Loyembo ya Davidi, ntango oyo akosaki ete azali na ligboma+ liboso ya Abimeleke, bongo Abimeleke abenganaki ye, mpe akendaki.
א [Alef]
34 Nakosanzola Yehova ntango nyonso;
Lisanzoli na ye ekozala ntango nyonso na mbɛbu na ngai.
ב [Bet]
2 Nakomikumisa na Yehova;+
Bato ya komikitisa bakoyoka mpe bakosepela.
ג [Gimel]
3 Bókumisa Yehova elongo na ngai;+
Mpe tótombola nkombo na ye elongo.
ד [Dalet]
4 Natunaki Yehova, mpe ayanolaki ngai.+
Abikisaki ngai na makambo nyonso oyo ezalaki kobangisa ngai.+
ה [He]
5 Baoyo batalaki ye bakómaki na esengo;
Bilongi na bango ekokaki koyoka nsɔni ata moke te.
ז [Zayin]
6 Moto mpamba abelelaki, mpe Yehova ayokaki.
Abikisaki ye na bampasi na ye nyonso.+
ח [Het]
7 Anzelu ya Yehova abatelaka baoyo babangaka Nzambe,+
Mpe abikisaka bango.+
ט [Tet]
8 Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu;+
Esengo na moto oyo azali kokima epai na ye.
י [Yod]
9 Bóbanga Yehova, bino basantu na ye nyonso,
Mpo baoyo babangaka ye bazangaka eloko te.+
כ [Kaf]
10 Ata bana-nkɔsi oyo bazali na makasi bazangaka eloko mpe bayokaka nzala,
Kasi baoyo balukaka Yehova, bakozanga te eloko ya malamu.+
ל [Lamed]
11 Bóya, bana na ngai, bóyoka ngai;
Nakoteya bino kobanga Yehova.+
מ [Mem]
12 Nani kati na bino asepelaka na bomoi
Mpe akosepela kozala na bomoi molai mpe ya esengo?+
נ [Nun]
13 Na yango, batelá lolemo na yo eloba te makambo ya mabe,+
Mbɛbu na yo eloba te makambo ya bokosi.+
ס [Samek]
14 Tiká oyo ezali mabe, mpe salá oyo ezali malamu;+
Luká kimya, mpe landá yango.+
ע [Ayin]
15 Miso ya Yehova ezali epai ya bato ya sembo,+
Mpe matoi na ye eyokaka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.+
פ [Pe]
16 Kasi elongi ya Yehova etɛmɛlaka baoyo basalaka oyo ezali mabe,
Bakokufa, mpe moto moko te akokanisa bango lisusu na mabele.+
צ [Tsade]
17 Bato ya sembo bagangaki, mpe Yehova ayokaki;+
Abikisaki bango na bampasi na bango nyonso.+
ק [Kof]
18 Yehova azali pene na baoyo motema ebukani;+
Abikisaka baoyo balɛmbi nzoto.+
ר [Resh]
19 Bampasi ya moto ya sembo ezali mingi,+
Kasi Yehova abikisaka ye na yango nyonso.+
ש [Shin]
20 Azali kobatela mikuwa na ye nyonso;
Ata moko na yango ebukani te.+
ת [Taw]
21 Likama ekoboma moto mabe;
Bato oyo bazali koyina moto ya sembo bakomema ngambo.
22 Yehova asikolaka bomoi ya basaleli na ye;
Moko te kati na baoyo bazali kokima epai na ye akomema ngambo.+