SEFANIA
1 Liloba oyo Yehova alobaki na Sefania,* mwana ya Kushi, mwana ya Gedalia, mwana ya Amaria, mwana ya Ezekiasi, na mikolo ya Yosiya+ mwana ya Amone,+ mokonzi ya Yuda:
2 “Nakosilisa mpenza eloko nyonso oyo ezali na mabele,” Yehova alobi bongo.+
3 “Nakosilisa moto ná nyama.
Nakosilisa bandɛkɛ ya likoló ná mbisi ya mbu,+
Biloko oyo ebɛtisaka libaku,*+ ná bato mabe;
Mpe nakolongola bato na mabele,” Yehova alobi bongo.
4 “Nakopesa etumbu na bato ya Yuda
Mpe na bato nyonso oyo bafandi na Yerusaleme,
Mpe nakolongola na esika oyo eloko nyonso* ya Baala,+
Nkombo ya banganga-nzambe ya banzambe ya bapaya ná banganga-nzambe mosusu,+
5 Ná baoyo, likoló ya bansamba ya bandako, bagumbamelaka mampinga ya likoló,+
Mpe baoyo bagumbamaka mpe balapaka ndai ya bosembo epai ya Yehova+
Nzokande balapaka mpe ndai ya bosembo epai ya Malakame;+
6 Ná baoyo batiki kolanda Yehova,+
Mpe oyo baluki Yehova te, batuni ye mpe te.”+
7 Fandá nyɛɛ liboso ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, mpo mokolo ya Yehova ekómi pene.+
Yehova abongisi mbeka moko; asantisi bato oyo ye abengisi.
8 “Na mokolo ya mbeka ya Yehova nakosɛnga bankumu bázongisa monɔkɔ,
Ná bana ya mokonzi+ mpe baoyo nyonso balati bilamba ya bapaya.
9 Na mokolo yango nakosɛnga baoyo nyonso bamataka na estrade* bázongisa monɔkɔ,
Ná baoyo batondisaka ndako ya nkolo na bango na mobulu mpe na bokosi.
10 Na mokolo wana” yango nde liloba ya Yehova,
“Ekozala na makɛlɛlɛ makasi oyo ekouta na Porte ya Mbisi,+
Kolela makasi ekouta na Kartye ya Mibale ya engumba,+
Mpe lokito makasi ekouta na bangomba mike.
11 Bóganga na kolela, bino bato oyo bofandi na Maketeshe,*
Mpo bato nyonso ya mombongo babomami;*
Baoyo nyonso bamekaka kilo ya palata babebisami.
12 Na ntango yango, nakozwa miinda mpo na koluka malamumalamu na kati ya Yerusaleme,
Mpe nakosɛnga bato oyo bamimonaka ete bakoká* bázongisa monɔkɔ, oyo balobaka na mitema na bango ete,
‘Yehova akosala eloko ya malamu te, akosala mpe mabe te.’+
13 Bomɛngo na bango ekopunzama mpe bandako na bango ekobebisama.+
Bakotonga bandako, kasi bakofanda na yango te;
Bakolona bilanga ya vinyo, kasi bakomɛla vinyo na yango te.+
14 Mokolo monene ya Yehova ekómi pene!+
Ekómi pene, mpe ezali koya mbangu mpenza!*+
Lokito ya mokolo ya Yehova ezali bololo.+
Na mokolo yango, elombe ya etumba akoganga.+
15 Mokolo yango ezali mokolo ya nkanda,+
Mokolo ya mpasi mpe ya bwale,+
Mokolo ya mbula ya mopɛpɛ makasi mpe ya libebi,
Mokolo ya kozanga pole mpe ya molili,+
Mokolo ya mapata mpe ya molili makasi,+
16 Mokolo oyo kelelo ekobɛta mpe makɛlɛlɛ ya etumba ekoyokana,+
Mpo na kobundisa bingumba oyo etongami makasi mpe bandako milai.*+
17 Nakosala ete bato bázala na mpasi,
Mpe bakotambola lokola bato bakufá miso;+
Mpo basaleli Yehova lisumu.+
18 Ezala palata na bango to wolo na bango ekokoka kobikisa bango te na mokolo ya nkanda ya Yehova;+
Mpo mabele mobimba ekozika na mɔtɔ ya molende na ye,+
Mpo akoyeisa libebi, libebi moko ya nsɔmɔ, na bato nyonso oyo bafandi na mabele.”+
2 Liboso ete mobeko ebanda kosala,
Liboso ete mokolo yango eleka lokola mposo ya blé oyo ekauká,
Liboso ete nkanda makasi ya Yehova eyela bino,+
Liboso ete mokolo ya nkanda ya Yehova eyela bino,
3 Bóluka Yehova,+ bino nyonso bato ya komikitisa ya mabele,
Oyo botosaka mibeko na ye ya sembo.*
Bóluka bosembo, bóluka komikitisa.
Ntango mosusu* bokobombama na mokolo ya nkanda ya Yehova.+
5 “Mawa na baoyo bafandi pembeni ya mbu, na ekólo ya bato ya Kerete!+
Liloba ya Yehova etɛmɛli bino.
Ee Kanana, mokili ya Bafilistia, nakobebisa yo,
Okozala lisusu na mofandi ata moko te.
6 Pembenipembeni ya mbu, ekokóma esika ya koleisa bibwɛlɛ matiti,
Ná mabulu ya mai mpo na babateli ya bampate mpe mapango mpo na bampate.
Na mpokwa, bakolala na bandako ya Ashekelone.
Mpo Yehova Nzambe na bango akotyela bango likebi,
Mpe akozongisa bato na bango oyo bazalaki bakangami.”+
8 “Nayoki kotyola ya Moabe+ mpe kofinga ya Baamone,+
Oyo batumoli bato na ngai mpe bamikumisi ete bakobɔtɔla teritware na bango.+
9 Yango wana, lokola nazali solo na bomoi,” Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele alobi bongo,
“Moabe ekokóma kaka lokola Sodoma,+
Mpe Baamone lokola Gomora,+
Esika ya matiti ya nsendensende, libulu ya mungwa, mpe mokili ekauká mpo na libela.+
Bato na ngai oyo batikali bakopunza bango,
Mpe bato ya ekólo na ngai oyo batikali bakobɔtɔla bango biloko.
10 Wana nde etumbu oyo bakozwa na esika ya lolendo na bango,+
Mpo batumolaki bato ya Yehova ya mampinga mpe basalelaki bango makambo na lolendo.
11 Yehova akoyokisa bango nsɔmɔ;*
Mpo akosilisa mpenza* banzambe nyonso ya mabele,
Mpe bisanga nyonso ya bikólo ekogumbama liboso na ye,*+
Moto na moto na esika oyo azali.
12 Bino mpe, bato ya Etiopi, bokobomama na mopanga na ngai.+
13 Akosembola lobɔkɔ na ye epai ya nɔrdi, mpe akobebisa Asiri.
Akokómisa Ninive mpamba,+ ekokauka lokola mokili ekauká.
14 Bitonga mpe banyama ya ndenge nyonso ya zamba* ekolala na kati na ye.
Ezala ndɛkɛ babengi libeki mpe iko ekolala butu mobimba na kati ya mitó ya makonzí na yango.
Mongongo moko ekoyemba na fɛnɛtrɛ.
Libebi ekozala na monɔkɔ ya ndako;
Mpo akopanza mabaya kitoko ya sɛdrɛ oyo ezipi bifelo.
15 Talá engumba ya lolendo oyo ezalaki kofanda na kimya,
Oyo ezalaki koloba na motema ete: ‘Ngai nde; moto mosusu azali te.’
Sikoyo ekómi esika ya kopesa nsɔmɔ,
Esika oyo banyama ya zamba ezali kolala!
Moto nyonso oyo azali koleka wana akobɛta piololo mpe akolakisa yango mosapi.”+
3 Mawa na engumba ya botomboki, ya mbindo mpe oyo enyokolaka bato!+
2 Etosaki mongongo moko te;+ endimaki mpe kosembolama* te.+
Etyelaki Yehova motema te;+ epusanaki penepene ya Nzambe na yango te.+
3 Bankumu na yango bazali bankɔsi oyo ezali koganga na kati na yango.+
Basambisi na yango bazali bambwa ya zamba na butu;
Batikaka ata mokuwa moko te ya kobuka mpo na ntɔngɔ.
4 Basakoli na yango bazali na lofundo, bato oyo batɛkaka basusu.+
5 Yehova azali sembo na kati ya engumba;+ asalaka likambo ya mabe te.
Ntɔngɔ nyonso, ayebisaka bikateli na ye ya lisambisi.+
Ezangaka te kaka lokola kotana ya ntɔngɔ.
Kasi moto oyo azangi bosembo ayebi nsɔni te.+
6 “Nabebisaki bikólo; bandako milai* na bango etikalaki mpamba.
Napanzaki babalabala na bango, mpe moto ata moko te azalaki koleka kuna.
Bingumba na bango etikalaki mpamba, ezalaki lisusu ata na mobali moko te, ata mofandi moko te.+
7 Nalobaki: ‘Na ntembe te okobanga ngai mpe okondima kosembolama,’*+
Kasi bazalaki na mposa makasi ya kosala makambo ya mabe.+
8 ‘Yango wana, bókoba kozela ngai,’*+ Yehova alobi bongo,
‘Tii mokolo oyo nakotɛlɛma mpo na kozwa biloko oyo epunzami,*
Mpo ekateli na ngai ya lisambisi ezali ya koyanganisa bikólo, ya kosangisa makonzi esika moko,
Mpo na kosopela bango kosilika na ngai, nkanda makasi na ngai nyonso;+
Mpo mabele mobimba ekozika na mɔtɔ ya molende na ngai.+
9 Mpo na ntango yango nakobongola monɔkɔ ya bato ya bikólo mpo ekóma monɔkɔ moko ya pɛto,
Mpo bango nyonso bábelela nkombo ya Yehova,
10 Longwa na etúká ya bibale ya Etiopi,
Baoyo bazali kobondela ngai, elingi koloba, mwana mwasi ya bato na ngai oyo bapalanganá, bakomemela ngai likabo.+
11 Na mokolo yango, okoyoka nsɔni te
Mpo na makambo nyonso oyo osalaki mpo na kotombokela ngai,+
Mpo na ntango wana nakolongola bato ya lolendo kati na yo;
Mpe okozala lisusu na lolendo soki moke te na ngomba na ngai mosantu.+
12 Nakotika na kati na yo bato ya komikitisa mpe baoyo bamitombolaka te,+
Mpe bakoluka ekimelo epai ya Yehova.*
13 Bato ya Yisraele oyo bakotikala+ bakosala makambo ya kozanga bosembo te;+
Bakoloba lokuta te, mpe maloba ya bokosi ekozala te na monɔkɔ na bango;
Bakolya* mpe bakolala, mpe moto ata moko te akobangisa bango.”+
14 Gangá na esengo, Ee mwana mwasi ya Siona!
Sepelá mpo na bolongi, Ee Yisraele!+
Zalá na esengo mpe sepelá na motema na yo mobimba, Ee mwana mwasi ya Yerusaleme!+
15 Yehova alongoli bitumbu oyo akatelaki yo.+
Abengani monguna na yo.+
Mokonzi ya Yisraele, Yehova, azali na kati na yo.+
Okobanga lisusu likama te.+
16 Na mokolo yango, bakoloba na Yerusaleme ete:
“Kobanga te, Ee Siona.+
Kolɛmba nzoto te.*
17 Yehova Nzambe na yo azali na kati na yo.+
Lokola azali Nzambe ya nguya, akobikisa.
Akosepela mpo na yo na esengo monene.+
Bolingo oyo azali na yango mpo na yo ekopesa ye esengo.*
Akosepela mpo na yo mpe akoganga na esengo.
18 Nakoyanganisa bato oyo batondi na mawa mpo bazalaki te na bafɛti na yo;+
Bazalaki mosika na yo, mpo na nsɔni oyo bazalaki na yango na mboka mopaya.+
19 Talá! Na ntango yango, nakotɛmɛla bato nyonso oyo bazali konyokola yo;+
Nakobikisa bato oyo bazali kotɛnguma,+
Mpe nakoyanganisa bato oyo bapalanganá.+
Nakosala ete bato básanzola bango mpe bákumisa bango*
Na ekólo mobimba epai bayokisaki bango nsɔni.
20 Na ntango yango, nakokɔtisa bino,
Na ntango yango, nakoyanganisa bino.
Mpo nakosala ete bato bákumisa bino* mpe básanzola bino+ na kati ya bato nyonso ya bikólo ya mabele,
Ntango nakozongisa bakangami na bino na miso na bino,” Yehova alobi bongo.+
Elimboli, “Yehova abombi (abateli malamu).”
Ekoki mpenza kozala biloko to makambo oyo ezali na boyokani na losambo ya bikeko.
To, “eloko nyonso oyo etikali.”
Mbala mosusu estrade ya kiti ya bokonzi.
Emonani ete ezalaki kartye moko ya Yerusaleme pene na Porte ya Mbisi.
Lil., “bakangisami monɔkɔ.”
Lil., “bato oyo bazali kokangama lokola vinyo likoló ya mboto na yango.”
To, “nokinoki.”
To, “manɔ́ngi ya matumu.”
Lil., “misɔpɔ.”
Lil., “lisambisi na ye.”
To, “Ekoki kozala ete.”
To, “na midi.”
To, “akobangisa bango.”
To, “akokondisa.”
To, “ekosambela ye.”
Lil., “nyama nyonso ya ekólo.”
To, “disiplini.”
To, “manɔ́ngi ya matumu.”
To, “disiplini.”
To, “Nakopesa ye etumbu mpo na.”
To, “bózela ngai na motema molai.”
To mbala mosusu, “nakotɛlɛma lokola motatoli.”
Lil., “na lipeka moko.”
Lil., “bakokima epai ya nkombo ya Yehova.”
To, “Bakolya matiti.”
Lil., “Mabɔkɔ na yo elɛmba te.”
Lil., “Na kati ya bolingo na ye, akofanda nyɛɛ.”
Lil., “bázwa nkombo.”
Lil., “bózwa nkombo.”