Mondule ya Davidi ntango azalaki kokima mwana na ye Abisalome.+
3 Ee Yehova, mpo na nini banguna na ngai bakómi ebele boye?+
Mpo na nini bato mingi bazali kotɛmɛla ngai?+
2 Bato mingi bazali koloba mpo na ngai ete:
“Nzambe akobikisa ye te.”+ (Sela)
3 Kasi yo, Ee Yehova, ozali nguba oyo ezali kobatela ngai epai na epai,+
Nkembo na ngai+ mpe Moto oyo azali kotombola motó na ngai.+
4 Nakobenga Yehova na mongongo makasi,
Mpe akoyanola ngai uta na ngomba na ye mosantu.+ (Sela)
5 Nakomilalisa mpe nakolala mpɔngi;
Mpe nakolamuka na kimya,
Mpo Yehova azali kokoba kosunga ngai.+
6 Nazali kobanga te bankóto zomi ya bato
Oyo batandami epai na epai mpo na kotɛmɛla ngai.+
7 Tɛlɛmá, Ee Yehova! Bikisá ngai,+ Ee Nzambe na ngai!
Mpo okobɛta banguna na ngai na mbanga;
Okobuka mino ya bato mabe.+
8 Lobiko ezali ya Yehova.+
Lipamboli na yo ezali likoló ya bato na yo. (Sela)