola batisimo oyo ezalaki elembo ya kobongola motema mpo na kolimbisama ya masumu.+
-
-
Luka 3:3-6Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
3 Bongo Yoane atambolaki na etúká mobimba zingazinga ya Yordani, azalaki kosakola batisimo oyo ezalaki elembo ya kobongola motema mpo na kolimbisama ya masumu,+ 4 kaka ndenge ekomami na mokanda ya mosakoli Yisaya ete: “Mongongo ya moto moko ezali koganga na esobe: ‘Bóbongisa nzela ya Yehova!* Bósembola babalabala na ye.+ 5 Mabwaku nyonso ekozipama, mpe bangomba minene ná bangomba mike nyonso ekokóma patatalu. Banzela nyonso oyo egumbamá ekokóma semba mpe banzela ya mabakumabaku ekokóma kitoko. 6 Mpe bato nyonso* bakomona lobiko ya Nzambe.’”*+
-