-
1 Bakonzi 6:31-35Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
31 Mpe mpo na ekɔtelo ya Esika Eleki Mosantu,* asalaki baporte na mabaya ya nzete ya mafuta, makonzí ya mipanzi mpe makonzí ya porte, lokola eteni ya mitano.* 32 Baporte yango mibale esalemaki na mabaya ya nzete ya mafuta, mpe asalaki likoló na yango mayemi ya bakeruba, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo, mpe azipaki yango na wolo; abakisaki wolo likoló ya bakeruba ná banzete ya mbila. 33 Ezali ndenge wana nde asalaki mpo na ekɔtelo ya Esika Mosantu,* makonzí ya porte oyo esalemi na mabaya ya nzete ya mafuta, oyo ezalaki mpo na eteni ya minei.* 34 Mpe asalaki baporte mibale na mabaya ya jenevriye. Porte mokomoko ezalaki na bizipeli mibale mpe ezalaki kofungwama na bibalukelo.+ 35 Asalaki likoló na yango mayemi ya bakeruba, ya banzete ya mbila, mpe ya bafololo, mpe azipaki nkasa ya wolo na mayemi yango.
-