-
Yirimia 32:28, 29Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
28 Talá oyo Yehova alobi: ‘Nazali kopesa engumba oyo na lobɔkɔ ya Bakaladea mpe na lobɔkɔ ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone, mpe ye akozwa yango.+ 29 Mpe Bakaladea oyo bazali kobundisa engumba oyo bakokɔta na kati, bakotya engumba yango mɔtɔ mpe bakotumba yango,+ ná bandako oyo likoló ya bansamba na yango bato bazalaki kopesa bambeka epai ya Baala mpe kosopela banzambe mosusu makabo ya masanga, mpo na kosilikisa ngai.’+
-