HABAKUKU
1 Liyebisi oyo mosakoli Habakuku* azwaki na emonaneli moko:
2 Ee Yehova, tii ntango nini nakobelela mpo na kosɛnga lisalisi, kasi ozali koyoka te?+
Tii ntango nini nakosɛnga lisalisi mpo na mobulu, kasi ozali kosala eloko te?*+
3 Mpo na nini ozali kotika ngai namona makambo ya kozanga bosembo,
Mpe mpo na nini ozali kotika minyoko boye?
Mpo na nini kobebisa mpe mobulu ezali zingazinga na ngai?
Mpo na nini koswana mpe kowelana etondi boye?
4 Mobeko esili makasi,
Mpe bosembo ezali komonana ata moke te.
Bato mabe bazali konyokola bato ya sembo;
Yango wana makambo ezali kokatama lisusu na bosembo te.+
5 “Bótala bikólo, mpe bótya likebi!
Bókamwa mpe bótikala monɔkɔ polele;
Mpo na mikolo na bino likambo moko ekosalema
Oyo bokondima te, ata soki bayebisi bino yango.+
Bakɔtaka na bitando minene ya mabele
Mpo na kobɔtɔla bandako oyo ezali ya bango te.+
7 Babangisaka mpe bapesaka nsɔmɔ.
Batyaka mibeko na bango moko ya bosembo mpe bokonzi na bango moko.*+
8 Bampunda na bango eleki bankoi na mbangu,
Mpe ezali na nkanda makasi koleka bambwa ya zamba na mpokwa.+
Bampunda na bango ya etumba eyaka lokola ezali kopumbwa,
Bampunda na bango eutaka mosika.
Epumbwaka lokola mpongo oyo ezali kokita mbangu mpo na kolya eloko.+
9 Bayaka bango nyonso mpo na kosala makambo na mobulu.+
Bayaka bango nyonso elongo lokola mopɛpɛ ya ɛsti,+
Mpe balɔkɔtaka bakangami lokola zɛlo.
Basɛkaka esika nyonso oyo etongami makasi:+
Bamatisaka mabele mpo esala mwa ngomba mpe babɔtɔlaka yango.
12 Ee Yehova, yo ozali seko na seko.+
Ee Nzambe na ngai, Mosantu na ngai, yo okufaka te.*+
Ee Yehova, oponaki bango mpo bákweisa lisambisi;
Kasi mpo na nini ozali kokanga miso na bato oyo batɛkaka basusu,+
Mpe kofanda nyɛɛ ntango moto mabe azali kolimwisa moto oyo azali moyengebene koleka ye?+
14 Mpo na nini okómisi bato lokola mbisi ya mbu,
Lokola banyama oyo ezalaka na mai, oyo ezali na mokonzi te?
15 Ye* azali kokanga bango nyonso lokola mbisi na ndɔbɔ.
Azali kokanga bango na kati ya monyama na ye,
Azali kosangisa bango na monyama ya kokanga mbisi.
Yango wana azali kosepela mingi.+
16 Yango wana azali kopesa bambeka na monyama na ye
Mpe azali kotumba bambeka* na monyama na ye ya kokanga mbisi;
Mpamba te mpo na yango nde eteni na ye ezali monene,*
Mpe bilei na ye ezali kitoko.
17 Boye, akokoba kaka kotondisa mpe kosopa monyama na ye?*
Akokoba koboma bato ya bikólo kozanga mawa?+
Nakokoba kosɛnzɛla mpo na komona makambo oyo akoloba na nzela na ngai
Mpe oyo nakoyanola ntango nakopamelama.
2 Bongo Yehova ayanolaki ngai ete:
“Komá emonaneli yango, komá yango polele na bitanda,+
Mpo moto oyo azali kotánga yango na mongongo makasi abɛta libaku te.*+
3 Mpo emonaneli yango ezali naino mpo na ntango oyo etyamá,
Kasi ezali koya mbangu mpo ekokisama, mpe ekokosa te.
Ata soki ezali koumela,* kobá kozela yango!*+
Mpo kozanga ntembe yango ekokokisama.*
Ekokóma nsima ya ngonga te!
Kasi moto ya sembo* akozala na bomoi mpo na bosembo* na ye.+
5 Ya solo, lokola vinyo ekosaka,
Moto ya lofundo akokokisa mokano na ye te.
Azali se kosangisa bikólo nyonso
Mpe koyanganisa mpo na ye bato nyonso ya bikólo.+
6 Baoyo nyonso bakotyola ye te, na maloba ya lisese, ya mbwakela mpe na basambole?+
Bakoloba:
‘Mawa na moto oyo azali konduka biloko oyo ezali ya ye te
Mpe oyo azali kaka kobakisa nyongo na ye!
Tii ntango nini?
7 Baoyo bazali kodefisa yo bakobimela yo pwasa te?
Bakolamuka mpe bakoningisa yo na makasi,
Mpe okokóma eloko ya kopunza mpo na bango.+
8 Bato nyonso ya bikólo oyo batikali bakopunza yo,+
Mpo opunzaki bikólo mingi,
Mpo osopaki makila ya bato
Mpe osalelaki mabele mobulu,
Bingumba mpe bafandi na yango.+
9 Mawa na moto oyo azwelaka libota* na ye litomba na ndenge ya mabe,
Mpo atya zumbu* na ye na likoló,
Mpe akima mpo likama ezwa ye te!
10 Makambo oyo okani ememeli libota* na yo nsɔni,
Ndenge osilisi bato mingi ya bikólo omisaleli lisumu.+
11 Na efelo libanga ekoganga,
Mpe libaya moko na nsamba ya ndako ekoyanola yango.
12 Mawa na moto oyo azali kosopa makila mpo na kotonga engumba,
Mpe oyo azali kobongisa sité na makambo ezangi bosembo!
13 Talá! Ntango bato ya bikólo bazali kosala mosala makasi mpo na biloko oyo ekozika na mɔtɔ,
Mpe bikólo ezali koboma nzoto kaka mpamba,
Ezali te mpo Yehova ya mampinga nde alingi bongo?+
15 Mawa na moto oyo azali kopesa baninga na ye eloko ya komɛla,
Mpe abakisi kosilika ná nkanda kati na yango mpo bálangwa,
Bongo atala bolumbu na bango!
16 Okotonda na nsɔni na esika ya kotonda na nkembo.
Yo mpe mɛlá, mpe monisá bolumbu na yo oyo ekatami ngenga te.
Kɔpɔ na lobɔkɔ ya mobali ya Yehova ekoyela yo,+
Mpe nsɔni ekozipa nkembo na yo;
17 Mpo mobulu oyo basaleli Liban ekozipa yo,
Mpe libebi oyo epesaki banyama nsɔmɔ ekoya likoló na yo,
Mpo osopaki makila ya bato
Mpe osalaki mobulu na ekólo yango,
Bingumba mpe bafandi na yango.+
18 Ntina ya ekeko oyo eyemami ezali nini,
Ntango mosali na yango ayemi yango?
Ntina ya ekeko ya ebende* mpe moteyi ya makambo ya lokuta ezali nini,
Ata soki moto oyo asali yango atyeli yango motema?
Asali banzambe ya mpambampamba oyo elobaka te.+
19 Mawa na moto oyo azali koloba na eteni ya nzete ete: “Lamuká!”
To na libanga oyo elobaka te ete: “Tɛlɛmá! Teyá biso!”
20 Kasi Yehova azali na kati ya tempelo na ye mosantu.+
Tiká ete mabele mobimba efanda nyɛɛ liboso na ye!’”+
3 Libondeli ya mosakoli Habakuku, na nzembo ya mawa:*
2 Ee Yehova, nayoki nsango na yo.
Kobanga ekangi ngai mpo na misala na yo, Ee Yehova!
Salá ete ekokisama na bambula oyo!*
Salá ete eyebana na bambula oyo!*
Na ntango ya yikiyiki, obosana te komonisa motema mawa.+
Lokumu na ye etondi na likoló;+
Mpe masanzoli na ye etondisi mabele.
4 Azalaki kongɛnga lokola pole.+
Bingɛngiseli mibale ezalaki kobima na lobɔkɔ na ye,
Esika oyo makasi na ye ebombanaki.
6 Atɛlɛmi mpe aningisi mabele.+
Abwaki kaka liso, mpe bikólo epumbwe.+
Bangomba ya seko epasuki,
Mpe bangomba mike ya kalakala egumbami.+
Banzela ya ntango ya kala ezali ya ye.
7 Namonaki mpasi na bahema ya Kushane.
Bilamba ya bahema ya mokili ya Midiane elɛngaki.+
8 Nkanda na yo engaleli nde bibale?
Ee Yehova, engaleli nde bibale?
To osilikeli nde mbu?+
9 Obimisi litimbo na yo mpo na kobɛta.
Banzete* ezwi mokumba na nzela ya elako.* (Sela)
Okaboli mabele ná bibale.
10 Bangomba eyokaki mpasi makasi ntango emonaki yo.+
Mbula ya mopɛpɛ makasi enɔkaki.
Mai mozindo etyaki makɛlɛlɛ.+
Etombolaki mabɔkɔ na yango likoló.
11 Moi ná sanza etɛlɛmi na bisika na yango oyo etombwaná.+
Makula na yo ebimaki, ekei lokola pole.+
Likɔnga na yo engɛngaki lokola mokalikali.
12 Otambolaki mabele mobimba na kosilika.
Onyataki* bikólo na nkanda.
13 Obimaki mpo na kobikisa bato na yo, mpo na kobikisa moto na yo oyo atyami mafuta.
Obukaki mokambi* ya ndako ya moto mabe.
Ebebisamaki banda miboko tii likoló.* (Sela)
14 Otɔbɔli motó ya bilombe na ye ya etumba na bibundeli na ye moko*
Ntango bayelaki ngai mpo na kopanza ngai.
Bazalaki na esengo makasi ya kolya moto ya mpasi, na kobombana.
15 Olekaki na mbu na bampunda na yo,
Na esika oyo mai esali mbonge makasi.
Mikuwa na ngai ebandaki kopɔla;+
Makolo na ngai ebandaki kolɛnga.
Kasi nazali kozela mokolo ya mpasi na kimya,+
Mpo ekoyela bato oyo bazali kobundisa biso.
17 Ata soki nzete ya figi ebimisi fololo te,
Mpe banzete ya vinyo eboti mbuma te;
Ata soki banzete ya olive ebimisi mbuma te,
Mpe bilanga ebimisi bilei te;
Ata soki etonga esili na lopango,
Mpe bibwɛlɛ ezali lisusu te na kati ya lopango ya bibwɛlɛ;
18 Atako bongo, ngai nakosepela makasi na Yehova;
19 Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso azali makasi na ngai;+
Akokómisa makolo na ngai pɛpɛlɛ lokola oyo ya nyama babengi bishe,
Mpe akotambwisa ngai na bisika oyo etombwaná.+
Epai ya mokambi ya nzembo; na bibɛtɛlo na ngai ya bansinga.
Mbala mosusu elimboli, “koyamba makasi.”
To, “kobikisa te.”
To, “lokumu na bango.”
To mbala mosusu, “balobaka ete nguya na bango nde nzambe na bango.”
To mbala mosusu, “tokokufa te.”
To, “mpo na kopamela.”
Elingi koloba, “Monguna Mokaladea.”
To, “kobimisa milinga ya mbeka.”
Lil., “etyami mafuta malamu.”
To mbala mosusu, “kobenda mopanga na ye?”
To, “akakatana te.”
To, “soki emonani ete eumeli.”
To, “kozela yango na mposa makasi.”
Lil., “ezali kokende na nsuka na yango.”
To, “Talá! Molimo na ye evimbani.”
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To mbala mosusu, “kondima; bindimeli.”
To, “molimo.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “ndako.”
To, “zála.”
Lil., “ndako.”
To, “ekeko ya ebende oyo enyangwisami.”
To, “nzembo ya matánga.”
To mbala mosusu, “na ntango na biso.”
To mbala mosusu, “na ntango na biso.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “ezalaki lobiko.”
To mbala mosusu, “Makula.”
To mbala mosusu, “elako ya mabota elobami.”
Lil., “Otutatutaki.”
Lil., “motó.”
Lil., “nkingo.”
Lil., “banzete na ye.”
Lil., “mpe libumu na ngai eninganaki.”
To, “Nzambe ya lobiko na ngai.”