20 Esika Eleki Mosantu* ezalaki na bolai ya mapeko 20, bonene ya mapeko 20,+ mpe bosanda ya mapeko 20. Salomo azipaki yango na wolo ya pɛto; azipaki mpe etumbelo+ na mabaya ya sɛdrɛ.
8 Na nsima asalaki eteni* ya Esika Eleki Mosantu;+ bolai na yango ekokanaki na bonene ya ndako; ezalaki mapeko 20, mpe bonene na yango ezalaki mapeko 20. Asalelaki talanta* 600 ya wolo ya malamu mpo na kozipa yango.+