Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 36:6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Talá! Otyeli Ezipito motema, mongendu oyo ebukanabukaná, oyo soki moto asimbi yango mpo na koyekama, ekokɔta na lobɔkɔ na ye mpe ekotɔbɔla yango. Farao mokonzi ya Ezipito azali ndenge wana epai ya baoyo nyonso batyelaka ye motema.+

  • Yirimia 37:5-7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Sikoyo limpinga ya basoda ya Farao eutaki na Ezipito.+ Ntango Bakaladea oyo bazingaki Yerusaleme bayokaki nsango na bango, balongwaki na Yerusaleme.+ 6 Na nsima, Yehova alobaki na Yirimia ete: 7 “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Talá oyo bokoloba na mokonzi ya Yuda, moto oyo atindaki bino bótuna ngai ete: “Talá! Limpinga ya basoda ya Farao oyo bazali koya epai na bino mpo na kosalisa bino bakozonga na mokili na bango, na Ezipito.+

  • Ezekiele 17:17
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Basoda nyonso ya limpinga ya Farao bakozala na likoki te ya kosalisa na etumba,+ ntango basoda ya Babilone bakotonga mwa bangomba ya mabele mpe bifelo mpo na kozinga engumba, mpo na koboma bato* ebele.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto