Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 12
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Basambisi

      • Matata ná Baefraime (1-7)

        • Shibolete, to Sibolete? (6)

      • Mosambisi Ibezane, Elone, mpe Abadone (8-15)

Basambisi 12:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “bakatisaki na nɔrdi.”

Mitindami

  • +Bas 8:1

Basambisi 12:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ya kotya molimo na ngai na lobɔkɔ na ngai.”

Mitindami

  • +Bas 11:29

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2007, lok. 10

Basambisi 12:4

Mitindami

  • +Mib 3:12, 13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2007, lok. 10

Basambisi 12:5

Mitindami

  • +Bas 3:28; 7:24

Basambisi 12:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2007, lok. 10

Basambisi 12:8

Mitindami

  • +Bas 2:16

Basambisi 12:15

Mitindami

  • +Eb 36:12; Kob 17:16; Mit 13:29; 1Sa 15:2

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Bas. 12:1Bas 8:1
Bas. 12:3Bas 11:29
Bas. 12:4Mib 3:12, 13
Bas. 12:5Bas 3:28; 7:24
Bas. 12:8Bas 2:16
Bas. 12:15Eb 36:12; Kob 17:16; Mit 13:29; 1Sa 15:2
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Basambisi 12:1-15

Basambisi

12 Bongo mibali ya Efraime bayanganaki mpe bakatisaki na Zafone* mpe balobaki na Yefeta: “Mpo na nini obengaki biso te tókende elongo na yo ntango okatisaki mpo na kobunda na Baamone?+ Tokotumba ndako na yo ná yo na kati.” 2 Kasi Yefeta alobaki na bango: “Ngai ná bato na ngai, tozalaki na matata makasi ná Baamone. Nabengaki bino bósalisa ngai, kasi bobikisaki ngai na lobɔkɔ na bango te. 3 Ntango namonaki ete bokosalisa ngai te, nazwaki mokano ya kotya bomoi na ngai na likama* mpe nakendaki kobunda na Baamone,+ mpe Yehova akabaki bango na lobɔkɔ na ngai. Sikoyo, boyei kobundisa ngai lelo mpo na nini?”

4 Na yango Yefeta ayanganisaki mibali nyonso ya Gileade,+ mpe babundisaki mibali ya Efraime. Mibali ya Gileade balongaki mibali ya Efraime, oyo bazalaki koloba: “Bino bato ya Gileade, atako bofandaka na Efraime mpe na Manase, bozali bato oyo bakimá teritware ya Efraime.” 5 Gileade azwaki bisika bakatisaka Yordani na makolo+ liboso ya Efraime; mpe ntango mibali ya Efraime bazalaki koluka kokima, bazalaki koloba: “Bótika ngai nakatisa”; bongo mibali ya Gileade bazalaki kotuna ye: “Ozali moto ya Efraime?” Soki alobi, “Te!” 6 bazalaki koloba na ye: “Lobá naino Shibolete.” Kasi ye azalaki koloba: “Sibolete,” mpo akokaki te kobenga liloba yango malamu. Na nsima, bazalaki kokanga ye mpe koboma ye kuna. Na bongo mibali 42 000 ya Efraime bakufaki na ntango wana.

7 Yefeta asambisaki Yisraele mbula motoba. Na nsima, Yefeta moto ya Gileade akufaki mpe bakundaki ye na engumba na ye, na Gileade.

8 Nsima na ye, Ibezane moto ya Beteleme asambisaki Yisraele.+ 9 Azalaki na bana mibali 30 mpe na bana basi 30. Atindaki bana na ye ya basi bákende kobalana na mibali ya mabota mosusu. Kasi ayaki na basi 30 mpo abalisa bango na bana na ye ya mibali. Asambisaki Yisraele mbula nsambo. 10 Na nsima, Ibezane akufaki mpe bakundaki ye na Beteleme.

11 Nsima na ye Elone moto ya Zebulone asambisaki Yisraele; asambisaki Yisraele mbula zomi. 12 Na nsima Elone moto ya Zebulone akufaki mpe bakundaki ye na Aiyalone, na mokili ya Zebulone.

13 Nsima na ye Abadone mwana ya Hilele moto ya Piratone asambisaki Yisraele. 14 Azalaki na bana mibali 40 mpe bankɔkɔ 30 oyo bazalaki kotambola na bampunda 70. Asambisaki Yisraele mbula mwambe. 15 Na nsima, Abadone mwana ya Hilele moto ya Piratone akufaki mpe bakundaki ye na Piratone, na kati ya mokili ya Efraime, na ngomba ya Moamaleke.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto