Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 30:2
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Bakiti na Ezipito+ kozanga ete bátuna ngai,*+

      Mpo na koluka esika ya kobombama na nse ya libateli ya Farao*

      Mpo na kozwa esika ya kokima na elili ya Ezipito!

  • Yisaya 36:4
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Bongo Rabashake alobaki na bango: “Nasɛngi bino, bóloba na Ezekiasi boye: ‘Talá oyo mokonzi monene, mokonzi ya Asiri, alobi: “Ozali kotya motema na nini?+

  • Yisaya 36:6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Talá! Otyeli Ezipito motema, mongendu oyo ebukanabukaná, oyo soki moto asimbi yango mpo na koyekama, ekokɔta na lobɔkɔ na ye mpe ekotɔbɔla yango. Farao mokonzi ya Ezipito azali ndenge wana epai ya baoyo nyonso batyelaka ye motema.+

  • Yirimia 2:18
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Sikoyo mpo na nini olingi kozwa nzela ya Ezipito,+

      Mpo na komɛla mai ya Shihore?*

      Mpo na nini olingi kozwa nzela ya Asiri+

      Mpo na komɛla mai ya Ebale?*

  • Yirimia 37:5-7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Sikoyo limpinga ya basoda ya Farao eutaki na Ezipito.+ Ntango Bakaladea oyo bazingaki Yerusaleme bayokaki nsango na bango, balongwaki na Yerusaleme.+ 6 Na nsima, Yehova alobaki na Yirimia ete: 7 “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Talá oyo bokoloba na mokonzi ya Yuda, moto oyo atindaki bino bótuna ngai ete: “Talá! Limpinga ya basoda ya Farao oyo bazali koya epai na bino mpo na kosalisa bino bakozonga na mokili na bango, na Ezipito.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto