Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Ntango 12
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Ntango

      • Baoyo bapesi bokonzi ya Davidi mabɔkɔ (1-40)

1 Ntango 12:1

Mitindami

  • +1Sa 27:5, 6; 2Sa 1:1
  • +1Sa 27:1
  • +1Nt 11:10

1 Ntango 12:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bilingongo.” Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Bas 3:15; 20:15, 16
  • +1Sa 17:49
  • +Eb 49:27

1 Ntango 12:3

Mitindami

  • +1Sa 11:4
  • +1Nt 11:26, 33

1 Ntango 12:4

Mitindami

  • +Yos 9:3
  • +1Nt 11:15

1 Ntango 12:6

Mitindami

  • +Mit 26:10, 11

1 Ntango 12:8

Mitindami

  • +1Sa 23:14, 29; 24:22; 1Nt 11:16

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2005, lok. 10

1 Ntango 12:14

Mitindami

  • +Eb 49:19; Mib 33:20
  • +Le 26:8

1 Ntango 12:16

Mitindami

  • +1Sa 22:1; 23:14; 24:22

1 Ntango 12:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “motema na ngai ekozala na bomoko na bino.”

Mitindami

  • +1Sa 24:12, 15; 26:23; Nz 7:6

1 Ntango 12:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “elataki.”

Mitindami

  • +Bas 6:34; 13:24, 25
  • +2Sa 15:21
  • +Nz 54:4

1 Ntango 12:19

Mitindami

  • +Bas 3:1, 3
  • +1Sa 29:2-4

1 Ntango 12:20

Mitindami

  • +1Sa 30:1
  • +Mib 33:17

1 Ntango 12:21

Mitindami

  • +1Nt 5:23, 24; 11:10

1 Ntango 12:22

Mitindami

  • +2Sa 2:3
  • +2Sa 3:1

1 Ntango 12:23

Mitindami

  • +2Sa 2:1; 5:1
  • +1Sa 16:1, 13; 1Nt 11:10

1 Ntango 12:27

Mitindami

  • +1Nt 27:1, 5
  • +1Nt 6:49

1 Ntango 12:28

Mitindami

  • +2Sa 8:17; 1Ba 1:8; 2:35; 1Nt 6:1, 8; 27:16, 17

1 Ntango 12:29

Mitindami

  • +1Nt 8:1, 33; 12:1, 2

1 Ntango 12:33

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “baoyo nyonso bayaki epai ya Davidi bazalaki na mitema mibale te.”

1 Ntango 12:37

Mitindami

  • +Mit 32:33; Yos 13:8

1 Ntango 12:38

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bazalaki na motema moko mpo na.”

Mitindami

  • +Eb 49:8, 10; 1Nt 11:10

1 Ntango 12:40

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Ezali mwana ya mpunda moke ya mobali ná mpunda ya mwasi.

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Nt. 12:11Sa 27:5, 6; 2Sa 1:1
1 Nt. 12:11Sa 27:1
1 Nt. 12:11Nt 11:10
1 Nt. 12:2Bas 3:15; 20:15, 16
1 Nt. 12:21Sa 17:49
1 Nt. 12:2Eb 49:27
1 Nt. 12:31Sa 11:4
1 Nt. 12:31Nt 11:26, 33
1 Nt. 12:4Yos 9:3
1 Nt. 12:41Nt 11:15
1 Nt. 12:6Mit 26:10, 11
1 Nt. 12:81Sa 23:14, 29; 24:22; 1Nt 11:16
1 Nt. 12:14Eb 49:19; Mib 33:20
1 Nt. 12:14Le 26:8
1 Nt. 12:161Sa 22:1; 23:14; 24:22
1 Nt. 12:171Sa 24:12, 15; 26:23; Nz 7:6
1 Nt. 12:18Bas 6:34; 13:24, 25
1 Nt. 12:182Sa 15:21
1 Nt. 12:18Nz 54:4
1 Nt. 12:19Bas 3:1, 3
1 Nt. 12:191Sa 29:2-4
1 Nt. 12:201Sa 30:1
1 Nt. 12:20Mib 33:17
1 Nt. 12:211Nt 5:23, 24; 11:10
1 Nt. 12:222Sa 2:3
1 Nt. 12:222Sa 3:1
1 Nt. 12:232Sa 2:1; 5:1
1 Nt. 12:231Sa 16:1, 13; 1Nt 11:10
1 Nt. 12:271Nt 27:1, 5
1 Nt. 12:271Nt 6:49
1 Nt. 12:282Sa 8:17; 1Ba 1:8; 2:35; 1Nt 6:1, 8; 27:16, 17
1 Nt. 12:291Nt 8:1, 33; 12:1, 2
1 Nt. 12:37Mit 32:33; Yos 13:8
1 Nt. 12:38Eb 49:8, 10; 1Nt 11:10
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
  • 38
  • 39
  • 40
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Ntango 12:1-40

Mokanda ya liboso ya Ntango

12 Talá bato oyo bayaki epai ya Davidi na Ziklage+ ntango azalaki na likoki te ya kotambola ndenge alingi mpo na Saulo+ mwana ya Kishe. Bato yango bazalaki na kati ya bilombe ya etumba oyo bapesaki ye mabɔkɔ na etumba.+ 2 Bazalaki kobunda na litimbo mpe bayebaki kosalela lobɔkɔ ya mobali mpe lobɔkɔ ya mwasi+ mpo na kobwaka mabanga na lansi*+ to kobwaka makula na litimbo. Bazalaki bandeko ya Saulo, ya libota ya Benyamina.+ 3 Ezalaki na Ahiezere oyo azalaki nkumu, elongo na Yoashe, bango mibale bana ya Shemaa moto ya Gibea.+ Ezalaki mpe na Yeziele ná Pelete bana ya Azemavete,+ Beraka, Yehu moto ya Anatote, 4 Yishimaya Mogibeone,+ elombe ya etumba kati na bato ntuku misato+ mpe azalaki mokonzi ya bato yango ntuku misato; ná Yirimia, Yahaziele, Yohanane, Yozabade Mogedera, 5 Eluzai, Yerimote, Bealia, Shemaria, Shefatia Moharife, 6 Elekana, Yishia, Azarele, Yoezere, ná Yashobeame, bato ya libota ya Kora;+ 7 mpe Yoela ná Zebadia bana ya Yerohame ya Gedore.

8 Bagade mosusu bakómaki na ngámbo ya Davidi mpe balandaki ye na esika oyo amibombaki na esobe.+ Bazalaki bilombe ya etumba, basoda oyo bayekolá kobunda, mpe bayebaki malamu kosalela nguba monene mpe likɔnga. Bilongi na bango ezalaki lokola bilongi ya bankɔsi mpe bazalaki mbangu lokola bamboloko likoló ya bangomba. 9 Ezere azalaki nkumu, Obadia moto ya mibale, Eliabe moto ya misato, 10 Mishimana moto ya minei, Yirimia moto ya mitano, 11 Atai moto ya motoba, Eliele moto ya nsambo, 12 Yohanane moto ya mwambe, Elzabade moto ya libwa, 13 Yirimia moto ya zomi, Makebanai moto ya zomi na moko. 14 Bango bazalaki Bagade,+ bakonzi ya limpinga ya basoda. Oyo azalaki na makasi moke akokanaki na bato 100, mpe oyo alekaki makasi akokanaki na bato 1 000.+ 15 Bango nde mibali oyo bakatisaki Yordani na sanza ya liboso ya mbula, ntango mai ya ebale yango ezalaki kotonda mɛkɛ mpe koleka bandelo na yango, mpe bakimisaki bato nyonso oyo bazalaki kofanda na mokili ya patatalu, na ɛsti mpe na wɛsti.

16 Mibali mosusu ya libota ya Benyamina mpe ya Yuda bayaki mpe epai ya Davidi na esika oyo azalaki komibomba.+ 17 Bongo Davidi abimaki liboso na bango, mpe alobaki na bango boye: “Soki boyei epai na ngai na kimya mpo na kosalisa ngai, tokokóma baninga.* Kasi soki ezali nde mpo na kokaba ngai epai ya banguna na ngai nzokande nasali mabe moko te, tiká Nzambe ya bankɔkɔ na biso atala likambo yango mpe akata yango.”+ 18 Bongo, elimo esalaki epai ya* Amasai,+ nkumu ya bato ntuku misato, mpe alobaki boye:

“Tozali bato na yo, Ee Davidi, mpe tozali elongo na yo, Ee mwana ya Yese.+

Kimya, kimya ezala na yo, mpe kimya ezala na ye oyo azali kosalisa yo,

Mpo Nzambe na yo azali kosalisa yo.”+

Na yango, Davidi andimaki koyamba bango mpe atyaki bango bakonzi ya bituluku ya basoda.

19 Bato mosusu ya libota ya Manase bayaki mpe epai ya Davidi ntango akendaki elongo na Bafilistia mpo na kobunda na Saulo. Kasi Davidi asalisaki Bafilistia te, mpo nsima ya kosolola, bankolo ya Bafilistia+ bayokanaki ete bázongisa Davidi. Balobaki boye: “Akokima biso mpe akokende epai ya nkolo na ye Saulo mpe akoboma biso.”+ 20 Ntango Davidi akendaki na Ziklage,+ bato ya libota ya Manase oyo bayaki epai na ye ezalaki: Adana, Yozabade, Yediaele, Mikaele, Yozabade, Elihu, Ziletai, bankumu ya bato nkóto ya Manase.+ 21 Basalisaki Davidi abunda na etuluku ya bapunzi, mpo bango nyonso bazalaki bilombe, mibali ya mpiko,+ mpe bakómaki bakonzi ya basoda. 22 Mokolo na mokolo, bato bazalaki se koya epai ya Davidi+ mpo na kosalisa ye tii akómaki na kaa moko monene, lokola kaa ya Nzambe.+

23 Oyo ezali motángo ya bakonzi ya bato oyo bazalaki na bibundeli mpo na etumba, oyo bayaki epai ya Davidi na Hebrone+ mpo na kopesa ye bokonzi ya Saulo, na kolanda etinda ya Yehova.+ 24 Na libota ya Yuda, mibali 6 800 bazalaki komema nguba monene mpe likɔnga; bazalaki na bibundeli mpo na etumba. 25 Na libota ya Simeone, ezalaki na bilombe, mibali ya mpiko 7 100 na limpinga.

26 Na libota ya Levi, bazalaki 4 600. 27 Yehoyada+ azalaki kokamba bana ya Arona,+ mpe bato 3 700 bazalaki elongo na ye, 28 ezala mpe Zadoke,+ elenge mobali moko oyo azalaki elombe mpe mobali ya mpiko, elongo na bankumu 22 ya libota ya tata na ye.

29 Na libota ya Benyamina, bandeko ya Saulo,+ bazalaki 3 000. Mingi na bango bazalaki liboso kosala mpo na matomba ya Saulo ná libota na ye. 30 Na libota ya Efraime, ezalaki na bato 20 800, oyo bazalaki bilombe, mibali ya mpiko mpe ya lokumu na mabota ya batata na bango.

31 Na ndambo ya libota ya Manase, ezalaki na bato 18 000 oyo baponamaki mpo báya kokómisa Davidi mokonzi. 32 Na libota ya Isakare, ezalaki na bankumu 200 oyo bayebaki likambo nini Yisraele esengelaki kosala mpe ntango nini esengelaki kosala yango. Bandeko na bango nyonso bazalaki kolanda mitindo na bango. 33 Na libota ya Zebulone, ezalaki na mibali 50 000 oyo bazalaki na makoki ya kosala na limpinga, oyo bayekolaki kotandama na molɔngɔ lokola basoda ná bibundeli nyonso ya etumba; bango nyonso bayaki epai ya Davidi na bosembo mpenza.* 34 Na libota ya Nafatali, ezalaki na bankumu 1 000, mpe elongo na bango bato 37 000 oyo bazalaki na nguba monene mpe likɔnga. 35 Na libota ya Dani, baoyo bayekolaki kotandama na molɔngɔ lokola basoda bazalaki bato 28 600. 36 Mpe na libota ya Ashere, baoyo bakokaki kosala na limpinga, oyo bayekolaki kotandama na molɔngɔ lokola basoda bazalaki bato 40 000.

37 Na ngámbo mosusu ya Yordani,+ na libota ya Rubene mpe na libota ya Gade mpe ndambo ya libota ya Manase, ezalaki na basoda 120 000 oyo bazalaki na bibundeli ya ndenge nyonso mpo na etumba. 38 Bango nyonso wana bazalaki mibali ya etumba, oyo bakokaki kobunda etumba. Bayaki na Hebrone na motema moko mpo na kokómisa Davidi mokonzi ya Yisraele mobimba. Bato mosusu nyonso ya Yisraele mpe bandimaki* kokómisa Davidi mokonzi.+ 39 Mpe batikalaki wana mikolo misato elongo na Davidi. Bazalaki kolya mpe komɛla, mpo bandeko na bango babongiselaki bango makambo nyonso. 40 Baoyo bazalaki pene na bango, ata mpe baoyo bazalaki mosika tii na Isakare, Zebulone, mpe Nafatali, bazalaki komema biloko ya kolya na bampunda, na bakamela, na badɔngi* mpe na bangɔmbɛ. Bamemaki farini, bagato ya figi mpe ya mbuma ya vinyo oyo bakaukisá, vinyo, mafuta, bangɔmbɛ mpe bampate ebele mpenza, mpo esengo ezalaki na Yisraele.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto