NSANGO MALAMU NDENGE EKOMAMÁ NA MATAI
1 Buku ya lisolo* ya Yesu Kristo,* mwana ya Davidi,+ mwana ya Abrahama:+
2 Abrahama azalaki tata ya Yisaka;+
Yisaka azalaki tata ya Yakobo;+
Yakobo azalaki tata ya Yuda+ ná bandeko na ye;
3 Yuda azalaki tata ya Pereze ná Zera;+ mama na bango ezalaki Tamara;
Pereze azalaki tata ya Hezerone;+
Hezerone azalaki tata ya Rame;+
4 Rame azalaki tata ya Aminadabe;
Aminadabe azalaki tata ya Nahashone;+
Nahashone azalaki tata ya Salemone;
5 Salemone azalaki tata ya Boaze; mama na ye ezalaki Rahaba.+
Boaze azalaki tata ya Obede; mama na ye ezalaki Ruta;+
Obede azalaki tata ya Yese;+
Davidi azalaki tata ya Salomo;+ mama na ye ezalaki mwasi ya Uria;
7 Salomo azalaki tata ya Rehoboame;+
Rehoboame azalaki tata ya Abiya;
Abiya azalaki tata ya Asa;+
8 Asa azalaki tata ya Yehoshafate;+
Yehoshafate azalaki tata ya Yehorame;+
Yehorame azalaki tata ya Uzia;
9 Uzia azalaki tata ya Yotame;+
Yotame azalaki tata ya Ahaze;+
Ahaze azalaki tata ya Ezekiasi;+
10 Ezekiasi azalaki tata ya Manase;+
Manase azalaki tata ya Amone;+
Amone azalaki tata ya Yosiya;+
11 Yosiya+ azalaki tata ya Yekonia+ ná bandeko na ye, na ntango ya komemama na Babilone.+
12 Nsima ya komemama na Babilone, Yekonia azalaki tata ya Shealatiele;
Shealatiele azalaki tata ya Zerubabele;+
13 Zerubabele azalaki tata ya Abiude;
Abiude azalaki tata ya Eliakime;
Eliakime azalaki tata ya Azore;
14 Azore azalaki tata ya Zadoke;
Zadoke azalaki tata ya Akime;
Akime azalaki tata ya Eliude;
15 Eliude azalaki tata ya Eleazare;
Eleazare azalaki tata ya Matane;
Matane azalaki tata ya Yakobo;
16 Yakobo azalaki tata ya Yozefe mobali ya Maria, oyo abotaki Yesu,+ oyo abengami Kristo.+
17 Na yango, mabota nyonso banda na Abrahama tii na Davidi ezalaki mabota 14; banda na Davidi tii na komemama na Babilone mabota 14; mpe banda na komemama na Babilone tii na Kristo mabota 14.
18 Kobotama ya Yesu Kristo ezalaki boye: Na eleko oyo mama na ye, Maria, alakamaki na libala epai ya Yozefe, Maria azwaki zemi na nzela ya elimo santu*+ liboso ete bábalana. 19 Nzokande, lokola mobali na ye Yozefe azalaki moto ya sembo mpe alingaki te kosambwisa ye na miso ya bato, akanaki koboma na ye libala na ndenge ya kobombana.+ 20 Kasi nsima ya kokanisa makambo yango, talá! anzelu ya Yehova* abimelaki ye na ndɔtɔ, mpe alobaki na ye: “Yozefe, mwana ya Davidi, kobanga te kotya mwasi na yo Maria na ndako, mpo zemi oyo azwi, azwi yango na nzela ya elimo santu.*+ 21 Akobota mwana mobali, mpe okopesa ye nkombo Yesu,*+ mpo akobikisa bato na ye na masumu na bango.”+ 22 Nyonso wana esalemaki mpo na kokokisa maloba oyo Yehova* alobaki na nzela ya mosakoli na ye, ete: 23 “Talá! Ngɔndɔ* akozwa zemi, akobota mwana mobali, mpe bakopesa ye nkombo Emanuele,”+ oyo soki babongoli yango, elimboli, “Nzambe azali na biso.”+
24 Bongo Yozefe alamukaki na mpɔngi mpe asalaki ndenge anzelu ya Yehova* atindaki ye; atyaki mwasi na ye na ndako. 25 Kasi asangisaki na ye nzoto te tii ntango abotaki mwana mobali,+ mpe apesaki ye nkombo Yesu.+
2 Nsima ya kobotama ya Yesu na Beteleme+ ya Yudea na mikolo ya Erode*+ mokonzi, talá! banganga-minzoto oyo bautaki na Ɛsti bayaki na Yerusaleme. 2 Balobaki: “Wapi moto oyo abotami mokonzi ya Bayuda?+ Mpo tomonaki monzoto na ye ntango tozalaki na Ɛsti, mpe toyei kogumbamela ye.”* 3 Ntango Mokonzi Erode ayokaki yango, abulunganaki, ye ná Yerusaleme mobimba. 4 Ayanganisaki banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli nyonso, mpe atunaki bango epai wapi Kristo* asengelaki kobotama. 5 Balobaki na ye: “Na Beteleme+ ya Yudea, mpo yango nde ekomamaki na nzela ya mosakoli, ete: 6 ‘Mpe yo, Ee Beteleme ya ekólo Yuda, ozali soki moke te engumba oyo ezangi ntina na miso ya baguvɛrnɛrɛ ya Yuda. Mpo moto moko oyo akoyangela akobima epai na yo, oyo akokamba bato na ngai Yisraele.’”+
7 Bongo Erode abengisaki banganga-minzoto yango na kobombana mpe atunaki bango ntango nini mpenza monzoto yango emonanaki. 8 Na nsima atindaki bango na Beteleme, alobaki: “Bókende koluka malamumalamu mwana yango ya moke, mpe soki bomoni ye, bóya koyebisa ngai, mpo ngai mpe nakende kogumbamela ye.” 9 Nsima ya koyoka maloba ya mokonzi, bakendaki, mpe talá! monzoto oyo bamonaki ntango bazalaki na Ɛsti+ ekendaki liboso na bango, tii etɛlɛmaki likoló ya esika oyo mwana yango ya moke azalaki. 10 Ntango bamonaki monzoto yango, basepelaki mingi mpenza. 11 Ntango bakɔtaki na ndako, bamonaki mwana yango ya moke ná Maria mama na ye, bongo bafukamaki mpe bagumbamelaki* ye. Bafungolaki mpe biloko na bango ya motuya mpe bapesaki ye makabo: wolo, olibana ná mire. 12 Nzokande, lokola Nzambe akebisaki bango na ndɔtɔ+ ete bázonga epai ya Erode te, bazongaki na ekólo na bango na nzela mosusu.
13 Ntango bazongaki, na nsima, talá! anzelu ya Yehova* abimelaki Yozefe na ndɔtɔ,+ alobi: “Tɛlɛmá, zwá mwana ná mama na ye mpe kimá na Ezipito, fandá kuna tii ntango nakoloba na yo ozonga, mpo Erode alingi koluka mwana yango mpo aboma ye.” 14 Bongo Yozefe atɛlɛmaki mpe kaka na butu yango, azwaki mwana yango ya moke ná mama na ye mpe akendaki na Ezipito. 15 Afandaki kuna tii na liwa ya Erode. Yango ekokisaki makambo oyo Yehova* alobaki na nzela ya mosakoli na ye, ete: “Nabengaki mwana na ngai abima na Ezipito.”+
16 Ntango Erode amonaki ete banganga-minzoto bakosaki ye, ayokaki nkanda makasi mpenza, mpe atindaki báboma bana mibali nyonso na Beteleme mpe na bitúká na yango nyonso, banda na mbula mibale tii na nse. Asalaki bongo na kolanda ntango oyo monzoto ebimaki, ndenge banganga-minzoto+ bayebisaki ye. 17 Yango ekokisaki likambo oyo elobamaki na nzela ya mosakoli Yirimia, oyo alobaki: 18 “Mongongo moko eyokanaki na Rama, kolela mpe koganga na kolela mingi. Ezalaki Rashele+ moto azalaki kolela bana na ye, mpe aboyaki bábɔndisa ye, mpo bazali lisusu te.”+
19 Ntango Erode akufaki, talá! anzelu ya Yehova* abimelaki Yozefe na ndɔtɔ+ na Ezipito. 20 Alobaki na ye: “Tɛlɛmá, zwá mwana ná mama na ye mpe zongá na mokili ya Yisraele, mpo baoyo bazalaki koluka bomoi* ya mwana yango ya moke basili kokufa.” 21 Bongo atɛlɛmaki, azwaki mwana ná mama na ye mpe azongaki na mokili ya Yisraele. 22 Kasi ntango ayokaki ete Arkelausi azali koyangela Yudea na esika ya tata na ye Erode, Yozefe abangaki kokende kuna. Lisusu, lokola Nzambe akebisaki ye na ndɔtɔ,+ akendaki na etúká ya Galile.+ 23 Afandaki na engumba moko na nkombo Nazarete,+ mpo na kokokisa likambo oyo elobamaki na nzela ya basakoli, ete: “Bakobenga ye moto ya Nazarete.”*+
3 Na nsima, Yoane+ Mobatisi ayaki kosakola+ na esobe ya Yudea; 2 azalaki koloba: “Bóbongola mitema, mpo Bokonzi ya likoló ekómi pene.”+ 3 Ye nde moto oyo mosakoli Yisaya+ alobelaki na maloba oyo: “Mongongo ya moto moko ezali koganga na esobe: ‘Bóbongisa nzela ya Yehova!* Bósembola babalabala na ye.’”+ 4 Nzokande Yoane azalaki kolata bilamba oyo basalá na nsuki ya kamela mpe azalaki na mokaba ya mposo ya nyama na loketo na ye;+ bilei na ye ezalaki mayoyo ná mafuta ya nzoi ya zamba.+ 5 Bato ya Yerusaleme, ya Yudea mobimba mpe ya bamboka nyonso ya pembenipembeni ya Yordani bazalaki kokende epai na ye,+ 6 mpe azalaki kobatisa* bango na Ebale Yordani,+ bazalaki koyambola masumu na bango polelepolele.
7 Ntango amonaki ebele ya Bafarisai mpe ya Basadukai+ bazali koya kozwa batisimo, alobaki na bango: “Bino bana ya banyoka ya ngɛngɛ,*+ nani akebisi bino mpo bókima nkanda oyo ezali koya?+ 8 Yango wana bósala misala oyo emonisi ete bobongoli mitema.* 9 Bózwa te likanisi ya koloba ete: ‘Abrahama azali tata na biso.’+ Mpo nalobi na bino ete Nzambe akoki kobimisela Abrahama bana na mabanga oyo. 10 Epasola* esili kotyama na mosisa ya banzete. Yango wana, nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya malamu te bakokata yango mpe bakobwaka yango na mɔtɔ.+ 11 Ngai nazali kobatisa bino na mai mpo bobongoli mitema;+ kasi moto oyo azali koya nsima na ngai azali na makasi koleka ngai, mpe nabongi te kolongola basandale na ye.+ Moto yango akobatisa bino na elimo santu+ mpe na mɔtɔ.+ 12 Pau na ye ya kopupola mbuma ezali na lobɔkɔ na ye, mpe akopɛtola mpenza esika na ye ya kotutatuta mbuma. Akoyanganisa blé na ye na ndako ya kobomba biloko, kasi akotumba mposo na yango na mɔtɔ+ oyo ekoki kobomama te.”
13 Bongo Yesu autaki na Galile ayei na Yordani epai ya Yoane, mpo Yoane abatisa ye.+ 14 Kasi Yoane alukaki kopekisa ye, alobi: “Ngai nde moto nasengeli kobatisama epai na yo, bongo ndenge nini yo ozali koya epai na ngai?” 15 Yesu azongiselaki ye: “Koboya te, mpo na ndenge yango nde tosengeli kokokisa makambo nyonso oyo ezali sembo.” Bongo atikaki kopekisa ye. 16 Nsima ya kobatisama, na mbala moko Yesu abimaki na mai; mpe talá! likoló efungwamaki,+ mpe amonaki elimo ya Nzambe ezali kokita lokola ebenga mpe koya likoló na ye.+ 17 Lisusu, mongongo moko eutaki na likoló,+ elobi: “Oyo azali Mwana na ngai,+ ya bolingo, oyo nandimi.”+
4 Bongo elimo ememaki Yesu na esobe mpe kuna Zabolo+ amekaki+ ye. 2 Nsima ya kokila bilei mikolo 40 butu moi, ayokaki nzala. 3 Momeki+ apusanaki pene na ye mpe alobaki na ye: “Soki ozali mwana ya Nzambe, yebisá mabanga oyo ekóma mampa.” 4 Kasi ye azongisaki: “Ekomamá ete: ‘Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo euti na monɔkɔ ya Yehova.’”*+
5 Bongo Zabolo amemaki ye na engumba mosantu.+ Atɛlɛmisaki ye likoló, na nsɔngɛ ya efelo ya tempelo*+ 6 mpe alobaki na ye: “Soki ozali mwana ya Nzambe, omibwaka na nse, mpo ekomamá ete: ‘Akopesa baanzelu na ye mitindo mpo na yo, mpe bakomema yo na mabɔkɔ na bango mpo lokolo na yo etutana na libanga te.’”+ 7 Yesu alobaki na ye: “Ekomamá lisusu ete: ‘Osengeli te komeka Yehova* Nzambe na yo.’”+
8 Zabolo amemaki ye lisusu na ngomba moko ya molai mingi mpenza, mpe alakisaki ye makonzi nyonso ya mokili mpe nkembo na yango.+ 9 Mpe alobaki na ye: “Biloko nyonso oyo nakopesa yo yango soki ofukami mpe osaleli ngai likambo moko ya losambo.” 10 Bongo Yesu alobaki na ye: “Longwá, Satana! Mpo ekomamá ete: ‘Osengeli kosambela nde Yehova*+ Nzambe na yo, mpe kaka ye nde osengeli kosalela mosala mosantu.’”+ 11 Bongo Zabolo atikaki ye,+ mpe talá! baanzelu bayaki mpe babandaki kosalela ye.+
12 Ntango Yesu ayokaki ete bakangi Yoane,+ alongwaki, akei na Galile.+ 13 Na nsima, alongwaki na Nazarete, mpe akendaki kofanda na Kapernaume+ pembeni ya mbu, na etúká ya Zebulone mpe ya Nafatali. 14 Esalemaki bongo mpo na kokokisa makambo oyo elobamaki na nzela ya mosakoli Yisaya, ete: 15 “Ee mokili ya Zebulone mpe mokili ya Nafatali, ozali pembenipembeni ya nzela ya mbu, na ngámbo mosusu ya Yordani, Galile ya bato ya bikólo! 16 Bato oyo bafandi na molili bamonaki pole moko monene, mpe bato oyo bafandi na etúká ya molili ya liwa, pole+ ebimelaki bango.”+ 17 Banda na ntango wana, Yesu abandaki kosakola mpe koloba: “Bóbongola mitema, mpo Bokonzi ya likoló ekómi pene.”+
18 Ntango Yesu azalaki kotambola pembenipembeni ya Mbu ya Galile, amonaki bandeko mibale, Simo oyo babengi Petro+ ná ndeko na ye Andre, bazali kobwaka monyama na mbu, mpo bazalaki baluki-mbisi.+ 19 Alobaki na bango: “Bólanda ngai, mpe nakokómisa bino baluki-bato.”+ 20 Na mbala moko basundolaki minyama na bango mpe balandaki ye.*+ 21 Ntango Yesu alongwaki wana, amonaki bato mosusu mibale oyo bazalaki bandeko, Yakobo mwana ya Zebede ná ndeko na ye Yoane.+ Bazalaki na masuwa elongo na tata na bango Zebede, bazali kobongisa minyama na bango. Bongo abengaki bango.+ 22 Na mbala moko batikaki masuwa ná tata na bango mpe balandaki ye.
23 Bongo atambolaki na Galile mobimba:+ azalaki koteya na basinagoga+ na bango, azalaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe kobikisa maladi ya ndenge nyonso mpe mbeba ya ndenge nyonso oyo bato bazalaki na yango na nzoto.+ 24 Mpe nsango na ye epanzanaki na Siri mobimba; bamemelaki ye bato nyonso oyo bazalaki konyokwama na maladi mpe na mpasi ya ndenge na ndenge,+ baoyo bazalaki na bademo,+ bato ya maladi ya ndɛkɛ+ mpe bato oyo bakufá makolo,* mpe abikisaki bango. 25 Na yango ebele ya bato balandaki ye; bautaki na Galile, na Dekapolisi,* na Yerusaleme, na Yudea mpe na ngámbo mosusu ya Yordani.
5 Ntango amonaki ebele ya bato, amataki na ngomba mpe afandaki; mpe bayekoli na ye bapusanaki epai na ye. 2 Bongo afungolaki monɔkɔ na ye mpe abandaki koteya bango na maloba oyo:
3 “Esengo na baoyo bayebi mposa na bango ya elimo,*+ mpo Bokonzi ya likoló ezali ya bango.
4 “Esengo na baoyo bazali na mawa, mpo bakobɔndisama.+
5 “Esengo na baoyo bazali na ezaleli ya boboto,*+ mpo bakozwa* mabele.+
6 “Esengo na baoyo bazali na nzala mpe na mposa+ ya bosembo,* mpo bakotonda.+
7 “Esengo na bato ya motema mawa,+ mpo bakomonisela bango mpe motema mawa.
8 “Esengo na baoyo bazali na motema pɛto,+ mpo bakomona Nzambe.
9 “Esengo na baoyo batyaka kimya,+ mpo bakobengama bana ya Nzambe.
10 “Esengo na baoyo bazali konyokwama mpo na bosembo,+ mpo Bokonzi ya likoló ezali ya bango.
11 “Esengo na bino ntango bato bazali kofinga bino,+ konyokola bino,+ mpe kolobela bino makambo ya mabe ya ndenge nyonso mpo na ngai.+ 12 Bósepela mpe bótonda na esengo,+ mpo mbano*+ na bino ezali monene na likoló, mpo ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.+
13 “Bozali mungwa+ ya mabele. Kasi soki mungwa esili elɛngi, ndenge nini elɛngi na yango ekozonga? Ezali lisusu na ntina moko te; etikali kaka bábwaka yango libándá+ mpo bato bányata yango.
14 “Bozali pole ya mokili.+ Engumba oyo ezali likoló ya ngomba ekoki kobombama te. 15 Soki bapelisi mwinda, batyaka yango na nse ya kitunga* te, kasi likoló ya etɛlɛmiselo ya miinda, mpe epesaka pole na baoyo nyonso bazali na kati ya ndako.+ 16 Ndenge moko mpe, tiká ete pole na bino engɛnga liboso ya bato,+ mpo bámona misala na bino ya malamu+ mpe bápesa Tata na bino oyo azali na likoló nkembo.+
17 “Bókanisa te ete nayaki mpo na kobebisa Mobeko to Basakoli. Nayaki mpo na kobebisa yango te, kasi mpo na kokokisa yango.+ 18 Mpo ya solo mpenza, nalobi na bino ete likoló ná mabele ekoki koleka, kasi ata mwa lɛtrɛ ya moke to ndambo ya lɛtrɛ ya moke ya Mobeko ekoleka te, soki makambo nyonso esalemi te.+ 19 Yango wana, moto nyonso oyo abuki moko ya mitindo oyo eleki moke mpe ateyi bato básala bongo, akobengama ‘moto oyo aleki moke’ na oyo etali Bokonzi ya likoló. Moto nyonso oyo atosi yango mpe ateyi yango, moto yango akobengama ‘moto monene’ na oyo etali Bokonzi ya likoló. 20 Mpo nalobi na bino ete soki bosembo* na bino eleki te oyo ya bakomeli mpe Bafarisai,+ bokokɔta na Bokonzi ya likoló te.+
21 “Boyokaki ete balobaki na bankɔkɔ na bino: ‘Osengeli koboma moto te;+ kasi moto nyonso oyo abomi moto akozongisa monɔkɔ na tribinale.’+ 22 Kasi, ngai nalobi na bino ete moto nyonso oyo akangeli ndeko na ye nkanda+ akozongisa monɔkɔ na tribinale; moto nyonso oyo alobi na ndeko na ye liloba ya kotyola oyo ekoki kutu kolobelama te akozongisa monɔkɔ na Tribinale Monene; nzokande moto nyonso oyo alobi ete: ‘Yo nsuka na bolole!’ abongi na mɔtɔ ya Gehena.*+
23 “Bongo soki ozali komema likabo na yo na etumbelo+ mpe kuna okanisi ete ndeko na yo azali na likambo ná yo, 24 tiká likabo na yo kuna liboso ya etumbelo, mpe kende. Liboso tyá kimya* yo ná ndeko na yo, mpe na nsima, ntango okozonga, pesá likabo na yo.+
25 “Soki ozali na likambo ya kosamba ná moto mpe bozali kokende na tribinale, salá noki obongisa makambo elongo na moto yango ntango bozali naino na nzela, noki te moto yango apesa yo na mabɔkɔ ya mosambisi, mpe mosambisi apesa yo na mokɛngɛli, mpe bábwaka yo na bolɔkɔ.+ 26 Ya solo nalobi na yo, okobima kuna te soki osilisi te kofuta nyongo na yo tii na mbongo ya ebende ya moke ya nsuka.*
27 “Boyokaki ete balobá: ‘Osengeli kosala ekobo te.’+ 28 Kasi ngai nalobi na bino ete moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi+ tii ayoki ye mposa asili kosala na ye ekobo na motema.+ 29 Boye, soki liso na yo ya mobali ezali kobɛtisa yo libaku, pikolá yango mpe bwaká yango mosika na yo.+ Mpo eleki malamu obungisa eteni moko ya nzoto na yo na esika ete nzoto na yo mobimba ebwakama na Gehena.*+ 30 Lisusu, soki lobɔkɔ na yo ya mobali ezali kobɛtisa yo libaku, katá yango mpe bwaká yango mosika na yo.+ Mpo eleki malamu obungisa eteni moko ya nzoto na yo na esika ete nzoto na yo mobimba ekende na Gehena.*+
31 “Balobá lisusu ete: ‘Moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye, apesa ye mokanda ya koboma libala.’+ 32 Kasi, ngai nalobi na bino ete moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye, soki ezali te mpo na pite,* atye ye na likama ya kosala ekobo, mpe moto nyonso oyo abali mwasi oyo abomá libala asali ekobo.+
33 “Lisusu boyokaki ete balobaki na bankɔkɔ na bino: ‘Osengeli te kolapa ndai bongo okokisa yango te,+ kasi osengeli kokokisa bilako oyo osaleli Yehova.’*+ 34 Kasi, ngai nalobi na bino: Bólapa ndai te,+ ezala na nkombo ya likoló, mpo ezali kiti ya bokonzi ya Nzambe; 35 na nkombo ya mabele mpe te, mpo ezali ebonga ya makolo na ye;+ na nkombo ya Yerusaleme mpe te, mpo ezali engumba ya Mokonzi monene.+ 36 Kolapa ndai na motó na yo te, mpo okoki kokómisa nsuki ata moko mpɛmbɛ to moindo te. 37 Tiká ete liloba na bino ‘Ɛɛ’ ezala ɛɛ, ‘Te’ na bino, te;+ mpo maloba oyo ebakisami likoló na oyo wana euti na moto mabe.*+
38 “Boyokaki ete balobá: ‘Liso mpo na liso mpe lino mpo na lino.’+ 39 Kasi, ngai nalobi na bino: Bótɛmɛla te moto oyo azali mabe; kasi soki moto abɛti yo mbata na litama na yo ya mobali, pesá ye mpe oyo mosusu.+ 40 Soki moto alingi kokende na yo na tribinale mpe kozwa elamba na yo ya kati, tikelá ye mpe elamba na yo ya likoló.+ 41 Soki moto moko oyo azali na bokonzi azwi yo na makasi mpo osalela ye mosala kilomɛtrɛ moko, kende na ye kilomɛtrɛ mibale. 42 Soki moto asɛngi yo eloko, pesá ye, mpe soki moto alingi kodefa* eloko epai na yo, koboya te.+
43 “Boyokaki ete balobá: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo+ mpe koyina monguna na yo.’ 44 Kasi ngai nalobi na bino: Bókoba kolinga banguna na bino+ mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino,+ 45 mpo bómonisa ete bozali bana ya Tata na bino oyo azali na likoló,+ mpo abimisaka moi na ye mpo na bato mabe ná bato malamu mpe anɔkisaka mbula mpo na bato ya bosembo ná bato oyo bazangi bosembo.+ 46 Mpo soki bozali kolinga baoyo balingaka bino, mbano nini bokozwa?+ Bakɔngɔli-mpako basalaka mpe bongo te? 47 Mpe soki bozali kopesa mbote kaka na bandeko na bino, likambo nini ya monene bosali? Bato ya bikólo basalaka mpe bongo te? 48 Yango wana, bosengeli kozala bato ya kokoka,* ndenge Tata na bino ya likoló azali moto ya kokoka.+
6 “Bókeba ete bósala te misala ya malamu* na miso ya bato mpo bámona bino;+ soki te, bokozwa mbano te epai ya Tata na bino oyo azali na likoló. 2 Yango wana, ntango opesi makabo ya motema mawa,* kobɛta kelelo liboso na yo te, ndenge bakosi basalaka na basinagoga mpe na babalabala, mpo bato bákumisa bango. Ya solo nalobi na bino, basili kozwa mbano na bango mobimba. 3 Kasi yo, ntango ozali kopesa makabo ya motema mawa, lobɔkɔ na yo ya mwasi eyeba te oyo lobɔkɔ na yo ya mobali ezali kosala, 4 mpo makabo na yo ya motema mawa epesama na ndenge ya kobombana. Bongo Tata na yo oyo atalaka longwa na esika ya kobombana, akofuta yo.+
5 “Lisusu, ntango bozali kobondela, bósala lokola bakosi te;+ mpo balingaka kobondela, batɛlɛmi na basinagoga mpe na bisika oyo banzela minene ekutani, mpo bato bámona bango.+ Ya solo nalobi na bino, basili kozwa mbano na bango mobimba. 6 Kasi yo, ntango ozali kobondela, kɔtá na eteni ya kati ya ndako na yo mpe, nsima ya kokanga porte na yo, bondelá Tata na yo oyo azali na esika ya kobombana.+ Bongo Tata na yo oyo atalaka longwa na esika ya kobombana akofuta yo. 7 Kasi ntango bozali kobondela, bózongela kaka maloba moko mbala na mbala te, ndenge bato ya bikólo basalaka, mpo bakanisaka ete Nzambe akoyoka bango mpo bazali koloba mingi. 8 Boye, bózala lokola bango te, mpo Tata na bino ayebi biloko oyo bosengeli na yango+ liboso kutu bósɛnga ye.
9 “Yango wana, bosengeli kobondela boye:+
“‘Tata na biso na likoló, nkombo na yo+ esantisama.*+ 10 Bokonzi+ na yo eya. Mokano na yo+ esalema mpe na mabele,+ lokola na likoló. 11 Pesá biso lelo bilei* na biso mpo na mokolo oyo;+ 12 mpe limbisá biso masumu na biso,* ndenge biso mpe tolimbisaka baoyo basaleli biso lisumu.+ 13 Mpe kotika biso te tókwea na komekama,*+ kasi bikisá* biso na moto mabe.’+
14 “Mpo soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango, Tata na bino ya likoló mpe akolimbisa bino.+ 15 Kasi soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango te, Tata na bino mpe akolimbisa mabunga na bino te.+
16 “Ntango bozali kokila bilei,+ bótika kokómisa bilongi mawamawa ndenge bakosi basalaka, mpo babebisaka bilongi na bango* mpo bato bámona ete bazali kokila bilei.+ Ya solo mpenza nalobi na bino: Basili kozwa mbano na bango mobimba. 17 Kasi yo, ntango ozali kokila bilei, tyá mafuta na motó na yo mpe sukolá elongi na yo, 18 mpo omonana na miso ya bato te ete ozali kokila bilei, kasi kaka Tata na yo oyo azali na esika ya kobombana nde amona. Bongo Tata na yo oyo atalaka longwa na esika ya kobombana akofuta yo.
19 “Bótika komibombela biloko ya motuya na mabele,+ epai ndɔngɛ mpe koguga ebebisaka, mpe epai miyibi bakɔtaka na makasi mpe bayibaka. 20 Kasi, bómibombela biloko ya motuya na likoló,+ epai ndɔngɛ mpe koguga ebebisaka te,+ mpe epai miyibi bakɔtaka te mpe bayibaka te. 21 Mpo esika eloko na yo ya motuya ezali, motema na yo mpe ekozala kuna.
22 “Mwinda ya nzoto ezali liso.+ Yango wana, soki liso na yo ezali kotala kaka eloko moko,* nzoto na yo mobimba ekongɛnga.* 23 Kasi soki liso na yo ezali bilulela,*+ nzoto na yo mobimba ekozala molili. Soki pole oyo ezali kati na yo ezali mpenza molili, boye molili yango ezali makasi mpenza!
24 “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale; mpo, to akoyina moko mpe akolinga mosusu,+ to akokangama na moko mpe akotyola mosusu. Bokoki te kosala lokola baombo mpo na Nzambe mpe mpo na Bomɛngo.+
25 “Yango wana nalobi na bino: Bótika komitungisa+ mpo na bomoi* na bino mpo na oyo bokolya to oyo bokomɛla, to mpo na nzoto na bino mpo na oyo bokolata.+ Bomoi* ezali na ntina mingi koleka bilei te? Mpe nzoto ezali na ntina mingi koleka bilamba te?+ 26 Bótala malamumalamu bandɛkɛ ya likoló;+ elonaka te, ebukaka mbuma te mpe eyanganisaka te na bandako ya kobomba biloko, kasi Tata na bino ya likoló aleisaka yango. Bino boleki yango na motuya te? 27 Nani kati na bino soki azali komitungisa akoki kobakisa ata mwa moke* bolai ya bomoi na ye?+ 28 Lisusu, mpo na nini bozali komitungisa mpo na bilamba? Bózwa liteya na fololo lísi oyo ekolaka na esobe; emonaka mpasi te, mpe etongaka elamba te. 29 Kasi nalobi na bino ete ata Salomo,+ na nkembo na ye nyonso, alataki lokola moko na yango te. 30 Bongo soki Nzambe alatisaka matiti ya esobe ndenge wana, oyo ezali wana lelo mpe lobi ekobwakama na mɔtɔ, akolatisa bino koleka te, bino bato ya kondima moke? 31 Yango wana, bómitungisa ata moke te+ mpe bóloba te ete: ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’+ 32 Mpo nyonso wana ezali biloko oyo bikólo elukaka na lokoso mpenza. Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko nyonso wana.
33 “Boye, bókoba koluka liboso Bokonzi mpe bosembo na ye,* mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.+ 34 Na yango bómitungisa ata moke te mpo na lobi,+ mpo lobi ekozala na mitungisi na yango moko. Mokolo na mokolo ezali na mitungisi na yango.
7 “Bótika kosambisa+ mpo básambisa bino te; 2 mpo bakosambisa bino kaka ndenge oyo bozali kosambisa,+ mpe bakomeka bino na emekeli oyo bozali komekela.+ 3 Bongo mpo na nini ozali kotala lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo, kasi ozali komona te libaya* oyo ezali na liso na yo moko?+ 4 To ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo: ‘Tiká nalongola lititi oyo ezali na liso na yo’; nzokande talá! libaya ezali na liso na yo moko? 5 Mokosi! Longolá liboso libaya oyo ezali na liso na yo moko, bongo okomona polele ndenge ya kolongola lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo.
6 “Bópesa oyo ezali mosantu epai ya bambwa te, bóbwakela mpe bangulu mayaka na bino te,+ noki bányatanyata yango na makolo na bango, bábaluka mpe bázokisa bino.
7 “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino;+ bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.+ 8 Mpo moto nyonso oyo asɛngaka azwaka,+ moto nyonso oyo alukaka amonaka, mpe moto nyonso oyo azali kobɛta kɔkɔkɔ bakofungolela ye. 9 Kutu, nani kati na bino, oyo soki mwana na ye asɛngi ye limpa, akopesa ye libanga? 10 To soki asɛngi ye mbisi, akopesa ye nde nyoka? 11 Na yango, soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na bino oyo azali na likoló, akopesa te koleka biloko ya malamu+ epai ya baoyo bazali kosɛnga ye?+
12 “Yango wana, makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango yango.+ Kutu, yango nde likambo oyo Mobeko mpe Basakoli eteyi.+
13 “Bókɔta na porte ya moke,+ mpo porte ya monene mpe nzela oyo efungwamá ezali komema na libebi, mpe bato mingi bazali kokɔta kuna; 14 kasi porte oyo ezali moke mpe nzela ya nkaka, yango nde ezali komema na bomoi, mpe bato moke nde bazali komona yango.+
15 “Bókeba na basakoli ya lokuta+ oyo bazali koya epai na bino balati mposo ya mpate,+ nzokande na kati bazali bambwa ya zamba ya lokoso.+ 16 Bokoyeba bango na mbuma na bango. Na nzete ya nzubɛ babukaka mbuma ya vinyo te, mpe na nzete ya nsɛndɛ babukaka mbuma ya figi te, boye te?+ 17 Ndenge moko mpe nzete nyonso ya malamu ebotaka mbuma ya malamu, kasi nzete nyonso oyo epɔlá ebotaka mbuma ya mabe.+ 18 Nzete ya malamu ekoki kobota mbuma ya mabe te, mpe nzete oyo epɔlá ekoki kobota mbuma ya malamu te.+ 19 Nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya malamu te, bakataka yango mpe babwakaka yango na mɔtɔ.+ 20 Boye, bokoyeba bato yango na mbuma na bango.+
21 “Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai: ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na Bokonzi ya likoló, kasi kaka moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló.+ 22 Na mokolo yango, bato mingi bakoloba na ngai: ‘Nkolo, Nkolo,+ tosakolaki na nkombo na yo te? mpe tobimisaki bademo na nkombo na yo te? mpe tosalaki makamwisi mingi* na nkombo na yo te?’+ 23 Kasi ngai nakoloba na bango: Nayebi bino ata moke te! Bólongwa pene na ngai, bino bato oyo bobukaka mibeko!+
24 “Yango wana, moto nyonso oyo ayoki maloba na ngai oyo mpe asaleli yango, akozala lokola moto ya mayele oyo atongaki ndako na ye likoló ya mabanga.+ 25 Mbula enɔkaki makasi, mpela eyaki, mipɛpɛ epɛpaki mpe ebɛtaki ndako yango, kasi ebukanaki te, mpo moboko na yango ezalaki likoló ya mabanga. 26 Lisusu, moto nyonso oyo ayoki maloba na ngai oyo kasi asaleli yango te akozala lokola moto moko ya zoba oyo atongaki ndako na ye likoló ya zɛlo.+ 27 Mbula enɔkaki makasi, mpela eyaki, mipɛpɛ epɛpaki mpe ebɛtaki ndako yango.+ Bongo ndako yango ekweaki mpe ebebaki mpenza.”
28 Ntango Yesu asilisaki koloba maloba yango, ebele ya bato wana bakamwaki na ndenge na ye ya koteya,+ 29 mpo azalaki koteya bango lokola moto oyo azali na bokonzi,+ kasi te lokola bakomeli na bango.
8 Nsima ya kokita na ngomba, ebele ya bato balandaki ye. 2 Mpe talá! moto moko ya maladi ya maba ayaki epai na ye mpe agumbamelaki ye,* alobi: “Nkolo, soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.”+ 3 Bongo Yesu asembolaki lobɔkɔ na ye, asimbaki ye, mpe alobaki: “Nalingi! Kómá pɛto.”+ Na mbala moko maladi na ye ya maba esilaki, akómaki pɛto.+ 4 Yesu alobaki na ye lisusu: “Kebá ete oyebisa yango moto te,+ kasi kende komilakisa epai ya nganga-nzambe,+ mpe pesá likabo ndenge Moize atindaki,+ mpo ezala litatoli mpo na bango.”
5 Ntango akɔtaki na Kapernaume, mokonzi moko ya basoda ayaki epai na ye mpe abondelaki ye,+ 6 alobi: “Nkolo, mosaleli na ngai alali na ndako, azali koningana te* mpe azali konyokwama makasi mpenza.” 7 Yesu alobaki na ye: “Ntango nakokóma kuna nakobikisa ye.” 8 Mokonzi ya basoda azongisaki: “Nkolo, nabongi te ete okɔta na ndako na ngai, kasi lobá se liloba moko mpe mosaleli na ngai akobika. 9 Mpo ngai mpe nazali na bakonzi oyo natosaka, mpe nazali na basoda oyo napesaka mitindo. Soki nalobi na oyo: ‘Kende!’ akendaka, mpe na mosusu: ‘Yaká!’ ayaka, mpe na moombo na ngai: ‘Salá boye!’ asalaka yango.” 10 Ntango Yesu ayokaki bongo, akamwaki mpenza mpe alobaki na baoyo bazalaki kolanda ye: “Nazali koyebisa bino solo ete: namoná naino kondima ya monene+ boye te epai ya moto moko na Yisraele. 11 Kasi nazali koyebisa bino ete bato mingi bakouta na ɛsti mpe na wɛsti bakoya mpe bakofanda* na mesa elongo na Abrahama, Yisaka mpe Yakobo na Bokonzi ya likoló.+ 12 Kasi bana ya Bokonzi bakobwakama libándá, na molili. Kuna nde bakolela mpe bakolya mino.”+ 13 Bongo Yesu alobaki na mokonzi wana ya basoda: “Kende. Lokola omonisi kondima, tiká likambo oyo osɛngi esalema.”+ Mpe mosaleli yango abikaki kaka na ngonga wana.+
14 Ntango Yesu akómaki na ndako ya Petro, akutaki mama-bokilo ya Petro+ alali mpe azalaki na fiɛvrɛ.+ 15 Na yango Yesu asimbaki lobɔkɔ na ye,+ mpe fiɛvrɛ na ye esilaki; atɛlɛmaki mpe abandaki kosalela ye. 16 Kasi ntango mpokwa ekómaki, bamemelaki Yesu bato mingi oyo bazalaki na bademo; abimisaki bilimo yango na liloba kaka moko, mpe abikisaki bato nyonso ya maladi, 17 mpo likambo oyo elobamaki na nzela ya mosakoli Yisaya ekokisama: “Amemaki bamaladi na biso mpe akumbaki bampasi na biso.”+
18 Ntango Yesu amonaki ebele ya bato zingazinga na ye, apesaki bayekoli na ye mitindo ete bákende na ngámbo mosusu.+ 19 Mpe mokomeli moko ayaki mpe alobaki na ye: “Moteyi, nakolanda yo esika nyonso okokende.”+ 20 Kasi Yesu alobaki na ye: “Bagambala ezali na mabulu mpe bandɛkɛ ya likoló ezali na bazumbu,* kasi Mwana ya moto azali na esika ya kolalisa motó te.”+ 21 Bongo moyekoli na ye mosusu alobaki na ye: “Nkolo, pesá ngai naino nzela nakende kokunda tata na ngai.”+ 22 Yesu alobaki na ye: “Kobá kolanda ngai, mpe tiká bakufi bákunda bakufi na bango.”+
23 Bongo Yesu amataki na masuwa, mpe bayekoli na ye balandaki ye.+ 24 Kasi talá! mopɛpɛ moko makasi ebɛtaki likoló ya mbu, mpe mbonge ezalaki se kozipa masuwa; nzokande Yesu azalaki kolala mpɔngi.+ 25 Bayaki kolamwisa ye, balobi: “Nkolo, bikisá biso, tolingi kokufa!” 26 Kasi alobaki na bango: “Mpo na nini bozali kobanga boye, bino bato ya kondima moke?”+ Bongo atɛlɛmaki, apamelaki mopɛpɛ mpe mbu, mpe kimya moko monene ekɔtaki.+ 27 Bongo bayekoli bakamwaki mpe balobaki: “Moto oyo azali nani? Ata mopɛpɛ ná mbu ezali kotosa ye.”
28 Ntango akómaki na ngámbo mosusu, na etúká ya Gadara,* mibali mibale oyo bazalaki na bademo bautaki na malita* mpe bakutanaki na ye;+ bazalaki na nkanda makasi mpenza, mpe moto moko azalaki na mpiko ya koleka na nzela wana te. 29 Bato yango bagangaki, balobi: “Biso ná yo likambo nini, Mwana ya Nzambe?+ Oyei awa mpo na konyokola biso+ liboso ya ntango oyo etyamá?”+ 30 Mwa mosika na bango, etonga moko ya ebele ya bangulu ezalaki kolya.+ 31 Bongo bademo babandaki kobondela ye mpe koloba: “Soki obimisi biso, tindá biso na etonga wana ya bangulu.”+ 32 Alobaki na bango: “Bókende!” Bongo babimaki mpe bakɔtaki na bangulu; mpe talá! etonga yango nyonso ya bangulu emibwakaki longwa na likoló ya lobwaku tii na mbu mpe ekufaki na mai. 33 Kasi babateli ya etonga yango bakimaki, bakɔtaki na engumba mpe bayebisaki makambo nyonso, ezala lisolo ya bato oyo bazalaki na bademo. 34 Mpe bato nyonso ya engumba babimaki mpo na kokutana na Yesu. Ntango bamonaki ye, basɛngaki ye alongwa na etúká na bango.+
9 Bongo Yesu amataki na masuwa, akatisi na ngámbo, mpe akei na engumba na ye.+ 2 Mpe talá! bato bamemelaki ye mobali moko oyo azalaki koningana te,* oyo balalisaki na litɔkɔ. Ntango amonaki kondima na bango, Yesu alobaki na mobali yango oyo azalaki koningana te:* “Zalá na mpiko, mwana na ngai! Masumu na yo elimbisami.”+ 3 Bakomeli mosusu balobanaki bango na bango: “Moto oyo azali kofinga Nzambe.” 4 Lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, atunaki bango: “Mpo na nini bozali kokanisa makambo ya mabe na mitema na bino?+ 5 Na ndakisa, nini eleki pɛtɛɛ, koloba: ‘Masumu na yo elimbisami,’ to koloba: ‘Tɛlɛmá mpe tambolá’?+ 6 Kasi, mpo bóyeba ete Mwana ya moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu awa na mabele—” na yango alobaki na moto oyo azalaki koningana te ete: “Tɛlɛmá, zwá litɔkɔ na yo, mpe kende epai na yo.”+ 7 Bongo atɛlɛmaki mpe akendaki epai na ye. 8 Ntango ebele ya bato bamonaki bongo, babangaki makasi mpe bakumisaki Nzambe, mpo apesaki bato bokonzi ya ndenge wana.
9 Nsima ya kolongwa kuna, Yesu amonaki mobali moko na nkombo Matai afandi na biro ya mpako, mpe alobaki na ye: “Landá ngai.”* Bongo atɛlɛmaki mpe alandaki ye.+ 10 Na nsima, ntango azalaki kolya* na ndako, talá! bakɔngɔli-mpako ná basumuki mingi bayaki mpe babandaki kolya* elongo na Yesu ná bayekoli na ye.+ 11 Ntango Bafarisai bamonaki yango, balobaki na bayekoli na ye: “Mpo na nini moteyi na bino azali kolya elongo na bakɔngɔli-mpako mpe basumuki?”+ 12 Ntango Yesu ayokaki bango, alobaki: “Bato oyo bazali nzoto malamu bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde bato oyo bazali kobɛla.+ 13 Boye bókende koyekola ntina ya maloba oyo: ‘Nalingi motema mawa, kasi mbeka te.’+ Mpo nayaki kobenga bato ya sembo te, kasi basumuki.”
14 Bongo bayekoli ya Yoane bayaki epai ya Yesu mpe batunaki ye: “Mpo na nini biso ná Bafarisai tokilaka bilei kasi bayekoli na yo bakilaka bilei te?”+ 15 Na yango Yesu alobaki na bango: “Baninga ya mobali ya libala bazali na ntina moko te ya kozala na mawa ntango mobali ya libala+ azali elongo na bango, boye te? Kasi mokolo ezali, mobali ya libala akolongolama epai na bango,+ mpe bakokila bilei na ntango yango. 16 Moto moko te abambaka eteni ya elamba ya sika na elamba ya kala;* mpo eteni ya sika ekobenda elamba yango mpe elamba ekopasuka lisusu makasi.+ 17 Batyaka mpe vinyo ya sika na milangi ya kala ya mposo ya nyama te. Soki basali bongo, milangi yango ekopanzana, vinyo ekosopana mpe milangi ya mposo ya nyama ekobeba. Kasi batyaka vinyo ya sika na milangi ya sika ya mposo ya nyama; na ndenge yango nyonso mibale ekobatelama.”
18 Ntango azalaki koyebisa bango makambo wana, talá! mokambi moko apusanaki epai na ye, agumbamelaki ye* mpe alobaki: “Sikoyo ekoki kozala ete mwana na ngai ya mwasi akufi; kasi yaká kotya lobɔkɔ likoló na ye mpe akozonga na bomoi.”+
19 Bongo Yesu atɛlɛmaki mpe alandaki ye; bayekoli na ye mpe bakendaki elongo na ye. 20 Mpe talá! mwasi moko oyo azalaki konyokwama na maladi ya kotanga makila+ esali mbula 12, ayaki nsimansima ya Yesu mpe asimbaki nsɔngɛ ya elamba na ye ya likoló,+ 21 mpo azalaki koloba na motema na ye: “Soki kaka nasimbi elamba na ye ya likoló, nakobika.” 22 Yesu abalukaki, amonaki ye, mpe alobaki na ye: “Zalá na mpiko, mwana na ngai; kondima na yo ebikisi yo.”+ Mpe banda na ngonga wana, mwasi yango abikaki.+
23 Nzokande, ntango akómaki na ndako ya mokambi yango mpe amonaki babɛti-piololo* ná ebele ya bato oyo bazalaki na yikiyiki,+ 24 Yesu alobaki: “Bóbima libándá, mpo mwana oyo ya mwasi akufi te, kasi alali nde mpɔngi.”+ Na yango babandaki kosɛka ye na lityo. 25 Ntango kaka ebele ya bato babimaki libándá, akɔtaki mpe asimbaki lobɔkɔ na ye,+ mpe mwana mwasi yango atɛlɛmaki.+ 26 Mpe nsango ya likambo yango epanzanaki na etúká yango mobimba.
27 Yesu alongwaki kuna. Wana azalaki koleka na nzela, bato mibale oyo bakufá miso+ balandaki ye, mpe bazalaki koganga boye: “Mwana ya Davidi, yokelá biso mawa.” 28 Ntango Yesu akɔtaki na ndako, bato yango mibale oyo bakufá miso bayaki epai na ye, mpe Yesu atunaki bango: “Bozali na kondima ete nakoki kosala yango?”+ Bayanolaki ye: “Ɛɛ, Nkolo.” 29 Bongo asimbaki miso na bango+ mpe alobaki: “Esalema mpo na bino ndenge kondima na bino ezali.” 30 Mpe miso na bango ekómaki komona. Lisusu, Yesu akebisaki bango makasi, alobi: “Bókeba ete moto moko te ayeba likambo oyo.”+ 31 Kasi ntango babimaki, bapanzaki nsango na ye na etúká yango mobimba.
32 Ntango bazalaki kokende, talá! bamemelaki ye moto moko oyo azalaki baba mpe azalaki na demo;+ 33 mpe ntango demo yango abimisamaki, moto yango ya baba akómaki koloba.+ Bongo ebele ya bato bakamwaki mpe balobaki: “Likambo ya boye emonaná naino te na Yisraele.”+ 34 Kasi Bafarisai bazalaki koloba: “Azali kobimisa bademo nde na nguya ya mokonzi ya bademo.”+
35 Mpe Yesu azalaki kolekaleka na bingumba mpe bamboka nyonso: azalaki koteya na basinagoga na bango, kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe kobikisa maladi ya ndenge nyonso mpe mbeba ya ndenge nyonso oyo bato bazalaki na yango na nzoto.+ 36 Ntango amonaki ebele ya bato, ayokelaki bango mawa,+ mpo bazalaki komona mpasi* mpe basundolamaki lokola bampate oyo ezangi mobateli.+ 37 Bongo alobaki na bayekoli na ye: “Ya solo, mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke.+ 38 Yango wana, bóbondela Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.”+
10 Bongo abengisaki bayekoli na ye 12 mpe apesaki bango bokonzi ya kobimisa bilimo ya mbindo,+ mpe kobikisa maladi ya ndenge nyonso mpe mbeba ya ndenge nyonso oyo bato bazalaki na yango na nzoto.
2 Nkombo ya bantoma 12 yango oyo:+ Ya liboso Simo, oyo babengi Petro,+ ná ndeko na ye Andre;+ Yakobo mwana ya Zebede ná ndeko na ye Yoane;+ 3 Filipe ná Bartelemi;+ Toma+ ná Matai+ mokɔngɔli-mpako; Yakobo mwana ya Alfe; mpe Tade; 4 Simo Mokanana;* mpe Yudasi Mokeriota, oyo na nsima atɛkaki ye.+
5 Bato yango 12, Yesu atindaki bango mpe apesaki bango malako oyo:+ “Bókende epai ya bato ya bikólo mosusu te, mpe bókɔta ata na engumba moko te ya Samaria;+ 6 kasi, bókoba kokende epai ya bampate oyo ebungá ya ndako ya Yisraele.+ 7 Ntango bozali kokende, bósakola, bóloba boye: ‘Bokonzi ya likoló ekómi pene.’+ 8 Bóbikisa bato ya maladi,+ bólamwisa* bakufi, bópɛtola bato ya maladi ya maba, mpe bóbimisa bademo. Bozwi ofele, bópesa ofele. 9 Bótya wolo, palata to mbongo ya kwivre te na mikaba na bino,+ 10 bózwa mpe saki ya bilei mpo na mobembo te, elamba mosusu* te, basandale te, lingenda+ mpe te, mpo mosali abongi kozwa bilei na ye.+
11 “Na engumba nyonso to na mboka nyonso oyo bokokɔta, bóluka kati na yango moto oyo abongi, mpe bófanda wana tii bokolongwa.+ 12 Ntango bokɔti na ndako moko, bópesa bato ya ndako yango mbote. 13 Soki bato yango babongi, kimya oyo botombeli bango ezala likoló na yango;+ kasi soki babongi te, kimya na bino ezongela bino. 14 Epai nyonso oyo moto ayambi bino te, to ayoki maloba na bino te, ntango bozali kobima na ndako yango to na engumba yango, bópupola putulu ya makolo na bino.+ 15 Ya solo nalobi na bino, ekozala kutu mwa malamu mpo na mokili ya Sodoma ná Gomora na Mokolo ya Kosambisama+ koleka mpo na engumba wana.
16 “Talá! Nazali kotinda bino lokola bampate na kati ya bambwa ya zamba; yango wana, bózala ekɛngɛ lokola banyoka mpe bózala na likambo te lokola bibenga.+ 17 Bókeba na bato, mpo bakokaba bino na batribinale ya mboka,+ mpe bakobɛta bino fimbo+ na basinagoga na bango.+ 18 Bakomema bino liboso ya baguvɛrnɛrɛ mpe liboso ya bakonzi+ mpo na ngai, mpe yango ekozala litatoli mpo na bango mpe mpo na bikólo.+ 19 Nzokande, ntango bakokaba bino liboso na bango, bómitungisa te mpo na ndenge oyo bokoloba mpe mpo na makambo oyo bokoloba, mpo bokozwa likambo ya koloba kaka na ngonga wana;+ 20 mpo kaka bino te nde bokoloba, kasi elimo ya Tata na bino nde ekoloba na nzela na bino.+ 21 Lisusu, ndeko akokaba ndeko na ye mpo abomama, mpe tata akosala bongo mpo na mwana na ye, bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango.+ 22 Mpe bato nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai,+ kasi moto oyo akoyika mpiko* tii na nsuka, akobika.+ 23 Ntango bakonyokola bino na engumba moko, bókima na engumba mosusu;+ mpo ya solo nalobi na bino, bokosilisa koleka na bingumba nyonso ya Yisraele te liboso ete Mwana ya moto aya.
24 “Moyekoli aleki moteyi na ye te, moombo mpe aleki nkolo na ye te.+ 25 Soki moyekoli akómi lokola moteyi na ye, mpe moombo lokola nkolo na ye,+ ekoki bongo. Soki babengi nkolo-ndako Beelezebube,*+ bongo bato ya ndako na ye bakobenga bango mpe bongo te? 26 Yango wana bóbanga bango te, mpo ezali na likambo moko te oyo ebombani, oyo ekomonisama polele te, mpe ezali na sekele moko te oyo ekoyebana te.+ 27 Oyo nazali koyebisa bino na molili, bóloba yango na pole; mpe oyo nazali koloba na bino na mongongo ya nse, bósakola yango likoló ya bandako.+ 28 Mpe bóbanga te baoyo babomaka nzoto kasi bakoki koboma molimo* te;+ bóbanga nde moto oyo akoki koboma ná molimo ná nzoto na Gehena.*+ 29 Batɛkaka bakɛngɛli-mboka mibale na mbongo moko ya ebende ya motuya moke,* boye te? Nzokande ata moko na yango te ekweaka na nse, bongo Tata na bino ayeba te.+ 30 Kasi ata nsuki nyonso ya motó na bino etángami. 31 Yango wana bóbanga te; bozali na motuya mingi koleka bakɛngɛli-mboka ebele.+
32 “Boye, moto nyonso oyo andimi ngai liboso ya bato,+ ngai mpe nakondima ye liboso ya Tata na ngai oyo azali na likoló.+ 33 Kasi moto oyo awangani ngai liboso ya bato, ngai mpe nakowangana ye liboso ya Tata na ngai oyo azali na likoló.+ 34 Bókanisa te ete nayaki mpo na komemela mabele kimya; nayaki mpo na komema kimya te, kasi mopanga.+ 35 Mpo nayaki kotya bokabwani, kati na mwana mobali ná tata na ye, mwana mwasi ná mama na ye, mpe mwasi ya libala ná mama-bokilo na ye.+ 36 Ya solo, banguna ya moto bakozala bato ya libota na ye moko.* 37 Moto oyo alingi tata to mama koleka ngai abongi na ngai te; mpe moto oyo alingi mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi koleka ngai abongi na ngai te.+ 38 Mpe moto oyo aboyi komema nzete na ye ya mpasi* mpe kolanda ngai abongi na ngai te.+ 39 Moto oyo aluki kobatela bomoi* na ye akobungisa yango, mpe moto oyo abungisi bomoi* na ye mpo na ngai, akozwa yango.+
40 “Moto oyo ayambi bino ayambi mpe ngai. Mpe moto oyo ayambi ngai ayambi mpe Moto oyo atindaki ngai.+ 41 Moto oyo ayambi mosakoli mpo azali mosakoli akozwa mbano ya mosakoli,+ mpe moto oyo ayambi moto ya sembo mpo azali moto ya sembo akozwa mbano ya moto ya sembo. 42 Mpe moto oyo apesi moko ya bato oyo ya mike ata kɔpɔ moko ya mai ya mpiɔ mpo na komɛla mpo azali moyekoli, nayebisi bino ya solo, akobungisa mbano na ye ata moke te.”+
11 Ntango Yesu asilisaki kopesa bayekoli na ye 12 malako, alongwaki kuna akei koteya mpe kosakola na bingumba na bango.+
2 Kasi ntango Yoane, oyo azalaki na bolɔkɔ,+ ayokaki nsango ya misala ya Kristo, atindaki bayekoli na ye+ 3 bátuna ye: “Yo nde Moto oyo asengelaki koya, to tosengeli kozela moto mosusu?”+ 4 Yesu azongiselaki bango: “Bókende koyebisa Yoane makambo oyo bozali koyoka mpe komona:+ 5 Bato oyo bakufá miso bakómi komona,+ batɛngumi bakómi kotambola, bato ya maladi ya maba bazali kopɛtolama,+ bato oyo bakufá matoi bakómi koyoka, bakufi bazali kolamuka,* mpe nsango malamu ezali kosakolama epai ya babola.+ 6 Esengo na moto oyo azwi ata ntina moko te ya kobɛta libaku epai na ngai.”+
7 Ntango bayekoli ya Yoane bazalaki kokende, Yesu abandaki koloba na ebele ya bato makambo etali Yoane: “Bokendaki kotala nini na esobe?+ Lititi* oyo mopɛpɛ ezali kobɛtabɛta?+ 8 Bongo bokendaki mpo na kotala nini? Moto moko oyo alati bilamba ya kitoko?* Te, baoyo balataka bilamba ya kitoko bazalaka na bandako ya bakonzi. 9 Bongo bokendaki mpenza kotala nini? Mosakoli moko? Ya solo, nazali koyebisa bino, ye aleki kutu mosakoli mosika.+ 10 Ezali mpo na ye nde ekomamá ete: ‘Talá! Nazali kotinda momemi-nsango na ngai liboso na yo,* mpe akobongisa nzela liboso na yo!’+ 11 Ya solo nalobi na bino, na bato nyonso oyo basi babotá, moko te aleki Yoane Mobatisi. Kasi moto oyo aleki moke na Bokonzi ya likoló aleki ye.+ 12 Banda na mikolo ya Yoane Mobatisi tii sikoyo, Bokonzi ya likoló ezali eloko oyo bato bazali koluka na molende, mpe baoyo bazali kokoba koluka yango bazali kozwa yango.+ 13 Mpo bango nyonso, Basakoli mpe Mobeko, basakolaki tii na Yoane.+ 14 Bóndima yango to te, ye nde ‘Eliya oyo asengeli koya.’+ 15 Moto oyo azali na matoi ayoka.
16 “Nakokokanisa libota oyo na nani?+ Ezali lokola bana mike oyo bafandi na zando, oyo bazali kobelela baninga na bango ya lisano, 17 balobi: ‘Tobɛtɛlaki bino piololo,* kasi bobinaki te; togangaki na kolela, kasi bomibɛtaki ntolo mpo na mawa te.’ 18 Ndenge moko mpe, Yoane ayei; mpe lokola alei te amɛli te, bato balobi: ‘Azali na demo.’ 19 Mwana ya moto ayei, azali kolya mpe komɛla,+ kasi bato balobi: ‘Talá! Moto oyo alyaka na lokoso mpe amipesi na komɛla vinyo, moninga ya bakɔngɔli-mpako mpe ya basumuki.’+ Nzokande, bwanya eyebanaka* na misala na yango.”*+
20 Na nsima abandaki kopamela bingumba epai asalaki makamwisi na ye mingi,* mpo bato na yango babongolaki mitema te: 21 “Mawa na yo, Korazine! Mawa na yo, Betesaida! mpo soki makamwisi oyo esalemaki epai na bino esalemaka na Tire mpe na Sidone, mbɛlɛ banda kala balingaki kolata ngɔtɔ* mpe kofanda na putulu ya mɔtɔ mpo na komonisa ete babongoli motema.+ 22 Kasi nalobi na bino, ekozala kutu mwa malamu mpo na Tire ná Sidone na Mokolo ya Kosambisama koleka mpo na bino.+ 23 Mpe yo, Kapernaume,+ okanisi ete okomata tii na likoló? Te, okokita tii na Nkunda,*+ mpo soki makamwisi oyo esalemaki epai na yo esalemaka na Sodoma, mbɛlɛ engumba yango ezali naino tii lelo. 24 Kasi nalobi na yo, ekozala kutu mwa malamu mpo na mokili ya Sodoma na Mokolo ya Kosambisama koleka mpo na yo.”+
25 Na ntango yango Yesu alobaki: “Nazali kosanzola yo liboso ya bato nyonso, Tata, Nkolo ya likoló mpe ya mabele, mpo obombeli bato ya bwanya ná bato ya mayele makambo oyo, kasi omonisi yango bana mike.+ 26 Ya solo, Ee Tata, mpo omonaki malamu kosala bongo. 27 Tata na ngai apesi ngai biloko nyonso,+ mpe moto moko te ayebi Mwana malamumalamu longola kaka Tata.+ Mpe moto moko te ayebi Tata malamumalamu longola kaka Mwana, ná moto nyonso oyo Mwana asepeli komonisa ye Tata.+ 28 Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe bomemi mikumba ya kilo, mpe ngai nakopemisa bino. 29 Bómema ekanganeli na ngai na mapeka na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa,+ mpe bokopema.* 30 Mpo ekanganeli na ngai ezali mpasi te mpo na komema* mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.”
12 Na ntango wana, Yesu alekaki na bilanga ya blé na Sabata. Bayekoli na ye bayokaki nzala mpe babandaki kobuka mbuma ya blé mpe kolya yango.+ 2 Ntango bamonaki bongo, Bafarisai balobaki na ye: “Talá! Bayekoli na yo bazali kosala likambo oyo epesami nzela te kosala na Sabata.”+ 3 Alobaki na bango: “Botángá te likambo oyo Davidi asalaki ntango ye ná bato na ye bayokaki nzala?+ 4 Ndenge akɔtaki na ndako ya Nzambe mpe balyaki mampa ya komonisa,*+ eloko oyo ye ná bato oyo bazalaki elongo na ye bazalaki na ndingisa ya kolya te, longola kaka banganga-nzambe?+ 5 To, botángá te na Mobeko ete na Basabata, banganga-nzambe oyo basalaka mosala na tempelo batosaka Sabata te kasi bazalaka na ngambo te?+ 6 Kasi nazali koyebisa bino ete eloko oyo eleki tempelo ezali awa.+ 7 Nzokande, soki bokangaki ntina ya likambo oyo: ‘Nalingi motema mawa,+ kasi mbeka te,’+ bolingaki te kokweisa bato oyo bazali na ngambo te. 8 Mpo Mwana ya moto azali Nkolo ya Sabata.”+
9 Nsima ya kolongwa na esika wana, akendaki na sinagoga na bango, 10 mpe talá! moto moko oyo lobɔkɔ ekauká*+ azalaki wana! Bongo batunaki Yesu: “Epesami nzela kobikisa moto na Sabata?” Ezalaki mpo bázwa likambo ya kofunda ye.+ 11 Alobaki na bango: “Soki bozali na mpate kaka moko mpe mpate yango ekwei na libulu na mokolo ya Sabata, nani kati na bino akokende kosimba yango te mpo na kobimisa yango?+ 12 Nzokande moto aleki mpate na motuya! Na yango epesami nzela kosala likambo ya malamu na mokolo ya Sabata.” 13 Bongo Yesu alobaki na mobali yango: “Sembolá lobɔkɔ na yo.” Mpe asembolaki yango, mpe ezongaki malamu lokola lobɔkɔ oyo mosusu. 14 Kasi Bafarisai babimaki mpe basalelaki Yesu likita mpo na koboma ye. 15 Ntango Yesu ayebaki yango, alongwaki wana. Bato mingi balandaki ye,+ mpe abikisaki bango nyonso. 16 Kasi azalaki kopekisa bango makasi ete báloba te soki azali nani.+ 17 Ezalaki mpo likambo oyo mosakoli Yisaya alobaki ekokisama, ete:
18 “Talá! Mosaleli na ngai+ oyo naponá, ya bolingo, oyo nandimi!*+ Nakotya elimo na ngai likoló na ye,+ mpe akomonisa bikólo soki bosembo ezali nini. 19 Akoswana na moto te,+ akoganga te, mpe moto moko te akoyoka mongongo na ye na babalabala ya minene. 20 Mongendu oyo elɛmbi, akobuka yango te, mpe akoboma te nsinga ya lini oyo mɔtɔ na yango elingi kokufa,+ tii akolonga komonisa bosembo. 21 Ya solo, bikólo ekotya elikya na nkombo na ye.”+
22 Na nsima bayelaki Yesu moto moko oyo azalaki na demo, akufá miso mpe azali baba, bongo abikisaki ye. Mpe moto yango ya baba abandaki koloba mpe komona. 23 Ebele ya bato nyonso wana bakamwaki mpe babandaki koloba: “Oyo ekoki kozala Mwana ya Davidi te?” 24 Ntango Bafarisai bayokaki yango, balobaki: “Moto oyo azali kobimisa bademo kaka na nguya ya Beelezebube,* mokonzi ya bademo.”+ 25 Lokola ayebaki makanisi na bango, alobaki na bango: “Bokonzi nyonso oyo ekabwani na kati na yango moko nsukansuka ebebaka, mpe engumba nyonso to libota* nyonso oyo ekabwani ekotɛlɛma te. 26 Ndenge moko mpe, soki Satana azali kobimisa Satana, akabwani na kati na ye moko. Bongo ndenge nini bokonzi na ye ekotɛlɛma? 27 Lisusu, soki ngai nazali kobimisa bademo na nguya ya Beelezebube, bongo bayekoli* na bino bazali kobimisa bango na nguya ya nani? Yango wana, bango bakozala basambisi na bino. 28 Kasi soki ezali na nzela ya elimo ya Nzambe nde nazali kobimisa bademo, boye Bokonzi ya Nzambe ekómeli bino mpenza.+ 29 To ndenge nini moto akoki kokɔta na ndako ya moto moko ya makasi mpe kozwa biloko na ye? Asengeli naino kokanga moto yango ya makasi bansinga, bongo na nsima akoki koyiba biloko na ndako na ye. 30 Moto oyo azali na ngámbo na ngai te azali monguna na ngai, mpe moto oyo azali kosangisa elongo na ngai te azali kopanza.+
31 “Yango wana nalobi na bino, bato bakolimbisama lisumu ya ndenge nyonso mpe kofinga ya ndenge nyonso, kasi kofinga* elimo santu ekolimbisama te.+ 32 Na ndakisa, moto oyo alobi mabe mpo na Mwana ya moto, bakolimbisa ye;+ kasi moto oyo alobi mabe mpo na elimo santu, bakolimbisa ye te, ezala na mokili oyo* to na oyo ezali koya.+
33 “Bósala ete nzete ezala malamu mpe mbuma na yango ezala malamu, to bósala ete nzete ezala mabe mpe mbuma na yango ezala mabe. Mpo nzete eyebanaka nde na mbuma na yango.+ 34 Bana ya banyoka ya ngɛngɛ,*+ lokola bozali bato mabe, ndenge nini bokoki koloba makambo ya malamu? Mpo monɔkɔ elobaka nde makambo oyo etondi na motema.+ 35 Moto malamu abimisaka makambo ya malamu na bolamu oyo abombi na motema na ye, kasi moto mabe abimisaka makambo ya mabe na mabe oyo abombi na motema na ye.+ 36 Nazali koyebisa bino ete na Mokolo ya Kosambisama, bato bakozongisa monɔkɔ+ mpo na liloba nyonso ya mpambampamba oyo balobaka. 37 Mpo na maloba na yo nde bakotánga yo moto ya sembo, mpe na maloba na yo nde bakokweisa yo na likambo.”
38 Bongo bakomeli ná Bafarisai mosusu balobaki na ye: “Moteyi, tolingi omonisa biso elembo moko.”+ 39 Yesu azongiselaki bango: “Libota ya mabe mpe ya ekobo* ezali kokoba koluka elembo, kasi bakopesa yango elembo moko te, longola kaka elembo ya mosakoli Yona.+ 40 Mpo kaka ndenge Yona asalaki mikolo misato butu moi+ na kati ya libumu ya mbisi monene, Mwana ya moto mpe akosala mikolo misato+ butu moi na kati ya mabele. 41 Na Mokolo ya Kosambisama, bato ya Ninive bakosekwa esika moko na libota oyo mpe bakokweisa yango, mpo babongolaki motema ntango bayokaki nsango oyo Yona asakolaki.+ Kasi talá! oyo aleki Yona azali awa.+ 42 Na Mokolo ya Kosambisama, mokonzi-mwasi ya sudi akosekwa esika moko na libota oyo mpe akokweisa yango na likambo, mpo autaki na nsuka ya mabele, ayei koyoka bwanya ya Salomo.+ Kasi talá! oyo aleki Salomo azali awa.+
43 “Ntango elimo moko ya mbindo ebimi epai ya moto, elekaka na bisika oyo mai ekauká mpo na koluka esika ya kopema, mpe ezwaka ata esika moko te.+ 44 Bongo elobaka: ‘Nakozonga na ndako na ngai epai nabimaki,’ mpe ntango ekómi kuna, ekuti ndako yango mpamba, kasi bakɔmbɔli yango mpe bakómisi yango kitoko. 45 Bongo ekendaka kozwa bilimo mosusu nsambo oyo eleki yango na mabe, mpe nsima ya kokɔta na kati, bilimo yango efandaka kuna. Mpe moto wana akómaka mabe koleka ndenge oyo azalaki liboso.+ Ekozala mpe bongo mpo na libota mabe oyo.”
46 Ntango azalaki naino koloba na ebele ya bato, mama na ye ná bandeko na ye+ batɛlɛmaki libándá, bazali koluka kosolola na ye.+ 47 Bongo moto moko alobaki na ye: “Talá! Mama na yo ná bandeko na yo batɛlɛmi libándá, bazali koluka kosolola na yo.” 48 Yesu azongiselaki moto yango: “Nani azali mama na ngai, mpe banani bazali bandeko na ngai?” 49 Bongo asembolaki lobɔkɔ na ye epai ya bayekoli na ye mpe alobaki: “Talá! Mama na ngai ná bandeko na ngai!+ 50 Mpo moto oyo asalaka mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló, ye nde azali ndeko na ngai ya mobali, ndeko na ngai ya mwasi mpe mama na ngai.”+
13 Na mokolo wana, Yesu alongwaki na ndako yango mpe akendaki kofanda pembeni ya mbu. 2 Bato ebele mpenza bazingaki ye, bongo amataki na masuwa moko mpe afandaki. Ebele ya bato yango nyonso batɛlɛmaki na libongo.+ 3 Bongo abandaki koteya bango makambo mingi na bandakisa.+ Alobaki: “Talá! Moloni moko abimaki mpo na kolona.+ 4 Ntango azalaki kolona, mboto mosusu ekweaki pembeni ya nzela, mpe bandɛkɛ eyaki mpe elyaki yango.+ 5 Mboto mosusu ekweaki na mabele oyo ezali na mabanga epai mabele ezalaki mingi te, mpe ebimaki nokinoki mpo mabele ezalaki mozindo te.+ 6 Kasi ntango moi ebimaki, milona yango ezikaki mpe ekaukaki mpo ezalaki na misisa te. 7 Mboto mosusu mpe ekweaki na kati ya banzubɛ; banzubɛ ekolaki mpe etyaki milona nkaka.+ 8 Nzokande, mosusu ekweaki na mabele ya malamu mpe ebandaki kobota mbuma, oyo eboti mbala 100, mpe oyo kuna 60, mpe oyo mosusu 30.+ 9 Moto oyo azali na matoi ayoka.”+
10 Bayekoli bapusanaki penepene na ye mpe batunaki ye: “Mpo na nini ozali koloba na bango na bandakisa?”+ 11 Ye azongisaki: “Bino bozwi likoki ya kokanga ntina ya basekele mosantu+ ya Bokonzi ya likoló, kasi bango bazwi yango te. 12 Mpo moto nyonso oyo azali na eloko, bakobakisela ye mosusu mpe akokóma na mingi mpenza; kasi moto oyo azali na eloko te, bakobɔtɔla ye ata oyo azali na yango.+ 13 Yango wana nazali koloba na bango na bandakisa; mpo bazali kotala, kasi bazali komona te, bazali koyoka, kasi bazali koyoka kaka mpamba, mpe bazali kokanga ntina na yango te.+ 14 Esakweli ya Yisaya ezali kokokisama mpo na bango; elobi: ‘Bokoyoka kasi bokokanga ntina na yango ata moke te, mpe bokotala kasi bokomona ata moke te.+ 15 Mpo motema ya bato oyo ekómi makasi; bayoki na matoi na bango kasi basali eloko te, mpe bakangi miso na bango mpo bámona ata moke te na miso na bango, báyoka te na matoi na bango, bákanga ntina na yango te na mitema na bango mpe bábongwana te mpo nabikisa bango.’+
16 “Nzokande, esengo na miso na bino mpo ezali komona mpe na matoi na bino mpo ezali koyoka.+ 17 Mpo ya solo nalobi na bino: Basakoli mingi mpe bato mingi ya sembo bazalaki na mposa ya komona makambo oyo bino bozali komona kasi bamonaki yango te,+ mpe koyoka makambo oyo bino bozali koyoka kasi bayokaki yango te.
18 “Sikoyo, bóyoka ndimbola ya ndakisa ya moto oyo alonaki.+ 19 Oyo elonamaki pembeni ya nzela+ ezali moto oyo ayoki liloba ya Bokonzi, kasi akangi ntina na yango te; bongo moto mabe+ ayei mpe abɔtɔli oyo elonamaki na motema na ye. 20 Oyo elonamaki na mabele oyo ezali na mabanga, ezali moto oyo ayoki liloba mpe ayambi yango mbala moko na esengo.+ 21 Kasi lokola liloba ezwi misisa te kati* na ye, aumeli kaka mwa ntango. Mpe ntango bolɔzi to monyoko ebimi mpo na liloba, na mbala moko abɛti libaku. 22 Oyo elonami na kati ya banzubɛ, ezali moto oyo ayoki liloba, kasi mitungisi ya bomoi ya mokili oyo*+ mpe nguya ya bokosi ya bomɛngo etye liloba nkaka, mpe eboti mbuma te.+ 23 Oyo elonamaki na mabele ya malamu, ezali moto oyo ayoki liloba, akangi ntina na yango mpe aboti mpenza mbuma, oyo abimisi mbala 100, oyo kuna mbala 60, mpe oyo mosusu mbala 30.”+
24 Apesaki bango ndakisa mosusu, alobi: “Bokonzi ya likoló ezali lokola moto moko oyo alonaki mboto ya malamu na elanga na ye. 25 Ntango bato balalaki mpɔngi, monguna na ye ayaki kolona matiti mabe na katikati ya blé, mpe akendaki. 26 Ntango milona ya blé ebimaki mpe ebotaki mbuma, matiti mabe mpe ebimaki. 27 Bongo baombo ya nkolo-elanga bayaki mpe balobaki na ye: ‘Nkolo, olonaki mboto ya malamu na elanga, boye te? Bongo ndenge nini matiti mabe ezali na kati?’ 28 Alobaki na bango: ‘Monguna moko nde asali bongo.’+ Baombo balobaki na ye: ‘Olingi tókende kopikola yango?’ 29 Alobaki: ‘Te, noki ntango bozali kopikola matiti mabe, bópikola mpe blé elongo na yango. 30 Bótika yango nyonso mibale ekola esika moko, tii na ntango ya kobuka mbuma. Mpe na ntango ya kobuka mbuma, nakoyebisa babuki-mbuma ete: Bópikola liboso matiti mabe mpe bókangisa yango mabokemaboke mpo na kotumba yango; na nsima bóyanganisa blé na kati ya ndako na ngai ya kobomba biloko.’”+
31 Apesaki bango ndakisa mosusu, alobi: “Bokonzi ya likoló ezali lokola mbuma ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki na elanga na ye.+ 32 Mbuma yango ezalaka moke mpenza koleka mboto nyonso, kasi ntango ekolaka ezalaka monene koleka bandunda nyonso. Ekómaka nzete, bongo bandɛkɛ ya likoló eyaka kofanda na bitape na yango.”
33 Apesaki bango ndakisa mosusu: “Bokonzi ya likoló ezali lokola levire, oyo mwasi moko azwaki mpe asangisaki na bimekeli misato minene* ya farini tii na ntango pɔtɔpɔtɔ mobimba evimbaki.”+
34 Makambo nyonso wana, Yesu alobaki yango na ebele ya bato na bandakisa. Kutu, azalaki koloba na bango te kozanga kopesa ndakisa,+ 35 mpo na kokokisa makambo oyo mosakoli alobaki, ete: “Nakofungola monɔkɔ na ngai na bandakisa; nakosakola makambo oyo ebombamá banda na ebandeli.”*+
36 Bongo nsima ya kotika ebele ya bato yango bázonga, akɔtaki na ndako. Mpe bayekoli na ye bayaki epai na ye mpe balobaki na ye: “Limbolelá biso ndakisa wana ya matiti mabe na elanga.” 37 Yesu azongisaki: “Moloni ya mboto ya malamu ezali Mwana ya moto; 38 elanga ezali mokili.+ Mboto ya malamu ezali bana ya Bokonzi, kasi matiti mabe ezali bana ya moto mabe,+ 39 mpe monguna oyo alonaki yango ezali Zabolo. Ntango ya kobuka mbuma ezali eleko ya nsuka ya mokili moko,* mpe babuki-mbuma ezali baanzelu. 40 Yango wana, kaka ndenge bapikolaka matiti mabe mpe batumbaka yango na mɔtɔ, ekozala mpe bongo na eleko ya nsuka ya mokili.*+ 41 Mwana ya moto akotinda baanzelu na ye, mpe bakolongola na Bokonzi na ye nyonso oyo ebɛtisaka libaku mpe bato oyo babukaka mibeko, 42 mpe bakobwaka bango na esika ya mɔtɔ makasi.+ Kuna nde bakolela mpe bakolya mino. 43 Na ntango yango, bato ya sembo bakongɛnga makasi lokola moi+ na Bokonzi ya Tata na bango. Moto oyo azali na matoi ayoka.
44 “Bokonzi ya likoló ezali lokola eloko ya motuya oyo ebombami na elanga, oyo moto moko amoni mpe abombi yango lisusu. Ayoki esengo mpe akei kotɛka biloko nyonso oyo azali na yango mpe asombi elanga yango.+
45 “Bokonzi ya likoló ezali mpe lokola moto ya mombongo oyo asalaka mibembo ya koluka mayaka ya kitoko. 46 Ntango amoni liyaka moko ya motuya monene, akei nokinoki kotɛka biloko nyonso oyo azali na yango mpe asombi yango.+
47 “Bokonzi ya likoló ezali mpe lokola monyama oyo babwaki na mbu mpe oyo ezali kokanga mbisi ya ndenge nyonso. 48 Ntango etondaki, baluki-mbisi babendaki yango na libongo, bafandaki, mpe batyaki mbisi ya malamu+ na bakitunga, kasi babwakaki oyo ebongi te.+ 49 Ekozala mpe bongo na eleko ya nsuka ya mokili.* Baanzelu bakobima mpe bakokabola bato mabe na bato ya sembo 50 mpe bakobwaka bango na mɔtɔ makasi. Kuna nde bakolela mpe bakolya mino.
51 “Bokangi ntina ya makambo nyonso wana?” Balobaki na ye: “Ɛɛ.” 52 Bongo alobaki na bango: “Na yango, bóyeba ete molakisi nyonso ya bato, ntango bateyi ye makambo ya Bokonzi ya likoló, azali lokola nkolo-ndako moko oyo azali kobimisa na esika na ye ya kobomba biloko ya motuya, biloko ya sika mpe ya kala.”
53 Ntango Yesu asilisaki kopesa bandakisa yango, alongwaki wana. 54 Akendaki na mboka na ye mpenza+ mpe abandaki koteya bato na sinagoga na bango, bongo bakamwaki mpe balobaki: “Moto oyo azwi bwanya oyo epai wapi? Nguya na ye ya kosala makamwisi euti wapi?+ 55 Oyo ezali mwana ya mosali-mabaya te?+ Nkombo ya mama na ye Maria te, mpe Yakobo, Yozefe, Simo ná Yuda, bandeko na ye ya mibali te?+ 56 Mpe bandeko na ye ya basi, bango nyonso bazali awa elongo na biso te? Bongo ye azwi makambo oyo nyonso epai wapi?”+ 57 Bongo babɛtaki libaku mpo na ye.*+ Kasi Yesu alobaki na bango: “Bapesaka mosakoli lokumu bipai nyonso, longola kaka na mboka na ye mpenza mpe na ndako na ye moko.”+ 58 Mpe lokola bazangaki kondima, Yesu asalaki makamwisi mingi te kuna.
14 Na ntango wana, Erode,* moyangeli ya etúká* ya Galile, ayokaki nsango ya Yesu+ 2 mpe alobaki na basaleli na ye: “Ezali Yoane Mobatisi. Alamuki na liwa,* mpe yango wana azali kosala makamwisi boye.”+ 3 Erode akangaki Yoane, atyaki ye minyɔlɔlɔ mpe atyaki ye na bolɔkɔ mpo na Erodiadi, mwasi ya ndeko na ye Filipe.+ 4 Mpo Yoane azalaki koloba na ye: “Ozali na ndingisa te ya kozwa mwasi oyo.”+ 5 Nzokande, atako alingaki koboma ye, azalaki kobanga bato, mpo bazalaki komona ete Yoane azali mosakoli.+ 6 Kasi ntango bazalaki kosala fɛti ya mbotama+ ya Erode, mwana mwasi ya Erodiadi abinaki na libaku yango mpe asepelisaki Erode mingi.+ 7 Bongo Erode alapaki ndai ete akopesa ye eloko nyonso oyo akosɛnga. 8 Na yango, ndenge mama na ye atindaki ye, alobaki na Erode: “Pesá ngai awa, na saani, motó ya Yoane Mobatisi.”+ 9 Mokonzi ayokaki mawa mingi, kasi mpo na bandai oyo alapaki liboso ya bato oyo bazalaki kolya* elongo na ye, atindaki ete bápesa ye yango. 10 Na yango, atindaki bákata Yoane motó na bolɔkɔ. 11 Bamemaki motó na ye na saani mpe bapesaki yango elenge mwasi wana. Elenge mwasi yango amemelaki yango mama na ye. 12 Na nsima, bayekoli ya Yoane bayaki kolongola ebembe na ye mpe bakundaki yango. Nsima na yango bakendaki kopesa Yesu nsango. 13 Ntango Yesu ayokaki bongo, alongwaki wana, amati na masuwa mpe akei na esika oyo bato bazalaka te mpo azala ye moko. Kasi ebele ya bato bayokaki yango, bongo, babimaki na bingumba mpe balandaki ye na makolo.+
14 Ntango Yesu abimaki na masuwa, amonaki ebele mpenza ya bato, ayokelaki bango mawa,+ mpe abikisaki baoyo bazalaki na maladi.+ 15 Kasi ntango mpokwa ekómaki, bayekoli na ye bayaki epai na ye mpe balobaki: “Na esika oyo bato bazalaka te mpe ngonga esili kopusana; yebisá ebele ya bato oyo bázonga, mpo bákende na bamboka mpe básomba biloko ya kolya.”+ 16 Kasi Yesu alobaki na bango: “Bazali na ntina ya kokende te; bino moko bópesa bango eloko ya kolya.” 17 Balobaki na ye: “Awa tozali na eloko te kaka mampa mitano ná mbisi mibale.” 18 Ye alobaki: “Bóyela ngai yango awa.” 19 Na nsima, asɛngaki ebele ya bato yango báfanda na matiti. Bongo azwaki mampa yango mitano ná mbisi yango mibale, atalaki na likoló, mpe abondelaki mpo na kosɛnga lipamboli.+ Nsima ya kobuka mampa, apesaki yango bayekoli, mpe bayekoli bapesaki yango ebele ya bato. 20 Bongo bato nyonso balyaki mpe batondaki, mpe basangisaki biteni oyo etikalaki, etondisaki kitunga 12.+ 21 Nzokande baoyo balyaki bazalaki mibali soki 5 000, kozanga kotánga basi ná bana mike.+ 22 Na nsima, kozanga koumela, asɛngaki bayekoli na ye bámata na masuwa mpe bákatisa na ngámbo mosusu liboso na ye, wana ye azalaki kozongisa ebele yango ya bato.+
23 Nsima ya kozongisa ebele ya bato wana, amataki na ngomba kaka ye moko mpo na kobondela.+ Ntango butu eyaki, azalaki kuna, kaka ye moko. 24 Masuwa esilaki sikoyo kokóma mosika na mokili na ntaka ya bankama mingi ya bamɛtrɛ;* mbonge ezalaki koningisa yango, mpo mopɛpɛ ezalaki kobɛta bango. 25 Kasi na eleko ya minei ya kokɛngɛla na butu* ayaki epai na bango, azali kotambola likoló ya mbu. 26 Ntango bayekoli bamonaki ye azali kotambola likoló ya mai ya mbu, babulunganaki, balobi: “Ezali emonamona!” Mpe bagangaki makasi mpo babangaki. 27 Kasi na mbala moko Yesu alobaki na bango: “Bózala na mpiko! Ezali ngai; bóbanga te.”+ 28 Petro azongiselaki ye: “Nkolo, soki ezali yo, lobá na ngai naya epai na yo likoló ya mai.” 29 Alobaki na ye: “Yaká!” Bongo Petro akitaki na masuwa atamboli likoló ya mai mpe abandaki kokende epai ya Yesu. 30 Kasi ntango atalaki mopɛpɛ makasi, akómaki kobanga. Mpe ntango abandaki kozinda, agangaki: “Nkolo, bikisá ngai!” 31 Na mbala moko Yesu asembolaki lobɔkɔ, asimbaki ye mpe alobaki na ye: “Yo moto ya kondima moke, mpo na nini otyaki ntembe?”+ 32 Na nsima ntango bamataki na masuwa, mopɛpɛ makasi yango ekitaki. 33 Bongo bayekoli oyo bazalaki na masuwa bagumbamelaki* ye mpe balobaki: “Ozali mpenza Mwana ya Nzambe.” 34 Nsukansuka bakatisaki mpe bakómaki na mokili na Genezarete.+
35 Ntango mibali ya esika wana bamonaki ete ezali ye, batindaki nsango na bisika nyonso ya zingazinga, mpe bamemelaki ye baoyo nyonso bazalaki kobɛla. 36 Mpe bazalaki kobondela ye atika bango básimba ata nsɔngɛ ya elamba na ye ya likoló,+ mpe baoyo nyonso basimbaki yango babikaki mpenza.
15 Bongo Bafarisai ná bakomeli+ bautaki na Yerusaleme mpe bayaki epai ya Yesu; batunaki ye: 2 “Mpo na nini bayekoli na yo batosaka te bonkɔkɔ ya bato ya ntango ya kala? Na ndakisa, basukolaka* mabɔkɔ na bango te ntango balingi kolya.”+
3 Yesu azongiselaki bango: “Mpo na nini bino botosaka mitindo ya Nzambe te mpo na bonkɔkɔ na bino?+ 4 Na ndakisa, Nzambe alobaki: ‘Kumisá tata na yo mpe mama na yo,’+ mpe, ‘Moto oyo afingi* tata na ye to mama na ye asengeli kobomama.’+ 5 Kasi bino bolobi: ‘Moto nyonso oyo alobi na tata na ye to na mama na ye: “Eloko nyonso nazali na yango, oyo nakokaki kopesa mpo na kosalisa bino, ezali likabo oyo nalaki kopesa Nzambe,”+ 6 ezali lisusu na ntina te akumisa tata na ye.’ Na ndenge yango, bokómisi liloba ya Nzambe eloko mpamba mpo na bonkɔkɔ na bino.+ 7 Bakosi! Yisaya alobaki solo ntango asakolaki mpo na bino ete:+ 8 ‘Bato oyo bakumisaka ngai kaka na mbɛbu, kasi mitema na bango ezali mosika na ngai. 9 Bazali kokoba kosambela ngai kaka mpamba, mpo mateya oyo bazali koteya ezali nde mibeko ya bato.’”+ 10 Bongo abengaki ebele ya bato mpe alobaki na bango: “Bóyoka mpe bókanga ntina ya makambo oyo nazali koloba:+ 11 Oyo ekɔtaka na monɔkɔ ya moto ekómisaka ye mbindo te, kasi ezali oyo ebimaka na monɔkɔ ya moto nde ekómisaka ye mbindo.”+
12 Bongo bayekoli bayaki mpe balobaki na ye ete: “Oyebi ete Bafarisai babɛti libaku ntango bayokaki makambo oyo olobaki?”+ 13 Ye azongisaki: “Nzete nyonso oyo Tata na ngai ya likoló aloni te ekopikolama. 14 Bótika bango. Bazali batambwisi oyo bakufá miso. Boye, soki moto oyo akufá miso azali kotambwisa moto oyo akufá miso, bango mibale bakokwea na libulu.”+ 15 Petro alobaki na ye: “Limbolelá biso ndakisa oyo opesaki.” 16 Bongo ye alobaki: “Bino mpe bozali naino na mayele te tii sikoyo?+ 17 Boyebi te ete nyonso oyo ekɔtaka na monɔkɔ elekaka na libumu mpe esukaka na kabinɛ? 18 Kasi makambo nyonso oyo ebimaka na monɔkɔ eutaka na motema, mpe makambo wana nde ekómisaka moto mbindo.+ 19 Na ndakisa, na motema nde makanisi mabe eutaka:+ koboma bato, misala ya ekobo, misala ya pite,* koyiba, matatoli ya lokuta, mpe maloba ya kofinga. 20 Makambo wana nde ekómisaka moto mbindo; kasi kolya kozanga kosukola* mabɔkɔ ekómisaka moto mbindo te.”
21 Na nsima Yesu alongwaki kuna, akei na etúká ya Tire mpe ya Sidone.+ 22 Mpe talá! mwasi moko Mofenisia ya etúká yango ayaki mpe agangaki: “Nkolo, Mwana ya Davidi, yokelá ngai mawa. Mwana na ngai ya mwasi azali konyokwama mpo demo akɔtelá ye.”+ 23 Kasi Yesu azongiselaki ye ata liloba moko te. Bongo bayekoli na ye bayaki mpe babandaki koloba na ye: “Yebisá ye akende, mpo azali kokoba koganga nsima na biso.” 24 Yesu azongisaki: “Natindamaki epai ya bato mosusu te, kaka epai ya bampate ya ndako ya Yisraele oyo ebungá.”+ 25 Kasi mwasi yango ayaki mpe agumbamelaki ye,* alobi: “Nkolo, salisá ngai!” 26 Yesu ayanolaki: “Ezali malamu te kozwa mampa ya bana mpe kobwakela yango bambwa ya mike.”* 27 Mwasi yango alobaki: “Ya solo, Nkolo; kasi bambwa ya mike elyaka biteni oyo ekweaka na nse ya mesa ya bankolo na yango.”+ 28 Bongo Yesu azongiselaki ye: “Ee mwasi, kondima na yo ezali monene! Esalema mpo na yo kaka ndenge olingi.” Mpe banda na ngonga wana, mwana na ye abikaki.
29 Yesu alongwaki kuna, mpe akendaki pene ya mbu ya Galile.+ Na nsima, amataki na ngomba mpe afandaki. 30 Bongo ebele ya bato bapusanaki epai na ye; bayelaki ye bato oyo bazalaki batɛngumi, bibɔsɔnɔ, bato oyo bakufá miso, bababa, mpe bato mosusu mingi ya maladi. Batyaki bango na makolo na ye, mpe abikisaki bango.+ 31 Bongo ebele ya bato yango bakamwaki na ndenge bamonaki bababa bakómi koloba, bibɔsɔnɔ babiki, batɛngumi bakómi kotambola, bato oyo bakufá miso bakómi komona, mpe bapesaki Nzambe ya Yisraele nkembo.+
32 Kasi Yesu abengaki bayekoli na ye mpe alobaki: “Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa,+ mpo bafandi ná ngai mikolo misato mobimba mpe bazali na eloko ya kolya te. Nalingi kotika bango bázonga na nzala te, noki te bákwea na nzela.”+ 33 Kasi bayekoli balobaki na ye: “Awa na esika oyo bato bazalaka te. Epai wapi tokozwa mampa oyo ekoki mpo na koleisa ebele ya bato boye?”+ 34 Bongo Yesu atunaki bango: “Bozali na mampa boni?” Bayanolaki: “Nsambo, mpe mwa ndambo ya mbisi ya mike.” 35 Nsima ya kosɛnga ebele ya bato yango báfanda na nse, 36 azwaki mampa yango nsambo mpe mbisi yango mpe, nsima ya kobondela mpo na kopesa matɔndi, abukaki yango mpe abandaki kopesa bayekoli, bongo bayekoli mpe bapesaki yango ebele ya bato.+ 37 Bango nyonso balyaki mpe batondaki. Basangisaki biteni oyo etikalaki, mpe etondisaki kitunga nsambo ya minene.*+ 38 Nzokande baoyo balyaki bazalaki mibali 4 000, kozanga kotánga basi ná bana mike. 39 Nsukansuka, nsima ya kozongisa ebele ya bato na bamboka na bango, amataki na masuwa mpe akendaki na etúká ya Magadane.+
16 Awa, Bafarisai ná Basadukai bapusanaki epai na ye, mpe mpo na komeka ye, basɛngaki ye alakisa bango elembo moko oyo euti na likoló.+ 2 Yesu azongiselaki bango: “Ntango mpokwa ekómaka, bolobaka: ‘Mokolo ekozala malamu, mpo likoló ezali motane,’ 3 mpe na ntɔngɔ bolobaka: ‘Lelo malili ekozala makasi mpe mbula ekonɔka, mpo likoló ezali motane kasi mwa molili.’ Boyebi kolimbola ndenge oyo likoló ezali komonana, kasi bilembo ya bantango bokoki kolimbola yango te. 4 Libota mabe mpe ya ekobo* ezali kaka koluka elembo, kasi bakopesa yango elembo moko te,+ longola elembo ya Yona.”+ Bongo atikaki bango wana, akei.
5 Ntango bayekoli bakatisaki na ngámbo mosusu ya mbu, babosanaki komema mampa.+ 6 Yesu alobaki na bango: “Bófungola miso mpe bókeba na levire ya Bafarisai ná Basadukai.”+ 7 Bongo babandaki kolobana bango na bango: “Mbala mosusu alobi bongo mpo tomemi mampa te.” 8 Lokola Yesu ayebaki yango, alobaki: “Mpo na nini bozali kolobana bino na bino ndenge wana, ete bozali na mampa te, bino bato ya kondima moke? 9 Bozali kaka kokanga ntina te? Bobosani mampa mitano oyo eleisaki bato 5 000 mpe kitunga boni bolɔkɔtaki?+ 10 To mampa nsambo oyo eleisaki bato 4 000 mpe kitunga boni ya minene* bolɔkɔtaki?+ 11 Ndenge nini bososoli te ete nazalaki koloba na bino mpo na mampa te? Bókeba na levire ya Bafarisai ná Basadukai.”+ 12 Bongo bayaki koyeba ete alobaki na bango bákeba mpo na levire ya mampa te, kasi mpo na mateya ya Bafarisai ná Basadukai.
13 Ntango akómaki na etúká ya Kaisaria ya Filipi, Yesu atunaki bayekoli na ye: “Bato bazali koloba ete Mwana ya moto azali nani?”+ 14 Bazongisaki: “Bato mosusu balobaka Yoane Mobatisi,+ basusu Eliya,+ basusu mpe Yirimia to moko ya basakoli.” 15 Atunaki bango: “Bongo bino, bolobi ete ngai nazali nani?” 16 Simo Petro ayanolaki: “Ozali Kristo,+ Mwana ya Nzambe ya bomoi.”+ 17 Na yango Yesu alobaki na ye: “Esengo na yo, Simo mwana ya Yona, mpo nzoto ná makila* emonisi yo yango te, kasi Tata na ngai oyo azali na likoló.+ 18 Lisusu nalobi na yo ete: Yo ozali Petro,+ mpe likoló ya libanga oyo+ nakotonga lisangá na ngai, mpe baporte ya Nkunda* ekolonga yango te. 19 Nakopesa yo bafungola ya Bokonzi ya likoló, mpe nyonso oyo okokanga awa na mabele ekozala oyo esilaki kokangama na likoló, mpe nyonso oyo okofungola awa na mabele ekozala oyo esilaki kofungwama na likoló.” 20 Bongo apesaki bayekoli mitindo ya makasi ete báyebisa moto moko te ete azali Kristo.+
21 Banda ntango wana, Yesu abandaki kolimbolela bayekoli na ye ete asengeli kokende na Yerusaleme, akomona mpasi mingi na mabɔkɔ ya bankulutu, ya banganga-nzambe bakonzi ná ya bakomeli, akobomama, mpe na mokolo ya misato akosekwa.+ 22 Bongo Petro abendaki ye pembeni mpe abandaki kopamela ye, alobi: “Zalá na boboto epai na yo moko, Nkolo; likambo wana ekokómela yo te.”+ 23 Kasi apesaki Petro mokɔngɔ mpe alobaki na ye: “Leká nsima na ngai, Satana! Ozali eloko oyo ezali kobɛtisa ngai libaku, mpo lolenge na yo ya kokanisa ezali ya Nzambe te, kasi ya bato.”+
24 Bongo Yesu alobaki na bayekoli na ye: “Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi* mpe akoba kolanda ngai.+ 25 Mpo moto oyo alingi kobikisa bomoi* na ye akobungisa yango; kasi moto oyo abungisi bomoi* na ye mpo na ngai akozwa yango.+ 26 Mpo litomba nini moto akozala na yango soki azwi mokili mobimba kasi abungisi bomoi*+ na ye? To eloko nini moto akopesa na esika ya bomoi*+ na ye? 27 Mpo Mwana ya moto asengeli koya na nkembo ya Tata na ye elongo na baanzelu na ye, mpe akofuta moto na moto na kolanda etamboli na ye.+ 28 Ya solo nalobi na bino ete bato mosusu na kati ya baoyo batɛlɛmi awa bakokufa te liboso bámona Mwana ya moto ayei na Bokonzi na ye.”+
17 Nsima ya mikolo motoba, Yesu azwaki Petro, Yakobo ná ndeko na ye Yoane mpe akendaki na bango na ngomba moko molai; bazalaki kaka bango moko.+ 2 Mpe abongwanaki liboso na bango; elongi na ye engɛngaki lokola moi, mpe bilamba na ye ya likoló ekómaki kongɛnga* lokola pole.+ 3 Na mbala moko, Moize ná Eliya babimelaki bango, bazali kosolola na ye. 4 Bongo Petro alobaki na Yesu: “Nkolo, ezali malamu tózala awa. Soki olingi, nakotɛlɛmisa bahema misato awa, moko mpo na yo, moko mpo na Moize mpe moko mpo na Eliya.” 5 Wana azalaki naino koloba, lipata moko oyo ezalaki kongɛnga ezipaki bango na elili na yango, mpe mongongo moko eutaki na lipata yango mpe elobaki: “Oyo azali Mwana na ngai, ya bolingo, oyo nandimi.+ Bóyoka ye.”+ 6 Ntango bayekoli bayokaki bongo, babangaki mingi mpe bafukamaki, batye bilongi na nse. 7 Bongo Yesu apusanaki pene na bango, mpe asimbaki bango, alobi: “Bótɛlɛma. Bóbanga te.” 8 Ntango batombolaki bilongi, bamonaki moto te, kaka Yesu ye moko. 9 Ntango bazalaki kokita na ngomba, Yesu apesaki bango mitindo ete: “Bóyebisa moto moko te emonaneli oyo, tii ntango Mwana ya moto akolamuka na liwa.”*+
10 Kasi bayekoli batunaki ye motuna oyo: “Bongo mpo na nini bakomeli balobaka ete Eliya asengeli liboso koya?”+ 11 Ye ayanolaki: “Ya solo Eliya akoya mpe akobongisa makambo nyonso.+ 12 Nzokande, nazali koloba na bino ete Eliya asilá koya mpe bayebaki ye te, kasi basalaki ye makambo oyo balingaki.+ Ndenge moko mpe Mwana ya moto akonyokwama na mabɔkɔ na bango.”+ 13 Bongo bayekoli basosolaki ete alobaki na bango mpo na Yoane Mobatisi.
14 Ntango bakómaki pene na ebele ya bato,+ moto moko apusanaki pene na ye, afukamelaki ye mpe alobaki: 15 “Nkolo, yokelá mwana na ngai ya mobali mawa, mpo azali na maladi ya ndɛkɛ mpe azali kobɛla. Mbala mingi akweaka na mɔtɔ mpe na mai.+ 16 Namemaki ye epai ya bayekoli na yo, kasi bakokaki kobikisa ye te.” 17 Bongo Yesu alobaki: “Ee libota oyo ezangá kondima mpe ebebá,+ tii ntango nini nasengeli kozala ná bino? Tii ntango nini nasengeli kokanga motema na makambo na bino? Bómemela ngai ye awa.” 18 Bongo Yesu apamelaki demo yango, mpe demo yango abimaki na nzoto ya mwana yango ya mobali, mpe abikaki na ngonga wana kaka.+ 19 Bongo bayekoli bayaki epai ya Yesu kaka bango moko mpe batunaki ye: “Mpo na nini biso tokokaki kobimisa yango te?” 20 Alobaki na bango: “Mpo bozali na kondima moke. Mpo ya solo nalobi na bino: Soki bozali na kondima monene lokola mbuma ya mutarde, bokoloba na ngomba oyo: ‘Longwá awa kende kuna,’ mpe ekolongwa mpe ekokende. Mpe ekozala na likambo moko te oyo bokokoka kosala te.”+ 21 *——
22 Ezalaki ntango Yesu ná bayekoli na ye bayanganaki na Galile nde alobaki na bango: “Mwana ya moto akotɛkama na mabɔkɔ ya bato,+ 23 bakoboma ye, mpe na mokolo ya misato akosekwa.”+ Bongo bayekoli bayokaki mawa mingi mpenza.
24 Ntango Yesu ná bayekoli na ye bakómaki na Kapernaume, bato oyo bazalaki kokɔngɔla mpako ya drakimɛ* mibale bapusanaki epai ya Petro mpe batunaki ye: “Moteyi na bino afutaka mpako ya drakimɛ mibale to te?”+ 25 Ye alobaki: “Ɛɛ, afutaka.” Nzokande, ntango Petro akɔtaki na ndako Yesu azwaki maloba liboso mpe atunaki ye: “Simo, okanisi nini? Bakonzi ya mabele bazwaka lifuti to mpako ya moto na moto epai ya banani? Epai ya bana na bango to epai ya bato mosusu?” 26 Petro azongisaki: “Epai ya bato mosusu.” Bongo Yesu alobaki na ye: “Boye bana bafutaka mpako te. 27 Kasi mpo tóbɛtisa bango libaku te,+ kende na mbu, bwaká ndɔbɔ, mpe zwá mbisi ya liboso oyo ekokangama. Fungolá monɔkɔ na yango mpe okokuta mbongo moko ya ebende ya palata.* Zwá yango mpe pesá bango yango mpo na ngai ná yo.”
18 Na ngonga wana, bayekoli bayaki pene na Yesu mpe batunaki ye: “Nani mpenza aleki basusu na Bokonzi ya likoló?”+ 2 Bongo abengaki mwana moko ya moke, atɛlɛmisaki ye na katikati na bango 3 mpe alobaki: “Ya solo nalobi na bino: Soki bobongwani te* mpe bokómi te lokola bana mike,+ bokokɔta soki moke te na Bokonzi ya likoló.+ 4 Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa mpe akokóma lokola mwana oyo ya moke, ye nde moto oyo aleki basusu na Bokonzi ya likoló.+ 5 Mpe moto oyo ayambi mwana moke lokola oyo mpo na nkombo na ngai ayambi mpe ngai. 6 Kasi moto oyo abɛtisi moko ya bato mike oyo, oyo bandimelaka ngai libaku, ekokaki kozala malamu mpo na ye bákangisa ye na nkingo libanga oyo banikaka na yango mbuma oyo mpunda ebalolaka, mpe bázindisa ye na kati mpenza ya mbu.+
7 “Mawa na mokili mpo na biloko oyo ebɛtisaka libaku! Ya solo, biloko oyo ebɛtisaka libaku ekozanga te, kasi mawa na moto oyo atye eloko oyo ebɛtisaka libaku! 8 Yango wana, soki lobɔkɔ na yo to lokolo na yo ezali kobɛtisa yo libaku, katá yango mpe bwaká yango mosika na yo.+ Eleki malamu ozwa bomoi ozali ebɔsɔnɔ to motɛngumi na esika obwakama na mɔtɔ ya seko ná mabɔkɔ mibale to makolo mibale.+ 9 Lisusu, soki liso na yo ezali kobɛtisa yo libaku, pikolá yango mpe bwaká yango mosika na yo. Eleki malamu ozwa bomoi ozali na liso moko na esika obwakama ná miso mibale na mɔtɔ ya Gehena.*+ 10 Bókeba, bótyola moko te ya bato mike oyo, mpo nazali koyebisa bino ete baanzelu na bango na likoló bazalaka ntango nyonso liboso ya* Tata na ngai oyo azali na likoló.+ 11 *——
12 “Bokanisi nini? Soki moto moko azali na bampate 100 mpe moko na yango ebungi,+ akotika te bampate 99 na bangomba mpo na kokende koluka oyo ebungi?+ 13 Mpe soki amoni yango, ya solo nazali koyebisa bino, akosepela mingi mpo na yango koleka mpo na 99 oyo ebungaki te. 14 Ndenge moko mpe Tata na ngai* oyo azali na likoló alingaka te ete moko ya bato mike oyo abeba.+
15 “Lisusu, soki ndeko na yo asali lisumu, kende komonisa ye libunga na ye,* wana bozali kaka bino mibale.+ Soki ayokeli yo, ozongisi ndeko na yo na nzela.+ 16 Kasi soki ayokeli yo te, zwá moto moko to bato mibale, mpo, na litatoli* ya bato mibale to misato likambo nyonso endimama.+ 17 Soki ayokeli bango te, lobá na lisangá. Soki ayokeli ata lisangá te, azala na miso na yo kaka lokola moto moko ya bikólo+ mpe lokola mokɔngɔli-mpako.+
18 “Ya solo nalobi na bino, makambo nyonso oyo bokokanga awa na mabele, ekozala oyo esilaki kokangama na likoló, mpe makambo nyonso oyo bokofungola awa na mabele, ekozala oyo esilaki kofungwama na likoló. 19 Lisusu nazali koyebisa bino ya solo, soki awa na mabele, bato mibale na kati na bino bayokani mpo básɛnga ata likambo nini ya ntina na libondeli, Tata na ngai oyo azali na likoló akosalela bango likambo oyo basɛngi.+ 20 Mpo esika bato mibale to misato bayangani na nkombo na ngai,+ nazali wana na katikati na bango.”
21 Bongo Petro ayaki mpe alobaki na ye: “Nkolo, soki ndeko na ngai asaleli ngai lisumu, nalimbisa ye mbala boni, tii mbala nsambo?” 22 Yesu azongiselaki ye: “Nalobi na yo, tii mbala nsambo te, kasi tii mbala 77.+
23 “Yango wana Bokonzi ya likoló ezali lokola mokonzi moko oyo alingaki kotalela makambo ya mbongo na ye ná baombo na ye. 24 Ntango abandaki kotalela yango, bayelaki ye moto moko oyo azalaki na nyongo na ye ya talanta 10 000.* 25 Kasi lokola azalaki na makoki te ya kofuta nyongo yango, nkolo na ye apesaki mitindo ete bátɛka ye ná mwasi na ye, mpe bana na ye, ná biloko na ye nyonso mpo nyongo efutama.+ 26 Bongo moombo yango afukamaki mpe agumbamelaki ye,* alobi: ‘Tikelá ngai ntango mpe nakofuta nyongo na yo nyonso.’ 27 Nkolo ya moombo yango ayokelaki ye mawa, bongo atikaki ye akende mpe alimbisaki nyongo na ye.+ 28 Kasi moombo wana akendaki mpe akutanaki na moko ya baninga na ye baombo oyo azalaki na nyongo na ye ya denari* 100; akangaki ye, abandaki kofina ye nkingo mpe koloba: ‘Futá nyongo na ngai nyonso.’ 29 Bongo moninga na ye moombo afukamelaki ye, mpe abandaki kobondela ye, alobi: ‘Tikelá ngai ntango mpe nakofuta nyongo na yo.’ 30 Kasi alingaki te, bongo akendaki kobwaka ye na bolɔkɔ tii ntango akofuta nyongo oyo azalaki na yango. 31 Ntango baninga na ye baombo bamonaki makambo oyo esalemaki, bayokaki mawa mingi, mpe bakendaki koyebisa nkolo na bango makambo nyonso oyo esalemaki. 32 Na yango nkolo na ye abengisaki ye mpe alobaki na ye: ‘Moombo mabe, nalimbisaki nyongo na yo nyonso, ntango obondelaki ngai. 33 Yo mpe osengelaki te koyokela moninga na yo moombo mawa, ndenge ngai mpe nayokelaki yo mawa?’+ 34 Bongo nkolo na ye ayokaki nkanda mpe akabaki ye na mabɔkɔ ya bakɛngɛli ya bolɔkɔ, tii ntango akofuta nyongo na ye nyonso. 35 Tata na ngai ya likoló akosala bino mpe ndenge wana+ soki mokomoko na bino alimbisaka ndeko na ye na motema mobimba te.”+
19 Ntango Yesu asilisaki koloba makambo wana, alongwaki na Galile mpe akendaki na ngámbo mosusu ya Yordani, na ndelo ya Yudea.+ 2 Lisusu, ebele ya bato balandaki ye kuna, mpe abikisaki bango kuna.
3 Bongo Bafarisai bayaki epai na ye mpo na komeka ye; batunaki ye: “Epesami nzela ete mobali aboma libala na mwasi na ye mpo na likambo nyonso?”+ 4 Yesu azongisaki: “Botángá te ete moto oyo azalisaki bango banda na ebandeli asalaki bango mobali ná mwasi+ 5 mpe alobaki: ‘Yango wana mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko’?+ 6 Bongo bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko. Yango wana, oyo Nzambe akangisi esika moko,* moto akabola yango te.”+ 7 Balobaki na ye: “Bongo mpo na nini Moize alobaki ete esengeli kopesa mokanda ya kobengana mwasi mpe koboma na ye libala?”+ 8 Ye alobaki na bango: “Ezalaki mpo na motema makasi na bino nde Moize atikelaki bino nzela ya koboma libala na basi na bino,+ kasi yango ezalaki bongo te banda na ebandeli.+ 9 Nalobi na bino ete moto oyo abomi libala na mwasi na ye, soki mpo na pite* te, mpe abali mosusu, asali ekobo.”+
10 Bayekoli balobaki na ye: “Soki ezali bongo mpo na likambo etali mobali ná mwasi na ye, malamu kutu moto abala te.” 11 Ye alobaki na bango: “Bato nyonso te nde bandimaka likambo yango, kasi kaka baoyo bazali na likabo yango.+ 12 Mpo ezali na bato oyo babotamá mikube, ezali na baoyo bato mosusu nde bakómisá bango mikube, mpe ezali na baoyo bamikómisá mikube bango moko mpo na Bokonzi ya likoló. Oyo akoki kondima yango andima yango.”+
13 Bongo bato bamemelaki ye bana mike, mpo atyela bango mabɔkɔ mpe abondela mpo na bango, kasi bayekoli bapamelaki bango.+ 14 Nzokande, Yesu alobaki: “Bótika bana mike kimya, mpe bómeka te kopekisa bango báya epai na ngai, mpo Bokonzi ya likoló ezali ya bato oyo bazali lokola bango.”+ 15 Atyelaki bango mabɔkɔ, na nsima alongwaki wana.
16 Sikoyo talá! elenge mobali moko ayaki epai na ye mpe atunaki ye: “Moteyi, makambo nini ya malamu nasengeli kosala mpo nazwa bomoi ya seko?”+ 17 Alobaki na ye: “Mpo na nini ozali kotuna ngai mpo na oyo ezali malamu? Moto moko kaka nde azali malamu.+ Kasi, soki olingi kozwa bomoi, kobá kotosa mibeko.”+ 18 Elenge yango atunaki ye: “Mibeko nini?” Yesu alobaki: “Osengeli koboma moto te.+ Osengeli kosala ekobo te.+ Osengeli koyiba te.+ Osengeli kopesa litatoli ya lokuta te.+ 19 Kumisá tata na yo mpe mama na yo.+ Mpe osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.”+ 20 Elenge mobali yango alobaki na ye: “Natosaka nyonso wana; eloko nini nazali kozanga?” 21 Yesu alobaki na ye: “Soki olingi kozala ya kokoka,* kende kotɛka biloko na yo mpe pesá babola mpe okozwa eloko ya motuya na likoló;+ na nsima yaká, landá ngai.”*+ 22 Ntango elenge mobali yango ayokaki bongo, akendaki na mawa, mpo azalaki na biloko mingi.+ 23 Bongo Yesu alobaki na bayekoli na ye: “Ya solo nalobi na bino ete ekozala mpasi mpo moto oyo azali mozwi akɔta na Bokonzi ya likoló.+ 24 Lisusu nalobi na bino, kokɔta ya kamela na lidusu ya ntonga ezali pɛtɛɛ koleka kokɔta ya mozwi na Bokonzi ya Nzambe.”+
25 Ntango bayekoli bayokaki yango, bakamwaki mingi, balobaki: “Nani mpenza akoki kobika?”+ 26 Yesu atalaki bango na likebi mpe alobaki na bango: “Mpo na bato ekoki kosalema te, kasi mpo na Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema.”+
27 Bongo Petro alobaki na ye: “Talá! Totiki biloko nyonso mpe tolandi yo; eloko nini tokozwa?”+ 28 Yesu alobaki na bango: “Ya solo nalobi na bino, na ntango ya kozongisa bozalisi sika, ntango Mwana ya moto akofanda na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo, bino baoyo bolandaki ngai bokofanda mpe na bakiti ya bokonzi 12, mpe bokosambisa mabota 12 ya Yisraele.+ 29 Mpe moto nyonso oyo atiki bandako to bandeko ya mibali to bandeko ya basi to tata to mama to bana to bilanga mpo na nkombo na ngai akozwa biloko yango mbala nkama koleka mpe akozwa* bomoi ya seko.+
30 “Kasi bato mingi oyo bazali bato ya liboso bakozala bato ya nsuka, mpe bato ya nsuka bakozala bato ya liboso.+
20 “Mpo Bokonzi ya likoló ezali lokola nkolo-ndako moko oyo abimaki ntɔngɔntɔngɔ mpo na kozwa basali mpo básala na elanga na ye ya vinyo.+ 2 Nsima ya koyokana na basali yango ete akofuta bango denari* moko na mokolo, atindaki bango na elanga na ye ya vinyo. 3 Mpe ntango abimaki lisusu pene na ngonga ya libwa* ya ntɔngɔ, amonaki bato mosusu batɛlɛmi na zando, mosala ya kosala ezali te. 4 Alobaki na bango: ‘Bino mpe bókende na elanga ya vinyo, mpe nakopesa bino lifuti oyo ebongi.’ 5 Bongo bakendaki. Mpe abimaki lisusu pene na midi,* mpe pene na ngonga ya misato ya nsima ya midi,* mpe asalaki kaka bongo. 6 Nsukansuka, pene na ngonga ya mitano ya mpokwa,* abimaki na zando mpe akutaki bato mosusu batɛlɛmi mpe alobaki na bango: ‘Mpo na nini botɛlɛmi awa mokolo mobimba bozali kosala mosala te?’ 7 Bazongisaki: ‘Mpo moto moko te azwi biso na mosala.’ Ye alobaki na bango: ‘Bino mpe bókende na elanga ya vinyo.’
8 “Ntango mpokwa ekómaki, nkolo ya elanga ya vinyo alobaki na kapita: ‘Bengá basali mpe futá bango lifuti na bango,+ banda na bato ya nsuka tii na bato ya liboso.’ 9 Ntango bato oyo babandaki mosala na ngonga ya mitano ya nsima ya midi* bayaki, bazwaki moto na moto denari* moko. 10 Bongo ntango bato oyo bazwamaki na mosala liboso bayaki, bakanisaki ete bakozwa mingi; kasi bango mpe bazwaki lifuti ya denari* moko. 11 Ntango bazwaki yango, babandaki komilelalela mpo na nkolo-elanga. 12 Balobaki: ‘Bato oyo bayaki na nsuka basali kaka ngonga moko. Kasi yo ofuti bango ndenge moko na biso bato tonyokwami na mosala mokolo mobimba na nse ya moi makasi!’ 13 Bongo alobaki na moko na bango: ‘Moninga, nasali yo mabe te. Oyokanaki na ngai ete nakofuta yo denari* moko, bongo te?+ 14 Zwá lifuti na yo mpe kende. Nalingi kopesa baoyo ya nsuka ndenge moko na yo. 15 Nazali na lotomo ya kosala na biloko na ngai ndenge nalingi, boye te? To liso na yo ezali bilulela* mpo ngai nazali moto malamu?’*+ 16 Ndenge wana nde bato ya nsuka bakozala bato ya liboso, mpe bato ya liboso bakozala bato ya nsuka.”+
17 Ntango Yesu azalaki komata na Yerusaleme, abendaki bayekoli 12 kaka bango moko pembeni, mpe na nzela alobaki na bango boye:+ 18 “Talá! Tozali komata na Yerusaleme, mpe Mwana ya moto akokabama na mabɔkɔ ya banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli. Bakokatela ye etumbu ya liwa+ 19 mpe bakokaba ye na mabɔkɔ ya bato ya bikólo mpo básɛka ye, bábɛta ye fimbo mpe bábaka ye na nzete.+ Mpe na mokolo ya misato, akosekwa.”+
20 Bongo mama ya bana ya Zebede+ apusanaki pene na ye elongo na bana na ye mpe agumbamelaki ye.* Alingaki kosɛnga ye likambo moko.+ 21 Yesu alobaki na ye: “Olingi nini?” Ye azongisaki ete: “Lobá ete bana na ngai oyo mibale báfanda, moko na lobɔkɔ na yo ya mobali mpe moko na lobɔkɔ na yo ya mwasi, na Bokonzi na yo.”+ 22 Yesu azongisaki: “Likambo oyo bozali kosɛnga, boyebi yango te. Bokoki komɛla kɔpɔ oyo nakomɛla mosika te?”+ Balobaki na ye: “Tokoki.” 23 Alobaki na bango: “Ya solo bokomɛla kɔpɔ na ngai,+ kasi kofandisa moto na lobɔkɔ na ngai ya mobali mpe na lobɔkɔ na ngai ya mwasi ezali likambo na ngai te, kasi ezali ya baoyo Tata na ngai abongiselá bango yango.”+
24 Ntango bantoma mosusu zomi bayokaki yango, basilikelaki bandeko yango mibale.+ 25 Kasi Yesu abengaki bango esika azalaki mpe alobaki: “Boyebi ete bayangeli ya bikólo balakisaka bato bokonzi na bango mpe bato na bango ya minene bakonzaka bato.+ 26 Esengeli kozala bongo te na kati na bino;+ kasi moto oyo alingi kokóma moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino,+ 27 mpe moto oyo alingi kozala moto ya liboso na kati na bino asengeli kozala moombo na bino.+ 28 Kaka ndenge Mwana ya moto ayaki, mpo bato básalela ye te, kasi mpo na kosalela+ bango mpe kopesa bomoi* na ye lisiko na esika ya bato mingi.”+
29 Ntango bazalaki kobima na Yeriko, ebele ya bato balandaki Yesu. 30 Mpe talá! bato mibale oyo bakufá miso bafandaki pembeni ya nzela, bayokaki ete Yesu azali koleka wana, mpe bagangaki: “Nkolo, Mwana ya Davidi, yokelá biso mawa!”+ 31 Kasi ebele ya bato bagangelaki bango ete bátika makɛlɛlɛ. Kasi bango bagangaki lisusu makasi koleka ete: “Nkolo, Mwana ya Davidi, yokelá biso mawa!” 32 Bongo Yesu atɛlɛmaki, abengaki bango mpe alobaki na bango: “Bolingi nasala nini mpo na bino?” 33 Balobaki na ye: “Nkolo, tolingi miso na biso efungwama.” 34 Yesu ayokaki mawa, asimbaki miso na bango,+ mpe na mbala moko bakómaki komona lisusu. Mpe balandaki ye.
21 Ntango bapusanaki penepene na Yerusaleme mpe bakómaki na Betefage, na Ngomba ya Olive, Yesu atindaki bayekoli na ye mibale,+ 2 alobi na bango: “Bókende na mboka oyo bozali komona liboso na bino, mpe na mbala moko bokomona mpunda oyo bakangi na nsinga, ná mwana ya mpunda pembeni na yango; bófungola yango mpe bóyela ngai yango. 3 Soki moto moko alobi na bino likambo, bosengeli koloba: ‘Nkolo azali na mposa na yango.’ Bongo na mbala moko akopesa bino yango.”
4 Yango esalemaki mpenza bongo mpo na kokokisa maloba oyo mosakoli alobaki, ete: 5 “Bóyebisa mwana mwasi ya Siona boye: ‘Talá! Mokonzi na yo azali koya epai na yo,+ azali na ezaleli ya boboto,+ mpe amati likoló ya mpunda ya mobali, ɛɛ, likoló ya mwana ya mpunda, mwana ya nyama oyo ememaka mikumba.’”+
6 Bongo bayekoli bakendaki mpe basalaki kaka ndenge Yesu atindaki bango.+ 7 Bayaki na mpunda yango ná mwana na yango, mpe batyaki likoló na yango bilamba na bango ya likoló, mpe Yesu afandaki likoló na yango.+ 8 Bato mingi na kati ya ebele ya bato yango batandaki bilamba na bango ya likoló na nzela,+ wana basusu bazalaki kokata mandalala mpe kotanda yango na nzela. 9 Lisusu, ebele ya bato oyo bazalaki kotambola liboso na ye mpe baoyo bazalaki kolanda ye, bazalaki se koganga: “Tobondeli yo, bikisá Mwana ya Davidi!+ Moto oyo azali koya na nkombo ya Yehova* apambwama!+ Tobondeli yo, bikisá ye, kuna na likoló!”+
10 Bongo ntango akɔtaki na Yerusaleme, engumba mobimba eninganaki. Bato bazalaki kotuna: “Wana nani?” 11 Ebele ya bato bazalaki se koloba: “Ezali mosakoli Yesu,+ moto ya Nazarete ya Galile!”
12 Yesu akɔtaki na tempelo mpe abwakaki libándá baoyo nyonso bazalaki kotɛka mpe kosomba na tempelo. Abalolaki mpe bamesa ya bato oyo basenzaka mbongo mpe bakiti ya baoyo bazalaki kotɛka bibenga.+ 13 Mpe alobaki na bango: “Ekomamá ete: ‘Ndako na ngai ekobengama ndako ya mabondeli,’+ kasi bino bozali kokómisa yango mobenga ya miyibi.”+ 14 Lisusu, na tempelo, bato oyo bakufá miso mpe batɛngumi bayaki epai na ye, mpe abikisaki bango.
15 Ntango banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli bamonaki makamwisi oyo asalaki mpe ndenge bana mibali bazalaki koganga na tempelo mpe koloba: “Tobondeli yo, bikisá Mwana ya Davidi!”+ basilikaki+ 16 mpe balobaki na ye: “Oyoki makambo bango bazali koloba?” Yesu alobaki na bango: “Ɛɛ. Botángá naino te likambo oyo: ‘Osali ete monɔkɔ ya bana mpe ya bana oyo bazali komɛla mabɛlɛ ebimisa lisanzoli’?”+ 17 Bongo atikaki bango wana, mpe abimaki na engumba, akendaki na Betani mpe alalaki kuna.+
18 Na ntɔngɔntɔngɔ, ntango azalaki kozonga na engumba, ayokaki nzala.+ 19 Amonaki nzete moko ya figi pembeni ya nzela. Apusanaki pene na yango, kasi akutaki eloko te kaka nkasa,+ bongo alobaki na yango: “Okobota lisusu mbuma ata mokolo moko te.”+ Mpe na mbala moko, nzete yango ya figi ekaukaki. 20 Ntango bayekoli bamonaki bongo, bakamwaki mpe balobaki: “Ndenge nini nzete ya figi ekauki na mbala moko boye?”+ 21 Yesu azongiselaki bango: “Ya solo nalobi na bino: Soki bozali na kondima mpe bozali kobɛta ntembe te, bokosala kaka oyo ngai nasali na nzete ya figi te, kasi ata soki bolobi na ngomba oyo: ‘Longwá awa mpe kende komibwaka na mbu,’ ekosalema bongo.+ 22 Nyonso oyo bokosɛnga na libondeli, soki bozali na kondima, bokozwa yango.”+
23 Nsima ya kokɔta na tempelo, banganga-nzambe bakonzi ná bankulutu ya ekólo bapusanaki pene na ye ntango azalaki koteya mpe balobaki: “Bokonzi nini ozali na yango ya kosala makambo oyo? Mpe nani apesi yo bokonzi yango?”+ 24 Bongo Yesu alobaki na bango: “Ngai mpe nakotuna bino likambo moko. Soki boyebisi ngai yango, ngai mpe nakoyebisa bino na bokonzi nini nazali kosala makambo oyo: 25 Batisimo ya Yoane, eutaki wapi? Na likoló to epai ya bato?” Kasi babandaki kolobana bango na bango: “Soki tolobi: ‘Na likoló,’ akoloba na biso: ‘Bongo mpo na nini bondimelaki ye te?’+ 26 Kasi, soki tolobi: ‘Epai ya bato,’ tozali kobanga ebele ya bato oyo, mpo bango nyonso bamonaka ete Yoane azali mosakoli.” 27 Na yango bazongiselaki Yesu ete: “Toyebi te.” Ye mpe alobaki na bango: “Ngai mpe nakoyebisa bino te na bokonzi nini nazali kosala makambo oyo.
28 “Bokanisi nini? Moto moko azalaki na bana mibale. Akendaki epai ya oyo ya liboso mpe alobaki na ye: ‘Mwana na ngai, lelo kende kosala na elanga ya vinyo.’ 29 Ye azongisaki: ‘Nakokende te.’ Kasi na nsima ayokaki mawa mpe akendaki. 30 Akendaki epai ya oyo ya mibale, mpe alobaki na ye kaka bongo. Ye azongisaki: ‘Tata, nakokende,’ kasi akendaki te. 31 Na bango mibale, nani asali mokano ya tata na ye?” Bango balobaki: “Oyo ya liboso.” Yesu alobaki na bango: “Ya solo nalobi na bino ete bakɔngɔli-mpako ná basi ya ndumba bazali kokɔta liboso na bino na Bokonzi ya Nzambe. 32 Mpo Yoane ayaki koteya bino nzela ya bosembo, kasi bino bondimelaki ye te. Nzokande, bakɔngɔli-mpako mpe basi ya ndumba bandimelaki ye,+ mpe bino, ata ntango bomonaki yango, boyokaki mawa te mpe bondimelaki ye te.
33 “Bóyoka ndakisa mosusu: Moto moko azalaki na mabele na ye. Alonaki elanga ya vinyo+ mpe asalaki lopango zingazinga na yango. Atimolaki ekamwelo ya vinyo mpe atongaki ndako moko ya molai.+ Na nsima atyaki basali-bilanga mpo báfutela yango, mpe akendaki mobembo na mboka mopaya.+ 34 Ntango eleko ya kobuka mbuma ya vinyo ekómaki, atindelaki basali-bilanga baombo na ye mpo bázwela ye mbuma na ye. 35 Nzokande, basali-bilanga bazwaki baombo na ye, babɛtaki moko, mosusu babomaki ye mpe mosusu babambaki ye mabanga.+ 36 Bongo atindaki baombo mosusu, mingi koleka baoyo ya liboso, kasi basali-bilanga basalaki bango kaka bongo.+ 37 Nsukansuka atindelaki bango mwana na ye, alobi: ‘Bakopesa mwana na ngai limemya.’ 38 Ntango bamonaki mwana yango, basali-bilanga balobanaki: ‘Talá mozwi-ya-libula.+ Bóya, tóboma ye mpe tózwa libula na ye!’ 39 Bongo bazwaki ye, babwakaki ye na libándá ya elanga ya vinyo mpe babomaki ye.+ 40 Ntango nkolo ya elanga ya vinyo akoya, akosala basali-bilanga wana nini?” 41 Banganga-nzambe bakonzi ná bankulutu balobaki na ye: “Lokola bazali bato mabe, akoboma bango* mpe akotya basali-bilanga mosusu na elanga ya vinyo, oyo bakopesa ye mbuma na eleko na yango, mpo báfutela elanga yango.”
42 Yesu alobaki na bango: “Botángá naino te na Makomami ete: ‘Libanga oyo batongi-ndako babwakaki, yango nde ekómi libanga monene ya ntina mingi ya ndako.*+ Yango euti epai ya Yehova,* mpe ezali likambo ya kokamwa na miso na biso’?+ 43 Yango wana nalobi na bino ete bakolongola Bokonzi ya Nzambe epai na bino mpe bakopesa yango ekólo moko oyo ekobota mbuma na yango. 44 Lisusu, moto oyo akokwea likoló ya libanga oyo, akopanzana.+ Mpe moto nyonso oyo yango ekokwela, ekonika ye.”+
45 Ntango banganga-nzambe bakonzi ná Bafarisai bayokaki bandakisa ya Yesu, bayebaki ete azalaki kolobela bango.+ 46 Atako balingaki kokanga ye, babangaki ebele ya bato, mpo ebele yango ya bato bazalaki komona ete azali mosakoli.+
22 Yesu alobaki na bango lisusu na bandakisa, ete: 2 “Bokonzi ya likoló ezali lokola mokonzi moko oyo asalaki fɛti ya libala+ mpo na mwana na ye ya mobali. 3 Mpe atindaki baombo na ye bábenga bato oyo babengisamaki na fɛti ya libala, kasi bato yango baboyaki koya.+ 4 Atindaki baombo mosusu, alobi: ‘Bóyebisa bato oyo nabengisaki boye: “Nabongisi biloko ya kolya, nabomisi bangɔmbɛ na ngai ya mibali ná banyama ya mafuta, biloko nyonso elɛngɛlami. Bóya na fɛti ya libala.”’ 5 Kasi bamonaki yango mpamba: mosusu akei na elanga na ye, mosusu akei kosala mombongo na ye.+ 6 Kasi baoyo mosusu bakangaki baombo na ye, babɛtaki bango mpe babomaki bango.
7 “Mokonzi ayokaki nkanda, atindaki basoda na ye mpo báboma babomi-bato wana mpe bátumba engumba na bango.+ 8 Na nsima alobaki na baombo na ye: ‘Fɛti ya libala elɛngɛlami, kasi bato oyo babengisamaki babongaki na yango te.+ 9 Boye bókende na banzela oyo ekendá tii na libándá ya engumba, mpe moto nyonso oyo bokokuta bóbengisa ye na fɛti ya libala.’+ 10 Na yango baombo yango babimaki na banzela mpe bayanganisaki bato nyonso oyo bakutaki, bato mabe ná bato malamu; mpe ndako ya fɛti etondaki na bato oyo bazalaki kolya.*
11 “Ntango mokonzi akɔtaki mpo na kotala bato oyo babengisamaki, amonaki mobali moko oyo alataki elamba ya libala te. 12 Bongo alobaki na ye: ‘Moninga, ndenge nini okɔti awa na elamba ya libala te?’ Mobali yango azangaki likambo ya koloba. 13 Na yango mokonzi alobaki na basaleli na ye: ‘Bókanga ye mabɔkɔ ná makolo mpe bóbwaka ye libándá, na molili. Kuna nde akolela mpe akolya mino.’
14 “Mpo bato mingi babengisami, kasi bato moke nde baponami.”
15 Bongo Bafarisai bakendaki mpe basalaki likita bango nyonso mpo na kozwa ye na maloba na ye.+ 16 Na yango batindaki bayekoli na bango, elongo na bato ya Erode,+ báloba na ye boye: “Moteyi, toyebi ete olobaka solo mpe makambo oyo oteyaka mpo na Nzambe ezali solo, olukaka kondimama na bato te, mpo otalaka bato te ndenge bazali komonana libándá. 17 Boye yebisá biso, okanisi nini? Epesami nzela* kofuta Kaisala mpako oyo moto nyonso afutaka to te?” 18 Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango ya mabe, alobaki: “Bakosi, mpo na nini bozali komeka ngai? 19 Bólakisa ngai mbongo ya ebende oyo bafutaka na yango mpako.” Bayelaki ye denari moko.* 20 Atunaki bango: “Elongi oyo mpe likomi oyo ezali ya nani?” 21 Bayanolaki: “Ya Kaisala.” Bongo alobaki na bango: “Boye, bózongisa biloko ya Kaisala epai ya Kaisala, kasi biloko ya Nzambe epai ya Nzambe.”+ 22 Ntango bayokaki bongo, bakamwaki mpenza. Bongo batikaki ye mpe bakendaki.
23 Kaka na mokolo yango, Basadukai, oyo balobaka ete lisekwa ezali te,+ bayaki mpe batunaki ye:+ 24 “Moteyi, Moize alobaki: ‘Soki mobali moko akufi, kasi aboti bana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kozwa mwasi oyo ye atiki, mpo abotela ndeko na ye bana.’+ 25 Sikoyo ezalaki na bandeko mibali nsambo na kati na biso. Oyo ya liboso abalaki mpe akufaki, mpe lokola abotaki bana te, atikelaki ndeko na ye ya mobali mwasi na ye. 26 Esalemaki kaka bongo na oyo ya mibale mpe oyo ya misato, tii na bango nyonso nsambo. 27 Nsukansuka, mwasi wana mpe akufaki. 28 Bongo na lisekwa, akozala mwasi ya nani kati na bango nsambo? Mpo akómaki mwasi na bango nyonso.”
29 Bongo Yesu alobaki na bango: “Bozali na libunga, mpo boyebi Makomami te, boyebi mpe nguya ya Nzambe te;+ 30 mpamba te na lisekwa, mibali bakobala te mpe basi bakobalisama te, kasi bakozala lokola baanzelu na likoló.+ 31 Na likambo etali lisekwa ya bakufi, botángá te oyo Nzambe alobaki mpo na bino ete: 32 ‘Nazali Nzambe ya Abrahama, Nzambe ya Yisaka, mpe Nzambe ya Yakobo’?+ Azali Nzambe, ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi.”+ 33 Ntango ebele ya bato wana bayokaki yango, bakamwaki mingi na mateya na ye.+
34 Ntango Bafarisai bayokaki ete akangisaki Basadukai monɔkɔ, bayaki bango nyonso elongo epai na ye. 35 Moko na bango, oyo ayebaki Mibeko malamumalamu, alingaki komeka Yesu, atunaki ye: 36 “Moteyi, mobeko nini eleki monene na kati ya Mibeko?”+ 37 Alobaki na ye: “‘Osengeli kolinga Yehova* Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na molimo* na yo mobimba, mpe na makanisi na yo nyonso.’+ 38 Yango nde mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso. 39 Ya mibale, oyo ekokani na yango, yango oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’+ 40 Mibeko nyonso mpe Basakoli esimbami na mibeko yango mibale.”+
41 Lokola Bafarisai bayanganaki esika moko, Yesu atunaki bango:+ 42 “Bokanisi nini mpo na Kristo? Azali mwana ya nani?” Balobaki na ye: “Ya Davidi.”+ 43 Ye atunaki bango: “Bongo ndenge nini Davidi na nzela ya elimo ya Nzambe+ abengi ye ‘Nkolo,’ alobi: 44 ‘Yehova* alobaki na Nkolo na ngai ete: “Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali tii nakotya banguna na yo na nse ya makolo na yo”’?+ 45 Bongo soki Davidi abengi ye ‘Nkolo,’ ndenge nini Kristo akoki kozala mwana ya Davidi?”+ 46 Moto moko te akokaki kopesa ye eyano, mpe banda mokolo wana moto moko te amekaki kotuna ye lisusu motuna.
23 Bongo Yesu alobaki na ebele ya bato yango mpe na bayekoli na ye ete: 2 “Bakomeli ná Bafarisai bafandi na kiti ya Moize. 3 Yango wana, bósala mpe bótosa makambo nyonso oyo bazali koyebisa bino, kasi bósala ndenge bango basalaka te, mpo makambo oyo balobaka basalelaka yango te.+ 4 Bakangisaka mikumba ya kilo mpe batyaka yango na mapeka ya bato,+ kasi bango moko balingaka kosimba yango ata na mosapi te.+ 5 Makambo nyonso oyo basalaka, basalaka yango mpo bato bámona bango.+ Na ndakisa, bakómisaka minene mwa bakɛsi ya mike oyo bátya Makomami na kati, oyo balataka mpo na komibatela,+ mpe bakómisaka milaimilai bansɔngɛ ya bilamba na bango.+ 6 Balingaka esika oyo eleki lokumu na ntango ya bilei ya mpokwa mpe bakiti ya liboso* na basinagoga+ 7 mpe balingaka bápesa bango bambote na bazando mpe bábengaka bango Rabi.* 8 Kasi bino, bólingaka te ete bábenga bino Rabi, mpo bozali na Moteyi+ kaka moko, mpe bino nyonso bozali bandeko. 9 Lisusu, bóbenga moto moko te tata na bino awa na mabele, mpo bozali na Tata+ kaka moko, Oyo azali na likoló. 10 Bólinga mpe te ete bábenga bino bakambi, mpo bozali na Mokambi kaka moko, Kristo. 11 Kasi moto oyo aleki monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino.+ 12 Moto oyo azali komitombola akokitisama,+ mpe moto oyo amikitisaka akotombolama.+
13 “Mawa na bino, bakomeli ná Bafarisai, bakosi! mpo bozali kokangela bato nzela ya kokɔta na Bokonzi ya likoló; mpo bino moko bozali kokɔta te, mpe baoyo balingi kokɔta, bozali kopekisa bango.+ 14 *——
15 “Mawa na bino, bakomeli ná Bafarisai, bakosi!+ mpo bosalaka mobembo na mbu mpe na mokili mpo na kokómisa moto prozelite,* mpe ntango akómi bongo, bokómisaka ye moto oyo abongi kokende na Gehena* mbala mibale koleka bino.
16 “Mawa na bino, batambwisi oyo bakufá miso,+ mpo bolobaka: ‘Soki moto alapi ndai na nkombo ya tempelo, ezali likambo te; kasi soki moto alapi ndai na nkombo ya wolo ya tempelo, asengeli kokokisa maloba na ye.’+ 17 Bazoba mpe bato bakufá miso! Eloko nini eleki ntina, wolo to tempelo oyo esantisi wolo? 18 Bolobaka lisusu: ‘Soki moto alapi ndai na nkombo ya etumbelo, ezali likambo te. Kasi soki moto alapi ndai na nkombo ya likabo oyo ezali likoló na yango, asengeli kokokisa maloba na ye.’ 19 Bato bakufá miso! Eloko nini eleki ntina, likabo to etumbelo oyo esantisaka likabo yango? 20 Yango wana, moto oyo alapi ndai na nkombo ya etumbelo alapi mpe ndai na nkombo na yango mpe ya biloko nyonso oyo ezali likoló na yango; 21 mpe moto oyo alapi ndai na nkombo ya tempelo alapi mpe ndai na nkombo na yango mpe ya Moto oyo afandaka kuna;+ 22 mpe moto oyo alapi ndai na nkombo ya likoló alapi mpe ndai na nkombo ya kiti ya bokonzi ya Nzambe mpe ya Moto oyo afandeli yango.
23 “Mawa na bino, bakomeli ná Bafarisai, bakosi! mpo bopesaka moko ya bandambo zomi ya manti, ya aneti, mpe ya kumini,+ kasi bobosanaka makambo oyo eleki ntina na kati ya Mobeko, elingi koloba, boyengebene,+ motema mawa+ ná bosembo. Bosengelaki kopesa biloko wana kasi kozanga kotya pembeni makambo mosusu wana.+ 24 Batambwisi oyo bakufá miso!+ Bolongolaka ngungi na masanga na bino,+ kasi bomɛlaka kamela.+
25 “Mawa na bino, bakomeli ná Bafarisai, bakosi! mpo bopɛtolaka libándá ya kɔpɔ mpe ya saani,+ kasi na kati etondi na lokoso*+ mpe na kolekisa ndelo.+ 26 Mofarisai, moto oyo akufá miso, pɛtolá liboso kati ya kɔpɔ mpe ya saani mpo libándá na yango mpe ekóma pɛto.
27 “Mawa na bino, bakomeli ná Bafarisai, bakosi!+ mpo bozali lokola malita+ oyo bapakolá mpɛmbɛ, oyo na libándá emonanaka kitoko mpenza kasi na kati etondá na mikuwa ya bato bakufá mpe na mbindo ya ndenge nyonso. 28 Ndenge moko mpe, na libándá bomonanaka bato ya sembo, kasi na kati botondá na bokosi mpe na mabe.*+
29 “Mawa na bino, bakomeli ná Bafarisai, bakosi!+ mpo botongaka bisika ya kokunda basakoli mpe bobongisaka malita* ya bato ya sembo,+ 30 mpe bolobaka: ‘Soki tózalaka na ntango ya bankɔkɔ na biso, tolingaki kosangana na bango te na kosopa makila ya* basakoli.’ 31 Boye bino moko bozali komifunda ete bozali bana ya baoyo babomaki basakoli.+ 32 Yango wana, bótondisa kaka emekeli ya bankɔkɔ na bino.
33 “Banyoka, bana ya banyoka ya ngɛngɛ,*+ ndenge nini bokokima lisambisi ya Gehena?*+ 34 Mpo na yango, nazali kotindela bino basakoli,+ bato ya bwanya mpe balakisi.+ Bokoboma basusu+ mpe bokobaka basusu na nzete, mpe bamosusu bokobɛta+ bango na basinagoga mpe bokonyokola+ bango na engumba na engumba, 35 mpo bómema ngambo ya makila ya bato ya sembo nyonso oyo esopaná na mabele, banda na makila ya Abele+ moto ya sembo tii na makila ya Zekaria mwana ya Berekia, oyo bobomaki na katikati ya esika mosantu mpe etumbelo.+ 36 Ya solo nalobi na bino: Makambo nyonso wana ekokwela libota oyo.
37 “Yerusaleme, Yerusaleme, engumba oyo ebomaka basakoli mpe ebambaka baoyo batindami epai na yango mabanga+—mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo esika moko, ndenge nsoso ya mwasi esangisaka bana na yango na nse ya mapapu na yango! Kasi bolingaki te.+ 38 Talá! Basundoleli bino* ndako na bino.+ 39 Mpo nalobi na bino, bokomona ngai lisusu te tii ntango bokoloba: ‘Moto oyo azali koya na nkombo ya Yehova* apambwama!’”+
24 Ntango Yesu azalaki kobima na tempelo, bayekoli na ye bapusanaki epai na ye mpo na kolakisa ye ndenge tempelo etongamá. 2 Bongo alobaki na bango: “Bomoni biloko oyo nyonso? Ya solo nalobi na bino, ata libanga moko te ekotikala likoló ya libanga mosusu awa, nyonso ekobebisama.”+
3 Ntango afandaki na Ngomba ya Olive, bayekoli bapusanaki epai na ye kaka bango moko mpe batunaki ye: “Yebisá biso: Makambo yango ekosalema ntango nini, mpe elembo nini ekomonisa kozala*+ na yo mpe eleko ya nsuka ya mokili?”*+
4 Yesu azongiselaki bango: “Bókeba, moto akosa bino te,+ 5 mpo mingi bakoya na nkombo na ngai, mpe bakoloba: ‘Ngai nazali Kristo,’ mpe bakokosa bato mingi.+ 6 Bokoyoka lokito ya bitumba mpe bansango ya bitumba. Kasi bóbanga te, mpo makambo yango esengeli kosalema, kasi wana ekozala naino nsuka te.+
7 “Mpo ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi,+ nzala ekozala+ mpe koningana ya mabele ekosalema na bisika ndenge na ndenge.+ 8 Makambo nyonso wana ekozala ebandeli ya bampasi.
9 “Bongo bato bakonyokola bino*+ mpe bakoboma bino,+ mpe bikólo nyonso ekoyina bino mpo na nkombo na ngai.+ 10 Bongo bato mingi mpe bakobɛta libaku, bakotɛkana mpe bakoyinana. 11 Basakoli mingi ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato mingi;+ 12 mpe lokola kobuka mibeko ekokóma mingi, bolingo ya bato mingi ekokita.* 13 Kasi moto oyo akoyika mpiko* tii na nsuka, akobika.+ 14 Mpe nsango malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso,+ bongo nsuka ekoya.
15 “Yango wana, ntango bokomona eloko ya bosɔtɔ oyo eyeisaka libebi, oyo mosakoli Danyele alobelaki, etɛlɛmi na esika mosantu,+ (tiká motángi asalela bososoli), 16 na ntango yango, baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba.+ 17 Moto oyo azali likoló ya ndako akita te mpo na kozwa biloko oyo ezali na ndako na ye, 18 mpe moto oyo azali na bilanga azonga te mpo na kozwa elamba na ye ya likoló. 19 Mawa na basi ya zemi mpe na baoyo bakomɛlisa bana mabɛlɛ na mikolo yango! 20 Bókoba kobondela mpo ntango oyo bokokima ezala na eleko ya malili makasi te, to na mokolo ya Sabata te; 21 mpo na ntango wana ekozala na bolɔzi* moko monene+ oyo esalemá naino te banda ebandeli ya mokili tii sikoyo, mpe ekosalema lisusu te.+ 22 Kutu, soki mikolo yango eyeisamaka mokuse te, ata moto moko te alingaki kobika; kasi mpo na bato oyo baponami, mikolo yango ekoyeisama mokuse.+
23 “Bongo soki moto alobi na bino: ‘Talá! Kristo azali awa,’+ to ‘Azali kuna!’ bóndima te.+ 24 Mpo ba-Kristo ya lokuta mpe basakoli ya lokuta+ bakobima mpe bakosala bilembo minene mpe bakosala makamwisi mpo na kokosa+ ata bato oyo baponami, soki likoki ezali. 25 Talá! Nakebisi bino libela. 26 Na yango, soki bato balobi na bino ete: ‘Talá! Azali na esobe,’ bóbima te; ‘Talá! Azali na kati ya ndako,’* bóndima yango te.+ 27 Mpo kaka ndenge mokalikali ebimaka na ɛsti mpe engɛngaka tii na wɛsti, kozala* ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.+ 28 Esika nyonso oyo ebembe ezali, bampongo ekoyangana wana.+
29 “Nokinoki nsima ya bolɔzi ya mikolo yango, moi ekoyinda,+ sanza ekopesa pole na yango te, minzoto ekouta na likoló ekwei, mpe banguya ya likoló ekoningana.+ 30 Bongo elembo ya Mwana ya moto ekomonana na likoló, mpe mabota nyonso ya mabele bakomibɛtabɛta na mawa,+ mpe bakomona Mwana ya moto+ azali koya na mapata ya likoló na nguya mpe na nkembo mingi.+ 31 Mpe akotinda baanzelu na ye na lokito makasi ya kelelo, mpe bakoyanganisa esika moko bato oyo ye aponá longwa na bansuka minei ya mabele,* longwa na nsuka moko ya likoló tii na nsuka na yango mosusu.+
32 “Sikoyo bózwa liteya oyo na ndakisa ya nzete ya figi: Ntango kaka etape na yango ya sika ekómi pɛtɛpɛtɛ mpe ebimisi nkasa, boyebaka ete eleko ya molunge ekómi pene.+ 33 Bino mpe ndenge moko, ntango bokomona makambo yango nyonso, bóyeba ete azali pene, na porte.+ 34 Ya solo nalobi na bino ete libota oyo ekoleka ata moke te tii makambo nyonso wana ekosalema. 35 Likoló ná mabele ekoleka, kasi maloba na ngai ekoleka soki moke te.+
36 “Mpo na mokolo yango mpe ngonga yango moto moko ayebi te,+ ezala baanzelu ya likoló, ezala Mwana, kaka Tata nde ayebi.+ 37 Mpo kaka ndenge ezalaki na mikolo ya Noa,+ kozala* ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.+ 38 Mpo ndenge bazalaki na mikolo wana liboso ya Mpela, bato bazalaki kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama, tii mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa;+ 39 mpe batyaki likebi te tii Mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso,+ kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo. 40 Bongo mibali mibale bakozala na kati ya elanga; moko akozwama mpe mosusu akosundolama. 41 Na basi mibale oyo bazali konika na enikelo moko ya mabɔkɔ; moko akozwama mpe mosusu akosundolama.+ 42 Yango wana, bókoba kosɛnzɛla mpo boyebi te mokolo nini Nkolo na bino akoya.+
43 “Kasi bóyeba likambo oyo: Soki nkolo-ndako ayebaka ntango nini* moyibi akoya,+ alingaki kolala te mpe kotika te ete moyibi abuka ndako na ye mpe akɔta.+ 44 Yango wana, bino mpe bómilɛngɛla,+ mpamba te Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa te.
45 “Nani azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele* oyo nkolo na ye atye abatela basali ya ndako na ye, mpo na kopesa bango bilei na bango na ntango oyo ebongi?+ 46 Esengo na moombo yango, soki nkolo na ye ntango akoya, akuti ye azali kosala bongo!+ 47 Ya solo nalobi na bino, akotya ye likoló ya biloko na ye nyonso.
48 “Kasi soki moombo yango azali mabe mpe alobi na motema na ye: ‘Nkolo na ngai azali koumela,’+ 49 mpe abandi kobɛta baninga na ye baombo mpe abandi kolya mpe komɛla elongo na balangwi minene ya masanga, 50 nkolo ya moombo yango akoya mokolo oyo ye azali kokanisa te mpe na ngonga oyo ye ayebi te,+ 51 mpe akopesa ye etumbu ya makasi mpenza mpe akotya ye esika moko na bato oyo bazali bakosi. Kuna nde akolela mpe akolya mino.+
25 “Boye Bokonzi ya likoló ezali lokola bangɔndɔ zomi oyo bazwaki miinda+ na bango mpe babimaki mpo na kokutana na mobali ya libala.+ 2 Mitano kati na bango bazalaki bazoba, mpe mitano bazalaki mayele.*+ 3 Bazoba bazwaki miinda na bango kasi bazwaki mafuta te, 4 nzokande baoyo ya mayele bazwaki miinda na bango, bazwaki mpe mafuta na kati ya milangi na bango. 5 Lokola mobali ya libala azalaki koumela, bango nyonso bayokaki mpɔngi mpe balalaki. 6 Na katikati ya butu mongongo moko egangaki: ‘Mobali ya libala ayei! Bóbima kokutana na ye.’ 7 Bongo bangɔndɔ yango nyonso balamukaki mpe babongisaki miinda na bango.+ 8 Bazoba balobaki na baoyo ya mayele boye: ‘Bópesa biso ndambo ya mafuta na bino, mpo miinda na biso elingi kokufa.’ 9 Baoyo ya mayele bayanolaki, balobi: ‘Mbala mosusu ekokoka biso ná bino te. Bókende nde epai ya baoyo batɛkaka yango mpe bósomba ndambo mpo na bino moko.’ 10 Ntango bakendaki kosomba yango, mobali ya libala ayaki. Bangɔndɔ oyo bamibongisaki bakɔtaki na ye na fɛti ya libala,+ mpe porte ekangamaki. 11 Na nsima bangɔndɔ mosusu wana mpe bayaki, balobi: ‘Tata, tata, fungolelá biso!’+ 12 Azongiselaki bango boye: ‘Ya solo nazali koyebisa bino: Nayebi bino te.’
13 “Yango wana, bókoba kosɛnzɛla+ mpo boyebi mokolo te mpe ngonga te.+
14 “Ezali kaka lokola moto moko oyo alingaki kokende mobembo na mboka mopaya. Abengisaki baombo na ye mpe atikaki biloko na ye na mabɔkɔ na bango.+ 15 Apesaki moko talanta* mitano, mosusu talanta mibale, mpe mosusu talanta moko, moto na moto na kotalela makoki na ye. Na nsima akendaki na mboka mopaya. 16 Na mbala moko moto oyo azwaki talanta mitano akendaki, asalaki na yango mombongo mpe ebotaki mosusu mitano. 17 Ndenge moko mpe moto oyo azwaki mibale, ebotaki mosusu mibale. 18 Kasi moombo oyo azwaki kaka moko akendaki, mpe atimolaki libulu na mabele mpe abombaki mbongo* ya nkolo na ye.
19 “Nsima ya ntango molai, nkolo ya baombo wana ayaki mpe atalelaki ná bango makambo ya mbongo na ye.+ 20 Bongo moombo oyo azwaki talanta mitano apusanaki mpe amemaki talanta mosusu mitano, alobi: ‘Nkolo, opesaki ngai talanta mitano; talá, nasali ete ebota talanta mosusu mitano.’+ 21 Nkolo na ye alobaki na ye: ‘Longonya, moombo malamu mpe ya sembo! Ozalaki sembo na biloko moke oyo napesaki yo. Nakotya yo likoló ya biloko mingi.+ Yaká kosepela elongo na nkolo na yo.’+ 22 Na nsima moombo oyo azwaki talanta mibale apusanaki mpe alobaki: ‘Nkolo, opesaki ngai talanta mibale; talá, nasali ete ebota talanta mosusu mibale.’+ 23 Nkolo na ye alobaki na ye: ‘Longonya, moombo malamu mpe ya sembo! Ozalaki sembo na biloko moke oyo napesaki yo. Nakotya yo likoló ya biloko mingi. Yaká kosepela elongo na nkolo na yo.’
24 “Nsukansuka moombo oyo azwaki talanta moko apusanaki mpe alobaki: ‘Nkolo, nayebaki ete ozalaka moto ya matata, ete obukaka epai olonaki te mpe oyanganisaka epai opupolaki te.+ 25 Bongo nabangaki, yango wana nakendaki kobomba talanta na yo na mabele. Talá eloko na yo yango oyo.’ 26 Nkolo na ye azongiselaki ye: ‘Moombo mabe mpe ya gɔigɔi! Oyebaki malamu ete nabukaka epai nalonaki te mpe nayanganisaka epai napupolaki te. 27 Boye osengelaki kotya mbongo* na ngai na banki, mpe ntango nakoya nalingaki nakende kozwa mbongo na ngai ná benefisi.
28 “‘Sikoyo bóbɔtɔla ye talanta wana mpe bópesa yango moto oyo azali na talanta zomi.+ 29 Mpo moto nyonso oyo azali na eloko, bakobakisela ye mosusu mpe akokóma na mingi mpenza; kasi moto oyo azali na eloko te, bakobɔtɔla ye ata oyo azali na yango.+ 30 Mpe bóbwaka moombo oyo ya mpambampamba na libándá, na molili. Kuna nde akolela mpe akolya mino.’
31 “Ntango Mwana ya moto+ akoya na nkembo na ye mpe baanzelu nyonso elongo na ye,+ akofanda na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo. 32 Bikólo nyonso ekoyangana liboso na ye, mpe akokabola bato na bituluku mibale, kaka ndenge mobateli ya mpate akabolaka bampate ná bantaba. 33 Akotya bampate+ na lobɔkɔ na ye ya mobali, kasi bantaba na lobɔkɔ na ye ya mwasi.+
34 “Bongo Mokonzi akoloba na baoyo bakozala na lobɔkɔ na ye ya mobali: ‘Bóya, bino baoyo Tata na ngai apamboli, bózwa* Bokonzi oyo babongiselá bino banda na ebandeli ya mokili. 35 Mpo nayokaki nzala mpe bopesaki ngai eloko ya kolya; nazalaki na mposa ya mai mpe bopesaki ngai eloko ya komɛla. Nazalaki mopaya mpe boyambaki ngai malamu;+ 36 nazalaki bolumbu,* mpe bolatisaki ngai bilamba.+ Nazalaki na maladi mpe bosalisaki ngai. Nazalaki na bolɔkɔ mpe boyaki kotala ngai.’+ 37 Bongo bato ya sembo bakozongisela ye boye: ‘Nkolo, ntango nini tomonaki yo ozali na nzala mpe toleisaki yo, to na mposa ya mai, mpe topesaki yo mwa eloko ya komɛla?+ 38 Ntango nini tomonaki yo mopaya mpe toyambaki yo malamu, to bolumbu, mpe tolatisaki yo? 39 Ntango nini tomonaki yo ozali na maladi to na bolɔkɔ mpe toyaki kotala yo?’ 40 Mpe mokonzi akozongisela bango boye: ‘Ya solo nalobi na bino, ntango nyonso oyo bosalaki yango epai ya moko ya bato oyo baleki mike na kati ya bandeko na ngai oyo, bosalaki yango epai na ngai.’+
41 “Bongo akoloba mpe na baoyo bazali na lobɔkɔ na ye ya mwasi ete: ‘Bólongwa na miso na ngai,+ bino baoyo bolakelamá mabe, bókende na mɔtɔ ya seko+ oyo ebongisamá mpo na Zabolo ná baanzelu na ye.+ 42 Mpo nayokaki nzala, kasi bopesaki ngai eloko ya kolya te, mpe nazalaki na mposa ya mai, kasi bopesaki ngai eloko ya komɛla te. 43 Nazalaki mopaya, kasi boyambaki ngai malamu te; nazalaki bolumbu, kasi bolatisaki ngai bilamba te; nazalaki na maladi mpe na bolɔkɔ, kasi bosalisaki ngai te.’ 44 Bongo bango mpe bakozongisa boye: ‘Nkolo, ntango nini tomonaki yo ozali na nzala to na mposa ya mai to mopaya to bolumbu to na maladi to na bolɔkɔ mpe tosalisaki yo te?’ 45 Ye akozongisela bango boye: ‘Ya solo nalobi na bino, ntango nyonso oyo bosalaki yango te epai ya moko ya bato oyo baleki mike, bosalaki yango te epai na ngai.’+ 46 Bango bakokufa* liwa ya seko,+ kasi bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko.”+
26 Bongo ntango Yesu asilisaki koloba makambo nyonso wana, alobaki na bayekoli na ye: 2 “Boyebi ete etikali mikolo mibale mpo Elekeli esalema,+ mpe Mwana ya moto akokabama mpo abakama na nzete.”+
3 Bongo banganga-nzambe bakonzi mpe bankulutu ya ekólo bayanganaki na lopango ya nganga-nzambe monene, oyo nkombo na ye ezalaki Kaifa,+ 4 mpe bayokanaki+ bákanga Yesu na mayele mabe* mpe báboma ye. 5 Kasi bazalaki koloba: “Na fɛti te, noki te yikiyiki ebima na kati ya bato.”
6 Ntango Yesu azalaki na Betani na ndako ya Simo moto ya maba,+ 7 mwasi moko apusanaki epai na ye. Azalaki na molangi ya albatre oyo ezalaki na mafuta ya nsolo kitoko ya ntalo mingi, mpe abandaki kosopa yango na motó ya Yesu, ntango azalaki kolya.* 8 Ntango bayekoli bamonaki bongo basepelaki te, mpe balobaki: “Mpo na nini kobebisa biloko boye? 9 Mpo bakokaki kotɛka mafuta yango ntalo mingi mpe kopesa mbongo yango na babola.” 10 Lokola Yesu ayebaki likambo oyo bazalaki koloba, alobaki na bango: “Mpo na nini bozali kotungisa mwasi oyo? Asali likambo moko ya malamu mpo na ngai. 11 Mpo babola, bokozala na bango ntango nyonso,+ kasi ngai bokozala na ngai ntango nyonso te.+ 12 Ndenge atye mafuta oyo ya nsolo kitoko na nzoto na ngai, asali yango mpo na kobongisa ngai mpo na kokundama na ngai.+ 13 Ya solo nalobi na bino, epai nyonso oyo nsango malamu oyo ekosakolama na mokili mobimba, bakolobela mpe likambo oyo mwasi oyo asali, mpo na kokanisa ye.”+
14 Bongo moko ya bantoma zomi na mibale, oyo babengi Yudasi Mokeriota,+ akendaki epai ya banganga-nzambe bakonzi+ 15 mpe alobaki na bango: “Bokopesa ngai nini mpo natɛkɛla bino ye?”+ Bayokanaki bápesa ye mbongo ya bibende 30 ya palata.+ 16 Bongo banda mokolo wana akobaki koluka libaku ya malamu mpo na kotɛka ye.
17 Na mokolo ya liboso ya fɛti ya Mampa ezangá levire,+ bayekoli bayaki epai ya Yesu, mpe batunaki ye: “Epai wapi olingi tóbongisela yo bilei ya Elekeli?”+ 18 Ye ayanolaki: “Bókende na engumba epai ya Songolo mpe bóloba na ye boye: ‘Moteyi alobi: “Ntango* na ngai ekoki; nakosala Elekeli elongo na bayekoli na ngai na ndako na yo.”’” 19 Na yango bayekoli balandaki malako oyo Yesu apesaki bango mpe babongisaki Elekeli.
20 Ntango mpokwa ekómaki,+ afandaki* na mesa ná bayekoli 12.+ 21 Ntango bazalaki kolya, alobaki: “Ya solo nalobi na bino, moko na bino akotɛka ngai.”+ 22 Bayekoli bayokaki mawa mingi na likambo yango, mpe mokomoko abandaki kotuna na ye: “Nkolo, ezali ngai te, boye te?” 23 Ye azongisaki: “Moto oyo azali kotya lobɔkɔ na ye na saani elongo na ngai, ye wana nde akotɛka ngai.+ 24 Ya solo, Mwana ya moto azali kokende, ndenge ekomamá mpo na ye, kasi mawa+ na moto oyo atɛki Mwana ya moto!+ Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango, soki abotamaka te.”+ 25 Yudasi, oyo alingaki kotɛka ye, alobaki: “Ezali ngai te, boye te, Rabi?” Yesu azongiselaki ye: “Yo moko olobi yango.”
26 Ntango bazalaki kokoba kolya, Yesu azwaki limpa mpe, nsima ya kobondela mpo na kosɛnga lipamboli, abukaki yango+ mpe apesaki yango bayekoli, mpe alobaki: “Bózwa, bólya. Oyo elakisi nzoto na ngai.”+ 27 Lisusu, azwaki kɔpɔ mpe abondelaki mpo na kopesa matɔndi, na nsima apesaki bango yango, mpe alobaki: “Bómɛla yango, bino nyonso,+ 28 mpo oyo elakisi makila na ngai, ‘makila+ ya kondimana,’+ oyo ekosopama mpo na bato mingi,+ mpo na kolimbisama ya masumu.+ 29 Kasi nalobi na bino: Nakomɛla lisusu vinyo oyo te tii mokolo oyo nakomɛla yango ya sika elongo na bino na Bokonzi ya Tata na ngai.”+ 30 Nsukansuka, nsima ya koyemba nzembo ya masanzoli, babimaki, bakei na Ngomba ya Olive.+
31 Bongo Yesu alobaki na bango: “Na butu oyo, bino nyonso bokobɛta libaku mpo na makambo oyo ekokómela ngai, mpo ekomamá: ‘Nakobɛta mobateli ya mpate, mpe bampate ya etonga ekopanzana.’+ 32 Kasi nsima ya kosekwa,* nakokende liboso na bino na Galile.”+ 33 Bongo Petro azongiselaki ye: “Ata soki basusu nyonso babɛti libaku mpo na makambo oyo ekokómela yo, ngai nakobɛta libaku ata moke te!”+ 34 Yesu alobaki na ye: “Ya solo nalobi na yo: Na butu oyo, liboso nsoso elela, okowangana ngai mbala misato.”+ 35 Petro alobaki na ye: “Ata soki esengeli nakufa ná yo, nakowangana yo ata moke te.”+ Bayekoli mosusu nyonso mpe balobaki kaka bongo.
36 Bongo Yesu ayaki na bayekoli na ye tii na esika babengi Getesemane,+ mpe alobaki na bango: “Bófanda awa ntango ngai nakei kobondela kuna.”+ 37 Nsima ya kozwa elongo na ye Petro ná bana mibale ya Zebede, abandaki koyoka mawa mpe kotungisama makasi.+ 38 Bongo alobaki na bango: “Nazali* na mawa makasi mpenza, lokola nakufa. Bótikala awa mpe bókoba kosɛnzɛla elongo na ngai.”+ 39 Nsima ya kopusana mwa moke liboso, afukamaki atye elongi na nse, mpe abondelaki:+ “Tata na ngai, soki ekoki kosalema, kɔpɔ+ oyo eleka mosika na ngai. Nzokande, ezala te ndenge ngai nalingi, kasi ndenge yo olingi.”+
40 Ntango azongaki epai bayekoli bazalaki, akutaki bango balali mpɔngi, bongo alobaki na Petro: “Bokoki kosɛnzɛla ata mpo na ngonga moko te elongo na ngai?+ 41 Bókoba kosɛnzɛla+ mpe kobondela ntango nyonso,+ mpo bókwea na komekama te.+ Ya solo, elimo ezali na molende,* kasi nzoto ezali na bolɛmbu.”+ 42 Lisusu, na mbala ya mibale, akendaki mpe abondelaki boye: “Tata na ngai, soki ekoki kosalema te ete kɔpɔ oyo eleka kozanga ete namɛla yango, tiká mokano na yo esalema.”+ 43 Ayaki lisusu mpe akutaki bango balali mpɔngi, mpo miso na bango ezalaki kilo. 44 Bongo atikaki bango, akei lisusu mpe abondeli mpo na mbala ya misato, alobi lisusu kaka likambo yango. 45 Bongo azongaki lisusu epai ya bayekoli mpe alobaki na bango: “Na ntango ya boye bozali kolala mpɔngi mpe kopema? Talá! Ngonga ekómi pene mpo Mwana ya moto atɛkama na mabɔkɔ ya basumuki. 46 Bótɛlɛma, tókende. Talá! Moto oyo azali kotɛka ngai akómi pene.” 47 Wana azalaki naino koloba, talá! Yudasi, moko ya bantoma zomi na mibale, ayaki elongo na ebele mpenza ya bato oyo basimbi mipanga ná mangenda. Banganga-nzambe bakonzi mpe bankulutu ya ekólo nde batindaki bango.+
48 Nzokande motɛki na ye apesaki bango elembo, alobaki: “Moto oyo nakopesa lipwɛpwɛ, ye wana; bókanga ye.” 49 Mpe akendaki mbala moko epai ya Yesu mpe alobaki: “Mbote, Rabi!” mpe apesaki ye lipwɛpwɛ na boboto mpenza. 50 Kasi Yesu alobaki na ye: “Moninga, mpo na nini ozali awa?”+ Bongo bapusanaki, batyaki Yesu mabɔkɔ mpe bakangaki ye. 51 Kasi, talá! moko ya baoyo bazalaki ná Yesu asembolaki lobɔkɔ na ye, abimisaki mopanga na ye, abɛtaki moombo ya nganga-nzambe monene mpe akataki ye litoi.+ 52 Bongo Yesu alobaki na ye: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango,+ mpo baoyo nyonso babundaka na mopanga bakokufa na mopanga.+ 53 To okanisi nde ete nakoki te kosɛnga Tata na ngai apesa ngai kaka sikoyo mampinga koleka 12 ya baanzelu?+ 54 Bongo ndenge nini Makomami oyo elobi ete yango esengeli kosalema bongo, ekokokisama?” 55 Na ngonga wana, Yesu alobaki na ebele ya bato yango: “Bobimi mpo na kokanga ngai na mipanga mpe na mangenda lokola nde boyeli moyibi moko boye? Mokolo na mokolo nafandaki na tempelo, nazali koteya,+ kasi bokangaki ngai te.+ 56 Kasi nyonso oyo esalemi mpo makomi* ya basakoli ekokisama.”+ Bongo bayekoli nyonso basundolaki ye mpe bakimaki.+
57 Baoyo bakangaki Yesu bamemaki ye epai ya nganga-nzambe monene Kaifa,+ esika bakomeli mpe bankulutu bayanganaki.+ 58 Kasi Petro alandaki ye na mosika, tii na lopango ya nganga-nzambe monene. Nsima ya kokɔta na kati, afandaki esika moko na bato ya misala mpo na komona ndenge makambo ekosuka.+
59 Banganga-nzambe bakonzi mpe Sanedrina mobimba bazalaki koluka litatoli moko ya lokuta mpo na kokweisa Yesu, mpo abomama.+ 60 Kasi bazwaki ata likambo moko te, atako batatoli mingi ya lokuta bayaki.+ Na nsima bato mibale bayaki 61 mpe balobaki: “Moto oyo alobaki: ‘Ngai nakoki kobuka tempelo ya Nzambe mpe kotonga yango lisusu na mikolo misato.’”+ 62 Bongo nganga-nzambe monene atɛlɛmaki mpe alobaki na ye: “Okozongisa eloko te? Olobi nini mpo na makambo oyo bato oyo bazali kofunda yo na yango?”+ 63 Kasi Yesu afandaki kaka nyɛɛ.+ Bongo nganga-nzambe monene alobaki na ye: “Nalapisi yo ndai na nkombo ya Nzambe ya bomoi ete oyebisa biso soki ozali Kristo Mwana ya Nzambe!”+ 64 Yesu alobaki na ye: “Yo moko olobi yango. Kasi nalobi na bino: Banda sikoyo bokomona Mwana ya moto+ afandi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe ya nguya*+ mpe azali koya na mapata ya likoló.”+ 65 Bongo nganga-nzambe monene apasolaki bilamba na ye ya likoló, alobi: “Afingi Nzambe! Ntina nini tóluka lisusu batatoli? Talá! Boyoki ndenge afingi Nzambe. 66 Likanisi na bino ezali nini?” Bayanolaki: “Abongi na liwa.”+ 67 Bongo babwakelaki ye nsoi na elongi+ mpe babɛtaki ye makofi.+ Basusu babɛtaki ye bambata na elongi,+ 68 balobi: “Yo Kristo, sakwelá biso. Nani abɛti yo?”
69 Nzokande Petro afandaki libándá, na kati ya lopango yango. Mosaleli moko ya mwasi apusanaki pene na ye, mpe alobaki: “Yo mpe ozalaki na Yesu moto ya Galile!”+ 70 Kasi awanganaki yango liboso na bango nyonso, alobi: “Makambo oyo ozali koloba nayebi yango te.” 71 Ntango akendaki na porte ya lopango, mosaleli mosusu ya mwasi amonaki ye mpe alobaki na baoyo bazalaki wana: “Moto oyo azalaki ná Yesu moto ya Nazarete.”+ 72 Awanganaki yango lisusu mpe alapaki ndai ete: “Nayebi moto yango te!” 73 Nsima ya mwa ntango moke, baoyo batɛlɛmaki wana bayaki mpe balobaki na Petro: “Ya solo yo mpe ozali moko na bango, kutu elobeli* na yo ezali kofunda yo.” 74 Bongo abandaki komilakela mabe mpe kolapa ndai ete: “Nayebi moto yango te!” Mpe na mbala moko nsoso elelaki. 75 Mpe Petro akanisaki makambo oyo Yesu alobaki, ete: “Liboso nsoso elela, okowangana ngai mbala misato.”+ Bongo abimaki na libándá mpe alelaki na mawa makasi mpenza.
27 Ntango ntɔngɔ etanaki, banganga-nzambe bakonzi nyonso mpe bankulutu ya ekólo basalelaki Yesu likita mpo na koluka ndenge ya koboma ye.+ 2 Nsima ya kokanga ye bansinga, bakendaki na ye mpe bakabaki ye epai ya Pilate, oyo azalaki guvɛrnɛrɛ.+
3 Bongo ntango Yudasi, oyo atɛkaki ye, amonaki ete bakateli Yesu etumbu, ayokaki motema mpasi mpe akendaki kozongisela banganga-nzambe bakonzi ná bankulutu mbongo yango ya bibende 30 ya palata,+ 4 alobi: “Nasali lisumu ndenge natɛki moto oyo asali likambo te.”* Bango balobaki: “Yango etali biso na nini? Etali yo moko!” 5 Bongo abwakaki mbongo yango ya bibende ya palata na tempelo mpe atikaki bango. Na nsima akendaki komitya nsinga na nkingo.+ 6 Kasi banganga-nzambe bazwaki mbongo yango ya bibende ya palata mpe balobaki: “Epesami nzela te kotya yango na esika babombaka biloko mosantu, mpo ezali mbongo ya makila.” 7 Nsima ya koyokana bango nyonso, basombaki na mbongo yango elanga ya moyemi-mbɛki mpo ezala esika ya kokunda bapaya. 8 Yango wana, babengaka elanga yango Elanga ya Makila+ tii na mokolo ya lelo. 9 Bongo makambo oyo elobamaki na nzela ya mosakoli Yirimia ekokisamaki, ete: “Mpe bazwaki mbongo ya bibende 30 ya palata, ntalo oyo batyelaki moto yango, ntalo oyo bana mosusu ya Yisraele batyelaki ye, 10 mpe bapesaki yango mpo na elanga ya moyemi-mbɛki, ndenge Yehova* apesaki ngai mitindo.”+
11 Sikoyo Yesu atɛlɛmaki liboso ya guvɛrnɛrɛ; mpe guvɛrnɛrɛ atunaki ye: “Yo ozali Mokonzi ya Bayuda?” Yesu azongisaki: “Yo moko olobi yango.”+ 12 Kasi, ntango banganga-nzambe bakonzi ná bankulutu bazalaki kofunda ye, ayanolaki te.+ 13 Bongo Pilate alobaki na ye: “Ozali koyoka te ebele ya makambo oyo bazali kofunda yo na yango?” 14 Kasi apesaki ye eyano te, ɛɛ, ata liloba moko te, mpe guvɛrnɛrɛ akamwaki mingi.
15 Nzokande na fɛti nyonso, guvɛrnɛrɛ azalaki na momeseno ya kobimisela ebele ya bato mokangami moko na bolɔkɔ, oyo bango bazalaki kopona.+ 16 Na ntango wana, ezalaki na moto moko na bolɔkɔ oyo ayebanaki mingi, nkombo na ye ezalaki Barabasi. 17 Na yango, ntango bayanganaki esika moko, Pilate atunaki bango: “Bolingi nabimisela bino nani, Barabasi to Yesu oyo abengami Kristo?” 18 Mpo Pilate ayebaki ete ezalaki kaka mpo na likunya nde bakabaki ye. 19 Lisusu, ntango afandaki na kiti ya kosambisa, mwasi na ye atindelaki ye maloba oyo: “Kokɔta na likambo ya moto ya sembo wana te, mpo lelo namoni mpasi mingi na ndɔtɔ mpo na ye.” 20 Kasi banganga-nzambe bakonzi mpe bankulutu bandimisaki ebele ya bato ete básɛnga Barabasi,+ kasi Yesu abomama.+ 21 Bongo guvɛrnɛrɛ alobaki na bango: “Kati na bango mibale, bolingi nabimisela bino nani?” Bango balobaki: “Barabasi.” 22 Pilate alobaki na bango: “Bongo nasala nini na Yesu oyo abengami Kristo?” Bango nyonso balobaki: “Baká ye na nzete!”*+ 23 Alobaki: “Mpo na nini? Mabe nini asali?” Atako bongo bakobaki koganga lisusu makasi koleka ete: “Baká ye na nzete!”+
24 Lokola amonaki ete yango ebimisaki eloko te, kaka yikiyiki nde ezalaki koya makasi, Pilate azwaki mai mpe asukolaki mabɔkɔ na ye liboso ya ebele ya bato yango, alobi: “Ngai nazali na ngambo te na makila ya moto oyo. Yango etali bino moko.” 25 Bongo bato nyonso bazongisaki: “Makila na ye ezala na mitó na biso mpe ya bana na biso.”+ 26 Bongo abimiselaki bango Barabasi, kasi atindaki bábɛta Yesu fimbo+ mpe akabaki ye mpo bábaka ye na nzete.+
27 Bongo basoda ya guvɛrnɛrɛ bamemaki Yesu na ndako ya guvɛrnɛrɛ mpe bayanganisaki etuluku mobimba ya basoda zingazinga na ye.+ 28 Balongolaki ye bilamba, mpe balatisaki ye elamba moko ya motane makasi,+ 29 mpe batongaki motole ya nzubɛ mpe balatisaki ye yango na motó mpe basimbisaki ye mwa nzete na lobɔkɔ na ye ya mobali. Mpe, bazalaki kofukama liboso na ye, bazalaki kosɛka ye, balobi: “Mbote,* yo Mokonzi ya Bayuda!” 30 Babwakelaki ye nsoi,+ bazwaki mwa nzete yango mpe babandaki kobɛta ye na motó. 31 Nsukansuka, ntango basilisaki kosɛka ye, balongolaki ye elamba yango mpe balatisaki ye bilamba na ye.* Na nsima bamemaki ye mpo bábaka ye na nzete na bansɛtɛ.+
32 Ntango bazalaki kobima, bamonaki moto moko ya mboka Sirene, na nkombo Simo. Bazwaki ye na makasi mpo amemela Yesu nzete na ye ya mpasi.*+ 33 Ntango bakómaki na esika babengi Golgota, elingi koloba, Esika ya mokuwa ya motó,+ 34 bapesaki Yesu vinyo oyo basangisi na mai ya bololo* mpo amɛla;+ kasi nsima ya komeka yango, aboyaki komɛla yango. 35 Ntango babakaki ye na nzete na bansɛtɛ, bakabolaki bilamba na ye ya likoló nsima ya kobwaka mbɛsɛ.+ 36 Mpe bafandaki kuna mpo na kokɛngɛla ye. 37 Batyaki mpe likoló ya motó na ye likomi ya likambo oyo bafundaki ye na yango, ete: “Oyo ezali Yesu Mokonzi ya Bayuda.”+
38 Bongo babakaki miyibi mibale na nzete pembeni na ye, moko na lobɔkɔ na ye ya mobali mpe mosusu na lobɔkɔ na ye ya mwasi.+ 39 Baleki-nzela babandaki kofinga ye,+ bazalaki koningisa mitó na bango+ 40 mpe koloba: “Yo moto olingaki kobuka tempelo mpe kotonga yango na mikolo misato,+ omibikisa yo moko! Soki ozali mwana ya Nzambe, kitá na nzete ya mpasi!”*+ 41 Ndenge moko mpe banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli mpe bankulutu babandaki kosɛka ye mpe koloba:+ 42 “Abikisaki basusu; akoki komibikisa ye moko te! Soki azali Mokonzi ya Yisraele;+ akita sikoyo na nzete ya mpasi,* mpe tokondimela ye. 43 Atyelaki Nzambe motema; Ye abikisa ye sikoyo soki alingi ye,+ mpo azalaki koloba: ‘Ngai nazali Mwana ya Nzambe.’”+ 44 Ndenge moko mpe, ata miyibi oyo babakamaki pembeni na ye bazalaki kolobela ye mabe.+
45 Kobanda na midi,* molili ekɔtaki na mokili yango mobimba, tii na ngonga ya misato* ya nsima ya midi.+ 46 Pene na ngonga ya misato nsima ya midi,* Yesu abelelaki na mongongo makasi ete: “Eli, Eli, lama sabakatani?” elingi koloba: “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai?”+ 47 Ntango bayokaki bongo, bato mosusu na kati ya bato oyo batɛlɛmaki wana babandaki koloba: “Moto oyo azali kobenga Eliya.”+ 48 Mpe na mbala moko moto moko na kati na bango akendaki mbangu kozwa linyuka, apɔlisaki linyuka yango na vinyo ya ngayi, atyaki yango na nsɔngɛ ya mwa nzete mpe apesaki ye amɛla.+ 49 Kasi basusu balobaki: “Tiká ye! Tótala soki Eliya akoya kobikisa ye.” 50 Lisusu, Yesu agangaki na mongongo makasi, mpe azongisaki elimo na ye.*+
51 Mpe talá! rido ya esika mosantu+ epasukaki na biteni mibale,+ banda na likoló tii na nse,+ na nsima mabele eninganaki, mpe mabanga epasukaki. 52 Mpe malita* efungwamaki mpe bibembe mingi ya basantu oyo balalá na liwa ebimaki 53 (mpe bato oyo bautaki na malita yango nsima ya lisekwa ya Yesu bakɔtaki na engumba mosantu*), mpe bato mingi bamonaki yango. 54 Kasi ntango mokonzi ya basoda mpe baoyo bazalaki kokɛngɛla Yesu bamonaki koningana ya mabele mpe makambo oyo esalemaki, babangaki mingi, mpe balobaki: “Ya solo, moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe.”+
55 Ezalaki mpe na basi mingi oyo bazalaki kotala na mosika; bango bazalaki kotambola na Yesu banda na Galile, mpo na kosalela ye.+ 56 Kati na bango ezalaki na Maria Magadalene, Maria mama ya Yakobo ná Yose, mpe mama ya bana ya Zebede.+
57 Pene na mpokwa, mozwi moko ya Arimatea nkombo na ye Yozefe ayaki; ye mpe akómaki moyekoli ya Yesu.+ 58 Mobali yango akendaki epai ya Pilate mpe asɛngaki nzoto ya Yesu.+ Bongo Pilate apesaki mitindo ete bápesa ye yango.+ 59 Yozefe azwaki nzoto yango, azingaki yango na lini* ya pɛto mpe ya kitoko,+ 60 mpe alalisaki yango na lilita* na ye ya sika,+ oyo atimolaki na mabanga. Mpe, nsima ya kobalola libanga moko ya monene tii na monɔkɔ ya lilita* yango, akendaki. 61 Kasi Maria Magadalene ná Maria mosusu bazalaki kaka wana, bafandi liboso ya lilita yango.+
62 Na mokolo oyo elandaki, elingi koloba nsima ya mokolo ya Bolɛngɛli,+ banganga-nzambe bakonzi ná Bafarisai bayanganaki liboso ya Pilate, 63 balobi: “Nkolo, tokanisi lisusu ete, ntango moto wana ya lokuta azalaki na bomoi, alobaki: ‘Nakosekwa nsima ya mikolo misato.’+ 64 Yango wana, pesá mitindo ete bábatela lilita tii na mokolo ya misato, noki bayekoli na ye báya koyiba nzoto na ye+ mpe báloba na bato ete: ‘Alamuki uta na liwa!’ mpe bokosi ya mbala oyo ekozala mabe mingi koleka oyo ya liboso.” 65 Pilate azongiselaki bango: “Bózwa etuluku moko ya basoda mpo na kokɛngɛla lilita yango ndenge bolingi.” 66 Bongo bakendaki kobatela lilita yango mpe batyaki elembo na libanga mpe batyaki bakɛngɛli.
28 Nsima ya Sabata, ntango pole ebandaki kobima mokemoke na mokolo ya liboso ya pɔsɔ, Maria Magadalene ná Maria mosusu bakendaki kotala lilita yango.+
2 Mpe talá! mabele eninganaki makasi mpenza, mpo anzelu ya Yehova* akitaki uta na likoló, alongolaki libanga mpe afandelaki yango.+ 3 Azalaki kongɛnga lokola mokalikali, mpe bilamba na ye ezalaki mpɛmbɛ lokola nɛjɛ.+ 4 Lokola bakɛngɛli babangaki mingi, babandaki kolɛnga mpe bakómaki lokola bato oyo bakufi.
5 Anzelu alobaki na basi yango boye: “Bóbanga te, mpo nayebi ete bozali koluka Yesu oyo babakaki na nzete.+ 6 Azali awa te, mpo alamuki, kaka ndenge alobaki.+ Bóya kotala esika alalaki. 7 Mpe bókende nokinoki koyebisa bayekoli na ye ete alamuki uta na liwa, mpe talá! akei liboso na bino na Galile;+ kuna nde bokomona ye. Yango nde nsango nayeli bino.”+
8 Bongo batikaki lilita* nokinoki, na kobanga mpe na esengo monene, bakimaki mbangu kopesa bayekoli na ye nsango.+ 9 Mpe talá! Yesu akutanaki na bango mpe alobaki: “Mbote!” Bapusanaki, bagumbamelaki ye* mpe bakangaki ye na makolo. 10 Bongo Yesu alobaki na bango: “Bóbanga te! Bókende kopesa bandeko na ngai nsango, mpo bákende na Galile. Kuna nde bakomona ngai.”
11 Ntango bazalaki kokende, bakɛngɛli+ mosusu bakɔtaki na engumba mpe bayebisaki banganga-nzambe bakonzi makambo nyonso oyo esalemaki. 12 Nsima ya koyangana mpe kosala likita elongo na bankulutu, banganga-nzambe bakonzi bapesaki basoda yango mbongo ya bibende ebele ya palata, 13 balobi: “Bóloba ete: ‘Bayekoli na ye bayaki koyiba nzoto na ye na butu na ntango oyo biso tolalaki mpɔngi.’+ 14 Mpe soki yango ekómi na matoi ya guvɛrnɛrɛ, tokolimbolela ye likambo yango* mpe bokozala na ntina ya komitungisa te.” 15 Bongo bazwaki mbongo ya bibende ya palata mpe basalaki ndenge bayebisaki bango. Mpe lisolo yango epalanganá epai ya Bayuda tii na mokolo ya lelo.
16 Nzokande, bayekoli 11 bakendaki na Galile+ na ngomba oyo Yesu alakaki bango bákutana.+ 17 Ntango bamonaki ye bagumbamelaki ye,* kasi basusu batyaki ntembe. 18 Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki na bango: “Bapesi ngai bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele.+ 19 Na yango, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso,+ bóbatisa bango+ na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, 20 bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.+ Mpe talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na eleko ya nsuka ya mokili.”*+
To, “molɔngɔ ya bankɔkɔ.”
To, “Masiya; Oyo atyami mafuta.”
To, “nguya oyo esalaka mosala.”
Oyo ezali esika ya liboso kati na bisika 237 na Makomami ya Grɛki ya bokristo epai nkombo ya Nzambe, Yehova, emonani na makomi ya libongoli oyo. Talá Ap. A5.
To, “oyo ebotami kati na ye euti na elimo santu.”
Ekokani na nkombo ya Ebre Yeshua, to Yoshua, oyo elimboli “Yehova azali lobiko.”
Talá Ap. A5.
Elingi koloba, elenge mwasi oyo ayebi naino mibali te.
Talá Ap. A5.
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “kokumisa ye.”
To, “Masiya; Oyo atyami mafuta.”
To, “bakumisaki ye.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
To, “molimo.”
Mbala mosusu euti na liloba ya Ebre oyo elimboli “mwa nzete ya sika.”
Talá Ap. A5.
To, “kozindisa.”
To, “bana ya bitupa.”
Lil., “bóbota mbuma oyo ebongi na kobongola motema.”
To, “Sɔka.”
Talá Ap. A5.
To, “esika oyo eleki likoló na tempelo.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Awa, maloba “balandaki ye” elimboli bakómaki bayekoli na ye.
To, “mikatatali.”
To, “Etúká ya bingumba zomi.”
To, “basɛngi na elimo; baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”
To, “bato ya komikitisa.”
Lil., “bakozwa libula ya.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “lifuti.”
To, “kitunga ya komekela.”
To, “boyengebene.”
Esika oyo bazalaki kotumba bosɔtɔ libándá ya Yerusaleme. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “yokaná.”
Lil., “Kadra ya nsuka.” Talá Ap. B14.
Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ndimbola ya maloba.
Na Grɛki pornéïa; talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ap. A5.
To, “Zabolo.”
Elingi koloba, kodefa kozanga kozongisa na benefisi.
To, “mobimba.”
To, “bómonisa bosembo na bino.”
To, “makabo epai ya babola.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “etalelama mosantu.”
Lil., “mampa.”
Lil., “longolá banyongo na biso.”
Lil., “Kokɔtisa biso na komekama te.”
To, “sikolá.”
To, “babongisaka nzoto na bango te.”
To, “ezali komona malamu.” Lil., “ezali mindɔndɔ te.”
To, “ekotonda na pole.”
Lil., “mabe.”
To, “milimo.”
To, “Molimo.”
Lil., “lipeko moko na.” Talá Ap. B14.
To, “boyengebene na ye.”
To, “libaya ya motɔndɔ.”
To, “misala mingi ya nguya.”
To, “akumisaki ye.”
To, “mokatatali.”
To, “bakotandana.”
To, “bazála; ndako ya ndɛkɛ.”
Lil., “ya Bagadara.”
To, “malita ya kokanisama.”
To, “mokatatali.”
To, “mokatatali.”
Talá Mt 4:20, msl.
To, “atandamaki na mesa.”
To, “batandamaki na mesa.”
To, “elamba ya likoló.”
To, “akumisaki ye.”
To, “babɛti-miziki.”
Lil., “oyo balongoli mposo mpe bazokisi.”
To, “moto ya molende.”
To, “bósekwisa.”
Lil., “bilamba mibale.”
To, “oyo ayiki mpiko.”
Nkombo mosusu mpo na kolobela Satana, nkumu, to moyangeli, ya bademo.”
To, “bomoi,” elingi koloba, elikya nyonso ya bomoi.
Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “mpo na asarione moko.” Talá Ap. B14.
Lil., “ndako na ye moko.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “molimo.”
To, “molimo.”
To, “kosekwa.”
To, “Mongendu.”
To, “pɛtɛpɛtɛ?”
Lil., “liboso ya elongi na yo.”
To, “miziki.”
To, “emonanaka sembo.”
To, “na mbuma na yango.”
To, “misala na ye mingi ya nguya.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “Hadesi,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “milimo na bino ekopema.”
To, “pɛtɛɛ.”
To, “mampa ya kolakisa.”
To, “ekufá.”
To, “molimo na ngai endimi ye.”
Nkombo mosusu mpo na kolobela Satana.
Lil., “ndako.”
Lil., “bana.”
To, “kotuka.”
To, “makambo ya ntango oyo.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “Bana ya bitupa.”
To, “ya kozanga bosembo.”
To, “azali na misisa te.”
To, “makambo ya ntango oyo.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “bimekeli misato ya minene,” yango nyonso ezali 22 L.
To mbala mosusu, “banda mokili esalemá.”
To, “bosukisi ya makambo ya ntango moko boye.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “bosukisi ya makambo ya ntango moko boye.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “makambo ya ntango oyo.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “baboyaki kondimela ye.”
Elingi koloba, Erode Antipasi. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “Tetrake.”
To, “asekwi.”
To, “batandamaki na mesa.”
Lil., “stade mingi.” Stade moko = 185 m.
Elingi koloba, banda pene na ngonga ya 3:00 ya butu tii ntango moi ebimaka, pene na ngonga ya 6:00 ya ntɔngɔ.
To, “bakumisaki.”
Elingi koloba, kosala molulu ya kopɛtola.
To, “alobi mabe mpo na.”
Boike ya liloba ya Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
Elingi koloba, kosala molulu ya kopɛtola.
To, “akumisaki ye.”
To, “bana ya mbwa.”
To, “kitunga ya kobomba biloko.”
To, “ya kozanga bosembo.”
To, “kitunga ya kobomba biloko.”
To, “ezali moto te.”
To, “Hadesi,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “molimo.”
To, “molimo.”
To, “molimo.”
To, “molimo.”
To, “mpɛmbɛ.”
To, “akosekwa.”
Talá Ap. A3.
Talá Ap. B14.
Lil., “mbongo ya ebende ya statere.” Ezalaki kotalelama lokola drakimɛ minei. Talá Ap. B14.
To, “bobaluki te.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “bazali ntango nyonso kotala elongi ya.”
Talá Ap. A3.
To mbala mosusu, “na bino.”
Lil., “kende kopamela ye.”
Lil., “na monɔkɔ.”
Talanta 10 000 ezali denari 60 000 000. Talá Ap. B14.
To, “akumisaki ye.”
Talá Ap. B14.
Lil., “atye na ekanganeli moko.”
Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “mobimba.”
Awa, maloba “landá ngai,” elimboli “kómá moyekoli na ngai.”
To, “akozwa libula ya.”
Talá Ap. B14.
Lil., “pene na ngonga ya misato.” Bazalaki kotánga ngonga banda ntango moi ebimi.
Lil., “pene na ngonga ya motoba.”
Lil., “pene na ngonga ya libwa.”
Lil., “pene na ngonga ya zomi na moko.”
Lil., “ngonga ya zomi na moko.”
Talá Ap. B14.
Talá Ap. B14.
Talá Ap. B14.
To, “mabe.”
To, “mokabi.”
To, “akumisaki ye.”
To, “molimo.”
Talá Ap. A5.
Lil., “akoyeisa libebi monene likoló na bango.”
To, “libanga ya litumu.” Lil., “motó ya litumu.”
Talá Ap. A5.
To, “bato oyo batandami na mesa.”
To, “Ebongi.”
Talá Ap. B14.
Talá Ap. A5.
Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ap. A5.
To, “oyo eleki malamu.”
To, “Moteyi.”
Talá Ap. A3.
To, “mondimi ya Lingomba ya Bayuda.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “kopunza.”
To, “kobuka mibeko.”
To, “malita ya kokanisama.”
To, “koboma.”
To, “bana ya bitupa.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To mbala mosusu, “Batikeli bino mpamba.”
Talá Ap. A5.
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “makambo ya ntango oyo.” Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “bakokaba bino na bolɔzi.”
To, “ekokóma mpiɔ.”
To, “oyo ayiki mpiko.”
To, “mpasi.”
To, “na shambrɛ ya kati.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “mipɛpɛ minei.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “na eleko nini ya kokɛngɛla na butu.”
To, “bwanya.”
To, “bwanya.”
Talanta moko ya Bagrɛki = 20,4 kg. Talá Ap. B14.
Lil., “palata.”
Lil., “palata.”
To, “bózwa libula ya.”
To, “bilamba ezipaki nzoto malamu te.”
To, “bakolongola.” Lil., “bakokatama.”
To, “na mayele.”
To, “atandamaki na mesa.”
To, “Ntango oyo etyamá mpo na ngai.”
To, “atandamaki.”
Lil., “kolamuka.”
To, “molimo na ngai ezali.”
To, “elingaka kosala oyo ezali malamu.”
To, “makomami.”
Lil., “lobɔkɔ ya mobali ya nguya.”
To, “lokotá.”
Lil., “makila oyo esali likambo te.”
Talá Ap. A5.
To, “Bomá ye!”
To, “Losako.”
To, “bilamba na ye ya likoló.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “mai ya nsɔngi.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “Na ngonga ya motoba.”
Lil., “Pene na ngonga ya libwa.”
Lil., “pene na ngonga ya libwa.”
To, “akataki motema.”
To, “malita ya kokanisama.”
Elingi koloba, “Yerusaleme.”
To, “elamba.”
To, “lilita ya kokanisama.”
To, “lilita ya kokanisama.”
Talá Ap. A5.
To, “lilita ya kokanisama.”
To, “bakumisaki ye.”
To, “tokondimisa ye.”
To, “bakumisaki ye.”
To, “makambo ya ntango oyo.” Talá Ndimbola ya maloba.