34 Nakosilisa mingongo ya kosepela makasi ná mingongo ya esengo na bingumba ya Yuda mpe na banzela ya Yerusaleme, mongongo ya mobali ya libala ná mongongo ya mwasi ya libala ekoyokana lisusu te;+ mpo mokili ekokóma mpenza esika oyo etikalá mpamba.’”+
23 Pole ya mwinda ekongɛnga lisusu epai na yo te, mpe mongongo ya mobali ya libala to ya mwasi ya libala ekoyokana lisusu epai na yo te; mpo bato na yo ya mombongo bazalaki bato minene ya mabele, mpe obungisi bikólo nyonso nzela na misala na yo ya bilimo mabe.+