-
Yirimia 43:11-13Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
11 Akokɔta mpe akobɛta mokili ya Ezipito.+ Basusu bakokufa na maladi oyo ebomaka, basusu bakomemama bakangami mpe basusu bakokufa na bitumba.+ 12 Nakotya mɔtɔ na batempelo* ya banzambe ya Ezipito,+ mpe akotumba bango mpe akomema bango bakangami. Akomilínga mokili ya Ezipito ndenge mobateli ya mpate amilíngaka elamba na ye, mpe akolongwa kuna na kimya. 13 Mpe akobukabuka makonzí ya Bete-shemeshe* oyo ezali na mokili ya Ezipito, mpe akotumba batempelo* ya banzambe ya Ezipito.”’”
-