Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt Estere 1:1-10:3
  • Estere

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Estere
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Estere

ESTERE

1 Talá makambo oyo esalemaki na mikolo ya Asueruse,* elingi koloba, Asueruse oyo ayangelaki bitúká* 127+ banda na India tii na Etiopi,* 2 na mikolo yango, Mokonzi Asueruse azalaki kofanda na kiti na ye ya bokonzi na Shushane*+ ndako makasi.* 3 Na mbula ya misato ya boyangeli na ye, asalaki fɛti moko mpo na bankumu nyonso ya mboka mpe basaleli na ye. Limpinga ya basoda ya Perse+ mpe ya Media,+ bato ya lokumu mpe bankumu ya bitúká* bayaki na fɛti yango. 4 Alakisaki bango bomɛngo ya bokonzi na ye ya nkembo mpe bonene ná kitoko ya nguya na ye na boumeli ya mikolo mingi, mikolo 180. 5 Nsima ya mikolo yango, mokonzi asalaki fɛti moko ya mikolo nsambo mpo na bato nyonso oyo bazalaki na Shushane* ndako makasi,* banda na bato minene tii na bato mike, na lopango ya elanga ya ndako ya mokonzi. 6 Babongisaki lopango yango na lini, ntokia* ya malamu, mpe bilamba ya bulé oyo esimbamaki makasi na bansinga ya elamba ya kitoko mpe na lɛnɛ ya motane-bulé oyo bakangisaki na mpɛtɛ ya palata. Ezalaki mpe na makonzí ya marbrɛ, ná bakiti minene ya wolo mpe ya palata na pavema ya mabanga ya porifire, ya marbrɛ ya mpɛmbɛ, ya mayaka oyo ezali lokola mabanga mpe ya marbrɛ ya moindo.

7 Bazalaki kopesa masanga na bakɔpɔ* ya wolo, oyo ezalaki ndenge moko te. Mpe vinyo ya bokonzi ezalaki mingi mpenza, na kolanda bomɛngo oyo mokonzi azalaki na yango. 8 Na ntango ya komɛla masanga, mobeko ezalaki ete bátinda moto na makasi te,* mpo mokonzi apesaki basaleli ya ndako na ye mitindo ete bátika moto na moto asala ndenge asepeli.

9 Vasheti+ mwasi ya mokonzi asalaki mpe fɛti mpo na basi na ndako ya Mokonzi Asueruse.

10 Na mokolo ya nsambo, ntango motema ya mokonzi ezalaki esengoesengo mpo na vinyo, ayebisaki Mehumane, Bizita, Harabona,+ Bigita, Abagata, Zetare ná Karakase, basali nsambo ya ndako ya mokonzi oyo bazalaki kosalela kaka Mokonzi Asueruse ye moko, 11 ete bámema liboso na ye Vasheti mwasi ya mokonzi, wana alati motole ya bokonzi,* mpo na kolakisa bato ya bikólo mpe bankumu kitoko na ye, mpo azalaki kitoko mingi. 12 Kasi Vasheti mwasi ya mokonzi aboyaki koya, alandaki te etinda oyo mokonzi apesaki na nzela ya basali ya ndako ya mokonzi. Na yango, mokonzi asilikaki makasi mpe nkanda na ye epelaki mpenza.

13 Bongo mokonzi asololaki na mibali ya bwanya oyo bayebaki makambo oyo ekatamá kala.* (Mpo ndenge wana nde makambo ya mokonzi ezalaki kokómela baoyo nyonso bayebaki malamumalamu mobeko mpe makambo ya kosambisa; 14 baoyo bazalaki penepene ya mokonzi ezalaki: Kareshena, Shetare, Ademata, Tarasisi, Merese, Maresena ná Memukane, bankumu nsambo+ ya Perse mpe ya Media, oyo bazalaki kokɔta epai ya mokonzi, mpe bazalaki na bisika oyo eleki lokumu na bokonzi). 15 Mokonzi atunaki bango boye: “Na kotalela mobeko, nini basengeli kosala Vasheti mwasi ya mokonzi lokola atosi te etinda oyo ngai Mokonzi Asueruse napesaki ye na nzela ya basali ya ndako ya mokonzi?”

16 Na yango, Memukane alobaki liboso ya mokonzi mpe ya bankumu ete: “Mabe oyo Vasheti mwasi ya mokonzi asali, asaleli yango kaka mokonzi te,+ kasi mpe bankumu nyonso mpe bato nyonso oyo bazali na bitúká* nyonso ya Mokonzi Asueruse. 17 Mpo basi nyonso bakoyeba likambo oyo mwasi ya mokonzi asali, bongo bakotyola mibali na bango mpe bakoloba: ‘Mokonzi Asueruse apesaki mitindo ete Vasheti mwasi ya mokonzi aya liboso na ye, kasi aboyaki koya.’ 18 Na mokolo yango, basi ya bankumu ya Perse mpe ya Media oyo bakoyoka likambo oyo mwasi ya mokonzi asali, bakolobela yango na matoi ya bankumu nyonso ya mokonzi, mpe yango ekobimisa kotyola mpe nkanda mingi. 19 Soki mokonzi amoni yango malamu, tiká mokonzi abimisa mobeko moko, mpe bákoma yango na mibeko ya Perse mpe ya Media, oyo ekoki kolongolama te.+ Mobeko yango eloba ete Vasheti akoki lisusu koya liboso ya Mokonzi Asueruse te; mpe tiká mokonzi apesa esika na ye ya lokumu na mwasi mosusu oyo azali malamu koleka ye. 20 Ntango mobeko oyo mokonzi akopesa ekoyebana na bokonzi na ye mobimba, oyo ezali monene, basi nyonso bakopesa mibali na bango lokumu, banda na bato minene tii na bato mpamba.”

21 Likanisi yango esepelisaki mokonzi mpe bankumu, mpe mokonzi asalaki ndenge Memukane alobaki. 22 Atindaki mikanda na bitúká nyonso ya bokonzi na ye,*+ mpe ekomamaki na ekomeli* ya etúká mokomoko* mpe na monɔkɔ ya bato ya ekólo mokomoko. Mikanda yango elobaki ete mobali nyonso asengeli kozala mokonzi* ya libota na ye mpe asengeli koloba monɔkɔ ya bato ya ekólo na ye moko.

2 Nsima ya makambo wana, ntango nkanda ya Mokonzi Asueruse+ ekitaki, akanisaki lisusu likambo oyo Vasheti asalaki+ mpe ekateli oyo ezwamaki mpo na ye.+ 2 Bongo basaleli ya mokonzi, oyo basalelaka kaka ye moko balobaki na ye: “Esengeli kolukela mokonzi bilenge basi ya kitoko, oyo bazali bangɔndɔ.* 3 Mpe tiká mokonzi atya bakambi na bitúká nyonso* ya bokonzi na ye,+ mpo báya na bilenge basi nyonso ya kitoko oyo bazali bangɔndɔ na Shushane* ndako makasi,* na ndako ya basi.* Tiká bápesa bango na mabɔkɔ ya Hegai,+ mokube ya mokonzi, mokɛngɛli ya basi, mpe bázwa lisalisi na bankisi ya kokómisa nzoto kitoko.* 4 Elenge mwasi oyo akosepelisa mokonzi mingi koleka, akokóma mwasi ya mokonzi na esika ya Vasheti.”+ Likanisi yango esepelisaki mokonzi, mpe yango nde asalaki.

5 Na Shushane+ ndako makasi, ezalaki na Moyuda moko nkombo na ye Mordekai.+ Azalaki mwana ya Yaire, mwana ya Shimei, mwana ya Kishe, moto ya libota ya Benyamina.+ 6 Azalaki na kati ya bato ya Yerusaleme oyo bamemamaki na mboka mopaya elongo na Yekonia*+ mokonzi ya Yuda, oyo Nebukadenezare mokonzi ya Babilone amemaki na mboka mopaya. 7 Akómaki kobɔkɔla* Hadasa,* elingi koloba Estere, mwana ya ndeko mobali ya tata na ye,+ mpo Estere azalaki lisusu na tata te mpe na mama te. Elenge mwasi yango azalaki nzoto kitoko mpe elongi kitoko. Na liwa ya tata na ye mpe ya mama na ye, Mordekai akómisaki ye lokola mwana na ye. 8 Ntango liloba ya mokonzi mpe mobeko na ye ebimaki, bayanganisaki bilenge basi ebele na Shushane* ndako makasi,* mpe bapesaki bango na mabɔkɔ ya Hegai.+ Bamemaki mpe Estere na ndako ya mokonzi mpe bapesaki ye na mabɔkɔ ya Hegai, mokɛngɛli ya basi.

9 Hegai asepelaki na elenge mwasi yango, mpe amoniselaki ye boboto,* bongo asalaki nokinoki mpo bápesa ye bankisi na ye ya kokómisa nzoto kitoko,*+ ná bilei na ye. Atyelaki ye mpe bilenge basi nsambo oyo baponamaki na kati ya basi oyo basalaka na ndako ya mokonzi. Lisusu atindaki ye ná bilenge basi na ye oyo basalelaka ye na esika oyo eleki malamu na ndako ya basi.* 10 Estere alobaki eloko moko te oyo etali bato ya ekólo na ye+ to bandeko na ye, mpo Mordekai+ apesaki ye malako ete ayebisa moto te.+ 11 Mikolo nyonso, Mordekai azalaki kotambola liboso ya lopango ya ndako ya basi* mpo na koyeba soki Estere azali malamu mpe makambo nini ezali kokómela ye.

12 Elenge mwasi mokomoko azalaki kokɔta na ngala na ye epai ya Mokonzi Asueruse, wana basilisi kobongisa ye nzoto ndenge esɛngamaki mpo na basi na boumeli ya sanza 12. Mpo bongo nde bazalaki kosala mpo na kokómisa nzoto na bango kitoko:* sanza motoba na mafuta ya mire,+ sanza motoba na mafuta ya balsame+ mpe na bankisi ndenge na ndenge ya kopakola mpo na kokómisa nzoto kitoko.* 13 Nsima na yango nde elenge mwasi azalaki kokɔta epai ya mokonzi. Ntango elenge mwasi azalaki kolongwa na ndako ya basi* mpo na kokende na ndako ya mokonzi, bazalaki kopesa ye eloko nyonso oyo azalaki kosɛnga. 14 Na mpokwa, azalaki kokɔta, mpe na ntɔngɔ azalaki kozonga na ndako ya mibale ya basi,* oyo ezalaki na mabɔkɔ ya Shaashigaze, mokube ya mokonzi+ mpe mokɛngɛli ya basi mosusu ya mokonzi. Azalaki kokɔta lisusu epai ya mokonzi te, longola kaka soki mokonzi asepelaki na ye mingi mpe atángaki nkombo na ye mpo bábenga ye.+

15 Ntango ekómaki ngala ya Estere mwana ya Abihaile ndeko mobali ya tata ya Mordekai, oyo Mordekai akómisaki lokola mwana na ye,+ mpo na kokɔta epai ya mokonzi, asɛngaki eloko te, longola kaka oyo Hegai, mokube ya mokonzi mpe mokɛngɛli ya basi, ayebisaki ye. (Na ntango nyonso wana, Estere azalaki kondimama na miso ya moto nyonso oyo azalaki komona ye.) 16 Bamemaki Estere epai ya Mokonzi Asueruse na ndako na ye ya bokonzi, na sanza ya zomi, elingi koloba, sanza ya Tebete,* na mbula ya nsambo+ ya boyangeli na ye. 17 Mokonzi alingaki Estere koleka basi mosusu nyonso. Mokonzi andimaki ye mpe amoniselaki ye boboto* koleka bangɔndɔ mosusu nyonso. Na yango, alatisaki ye motole ya bokonzi* na motó mpe akómisaki ye mwasi ya mokonzi,+ na esika ya Vasheti.+ 18 Mpe mokonzi asalaki fɛti moko monene mpo na bankumu nyonso ya mboka mpe basaleli na ye ya minene: fɛti ya Estere. Mpe alobaki ete alimbisi baoyo nyonso bazalaki na likambo* na kati ya bitúká,* mpe apesaki makabo na ndenge oyo ekokaki na bozwi ya mokonzi.

19 Nzokande ntango bayanganisaki bangɔndɔ*+ mpo na mbala ya mibale, Mordekai afandaki na porte ya mokonzi. 20 Estere alobaki eloko moko te oyo etali bandeko na ye mpe bato ya ekólo na ye,+ kaka ndenge Mordekai apesaki ye malako. Estere akobaki kosala makambo oyo Mordekai azalaki koyebisa ye, kaka ndenge azalaki kosala ntango azalaki na mabɔkɔ na ye.+

21 Na mikolo yango, ntango Mordekai azalaki kofanda na porte ya mokonzi, Bigitane ná Tereshe, basali mibale ya ndako ya mokonzi, bakɛngɛli ya baporte, basilikaki mpe bayokanaki ete báboma* Mokonzi Asueruse. 22 Kasi Mordekai ayokaki likambo yango, mpe na mbala moko ayebisaki yango Estere mwasi ya mokonzi. Na nsima, Estere alobaki likambo yango epai ya mokonzi na nkombo ya Mordekai. 23 Bongo balukaki koyeba likambo yango malamumalamu mpe nsukansuka emonanaki ete ezali solo, mpe babakaki mibali yango mibale na nzete. Mpe makambo yango nyonso ekomamaki na buku ya masolo ya makambo ya ntango wana liboso ya mokonzi.+

3 Nsima na yango, Mokonzi Asueruse apesaki Hamane+ mwana ya Hamedata Moagage+ bokonzi monene. Atombolaki ye, atyaki ye na esika ya lokumu koleka bankumu mosusu nyonso oyo bazalaki elongo na ye.+ 2 Mpe basaleli nyonso ya mokonzi oyo bazalaki na porte ya mokonzi bazalaki kogumbama mpe kofukama liboso ya Hamane, mpo yango nde mitindo oyo mokonzi apesaki na ntina na ye. Kasi Mordekai azalaki koboya kogumbama mpe kofukama. 3 Na yango basaleli ya mokonzi oyo bazalaki na porte ya mokonzi batunaki Mordekai ete: “Mpo na nini ozali koboya kotosa mitindo ya mokonzi?” 4 Mokolo na mokolo bazalaki kotuna ye bongo, kasi azalaki koyoka bango te. Bongo bayebisaki Hamane likambo yango mpo bátala soki akotika Mordekai akoba na ezaleli na ye wana;+ mpo Mordekai ayebisaki bango ete azali Moyuda.+

5 Ntango Hamane amonaki ete Mordekai aboyi kogumbama mpe kofukama liboso na ye, Hamane akómaki na nkanda makasi.+ 6 Na yango Hamane akanaki koboma* Mordekai. Kasi amonaki ete koboma kaka Mordekai ye moko ekoki te, mpo bayebisaki ye makambo etali bato ya ekólo ya Mordekai. Banda wana Hamane alukaki kosilisa bato nyonso ya ekólo ya Mordekai, elingi koloba Bayuda nyonso oyo bazalaki kofanda na teritware mobimba ya bokonzi ya Asueruse.

7 Na mbula ya 12+ ya boyangeli ya Asueruse, na sanza ya liboso, elingi koloba sanza ya Nisana,* babwakaki Pure+ (elingi koloba mbɛsɛ) liboso ya Hamane mpo na koyeba mokolo mpe sanza ya kosala likambo yango, mpe mbɛsɛ elakisaki sanza ya 12, elingi koloba sanza ya Adare.*+ 8 Bongo Hamane alobaki na Mokonzi Asueruse ete: “Ezali na bato ya ekólo moko boye oyo bapalangani mpe bapanzani na kati ya bato ya bikólo+ na bitúká nyonso* ya bokonzi na yo.+ Mibeko na bango ekeseni na oyo ya bato ya bikólo mosusu nyonso, mpe bazali kotosa mibeko ya mokonzi te. Kotika bango kaka boye ekozala mpo na bolamu ya mokonzi te. 9 Soki yango esepelisi mokonzi, mobeko moko ebimisama ete bábomama. Nakopesa basaleli talanta* 10 000 ya palata mpo bátya yango na esika ya kobomba mosolo ya mokonzi.”*

10 Na yango, mokonzi alongolaki na lobɔkɔ na ye lopɛtɛ na ye ya kotya kashɛ+ mpe apesaki yango Hamane+ mwana ya Hamedata Moagage,+ oyo azalaki monguna ya Bayuda. 11 Mokonzi alobaki na Hamane boye: “Palata mpe bato bapesami na lobɔkɔ na yo, osala yango ndenge olingi.” 12 Bongo babengisaki basɛkrɛtɛrɛ ya mokonzi+ na mokolo ya 13 ya sanza ya liboso. Bakomaki na mokanda,+ na ekomeli* ya etúká* mokomoko mpe na monɔkɔ ya bato ya ekólo mokomoko, mitindo nyonso oyo Hamane apesaki basatrape ya mokonzi, baguvɛrnɛrɛ oyo bazalaki kokamba bitúká,* mpe bankumu ya bato ya bikólo ndenge na ndenge. Mokanda yango ekomamaki na nkombo ya Mokonzi Asueruse mpe batyaki yango kashɛ na lopɛtɛ ya mokonzi.+

13 Batindaki bamemi-mikanda bámema mikanda yango na bitúká* nyonso ya mokonzi. Mikanda yango epesaki mitindo ete básilisa, báboma mpe bábebisa Bayuda nyonso, bilenge mpe mikóló, bana mpe basi, kaka na mokolo moko, na mokolo ya 13 na sanza ya 12, elingi koloba, sanza ya Adare,+ mpe bábɔtɔla biloko na bango.+ 14 Mokanda ya makambo yango esengelaki mpe kobimisama mpo ezala mobeko na etúká nyonso,* mpe kosakolama epai ya bato nyonso, mpo bámilɛngɛla mpo na mokolo yango. 15 Bamemi-mikanda bakendaki nokinoki+ ndenge mokonzi apesaki mitindo, mpe mobeko yango ebimaki na Shushane+ ndako makasi. Bongo mokonzi ná Hamane bafandaki mpo na komɛla; nzokande engumba Shushane ekɔtaki mobulu.

4 Ntango Mordekai+ ayokaki makambo nyonso oyo esalemaki,+ apasolaki bilamba na ye, alataki ngɔtɔ mpe amisopelaki putulu ya mɔtɔ. Na nsima akendaki na katikati ya engumba, azali koganga na mongongo makasi mpe na mawa mingi. 2 Akendaki tii liboso ya porte ya mokonzi mpe atɛlɛmaki, mpo moto oyo alati ngɔtɔ akokaki te kokɔta na porte ya mokonzi. 3 Mpe na etúká nyonso*+ epai liloba ya mokonzi mpe mobeko na ye ekómaki, Bayuda bayokaki mawa makasi: bazalaki kokila bilei,+ kolela mpe koganga na mawa. Mingi balalaki na ngɔtɔ mpe putulu ya mɔtɔ.+ 4 Ntango basaleli ya Estere mwasi ya mokonzi mpe mikube na ye bakɔtaki mpe bayebisaki Estere likambo yango, ayokaki mpasi makasi na motema. Na nsima atindelaki Mordekai bilamba mpo alata yango na esika ya ngɔtɔ, kasi aboyaki yango. 5 Na yango Estere abengaki Hatake, moko ya mikube ya mokonzi, oyo mokonzi atyaki mpo na kosalelaka Estere, mpe apesaki ye mitindo ete akende kotuna Mordekai ntina oyo azali kosala bongo mpe makambo nini ezali koleka.

6 Bongo Hatake akendaki epai ya Mordekai na esika monene ya bato nyonso ya engumba, liboso ya porte ya ndako ya mokonzi. 7 Mordekai ayebisaki ye makambo nyonso oyo ekómelaki ye mpe motángo ya mbongo+ oyo Hamane asilaki kolaka ete akopesa mpo etyama na esika ya kobomba mosolo ya mokonzi mpo Bayuda bábomama.+ 8 Apesaki ye mpe mokanda ya mobeko oyo ebimaki na Shushane*+ mpo na koboma Bayuda. Hatake asengelaki kolakisa Estere mokanda yango, kolimbolela ye likambo yango, mpe kopesa ye malako+ ete akɔta epai ya mokonzi mpo abondela ye ayokela bango mawa, mpe asolola na mokonzi mbala moko mpo na bolamu ya bato ya ekólo na ye.

9 Hatake azongaki mpe ayebisaki Estere makambo oyo Mordekai alobaki. 10 Bongo Estere atindaki Hatake ayebisa Mordekai boye:+ 11 “Basaleli nyonso ya mokonzi mpe bato ya bitúká ya mokonzi bayebi malamu ete soki moto, azala mobali to mwasi, akɔti na lopango ya kati ya mokonzi+ nzokande babengisi ye te, mobeko oyo basalelaka ezali kaka moko: Asengeli kobomama. Akoki kobika kaka soki mokonzi asemboleli ye lingenda ya wolo ya bokonzi.+ Mpe mikolo 30 yango oyo, babengi ngai te nakɔta epai ya mokonzi.”

12 Ntango bayebisaki Mordekai maloba ya Estere, 13 alobaki báyebisa Estere ete: “Kokanisa te ete lokola ozali na ndako ya mokonzi, bakotika yo ntango bakoboma Bayuda mosusu nyonso. 14 Mpo soki ofandi nyɛɛ na ntango oyo, kobɔndisama mpe kobikisama ya Bayuda ekoya na nzela mosusu;+ kasi yo ná libota ya tata na yo bokokufa. Mpe nani ayebi? Mbala mosusu ezali mpo na makambo lokola oyo nde okómi mwasi ya mokonzi!”+

15 Na yango Estere azongiselaki Mordekai ete: 16 “Kende, yanganisá Bayuda nyonso oyo bazali na Shushane mpe bókila bilei+ mpo na ngai. Bólya te mpe bómɛla te mikolo misato,+ butu moi. Ngai ná basaleli na ngai ya basi tokokila mpe bilei. Nakokɔta epai ya mokonzi, atako yango ebuki mobeko; mpe soki nakokufa, nakufa.” 17 Bongo, Mordekai akendaki mpe asalaki nyonso oyo Estere asɛngaki ye.

5 Na mokolo ya misato,+ Estere alataki bilamba na ye ya bokonzi, mpe atɛlɛmaki na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi, oyo etalani na ndako ya mokonzi, wana mokonzi afandaki na kiti na ye ya bokonzi na ndako ya mokonzi oyo etalani na esika ya kokɔta. 2 Ntango kaka mokonzi amonaki Estere mwasi ya mokonzi atɛlɛmi na lopango, andimaki ye. Bongo asembolelaki Estere lingenda ya bokonzi oyo basalá na wolo,+ oyo ezalaki na lobɔkɔ na ye. Estere apusanaki pene mpe asimbaki nsɔngɛ ya lingenda yango ya bokonzi.

3 Bongo mokonzi atunaki ye: “Likambo nini, Estere mwasi ya mokonzi? Eloko nini olingi kosɛnga ngai? Ata bokonzi na ngai kabolá na mibale, nakopesa yo yango!” 4 Estere azongisaki: “Soki yango esepelisi mokonzi, tiká ete mokonzi aya lelo ná Hamane+ na fɛti oyo nabongisi mpo na ye.” 5 Bongo, mokonzi alobaki na bato na ye ete: “Bóyebisa Hamane aya nokinoki ndenge Estere asɛngi.” Na yango mokonzi ná Hamane bakendaki na fɛti oyo Estere abongisaki.

6 Ntango bazalaki komɛla vinyo,* mokonzi alobaki na Estere ete: “Mposa* na yo ezali nini? Nakokokisa yango! Mpe eloko nini olingi kosɛnga? Ata bokonzi na ngai kabolá na mibale, nakopesa yo yango!”+ 7 Estere azongisaki ete: “Mposa* na ngai mpe eloko oyo nalingi kosɛnga yango oyo: 8 Soki nandimami na miso ya mokonzi mpe soki mokonzi asepeli kokokisa mposa na ngai mpe kopesa ngai eloko oyo nazali kosɛnga, tiká ete mokonzi ná Hamane báya na fɛti oyo nakobongisela bango lobi, mpe lobi nakoyebisa mokonzi mposa na ngai.”

9 Mokolo wana, Hamane abimaki na esengo mpe na nsai na motema. Kasi ntango Hamane amonaki Mordekai na porte ya mokonzi mpe amonaki ete atɛlɛmaki te mpe alɛngaki te liboso na ye, Hamane akómaki na nkanda makasi mpo na Mordekai.+ 10 Kasi, Hamane akangaki kaka motema mpe akendaki na ndako na ye. Na nsima, atindaki bábenga baninga na ye ná Zereshe+ mwasi na ye. 11 Hamane amikumisaki mpo na bozwi mingi oyo azalaki na yango, ebele ya bana na ye,+ mpe ndenge oyo mokonzi apesaki ye bokonzi mingi mpe atyaki ye na esika ya lokumu mingi koleka bankumu mpe basaleli ya mokonzi.+

12 Hamane abakisaki: “Longola oyo wana, Estere mwasi ya mokonzi abengisaki moto mosusu te, kaka ngai ná mokonzi na fɛti oyo abongisaki.+ Mpe lobi lisusu, abengisi ngai ná mokonzi epai na ye.+ 13 Kasi nyonso wana ezali kosepelisa ngai te, lokola nazali komona Moyuda wana Mordekai azali kofanda na porte ya mokonzi.” 14 Bongo Zereshe mwasi na ye ná baninga na ye nyonso balobaki na ye ete: “Tindá bátɛlɛmisa nzete moko ya molai ya mapeko* 50. Mpe na ntɔngɔ, yebisá mokonzi ete bábaka Mordekai likoló na yango.+ Na nsima, kende kosepela na fɛti elongo na mokonzi.” Likanisi yango emonanaki malamu na miso ya Hamane, mpe atindaki bátɛlɛmisa nzete yango.

6 Na butu yango, mokonzi azalaki kozwa mpɔngi te.* Bongo asɛngaki báya na buku ya masolo ya makambo oyo eleká,+ mpe batángelaki ye yango. 2 Nzokande, na buku yango bamonaki esika oyo bakomá makambo oyo Mordekai alobaki mpo na Bigitana mpe Tereshe, basali mibale ya ndako ya mokonzi, bakɛngɛli ya baporte, oyo bayokanaki ete báboma* Mokonzi Asueruse.+ 3 Mokonzi atunaki boye: “Lokumu nini mpe lifuti nini bapesaki Mordekai mpo na likambo yango?” Basaleli ya mokonzi, oyo basalelaka kaka ye moko bazongisaki ete: “Basalá eloko moko te mpo na ye.”

4 Na nsima, mokonzi atunaki: “Nani azali wana na kati ya lopango?” Nzokande, Hamane ayaki na lopango ya libándá+ ya ndako ya mokonzi mpo na kosɛnga mokonzi ete bábaka Mordekai na nzete oyo atɛlɛmisaki mpo na ye.+ 5 Basaleli ya mokonzi bazongiselaki ye: “Ezali Hamane+ moto atɛlɛmi na lopango.” Bongo mokonzi alobaki: “Bókɔtisa ye.”

6 Ntango Hamane akɔtaki, mokonzi atunaki ye: “Nini basengeli kosalela moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu?” Bongo na motema Hamane alobaki: “Nani oyo mokonzi akosepela kopesa lokumu koleka ngai?”+ 7 Na yango Hamane alobaki na mokonzi: “Mpo na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu, 8 tiká ete báya na elamba ya bokonzi+ oyo mokonzi alataka mpe mpunda moko oyo mokonzi amataka na yango, mpe bátya na motó ya mpunda yango motole ya bokonzi. 9 Bápesa molato yango mpe mpunda yango na mabɔkɔ ya moko ya bankumu minene ya mokonzi. Basengeli kolatisa moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu, komatisa ye na mpunda mpe kotambwisa ye na engumba, na esika monene ya bato nyonso. Basengeli kobelela liboso na ye: ‘Boye nde basalaka mpo na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu!’”+ 10 Na mbala moko, mokonzi alobaki na Hamane ete: “Salá noki! Zwá molato yango mpe mpunda yango, mpe salelá Mordekai Moyuda, oyo afandi na porte ya mokonzi kaka ndenge olobi. Kozangisa ata likambo moko te na nyonso oyo olobi.”

11 Bongo Hamane azwaki molato yango ná mpunda yango, alatisaki Mordekai+ mpe atambwisaki ye na esika monene ya bato nyonso ya engumba mpe azalaki kobelela liboso na ye: “Boye nde basalaka mpo na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu!” 12 Nsima na yango, Mordekai azongaki na porte ya mokonzi, kasi Hamane akendaki mbangu na ndako na ye, azali kolela mpe azipi motó na ye. 13 Ntango Hamane ayebisaki Zereshe+ mwasi na ye mpe baninga na ye nyonso makambo nyonso oyo ekómelaki ye, bapesi-toli* na ye ná mwasi na ye Zereshe balobaki na ye boye: “Soki Mordekai, oyo yo obandi kokwea liboso na ye, azali Moyuda,* okolonga ye te. Nsukansuka okokwea mpenza liboso na ye.”

14 Ntango bazalaki naino kosolola na ye, basali ya ndako ya mokonzi bakómaki mpe bamemaki Hamane nokinoki na fɛti oyo Estere abongisaki.+

7 Bongo mokonzi ná Hamane+ bayaki na fɛti* ya Estere mwasi ya mokonzi. 2 Na mokolo ya mibale ntango bazalaki komɛla vinyo, mokonzi atunaki lisusu Estere ete: “Mposa* na yo ezali nini, Estere mwasi ya mokonzi? Nakokokisela yo yango. Mpe eloko nini olingi kosɛnga? Ata bokonzi na ngai kabolá na mibale, nakopesa yo yango!”+ 3 Estere mwasi ya mokonzi azongisaki: “Soki nandimami na miso na yo, Ee mokonzi, mpe soki yango esepelisi mokonzi, mposa na ngai yango oyo: salá ete bábatela bomoi* na ngai. Mpe eloko oyo nazali kosɛnga yango oyo: básala bato ya ekólo na ngai+ mabe te. 4 Mpo ngai ná bato ya ekólo na ngai totɛkami+ mpo tósilisama, tóbomama mpe tóbebisama.+ Soki tótɛkamaka ata lokola baombo, mbɛlɛ nafandi nyɛɛ. Kasi likambo ya mpasi boye esengeli kosalema te, mpo ekozala likama mpo na mokonzi.”

5 Bongo Mokonzi Asueruse atunaki Estere, mwasi ya mokonzi ete: “Nani ameki kosala likambo ya ndenge wana? Moto yango azali wapi?” 6 Estere azongisaki: “Motɛmɛli mpe monguna yango ezali Hamane oyo, moto mabe.”

Hamane ayokaki nsɔmɔ mpo na mokonzi mpe mpo na mwasi ya mokonzi. 7 Na nkanda nyonso, mokonzi atɛlɛmaki, alongwe na fɛti mpe akei na elanga ya ndako na ye. Kasi Hamane atɛlɛmaki mpo na kobondela Estere mwasi ya mokonzi abikisa bomoi* na ye, mpo amonaki ete mokonzi akani kopesa ye etumbu. 8 Ntango mokonzi azongaki, auti na elanga ya ndako na ye mpe akɔti na ndako oyo bazalaki kosala fɛti, amonaki Hamane amibwaki na kiti monene epai Estere azalaki. Mokonzi akamwaki, alobi: “Alingi mpe kosangisa nzoto na makasi na mwasi ya mokonzi na ndako na ngai moko?” Ntango kaka mokonzi alobaki maloba wana, bazipaki elongi ya Hamane. 9 Bongo Harabona,+ moko ya basali ya ndako ya mokonzi, alobaki: “Hamane abongisaki mpe nzete moko mpo na kobaka Mordekai,+ oyo apesaki lapolo oyo ebikisaki mokonzi.+ Batɛlɛmisi nzete yango ya bolai ya mapeko 50* pene na ndako ya Hamane.” Bongo mokonzi alobaki: “Bóbaka ye na yango.” 10 Bongo babakaki Hamane na nzete oyo abongisaki mpo na Mordekai, mpe nkanda ya mokonzi ekitaki.

8 Na mokolo yango, Mokonzi Asueruse apesaki Estere mwasi ya mokonzi biloko nyonso ya Hamane,+ monguna ya Bayuda.+ Mpe Mordekai ayaki liboso ya mokonzi, mpo Estere abimisaki ete Mordekai azali ndeko na ye ya libota.+ 2 Bongo mokonzi alongolaki lopɛtɛ na ye ya kotya kashɛ+ oyo abɔtɔlaki Hamane mpe apesaki yango Mordekai. Mpe Estere apesaki Mordekai mokumba ya kokɛngɛla biloko nyonso ya Hamane.+

3 Longola yango, Estere alobaki lisusu na mokonzi. Akweaki na makolo na ye, alelaki, mpe abondelaki ye alongola mabe oyo Hamane Moagage asalaki mpe apekisa mwango oyo Hamane asalelaki Bayuda.+ 4 Bongo mokonzi asembolelaki Estere lingenda ya wolo+ mpe Estere alongwaki na nse mpe atɛlɛmaki liboso ya mokonzi. 5 Estere alobaki: “Soki yango esepelisi mokonzi mpe soki nandimami liboso na ye, soki yango ebongi na miso ya mokonzi mpe soki nazali kosepelisa ye, tiká etinda moko ekomama mpo na kopekisa makambo oyo ekomamaki na mikanda oyo Hamane+ mwana ya Hamedata Moagage,+ moto oyo asalaki mwango yango, akomaki mpo na kosilisa Bayuda na bitúká* nyonso ya mokonzi. 6 Mpo ndenge nini nakokoka kokanga motema ntango nakotala mpasi oyo ekokwela bato ya ekólo na ngai, mpe ndenge nini nakokoka kokanga motema ntango nakotala kobebisama ya bandeko na ngai?”

7 Bongo Mokonzi Asueruse alobaki na Estere mwasi ya mokonzi mpe na Mordekai Moyuda ete: “Bóyoka! Napesi Estere biloko nyonso ya Hamane,+ mpe nasɛngi bábaka Hamane na nzete,+ mpo na mwango oyo asalaki ya kobundisa* Bayuda. 8 Mobeko oyo ekomami na nkombo ya mokonzi mpe etyami kashɛ na lopɛtɛ ya mokonzi ekoki kolongolama te. Na yango napesi bino nzela bókoma na nkombo ya mokonzi likambo nyonso oyo bomoni ete ezali mpo na bolamu ya Bayuda mpe bótya yango kashɛ na lopɛtɛ ya mokonzi.”+

9 Na mbala moko babengisaki basɛkrɛtɛrɛ ya mokonzi. Ezalaki na mokolo ya 23 na sanza ya misato, elingi koloba, sanza ya Sivane.* Bakomaki na mikanda mitindo nyonso oyo Mordekai apesaki Bayuda, basatrape,+ baguvɛrnɛrɛ ná bankumu ya bitúká 127, banda na India tii na Etiopi, na etúká mokomoko+ na ekomeli* na yango mpe na ekólo mokomoko na monɔkɔ na yango, mpe epai ya Bayuda na ekomeli* mpe na monɔkɔ na bango.

10 Mordekai akomaki yango na nkombo ya Mokonzi Asueruse mpe atyaki yango kashɛ na lopɛtɛ ya mokonzi.+ Atindaki mikanda yango na mabɔkɔ ya bamemi-mikanda oyo batambolaka na mpunda; bazalaki kotambwisa bampunda ya poste ya mbangu makasi, oyo babɔkɔlaka mpo na mosala ya mokonzi. 11 Na mikanda yango mokonzi apesaki Bayuda na bingumba nyonso nzela ete báyangana mpe bábunda mpo na komibatela, báboma, bábebisa, ɛɛ básilisa limpinga nyonso ya bato ya ekólo to etúká nini oyo ekoki kobundisa bango, ezala basi mpe bana, mpe bázwa biloko na bango.+ 12 Esengelaki kosalema bongo na bitúká nyonso ya Mokonzi Asueruse na mokolo moko: mokolo ya 13 na sanza ya 12, elingi koloba, sanza ya Adare.*+ 13 Makambo oyo ekomamaki na mokanda yango esengelaki kobimisama lokola mobeko na bitúká nyonso. Esengelaki kosakola yango na bato ya bikólo nyonso, mpo na mokolo yango, Bayuda bámilɛngɛla mpo na kozongisela banguna na bango mabe.+ 14 Bamemi-mikanda, oyo bazalaki kotambwisa bampunda ya poste oyo bazalaki kosalela na mosala ya mokonzi, babimaki mbala moko mpe basalaki nokinoki mpo na kotosa etinda ya mokonzi. Mobeko yango epesamaki mpe na Shushane*+ ndako makasi.*

15 Mordekai alongwaki liboso ya mokonzi, alati elamba ya bokonzi ya langi ya bulé ná mpɛmbɛ, ná motole* monene ya wolo, mpe kazaka ya elamba ya kitoko ya langi ya mwa motane-bulé.+ Mpe bato ya engumba Shushane bazalaki koganga na esengo. 16 Mpo na Bayuda, ezalaki kimya,* likambo ya esengo, ya nsai mpe ya lokumu. 17 Na bitúká nyonso mpe na bingumba nyonso, bisika nyonso oyo mokanda ya mokonzi mpe mobeko na ye ekómaki, Bayuda bazalaki kosepela mpe esengo na bango ezalaki makasi. Bazalaki kosala bafɛti mpe milulu mpo na kosepela. Bato mingi ya bikólo mosusu ya mokili yango bakómaki koloba ete bazali Bayuda,+ mpo bakómaki kobanga Bayuda.

9 Na mokolo ya 13 ya sanza ya 12, elingi koloba sanza ya Adare,*+ ntango oyo basengelaki kokokisa liloba mpe mobeko ya mokonzi,+ mokolo yango oyo banguna ya Bayuda bakanisaki ete bakolonga bango, makambo ebalukaki: Bayuda nde balongaki baoyo bazalaki koyina bango.+ 2 Na bitúká* nyonso ya Mokonzi Asueruse, Bayuda bayanganaki na bingumba na bango+ mpo na kobundisa baoyo bazalaki koluka kosala bango mabe. Moto moko te akokaki kotɛmɛla Bayuda, mpo bato ya bikólo nyonso bakómaki kobanga bango.+ 3 Mpe bankumu nyonso ya bitúká, basatrape,+ baguvɛrnɛrɛ, ná baoyo bazalaki kotambwisa misala ya mokonzi bazalaki kopesa Bayuda mabɔkɔ, mpo bazalaki kobanga Mordekai. 4 Mordekai akómaki na nguya+ na ndako ya mokonzi. Lokumu na ye ekendaki nsango na bitúká nyonso, mpo azalaki se kokóma na nguya mingi.

5 Bayuda babomaki banguna na bango nyonso na mopanga, babomaki bango mpe basilisaki bango. Basalaki ndenge balingi na bato oyo bazalaki koyina bango.+ 6 Na Shushane*+ ndako makasi,* Bayuda babomaki mibali 500, basilisaki bango. 7 Babomaki mpe Parashane-data, Dalafone, Asepata, 8 Porata, Adalia, Aridata, 9 Paramashita, Arisai, Aridai ná Vaizata, 10 bana zomi ya Hamane mwana ya Hamedata, monguna ya Bayuda.+ Kasi nsima ya koboma bango, bazwaki ata eloko na bango moko te.+

11 Na mokolo yango, bayebisaki mokonzi motángo ya bato oyo babomamaki na Shushane* ndako makasi.*

12 Mokonzi alobaki na Estere mwasi ya mokonzi ete: “Na Shushane ndako makasi, Bayuda babomi mibali 500 ná bana zomi ya Hamane. Bongo basali nini na bitúká mosusu ya mokonzi?+ Mposa na yo ezali nini sikoyo? Nakokokisela yo yango. Mpe eloko mosusu nini ozali kosɛnga? Nakopesa yo yango.” 13 Estere azongisaki: “Soki yango esepelisi mokonzi,+ tiká ete lobi mpe Bayuda oyo bazali na Shushane básala mpe ndenge mobeko ya lelo elobi.+ Mpe tiká ete bibembe ya bana zomi ya Hamane ebakama na nzete.”+ 14 Na yango mokonzi apesaki mitindo ete básala bongo. Babimisaki mobeko moko na Shushane, mpe babakaki bibembe ya bana zomi ya Hamane.

15 Bayuda oyo bazalaki na Shushane bayanganaki lisusu na mokolo ya 14 ya sanza ya Adare.+ Mokolo yango babomaki mibali 300 na Shushane, kasi bazwaki ata eloko na bango moko te.

16 Bayuda mosusu, oyo bazalaki kofanda na bitúká ya mokonzi, bango mpe bayanganaki mpe babundaki mpo na kobatela bomoi na bango.*+ Balongaki banguna na bango:+ babomaki bato 75 000 kati na baoyo bazalaki koyina bango. Kasi bazwaki ata eloko na bango moko te. 17 Ezalaki na mokolo ya 13 ya sanza ya Adare. Na mokolo ya 14 bapemaki, mpe bakómisaki yango mokolo ya kosala bafɛti mpe ya kosepela.

18 Bayuda oyo bazalaki na Shushane, bango bayanganaki na mokolo ya 13+ mpe na mokolo ya 14.+ Bapemaki na mokolo ya 15, bakómisaki yango mokolo ya kosala bafɛti mpe ya kosepela. 19 Kasi Bayuda oyo bazalaki kofanda na bingumba ya bitúká ya mosika bakómisaki mokolo ya 14 ya sanza ya Adare mokolo ya kosepela mpe ya kosala bafɛti.+ Ezalaki mokolo ya esengo mpe ntango ya kotindelana biloko ya kolya.+

20 Mordekai+ akomaki makambo yango mpe atindaki mikanda epai ya Bayuda nyonso na bitúká* nyonso ya Mokonzi Asueruse, ezala ya pene to ya mosika. 21 Apesaki Bayuda malako ete básalaka fɛti mbula na mbula na mokolo ya 14 mpe na mokolo ya 15 ya sanza ya Adare, 22 mpo na mikolo yango Bayuda bapemaki liboso ya banguna na bango mpe na sanza yango nde mawa na bango ebongwanaki esengo mpe kolela na bango+ ebongwanaki fɛti. Na mikolo yango basengelaki kosala bafɛti mpe kosepela mpe kotindelana biloko ya kolya mpe kopesa babola makabo.

23 Mpe Bayuda bandimaki ete bafɛti yango ekokóma mimeseno mpo na bango mpe bakolanda malako oyo Mordekai atindelaki bango. 24 Mpo Hamane+ mwana ya Hamedata Moagage,+ monguna ya Bayuda nyonso, asalaki mwango mpo na kosilisa Bayuda,+ mpe abwakaki Pure,+ elingi koloba Mbɛsɛ, mpo na kopesa bango nsɔmɔ mpe kosilisa bango. 25 Kasi ntango Estere ayaki liboso ya mokonzi, mokonzi akomisaki mobeko oyo elobaki:+ “Tiká ete mwango mabe oyo asalaki mpo na Bayuda+ ezongela ye moko.” Mpe babakaki Hamane ná bana na ye na nzete.+ 26 Yango wana babengaki mikolo yango Purime, nkombo oyo eutaki na liloba Pure.*+ Na yango, mpo na makambo oyo ekomamaki na mokanda yango, mpe mpo na nyonso oyo bamonaki na likambo yango mpe makambo oyo ekómelaki bango, 27 Bayuda bamityelaki mobeko mpo na bango moko, bana na bango mpe bato nyonso oyo basanganaki na bango,+ ete bakozanga te kosala fɛti mikolo yango mibale mpe bakotosa makambo oyo ekomami mpo na mikolo yango na ntango oyo etyamá mpe mbula na mbula. 28 Basengelaki kokanisa mikolo yango mpe kosala fɛti mabota na mabota, na libota mokomoko, na etúká mokomoko mpe na engumba mokomoko. Bayuda basengelaki te kotika kosala fɛti na mikolo ya Purime mpe bana na bango basengelaki te kotika kokanisa yango.

29 Bongo na bokonzi nyonso oyo bazalaki na yango, Estere mwasi ya mokonzi, mwana ya Abihaile, ná Mordekai Moyuda, bakomaki mokanda ya mibale mpo na koyebisa ete malako oyo etali fɛti ya Purime ezali kaka bongo. 30 Mordekai atindaki mikanda epai ya Bayuda nyonso na bitúká 127+ ya bokonzi ya Asueruse.+ Ezalaki na maloba ya kimya mpe ya solo, 31 mpe elobaki ete esengeli mpenza kosala fɛti na mikolo ya Purime na bantango oyo etyami, kaka ndenge Mordekai Moyuda mpe Estere mwasi ya mokonzi bapesaki bango malako ete básala,+ mpe ndenge bamityelaki mibeko mpo na bango moko mpe bana na bango,+ ezala kokila bilei+ mpe mabondeli.*+ 32 Mpe mitindo wana ya Estere endimisaki makambo yango oyo etali Purime.+ Mpe bakomaki yango na buku moko.

10 Mokonzi Asueruse atyelaki bato misala ya makasi, ezala bato ya ekólo mpe ya bisanga ya mbu.

2 Misala na ye nyonso ya minene mpe ya nguya, mpe makambo nyonso ya lisolo ya bonene ya Mordekai,+ oyo mokonzi akómisaki ye moto ya lokumu,+ nyonso wana ekomami na buku ya masolo ya kala+ ya bakonzi ya Media mpe ya Perse!+ 3 Mordekai Moyuda azalaki moto ya mibale oyo alekaki na bokonzi, alandaki Mokonzi Asueruse. Azalaki moto monene* na kati ya Bayuda mpe ebele ya bandeko na ye bazalaki kotosa ye. Akɔtelaki mpenza bato ya ekólo na ye mpe alukaki bolamu ya* bakitani na bango nyonso.

Balobaka ete ezali Zerezese I, mwana ya Dariuse Monene (Dariuse Hisitasipe).

To, “bitúká oyo eyangelami.”

To, “Kushi.”

To, “Susa.”

To, “ndako ya mokonzi.”

To, “bitúká oyo eyangelami.”

To, “Susa.”

To, “ndako ya mokonzi.”

To, “kɔtɔ.”

To, “bisaleli.”

To, “bápekisa moto te.”

To, “tirba.”

To, “ndenge ya kosala makambo.” Lil., “bantango.”

To, “bitúká oyo eyangelami.”

Lil., “bitúká oyo eyangelami ya mokonzi.”

To, “lolenge ya kokoma.”

To, “etúká oyo eyangelami.”

To, “nkolo.”

To, “bayebi naino mibali te.”

To, “bitúká oyo eyangelami.”

To, “Susa.”

To, “ndako ya mokonzi.”

To, “na hareme.”

To, “bányɔlisa bango nzoto.”

Abengami Yehoyakine na 2 Bakonzi 24:8.

To, “mobateli.”

Elimboli, “mirte.”

To, “Susa.”

To, “ndako ya mokonzi.”

To, “bolingo ya sembo.”

To, “bányɔlisa ye nzoto.”

To, “na hareme.”

To, “na hareme.”

To, “konyɔlisa nzoto.”

To, “mpo na konyɔlisa basi nzoto.”

To, “longwa na hareme.”

To, “na hareme ya mibale.”

Talá Ap. B15.

To, “bolingo ya sembo.”

To, “tirba.”

Bolimbisi yango ezalaki na makambo mingi: mpako, mosala ya soda, to kobimisa bato na bolɔkɔ.

To, “bitúká oyo eyangelami.”

To, “bilenge basi.”

Lil., “bátya lobɔkɔ likoló ya.”

Lil., “kotyá lobɔkɔ likolo ya.”

Talá Ap. B15.

Talá Ap. B15.

To, “bitúká oyo eyangelami.”

Talanta moko = 34,2 kg. Talá Ap. B14.

To mbala mosusu, “Nakotya talanta 10 000 na esika babombaka mosolo ya mokonzi mpo na bato oyo bakosala mosala yango.”

To, “lolenge ya kokoma.”

To, “etúká oyo eyangelami.”

To, “bitúká oyo eyangelami.”

To, “bitúká oyo eyangelami.”

To, “etúká oyo eyangelami.”

To, “etúká oyo eyangelami.”

To, “Susa.”

Lil., “na fɛti ya vinyo.”

To, “lilɔmbɔ.”

To, “lilɔmbɔ.”

Soki 22,3 m. Talá Ap. B14.

Lil., “mpɔngi ya mokonzi ekimaki.”

Lil., “bátya lobɔkɔ likoló ya.”

Lil., “bato ya bwanya.”

Lil., “auti na momboto ya Bayuda.”

To, “fɛti ya vinyo.”

To, “lilɔmbɔ.”

To, “molimo.”

To, “molimo.”

Soki 22,3 m. Tála Ap. B14.

To, “bitúká oyo eyangelami.”

Lil., “mpo asembolaki lobɔkɔ na ye mpo na kosala mabe.”

Talá Ap. B15.

To, “ndenge ya kokoma.”

To, “ndenge ya kokoma.”

Talá Ap. B15.

To, “Susa.”

To, “ndako ya mokonzi.”

To, “ekɔti ya bokonzi.”

Lil., “pole.”

Talá Ap. B15.

To, “bitúká oyo eyangelami.”

To, “Susa”

To, “ndako ya mokonzi.”

To, “Susa”

To, “ndako ya mokonzi.”

To, “batɛlɛmaki mpo na milimo na bango.”

To, “bitúká oyo eyangelami.”

Liloba “Pure,” oyo elimboli “mbɛsɛ,” na boike ezali Purime. Liloba Purime ekómaki kosalelama mpo na kobenga fɛti ya Bayuda oyo ezalaki kosalema na sanza ya zomi na mibale na kalandriye mosantu. Talá Ap. B15.

To, “malɔmbɔ.”

To, “bazalaki komemya ye mingi.”

Lil., “alobelaki kimya mpo na.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto