Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt Marko 1:1-16:8
  • Marko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Marko
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Marko

NSANGO MALAMU NDENGE EKOMAMÁ NA MARKO

1 Ebandeli ya nsango malamu oyo etali Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe: 2 Kaka ndenge ekomamá na mokanda ya mosakoli Yisaya: “(Talá! nazali kotinda momemi-nsango na ngai liboso na yo,* mpe akobongisa nzela mpo na yo.)+ 3 Mongongo ya moto moko ezali koganga na esobe: ‘Bóbongisa nzela ya Yehova!* Bósembola babalabala na ye.’”+ 4 Yoane Mobatisi azalaki na esobe, azalaki kosakola batisimo oyo ezalaki elembo ya kobongola motema mpo na kolimbisama ya masumu.+ 5 Bato nyonso ya Yudea mpe bafandi nyonso ya Yerusaleme bazalaki kokende epai na ye, mpe azalaki kobatisa* bango na Ebale Yordani, bazalaki koyambola masumu na bango polelepolele.+ 6 Nzokande Yoane azalaki kolata bilamba basalá na nsuki ya kamela ná mokaba ya mposo ya nyama na loketo na ye,+ mpe azalaki kolya mayoyo ná mafuta ya nzoi ya zamba.+ 7 Mpe azalaki kosakola boye: “Moto moko ya makasi koleka ngai azali koya nsima na ngai, mpe nabongi te kogumbama mpo na kofungola bansinga ya basandale na ye.+ 8 Ngai, nabatisi bino na mai, kasi ye akobatisa bino na elimo santu.”+

9 Na mikolo yango, Yesu autaki na Nazarete, na Galile, mpe Yoane abatisaki ye na Yordani.+ 10 Na mbala moko ntango abimaki na mai, amonaki likoló ezali kofungwama, mpe elimo ezali kokita likoló na ye lokola ebenga.+ 11 Mpe mongongo moko eutaki na likoló, elobi: “Yo ozali Mwana na ngai, ya bolingo; nandimi yo.”+

12 Mpe na mbala moko elimo epusaki Yesu akende na esobe. 13 Akobaki kofanda na esobe mikolo 40; kuna Satana amekaki ye.+ Azalaki elongo na banyama ya zamba, kasi baanzelu bazalaki kosalela ye.+

14 Ntango bakangaki Yoane, na nsima Yesu akendaki na Galile.+ Kuna azalaki kosakola nsango malamu ya Nzambe,+ 15 mpe azalaki koloba: “Ntango oyo etyamá ekoki, mpe Bokonzi ya Nzambe ekómi pene. Bóbongola mitema+ mpe bóndima* nsango malamu.”

16 Ntango Yesu azalaki kotambola pembenipembeni ya mbu ya Galile, amonaki Simo ná ndeko na ye Andre+ bazali kobwaka minyama na bango na mbu,+ mpo bazalaki baluki-mbisi.+ 17 Na yango Yesu alobaki na bango: “Bólanda ngai, mpe nakokómisa bino baluki-bato.”+ 18 Na mbala moko basundolaki minyama na bango mpe balandaki ye.+ 19 Ntango apusanaki mwa moke liboso, amonaki Yakobo mwana ya Zebede ná ndeko na ye Yoane, wana bazalaki na masuwa na bango, bazali kobongisa minyama na bango,+ 20 mpe abengaki bango mbala moko. Bongo batikaki tata na bango Zebede na masuwa elongo na bato ya misala mpe balandaki Yesu. 21 Mpe bakɔtaki na Kapernaume.

Ntango kaka Sabata ekómaki, akɔtaki na sinagoga mpe abandaki koteya.+ 22 Mpe bato bakamwaki mingi na ndenge na ye ya koteya, mpo azalaki koteya bango lokola moto oyo azali na bokonzi, kasi lokola bakomeli te.+ 23 Kaka na ntango wana, ezalaki na mobali moko na kati ya sinagoga na bango oyo azalaki na elimo moko ya mbindo, mpe agangaki: 24 “Biso ná yo likambo nini, Yesu moto ya Nazarete?+ Oyei nde koboma biso? Nayebi yo malamu: ozali Mosantu ya Nzambe!”+ 25 Kasi Yesu apamelaki elimo yango ete: “Fandá nyɛɛ, mpe bimá na nzoto na ye!” 26 Mpe elimo yango ya mbindo eningisaki mobali yango mpe egangaki na makasi na yango nyonso, na nsima ebimaki na nzoto na ye. 27 Boye, bato nyonso bakamwaki mingi tii babandaki kotunana bango na bango mpe koloba: “Oyo likambo nini? Liteya moko ya sika! Na bokonzi nyonso, azali kopesa mitindo ata na bilimo ya mbindo, mpe yango ezali kotosa ye.” 28 Na yango nsango ya Yesu epalanganaki nokinoki bipai nyonso na etúká mobimba ya Galile.

29 Bongo balongwaki na sinagoga mpe bakendaki na ndako ya Simo ná Andre, elongo na Yakobo ná Yoane.+ 30 Nzokande mama-bokilo ya Simo+ alalaki, azalaki na fiɛvrɛ; mpe na mbala moko bayebisaki Yesu likambo na ye. 31 Akendaki epai na ye, asimbaki ye na lobɔkɔ mpe atɛlɛmisaki ye. Bongo fiɛvrɛ na ye esilaki mpe abandaki kosalela bango.

32 Na mpokwa, ntango moi elalaki, bato babandaki komemela ye baoyo nyonso bazalaki na maladi mpe baoyo bazalaki na bademo;+ 33 mpe bato nyonso ya engumba bayanganaki liboso mpenza ya porte. 34 Bongo abikisaki bato mingi oyo bazalaki kobɛla bamaladi ya ndenge na ndenge,+ mpe abimisaki bademo mingi, kasi azalaki kotika bademo báloba te, mpo bayebaki ete ye azali Kristo.*

35 Na ntɔngɔntɔngɔ, wana molili ezalaki naino, atɛlɛmaki, abimaki na libándá mpe akendaki na esika oyo bato bazalaka te, mpe kuna abandaki kobondela.+ 36 Nzokande, Simo mpe baoyo bazalaki elongo na ye bakendaki koluka ye. 37 Ntango bamonaki ye, balobaki na ye: “Bato nyonso bazali koluka yo.” 38 Kasi alobaki na bango: “Tókende epai mosusu, na bingumba ya pembeni, mpo nasakola mpe kuna, mpamba te ezali mpo na yango nde nayei.”+ 39 Mpe akendaki kosakola na basinagoga na bango, na Galile mobimba mpe azalaki kobimisa bademo.+

40 Moto moko ya maba mpe ayaki epai na ye, azalaki kobondela ye, afukami mpe alobi: “Soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.”+ 41 Na yango Yesu ayokelaki ye mawa, asembolaki lobɔkɔ na ye, asimbaki ye, mpe alobaki na ye: “Nalingi! Kómá pɛto.”+ 42 Na mbala moko maladi na ye ya maba elimwaki, mpe akómaki pɛto. 43 Bongo Yesu apesaki ye mitindo ya makasi mpe na mbala moko atikaki ye akende, 44 alobi na ye: “Kebá ete oloba likambo yango na moto te, kasi kende komilakisa epai ya nganga-nzambe, mpe pesá biloko ndenge Moize apesaki mitindo+ mpo na kopɛtolama na yo, mpo ezala litatoli mpo na bango.”+ 45 Kasi nsima ya kokende, moto yango abandaki koyebisa bipai nyonso likambo oyo ekómelaki ye, mpe Yesu akokaki lisusu kokɔta polele te na engumba moko, kasi azalaki kotikala libándá na bisika oyo bato bazalaka te. Atako bongo bato bazalaki se koya epai na ye, bazalaki kouta bipai nyonso.+

2 Nzokande, nsima ya mwa mikolo, Yesu akɔtaki lisusu na Kapernaume, mpe bato bayokaki nsango ete azali na ndako.+ 2 Bongo bato mingi bayanganaki, mpe bisika ezalaki lisusu te, ata liboso ya porte, mpe Yesu abandaki kosakwela bango liloba.+ 3 Mpe bamemelaki ye moto moko oyo azalaki koningana te,* oyo mibali minei bamemaki.+ 4 Kasi lokola bakokaki te kokómisa ye epai ya Yesu mpo na ebele ya bato, balongolaki nsamba likoló ya esika oyo Yesu azalaki, mpe nsima ya kotɔbɔla lidusu moko monene, bakitisaki moto yango na litɔkɔ oyo alalaki. 5 Ntango Yesu amonaki kondima na bango,+ alobaki na mobali yango oyo azalaki koningana te: “Mwana na ngai, masumu na yo elimbisami.”+ 6 Nzokande bakomeli mosusu bazalaki wana, bafandaki mpe bazalaki kokanisa na mitema na bango boye:+ 7 “Mpo na nini moto oyo azali koloba boye? Azali kofinga Nzambe. Nani akoki kolimbisa masumu, longola kaka Nzambe ye moko?”+ 8 Kasi na mbala moko, Yesu ayebaki* makambo oyo bazalaki kokanisakanisa na kati na bango, na yango alobaki na bango: “Mpo na nini bozali kokanisa makambo wana na mitema na bino?+ 9 Nini eleki pɛtɛɛ, koloba na moto oyo azali koningana te ete: ‘Masumu na yo elimbisami,’ to koloba: ‘Tɛlɛmá, zwá litɔkɔ na yo mpe tambolá’? 10 Kasi mpo bóyeba ete Mwana ya moto+ azali na bokonzi ya kolimbisa masumu awa na mabele—”+ alobaki na moto oyo azalaki koningana te boye: 11 “Nalobi na yo: Tɛlɛmá, zwá litɔkɔ na yo, mpe kende epai na yo.” 12 Bongo atɛlɛmaki mpe na mbala moko azwaki litɔkɔ na ye mpe abimaki na miso ya bato nyonso. Bongo bango nyonso bakamwaki mpenza, mpe bakumisaki Nzambe, balobi: “Naino tomoná likambo ya boye te.”+

13 Yesu abimaki lisusu pembeni ya mbu. Ebele ya bato wana nyonso bakobaki koya epai na ye, mpe abandaki koteya bango. 14 Mpe ntango azalaki koleka, amonaki Levi mwana ya Alfe afandi na biro ya mpako, mpe alobaki na ye: “Landá ngai.” Bongo atɛlɛmaki mpe alandaki ye.+ 15 Na nsima, azalaki kolya* na ndako ya Levi. Bongo bakɔngɔli-mpako ná basumuki mingi bazalaki kolya* elongo na Yesu ná bayekoli na ye, mpo mingi kati na bango bazalaki kolanda ye.+ 16 Kasi ntango bakomeli ya Bafarisai bamonaki ete azali kolya elongo na basumuki ná bakɔngɔli-mpako, babandaki koloba na bayekoli na ye: “Mpo na nini azali kolya elongo na bakɔngɔli-mpako mpe basumuki?” 17 Ntango Yesu ayokaki bongo, alobaki na bango: “Baoyo bazali nzoto makasi bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde bato oyo bazali kobɛla. Nayaki kobenga bato ya sembo te, kasi basumuki.”+

18 Nzokande, bayekoli ya Yoane mpe Bafarisai bazalaki na momeseno ya kokila bilei. Bongo bayaki mpe batunaki ye boye: “Mpo na nini bayekoli ya Yoane mpe bayekoli ya Bafarisai bakilaka bilei, kasi bayekoli na yo bakilaka bilei te?”+ 19 Bongo Yesu alobaki na bango: “Ntango mobali ya libala+ azali elongo na bango, baninga ya mobali ya libala bazali na ntina moko te ya kokila bilei, boye te? Ntango nyonso oyo bazali elongo na mobali ya libala, bakoki kokila bilei te. 20 Kasi mokolo ezali, mobali ya libala akolongolama epai na bango,+ mpe bakokila bilei na mokolo wana. 21 Moto moko te abambaka eteni ya elamba ya sika na elamba ya kala.* Soki asali bongo, eteni ya sika ekobenda elamba yango ya kala, mpe elamba ekopasuka lisusu makasi.+ 22 Lisusu, moto moko te atyaka vinyo ya sika na milangi ya kala ya mposo ya nyama. Soki asali bongo, vinyo ekopanza milangi yango, mpe vinyo ekobeba ná milangi mpe lokola. Kasi vinyo ya sika etyamaka na milangi ya sika ya mposo ya nyama.”

23 Nzokande ntango Yesu azalaki koleka na bilanga ya blé na Sabata, bayekoli na ye babandaki kobuka mbuma ya blé ntango bazalaki koleka.+ 24 Bongo Bafarisai balobaki na ye: “Talá! Mpo na nini bazali kosala likambo oyo epesami nzela te kosala na Sabata?” 25 Kasi alobaki na bango: “Botángá naino te likambo oyo Davidi asalaki ntango azalaki na bosɛnga, mpe ete ye ná bato na ye bayokaki nzala?+ 26 Ndenge lisolo oyo etali Abiatare+ nganga-nzambe mokonzi elobi yango, Davidi akɔtaki na ndako ya Nzambe mpe alyaki mampa ya komonisa,* oyo moto moko te azalaki na ndingisa ya kolya, longola kaka banganga-nzambe,+ mpe apesaki yango bato oyo bazalaki elongo na ye?” 27 Bongo alobaki na bango: “Sabata esalemaki mpo na moto,+ kasi moto mpo na Sabata te. 28 Yango wana Mwana ya moto azali Nkolo ata ya Sabata.”+

3 Yesu akɔtaki lisusu na sinagoga moko, mpe moto moko oyo lobɔkɔ ekauká* azalaki kuna.+ 2 Bongo Bafarisai bazalaki kotala Yesu na likebi nyonso mpo na komona soki akobikisa mobali yango na Sabata, mpo ete bákoka kofunda ye. 3 Alobaki na moto wana oyo lobɔkɔ ekauká* boye: “Tɛlɛmá mpe yaká na katikati.” 4 Na nsima alobaki na bango: “Epesami nzela na Sabata kosala malamu to kosala mabe, kobikisa bomoi* moko to koboma?”+ Kasi bafandaki kaka nyɛɛ. 5 Nsima ya kotala bango nyonso, mpo ayokaki mpenza mawa mingi mpo na motema makasi na bango,+ alobaki na mobali yango: “Sembolá lobɔkɔ na yo.” Mpe asembolaki yango, mpe lobɔkɔ na ye ezongaki malamu. 6 Bongo Bafarisai babimaki mpe na mbala moko babandaki kosalela ye likita elongo na bato ya Erode+ mpo na koboma ye.

7 Kasi Yesu akendaki pene na mbu elongo na bayekoli na ye, mpe ebele mpenza ya bato oyo bautaki na Galile mpe na Yudea balandaki ye.+ 8 Ata ebele ya bato mosusu oyo bautaki na Yerusaleme, na Idumea, na ngámbo ya Yordani, zingazinga ya Tire mpe ya Sidone, bayaki epai na ye mpo bayokaki nsango ya makambo mingi oyo azalaki kosala. 9 Ayebisaki bayekoli na ye ete bátya masuwa moko ya moke ezala wana mpo na ye, mpo ebele ya bato bákanganakangana na ye te. 10 Lokola abikisaki bato mingi, baoyo nyonso bazalaki na bamaladi ya makasi bazalaki kokwela ye mpo na kosimba ye.+ 11 Ata bilimo ya mbindo,+ ntango bazalaki komona ye, bazalaki kofukama liboso na ye mpe koganga: “Ozali Mwana ya Nzambe.”+ 12 Kasi mbala mingi azalaki kopekisa bango makasi ete báloba te soki azali nani.+

13 Amataki na ngomba moko, abengisaki bato oyo alingaki,+ mpe bayaki epai na ye.+ 14 Bongo asalaki* etuluku moko ya bato 12, oyo apesaki mpe nkombo bantoma; bango bakotambola elongo na ye, akotinda bango bákende kosakola 15 mpe akopesa bango bokonzi ya kobimisa bademo.+

16 Mpe etuluku yango ya bato 12+ oyo asalaki* ezalaki: Simo, oyo ye mpe apesaki nkombo Petro,+ 17 Yakobo mwana ya Zebede, mpe Yoane ndeko ya Yakobo (apesaki mpe bango nkombo Boanergesi, oyo elakisi “Bana ya nkake”),+ 18 Andre, Filipe, Bartelemi, Matai, Toma, Yakobo mwana ya Alfe, Tade, Simo Mokanana,* 19 mpe Yudasi Mokeriota, oyo na nsima atɛkaki ye.

Na nsima akɔtaki na ndako moko. 20 Mpe ebele ya bato bayanganaki lisusu, bongo bazalaki ata na likoki ya kolya te. 21 Kasi ntango bato ya libota na ye bayokaki yango, bayaki mpo na kokanga ye, mpo bazalaki koloba: “Abɛli motó.”+ 22 Lisusu, bakomeli oyo bautaki na Yerusaleme bazalaki koloba: “Azali na Beelezebube,* mpe azali kobimisa bademo na nguya ya mokonzi ya bademo.”+ 23 Bongo, nsima ya kobenga bango epai na ye, alobaki na bango na bandakisa ete: “Ndenge nini Satana akoki kobimisa Satana? 24 Soki bokonzi moko ekabwani na kati na yango moko, bokonzi yango ekoki kotɛlɛma te;+ 25 mpe soki libota* moko ekabwani na kati na yango moko, libota yango ekokoka kotɛlɛma te. 26 Lisusu, soki Satana azali komibundisa ye moko mpe akabwani, akoki kotɛlɛma te, kasi yango ezali nsuka na ye. 27 Kutu, moto oyo akɔti na ndako ya moto moko ya makasi akoki koyiba biloko na ye kaka soki akangi naino moto yango ya makasi bansinga. Na nsima nde akoki koyiba biloko na ndako na ye. 28 Ya solo nalobi na bino ete bato bakolimbisama masumu ya ndenge nyonso oyo basali mpe kofinga nyonso oyo bazali kofinga. 29 Nzokande, moto nyonso oyo azali kofinga* elimo santu akolimbisama te mpo na libela,+ kasi amemi ngambo ya lisumu ya seko.”+ 30 Yesu alobaki bongo mpo bazalaki koloba ete: “Azali na elimo ya mbindo.”+

31 Bongo mama na ye ná bandeko na ye ya mibali+ bayaki; batɛlɛmaki libándá mpe batindaki moto abenga ye.+ 32 Ebele ya bato bafandaki zingazinga na ye, mpe balobaki na ye: “Talá! Mama na yo ná bandeko na yo bazali libándá, bazali koluka yo.”+ 33 Kasi azongiselaki bango: “Nani nde mama na ngai mpe banani bazali bandeko na ngai ya mibali?” 34 Na nsima atalaki baoyo bafandaki zingazinga na ye, mpe alobaki: “Talá, mama na ngai ná bandeko na ngai!+ 35 Moto oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye nde ndeko na ngai ya mobali, ndeko na ngai ya mwasi mpe mama na ngai.”+

4 Lisusu Yesu abandaki koteya pembeni ya mbu, mpe ebele mpenza ya bato bayanganaki pene na ye. Na yango amataki na masuwa moko mpe afandaki. Azalaki mwa mosika na kati ya mbu, kasi ebele ya bato nyonso wana bazalaki pembenipembeni ya mbu, na libongo.+ 2 Mpe abandaki koteya bango makambo mingi na bandakisa,+ mpe ntango azalaki koteya, alobaki na bango boye:+ 3 “Bóyoka. Moloni abimaki mpo na kolona.+ 4 Ntango azalaki kolona, mboto mosusu ekweaki pembeni ya nzela, mpe bandɛkɛ eyaki mpe elyaki yango. 5 Mboto mosusu ekweaki na mabele oyo ezali na mabanga epai mabele ezalaki mingi te, mpe ebimaki nokinoki mpo mabele ezalaki mozindo te.+ 6 Kasi ntango moi ebimaki, milona yango ezikaki mpe ekaukaki mpo ezalaki na misisa te. 7 Mboto mosusu ekweaki na kati ya banzubɛ; banzubɛ ekolaki mpe etyaki milona nkaka, mpe ebotaki mbuma te.+ 8 Kasi mboto mosusu ekweaki na mabele ya malamu, ebimaki mpe ekolaki, mpe ebandaki kobota mbuma, oyo eboti 30, mosusu 60, mpe mosusu mbala 100.”+ 9 Bongo abakisaki: “Moto oyo azali na matoi ya koyoka, ayoka.”+

10 Nzokande ntango azalaki ye moko, bayekoli na ye mosusu ná bantoma zomi na mibale babandaki kotuna ye mituna mpo na bandakisa oyo apesaki.+ 11 Alobaki na bango: “Bino bozwi likoki ya kokanga ntina ya sekele mosantu+ ya Bokonzi ya Nzambe, kasi mpo na bato mosusu makambo nyonso ezali kaka na bandakisa,+ 12 mpo atako bazali kotala, bátala kasi bámona te, mpe atako bazali koyoka, báyoka kasi bákanga ntina na yango te. Bakozongela mpe Nzambe ata mokolo moko te mpe bakolimbisama te.”+ 13 Alobaki na bango lisusu: “Bokangi ntina ya ndakisa wana te? Bongo ndenge nini bokokanga ntina ya bandakisa mosusu nyonso?

14 “Moloni aloni liloba.+ 15 Mboto oyo ezali pembeni ya nzela epai liloba elonami; kasi ntango kaka bayoki yango, Satana ayei+ mpe alongoli liloba oyo elonamaki na kati na bango.+ 16 Ndenge moko mpe, oyo elonamaki na mabele oyo ezali na mabanga; ntango kaka bayoki liloba, bandimi yango na esengo.+ 17 Nzokande bazali na misisa te na kati na bango, kasi baumeli mwa ntango; bongo ntango kaka bolɔzi to monyoko ebimi mpo na liloba, babɛti libaku. 18 Mosusu mpe oyo elonami na kati ya banzubɛ. Yango ezali bato oyo bayoki liloba,+ 19 kasi mitungisi+ ya bomoi ya mokili oyo* mpe nguya ya bokosi ya bomɛngo+ mpe bamposa+ ya biloko mosusu nyonso ekɔti mpe etye liloba nkaka, mpe eboti mbuma te. 20 Nsukansuka oyo elonamaki na mabele ya malamu ezali baoyo bayoki liloba, bayambi yango malamu mpe baboti mbuma, mbala 30, mbala 60, mpe mbala 100.”+

21 Alobaki na bango lisusu boye: “Soki bayei na mwinda batyaka yango na nse ya kitunga* te to na nse ya mbeto te, ezali boye te? Bayaka na yango nde mpo na kotya yango likoló ya etɛlɛmiselo ya miinda, boye te?+ 22 Mpo ezali na likambo moko te oyo ebombamá oyo ekobimisama polele te; eloko moko te oyo ebombamá malamumalamu oyo ekoyebana polele te.+ 23 Moto oyo azali na matoi ya koyoka, ayoka.”+

24 Alobaki na bango lisusu boye: “Bókeba na makambo oyo bozali koyoka.+ Na emekeli oyo bozali komekela, bakomekela bino na yango, mpe bakobakisela bino mingi lisusu. 25 Mpo moto oyo azali na eloko, bakopesa ye mingi lisusu,+ kasi moto oyo azali na eloko te, bakobɔtɔla ye ata oyo azali na yango.”+

26 Abakisaki boye: “Na ndenge yango Bokonzi ya Nzambe ezali kaka lokola ntango moto moko abwaki mboto na mabele. 27 Alali na butu mpe alamuki na ntɔngɔ. Mboto ebimi mpe ekoli, kasi ayebi te soki esalemi ndenge nini. 28 Mabele yango moko ebandi kobota mbuma mokemoke: liboso molona ebimi, na nsima motó, mpe nsukansuka mbuma mobimba na kati ya motó yango. 29 Kasi ntango kaka mbuma eteli, akataka yango na mbeli ya likwangola, mpo ntango ya kobuka mbuma ekómi.”

30 Mpe alobaki lisusu boye: “Tokokokanisa Bokonzi ya Nzambe na nini, to tokopesa ndakisa nini mpo na kolimbola yango? 31 Ezali lokola mbuma ya mutarde, oyo na ntango elonami na mabele, ezalaka moke mpenza koleka mboto nyonso oyo ezali awa na mabele.+ 32 Kasi ntango elonami, ekolaka mpe ekómaka monene koleka bandunda nyonso mpe ebimisaka bitape minene, bongo bandɛkɛ ya likoló ekoki koya kofanda na nse ya elili na yango.”

33 Yesu azalaki kosalela bandakisa mingi+ ya ndenge wana mpo na kosakwela bango liloba ya Nzambe, na ndenge oyo bakokaki kokanga ntina na yango. 34 Kutu, azalaki koloba na bango ntango nyonso na bandakisa, kasi azalaki kolimbwela bayekoli na ye makambo nyonso ntango bazali kaka bango moko.+

35 Mpe na mokolo yango, ntango mpokwa ekómaki, alobaki na bango: “Tókatisa na ngámbo mosusu.”+ 36 Bongo nsima ya kozongisa ebele ya bato, bazwaki ye na masuwa, kaka ndenge azalaki, mpe bamasuwa mosusu ezalaki pembeni ya masuwa oyo ye azalaki.+ 37 Nzokande mopɛpɛ moko ya makasi mpe ya nsɔmɔ mpenza ebandaki. Mbonge ezalaki se kobɛta masuwa, bongo etikalaki moke masuwa etonda na mai.+ 38 Kasi Yesu azalaki na eteni ya nsima ya masuwa, alalaki likoló ya kuse. Bongo balamwisaki ye mpe balobaki na ye: “Moteyi, tolingi kokufa mpe ezali kosala yo eloko te?” 39 Na yango atɛlɛmaki mpe apamelaki mopɛpɛ mpe alobaki na mbu: “Shiii! Fandá nyɛɛ!”+ Mpe mopɛpɛ ekitaki, mpe kimya moko monene ekɔtaki. 40 Bongo alobaki na bango: “Mpo na nini bozali kobanga boye? Bozali naino na kondima te?” 41 Kasi kobanga moko ya nsɔmɔ ekangaki bango, mpe balobanaki bango na bango: “Moto oyo azali mpenza nani? Ata mopɛpɛ ná mbu ezali kotosa ye.”+

5 Na nsima, bakómaki na ngámbo mosusu ya mbu, na etúká ya Bageraza.+ 2 Ntango Yesu abimaki na masuwa, na mbala moko, moto moko oyo azalaki na elimo moko ya mbindo autaki na malita* mpe ayaki kokutana na ye. 3 Azalaki kofanda na kati ya malita; mpe tii na ntango wana, ata moto moko te azalaki na likoki ya kokanga ye, ezala ata na monyɔlɔlɔ. 4 Mbala mingi bazalaki kokanga ye mabɔkɔ na minyɔlɔlɔ mpe makolo na bikangeli, kasi azalaki kaka kokata yango; mpe moto moko te azalaki na makasi ya kokanga ye. 5 Mpe butu moi, azalaki ntango nyonso koganga na malita mpe na bangomba, mpe azalaki komizokisa na mabanga. 6 Ntango amonaki Yesu na mosika, ayaki mbangu mpe agumbamelaki ye.+ 7 Bongo agangaki na mongongo makasi ete: “Ngai ná yo likambo nini, Yesu, Mwana ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló? Lapá ndai na nkombo ya Nzambe ete okonyokola ngai te.”+ 8 Mpo Yesu azalaki koloba na ye: “Bimá na nzoto ya moto oyo, yo elimo ya mbindo.”+ 9 Kasi Yesu atunaki ye: “Nkombo na yo nani?” Mpe ye azongisaki: “Nkombo na ngai Limpinga, mpo tozali mingi.” 10 Mpe akobaki kobondela Yesu ete abengana bilimo yango te na mboka yango.+

11 Nzokande etonga moko monene ya bangulu+ ezalaki kolya kuna na ngomba.+ 12 Bongo bilimo yango ebondelaki ye ete: “Tindá biso na bangulu mpo tókɔta na kati na yango.” 13 Mpe apesaki bango nzela. Na yango, bilimo yango ya mbindo ebimaki mpe ekɔtaki na kati ya bangulu; mpe etonga mobimba, oyo ezalaki na bangulu soki 2 000, emibwakaki banda na likoló ya lobwaku tii na mbu, mpe ezindaki na mbu. 14 Kasi babateli ya etonga yango bakimaki mpe bayebisaki yango bafandi ya engumba mpe ya bamboka ya zamba, mpe bato bayaki kotala likambo oyo esalemaki.+ 15 Bongo bayaki epai ya Yesu, mpe bamonaki moto oyo azalaki na bademo; moto oyo liboso azalaki na limpinga ya bademo, afandi, alati bilamba mpe akómi na makanisi malamu, bongo babangaki. 16 Lisusu, baoyo bamonaki likambo yango bayebisaki bango likambo oyo ekómelaki moto oyo azalaki na bademo mpe oyo ekómelaki bangulu. 17 Na yango, babandaki kobondela Yesu ete alongwa na etúká na bango.+

18 Ntango Yesu azalaki kokɔta na masuwa, moto oyo azalaki na bademo abondelaki ye ete akende elongo na ye.+ 19 Nzokande apesaki ye nzela te, kasi alobaki na ye: “Kende epai na yo, na libota, mpe yebisá bango makambo nyonso oyo Yehova* asali mpo na yo mpe ndenge ayokeli yo mawa.” 20 Moto yango akendaki mpe abandaki kosakola na Dekapolisi* makambo nyonso oyo Yesu asalaki mpo na ye, mpe bato nyonso bakamwaki mingi.

21 Yesu azwaki lisusu masuwa mpe akatisaki na ngámbo mosusu ya mbu. Kuna, ebele ya bato bayanganaki pembeni na ye, mpe ye azalaki pembeni ya mbu.+ 22 Moko ya bakambi ya sinagoga ayaki. Nkombo na ye Yairuse. Ntango amonaki Yesu, akweaki na makolo na ye.+ 23 Abondelaki ye mbala ebele, alobi: “Mwana na ngai ya moke ya mwasi azali kobɛla makasi.* Nasɛngi yo, oya mpe otyela ye mabɔkɔ+ mpo ayoka malamu mpe abika.” 24 Bongo Yesu akendaki elongo na ye. Mpe ebele mpenza ya bato bazalaki kolanda ye mpe kokanganakangana na ye.

25 Nzokande, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na maladi ya kotanga makila+ esali mbula 12.+ 26 Amonaki mpasi mingi na mabɔkɔ ya minganga ndenge na ndenge mpe asilisaki mbongo na ye nyonso, kasi ayokaki kaka malamu te. Kutu, maladi na ye ekómaki lisusu makasi. 27 Ntango ayokaki nsango ya Yesu, ayaki nsimansima na ye na kati ya ebele ya bato mpe asimbaki elamba* na ye,+ 28 mpo azalaki koloba: “Soki nasimbi kaka bilamba* na ye, nakobika.”+ 29 Mpe na mbala moko makila na ye etikaki kotanga, mpe ayokaki na nzoto na ye ete abiki na maladi wana ya mpasi.

30 Na mbala moko, Yesu ayebaki ete nguya+ moko ebimi kati na ye, mpe abalukaki na kati ya ebele yango ya bato mpe atunaki: “Nani asimbi bilamba na ngai?”+ 31 Kasi bayekoli na ye bazongiselaki ye ete: “Ozali komona ndenge ebele ya bato bazali kokanganakangana na yo, mpe ozali kotuna: ‘Nani asimbi ngai?’” 32 Atalaki epai na epai mpo na komona nani asalaki bongo. 33 Lokola mwasi yango ayebaki nini ekómelaki ye, na kobanga mpe na kolɛnga, ayaki mpe akweaki liboso na ye mpe ayebisaki ye solo nyonso. 34 Yesu alobaki na ye: “Mwana na ngai, kondima na yo ebikisi yo. Kende na kimya,+ mpe biká na maladi na yo ya mpasi.”+

35 Ntango Yesu azalaki naino koloba, bato mosusu oyo bautaki na ndako ya mokambi ya sinagoga bayaki mpe balobaki: “Mwana na yo ya mwasi akufi! Mpo na nini kotungisa lisusu Moteyi?”+ 36 Kasi Yesu ayokaki makambo oyo bazalaki koloba, mpe alobaki na mokambi ya sinagoga: “Kobanga te,* monisá kaka kondima.”+ 37 Nzokande apekisaki bato mosusu bálanda ye, longola kaka Petro, Yakobo, ná Yoane ndeko ya Yakobo.+

38 Ntango bakómaki na ndako ya mokambi ya sinagoga, akutaki yikiyiki mpe bato bazalaki kolela mpe koganga makasi.+ 39 Nsima ya kokɔta, Yesu alobaki na bango: “Mpo na nini bozali kolela mpe bozali na yikiyiki? Mwana yango akufi te, kasi alali nde mpɔngi.”+ 40 Na yango babandaki kosɛka ye na lityo. Kasi nsima ya kobimisa bango nyonso libándá, azwaki tata ná mama ya mwana yango mpe baoyo bazalaki elongo na ye, mpe akɔtaki epai mwana yango azalaki. 41 Azwaki lobɔkɔ ya mwana yango, mpe alobaki na ye: “Talita kumi,” oyo, soki babongoli yango, elakisi: “Mwana mwasi, nalobi na yo, ‘tɛlɛmá!’”+ 42 Na mbala moko mwana yango ya mwasi atɛlɛmaki mpe abandaki kotambola. (Azalaki na mbula 12.) Mpe na mbala moko bazalaki bango lisusu te mpo batondaki na esengo makasi. 43 Kasi alobaki na bango mbala na mbala* ete báyebisa moto moko te likambo yango,+ mpe alobaki ete bápesa mwana yango eloko ya kolya.

6 Alongwaki kuna mpe akendaki na mboka na ye mpenza,+ mpe bayekoli na ye balandaki ye. 2 Ntango Sabata ekómaki, abandaki koteya na sinagoga. Bato mingi oyo bazalaki koyoka ye bakamwaki mpe balobaki: “Moto oyo azwi makambo oyo epai wapi?+ Mpo na nini bwanya ya boye epesami epai na ye, mpe mpo na nini makamwisi* oyo ezali kosalema na mabɔkɔ na ye?+ 3 Oyo mosali-mabaya te,+ mwana ya Maria,+ mpe ndeko ya Yakobo,+ Yozefe, Yudasi, mpe Simo,+ boye te? Mpe bandeko na ye ya basi bazali awa elongo na biso te?” Bongo babɛtaki libaku mpo na ye.* 4 Kasi Yesu alobaki na bango: “Bapesaka mosakoli lokumu bipai nyonso, longola kaka na mboka na ye, na libota na ye mpe na ndako na ye moko.”+ 5 Bongo akokaki te kosala makamwisi kuna, longola kaka kotya mabɔkɔ likoló ya mwa ndambo ya bato oyo bazalaki na maladi mpe kobikisa bango. 6 Ya solo, akamwaki makasi na ndenge bazangaki kondima. Mpe akendaki epai na epai na bamboka ya zingazinga, mpo na koteya.+

7 Nzokande, abengaki bantoma zomi na mibale, mpe abandaki kotinda bango mibalemibale,+ mpe apesaki bango bokonzi ya kobimisa bilimo ya mbindo.+ 8 Apesaki bango mpe mitindo ete bámema eloko te mpo na mobembo, longola kaka lingenda—limpa te, saki ya bilei te, mpe mbongo* te na kati ya mikaba na bango.+ 9 Ayebisaki bango mpe bálata basandale, kasi bámema elamba mosusu te.* 10 Alobaki na bango lisusu boye: “Esika nyonso oyo bokokɔta na ndako moko, bófanda wana tii bokolongwa na esika yango.+ 11 Mpe epai nyonso oyo bakoyamba bino te to bakoyoka bino te, ntango bozali kobima na esika yango, bópupola putulu ya mabele oyo ezali na nse ya makolo na bino mpo yango ezala litatoli mpo na bango.”+ 12 Bongo bakendaki mpe basakwelaki bato ete bábongola mitema,+ 13 babimisaki bademo+ mingi mpe bapakolaki bato mingi ya maladi mafuta mpe babikisaki bango.

14 Nzokande, Mokonzi Erode ayokaki makambo yango, mpo nkombo ya Yesu ekómaki koyebana mingi, mpe bato bazalaki koloba: “Yoane Mobatisi oyo akufaki alamuki na liwa,* yango wana azali kosala makamwisi.”+ 15 Kasi basusu bazalaki koloba: “Ezali Eliya.” Basusu mpe bazalaki koloba: “Azali mosakoli lokola moko ya basakoli ya kala.”+ 16 Kasi ntango Erode ayokaki yango, alobaki: “Yoane oyo nakataki motó, ye wana nde alamuki.” 17 Erode ye moko atindaki bákanga Yoane, atyaki ye minyɔlɔlɔ mpe abwakaki ye na bolɔkɔ mpo na Erodiadi, mwasi ya ndeko na ye Filipe, mpamba te Herode abalaki ye.+ 18 Mpo Yoane azalaki koloba na Erode: “Ozali na ndingisa te ya kozwa mwasi ya ndeko na yo.”+ 19 Na yango Erodiadi akangelaki Yoane nkanda mpe alukaki koboma ye, kasi akokaki te. 20 Mpo Erode azalaki kobanga Yoane; ayebaki ete azali moto ya sembo mpe mosantu,+ mpe azalaki kobatela ye. Mbala nyonso oyo azalaki koyoka Yoane, azalaki koyeba te asala nini, atako bongo, azalaki kaka koyoka ye na esengo.

21 Kasi mokolo moko, libaku emonanaki ntango Erode abongisaki bilei ya mpokwa na mokolo ya mbotama+ na ye mpo na basaleli na ye minene mpe bakomanda ya basoda mpe bato minene ya Galile.+ 22 Mwana mwasi ya Erodiadi akɔtaki mpe abinaki mpe asepelisaki Erode ná baoyo bazalaki kolya* elongo na ye. Mokonzi alobaki na elenge mwasi yango: “Sɛngá ngai eloko nyonso oyo olingi, mpe nakopesa yo yango.” 23 Alapelaki ye ndai ete: “Eloko nyonso oyo okosɛnga ngai, nakopesa yo yango, ata bokonzi na ngai kabolá na mibale.” 24 Bongo abimaki mpe alobaki na mama na ye: “Nasɛnga nini?” Mama na ye ayanolaki: “Motó ya Yoane Mobatisi.” 25 Mbala moko akɔtaki mbangu epai ya mokonzi mpe asɛngaki ye, alobi: “Nalingi opesa ngai sikoyo na saani, motó ya Yoane Mobatisi.”+ 26 Atako mokonzi ayokaki mawa mingi, alingaki te koboya kopesa ye eloko oyo asɛngaki, mpo na bandai oyo alapaki mpe mpo na bapaya na ye.* 27 Bongo mokonzi atindaki nokinoki soda-mokɛngɛli moko mpe apesaki ye mitindo ete amema motó ya Yoane. Akendaki mpe akataki Yoane motó na bolɔkɔ 28 mpe amemaki motó na ye na saani. Apesaki yango elenge mwasi, mpe elenge mwasi apesaki yango mama na ye. 29 Ntango bayekoli na ye bayokaki yango, bayaki kozwa ebembe na ye mpe batyaki yango na lilita* moko.

30 Bantoma bayanganaki zingazinga ya Yesu mpe bayebisaki ye makambo nyonso oyo basalaki mpe bateyaki.+ 31 Alobaki na bango: “Bóya, kaka bino moko, na esika oyo bato bazalaka te mpe bópema mwa moke.”+ Mpo bato mingi bazalaki koya mpe kokende, mpe bazwaki ata ntango ya kolya te. 32 Bongo bakendaki na masuwa na esika oyo bato bazalaka te, mpo bázala kaka bango moko.+ 33 Kasi bato bamonaki bango bazali kokende mpe mingi bayaki koyeba yango, mpe longwa na bingumba nyonso bakendaki mbangu kuna na makolo mpe bakómaki liboso na bango. 34 Ntango abimaki na masuwa, amonaki ebele mpenza ya bato, mpe ayokelaki bango mawa,+ mpo bazalaki lokola bampate oyo ezangi mobateli.+ Bongo abandaki koteya bango makambo mingi.+

35 Lokola ngonga epusanaki, bayekoli na ye bayaki epai na ye mpe balobaki: “Na esika oyo bato bazalaka te, mpe ngonga esili kopusana.+ 36 Yebisá bango bázonga, mpo bákende na bisika oyo bato basalaka bilanga mpe na bamboka ya zingazinga mpe básomba eloko ya kolya.”+ 37 Azongiselaki bango: “Bino moko bópesa bango eloko ya kolya.” Kasi bango balobaki na ye: “Tosengeli nde kokende kosomba mampa ya denari* 200 mpe kopesa yango bato mpo bálya?”+ 38 Alobaki na bango: “Bozali na mampa boni? Bókende naino kotala!” Nsima ya kotala, balobaki na ye: “Mampa mitano, ná mbisi mibale.”+ 39 Na nsima, asɛngaki bato nyonso báfanda bituluku bituluku na matiti ya mobesu.+ 40 Mpe bafandaki na bituluku ya bato 100 mpe ya bato 50. 41 Bongo azwaki mampa yango mitano ná mbisi yango mibale, atalaki na likoló mpe abondelaki mpo na kosɛnga lipamboli.+ Na nsima abukaki mampa yango mpe abandaki kopesa yango bayekoli, mpo bákabolela yango bato; akabolaki mpe mbisi yango mibale mpo na bato nyonso. 42 Bongo bango nyonso balyaki mpe batondaki, 43 mpe basangisaki biteni ya mampa, etondisaki kitunga 12, kozanga kotánga mbisi.+ 44 Baoyo balyaki mampa yango bazalaki mibali 5 000.

45 Na nsima, kozanga koumela, asɛngaki bayekoli na ye bámata na masuwa mpe bákatisa na ngámbo mosusu ya Betesaida liboso na ye, wana ye moko azalaki kozongisa ebele yango ya bato.+ 46 Kasi nsima ya kokabwana na bango, akendaki na ngomba moko mpo na kobondela.+ 47 Ntango mpokwa ekómaki, masuwa ezalaki na katikati ya mbu, kasi azalaki kaka ye moko na mokili.+ 48 Ntango amonaki bango bazali kobundabunda mpo na kolúka, mpo mopɛpɛ ezalaki kobɛta bango, pene na eleko ya minei ya kokɛngɛla na butu* ayaki epai na bango, azali kotambola likoló ya mai ya mbu; kasi asalaki lokola alingi* koleka bango. 49 Ntango bamonaki ye azali kotambola likoló ya mai ya mbu, bakanisaki: “Ezali emonamona!” Mpe bagangaki makasi. 50 Mpo bango nyonso bamonaki ye mpe babulunganaki. Kasi na mbala moko alobaki na bango: “Bózala na mpiko! Ezali ngai; bóbanga te.”+ 51 Bongo amataki na masuwa elongo na bango, mpe mopɛpɛ ekitaki. Na yango, bakamwaki mingi mpenza, 52 mpo lokola bakangaki ntina ya likamwisi ya mampa te, mitema na bango ezalaki mpenza kososola te.

53 Ntango bakatisaki mai mpe bakómaki na mokili, bakómaki na Genezarete mpe batɛlɛmisaki masuwa pene na esika yango.+ 54 Kasi ntango kaka babimaki na masuwa, bato bayebaki Yesu. 55 Bongo bakimaki mbangu koyebisa bato ya etúká wana mobimba. Mpe babandaki komema na matɔkɔ baoyo nyonso bazalaki kobɛla mpe kokende na bango epai bayokaki ete azali. 56 Epai nyonso azalaki kokɔta, na bamboka, na bingumba to na bamboka ya bilanga, bazalaki kotya bato ya maladi na bazando, mpe bazalaki kobondela ye atika bango básimba ata nsɔngɛ ya elamba na ye ya likoló.+ Mpe baoyo nyonso basimbaki yango babikaki.

7 Nzokande Bafarisai ná bakomeli mosusu oyo bautaki na Yerusaleme bayanganaki zingazinga na ye.+ 2 Mpe bamonaki bayekoli na ye mosusu bazali kolya bilei mabɔkɔ mbindo, elingi koloba, oyo basukoli te.* 3 (Mpo Bafarisai ná Bayuda nyonso balyaka te soki basukoli mabɔkɔ te tii na molɔku;* balandaka bonkɔkɔ ya bato ya ntango ya kala, 4 mpe ntango bauti na zando, balyaka te soki basukoli te. Bazwá mpe mimeseno mosusu mingi ya bonkɔkɔ oyo bakangamá na yango, na ndakisa: batisimo ya bakɔpɔ, ya bilokó, mpe ya bambɛki ya kwivre.)+ 5 Bongo Bafarisai ná bakomeli yango batunaki ye: “Mpo na nini bayekoli na yo batosaka te bonkɔkɔ ya bato ya ntango ya kala, kasi bazali kolya mabɔkɔ mbindo?”+ 6 Alobaki na bango: “Bakosi, Yisaya alobaki solo ntango asakolaki mpo na bino, se ndenge ekomamá, ete: ‘Bato oyo bakumisaka ngai kaka na mbɛbu, kasi mitema na bango ezali mosika na ngai.+ 7 Bazali kokoba kosambela ngai kaka mpamba, mpo mateya oyo bazali koteya ezali nde mibeko ya bato.’+ 8 Botiki mobeko ya Nzambe, mpe bokangami makasi na bonkɔkɔ ya bato.”+

9 Alobaki na bango lisusu boye: “Na mayele nyonso, bozali kotya mobeko ya Nzambe pembeni mpo na kobatela bonkɔkɔ na bino.+ 10 Na ndakisa, Moize alobaki: ‘Kumisá tata na yo mpe mama na yo,’+ mpe, ‘Moto oyo afingi* tata na ye to mama na ye asengeli kobomama.’+ 11 Kasi bino bolobi: ‘Moto akoki koloba na tata na ye to na mama na ye: “Eloko nyonso nazali na yango oyo ekokaki kosalisa bino ezali korbani, (elingi koloba, likabo oyo epesami na Nzambe).”’ 12 Na yango bozali kotika ye asala lisusu ata eloko moko te mpo na tata na ye to mama na ye.+ 13 Na ndenge yango, bokómisi liloba ya Nzambe eloko mpamba mpo na bonkɔkɔ na bino oyo bolakisaka basusu.+ Mpe bosalaka makambo mingi ya ndenge wana.”+ 14 Bongo abengaki lisusu ebele ya bato, mpe alobaki na bango: “Bóyoka ngai, bino nyonso, mpe bókanga ntina ya maloba na ngai.+ 15 Eloko oyo euti libándá mpe ekɔti na kati ya moto ekoki kokómisa ye mbindo te. Makambo oyo ebimaka na kati ya moto nde ekómisaka ye mbindo.”+ 16 *——

17 Nzokande ntango akɔtaki na ndako moko mosika na ebele ya bato, bayekoli na ye babandaki kotuna ye mituna mpo na ndakisa yango.+ 18 Bongo alobaki na bango: “Bino mpe bozangi mayele lokola bango? Boyebi te ete eloko moko te oyo euti libándá mpe ekɔti na kati ya moto ekoki kokómisa ye mbindo, 19 mpo ezali kokɔta, na motema na ye te, kasi nde na libumu na ye, mpe ebimaka libándá, na kabinɛ?” Na bongo, amonisaki ete biloko nyonso ya kolya ezali pɛto. 20 Alobaki lisusu boye: “Oyo ebimaka na moto nde ekómisaka ye mbindo.+ 21 Mpo na kati ya moto, na motema na ye,+ nde makanisi ya mabe ebimaka: misala ya pite,* koyiba, koboma bato, 22 misala ya ekobo, lokoso, misala ya motema mabe, kokosa, etamboli ya nsɔni na nko,* liso ya likunya, kofinga, lofundo, mpe bozoba. 23 Makambo nyonso wana ya mabe eutaka na kati mpe ekómisaka moto mbindo.”

24 Alongwaki kuna mpe akendaki na etúká ya Tire mpe ya Sidone.+ Kuna akɔtaki na ndako moko mpe alingaki te ete moto ata moko ayeba yango, kasi akokaki kobombama te. 25 Na mbala moko, mwasi moko oyo mwana na ye ya moke ya mwasi azalaki na elimo ya mbindo ayokaki nsango na ye; ayaki mpe afukamaki na makolo na ye.+ 26 Mwasi yango azalaki Mogrɛki, mwana-mboka* ya Fenisia ya Siri; mpe azalaki kosɛnga ye ete abimisa demo yango na mwana na ye ya mwasi. 27 Kasi alobaki na mwasi yango: “Tiká bana bátonda naino, mpo ezali malamu te kozwa mampa ya bana mpe kobwakela yango bambwa ya mike.”*+ 28 Kasi azongiselaki ye: “Ya solo, Nkolo. Nzokande bambwa ya mike na nse ya mesa, elyaka biteni oyo bana bakweisaka.” 29 Bongo alobaki na ye: “Lokola olobi bongo, kende; demo wana abimi na nzoto ya mwana na yo ya mwasi.”+ 30 Bongo akendaki epai na ye mpe akutaki mwana yango ya moke alali na mbeto. Demo yango abimaki kati na ye.+

31 Ntango Yesu alongwaki na etúká ya Tire, alekaki na Sidone mpo na kokende na mbu ya Galile, akatisaki na katikati ya etúká ya Dekapolisi.*+ 32 Kuna, bamemelaki Yesu mobali moko oyo akufá matoi mpe azalaki na mokakatano ya koloba,+ mpe babondelaki ye ete atya lobɔkɔ likoló na ye. 33 Abendaki ye pembeni, alongolaki ye na kati ya ebele ya bato. Na nsima atyaki misapi na ye na matoi ya mobali yango mpe, nsima ya kobwaka nsoi, asimbaki lolemo na ye.+ 34 Mpe wana atalaki likoló, apemaki makasi mpe alobaki na ye: “Efata,” elingi koloba: “Fungwamá.” 35 Bongo matoi ya mobali yango efungwamaki,+ mokakatano na ye ya koloba esilaki mpe akómaki koloba malamu. 36 Na yango, apesaki bango mitindo ete báyebisa moto te;+ kasi soki apekisi bango, wana nde bazalaki kopanza nsango yango lisusu koleka.+ 37 Ya solo, bakamwaki mingi mpenza+ mpe balobaki: “Makambo nyonso oyo azali kosala ezali malamu. Azali kosala ete bato oyo bakufá matoi báyoka mpe bababa báloba.”+

8 Na mikolo yango, ebele mpenza ya bato basanganaki lisusu zingazinga ya Yesu mpe bazalaki na eloko ya kolya te. Na yango, abengisaki bayekoli na ye mpe alobaki na bango: 2 “Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa,+ mpo bafandi ná ngai mikolo misato mobimba mpe bazali na eloko ya kolya te.+ 3 Soki nazongisi bango na bandako na bango na nzala, bakokwea na nzela. Mpe basusu na kati na bango bauti mosika.” 4 Kasi bayekoli na ye bayanolaki ye: “Awa na esika oyo bato bazalaka te. Epai wapi moto akoki kozwa mampa oyo ekoki mpo na koleisa bato oyo nyonso mpo bátonda?” 5 Bongo atunaki bango: “Bozali na mampa boni?” Bayanolaki: “Nsambo.”+ 6 Asɛngaki ebele ya bato yango báfanda na nse. Na nsima, azwaki mampa yango nsambo, abondelaki mpo na kopesa matɔndi, abukaki yango, mpe abandaki kopesa bayekoli na ye mpo bákabola yango, mpe bakabolelaki yango ebele ya bato.+ 7 Bazalaki mpe na mwa ndambo ya mbisi ya mikemike. Yesu apambolaki yango mpe ayebisaki bayekoli na ye bákabola mpe yango. 8 Bongo balyaki mpe batondaki. Basangisaki biteni oyo etikalaki, mpe etondisaki kitunga nsambo ya minene.*+ 9 Nzokande, mibali bazalaki soki 4 000. Na nsima ayebisaki bango bázonga.

10 Kaka na ntango yango, amataki na masuwa elongo na bayekoli na ye mpe akómaki na etúká ya Dalamanuta.+ 11 Kuna, Bafarisai bayaki mpe babandaki kotyana na ye ntembe. Mpe mpo na komeka ye, basɛngaki ye elembo moko oyo euti na likoló.+ 12 Bongo Yesu apemaki makasi, mpe alobaki: “Mpo na nini libota oyo ezali koluka elembo?+ Ya solo nalobi na bino: Bakopesa libota oyo elembo moko te.”+ 13 Bongo atikaki bango, akɔtaki lisusu na masuwa mpe akendaki na ngámbo mosusu.

14 Kasi bayekoli babosanaki komema mampa, mpe bazalaki na eloko ya kolya te na kati ya masuwa, kaka limpa moko mpamba.+ 15 Kasi Yesu akebisaki bango polelepolele ete: “Bófungola miso, bókeba na levire ya Bafarisai mpe na levire ya Erode.”+ 16 Bongo bakómaki kobendana bango na bango mpo bazalaki na mampa te. 17 Ntango amonaki bongo, alobaki na bango: “Mpo na nini bozali kobendana bino na bino mpo bozali na mampa te? Bososoli naino te mpe bokangi ntina te? Bozali* kaka kokanga ntina te? 18 ‘Atako bozali na miso, bozali komona te; mpe atako bozali na matoi, bozali koyoka te?’ Bobosani 19 ntango nabukaki mampa mitano+ mpo na mibali 5 000? Kitunga boni botondisaki na bitenibiteni oyo etikalaki?” Balobaki na ye: “Zomi na mibale.”+ 20 “Mpe ntango nabukaki mampa nsambo mpo na mibali 4 000, kitunga boni ya minene* botondisaki na bitenibiteni oyo etikalaki?” Balobaki na ye: “Nsambo.”+ 21 Na yango alobaki na bango: “Bokangi naino ntina te?”

22 Bongo bakómaki na Betesaida. Kuna, bato bamemelaki ye moto moko oyo akufá miso, mpe babondelaki ye ete asimba ye.+ 23 Asimbaki moto yango oyo akufá miso na lobɔkɔ, mpe amemaki ye libándá ya mboka. Nsima ya kobwakela ye nsoi na miso,+ atyelaki ye mabɔkɔ mpe atunaki ye: “Ozali komona nini?” 24 Moto yango atalaki mpe alobaki: “Nazali komona bato, kasi bazali komonana lokola banzete oyo ezali kotambola.” 25 Na nsima, Yesu atyaki lisusu mabɔkɔ na miso ya moto yango, mpe moto yango abandaki komona polele. Miso na ye efungwamaki, mpe akómaki komona eloko nyonso malamumalamu. 26 Bongo Yesu azongisaki ye na ndako na ye, alobi: “Kokɔta na mboka te.”

27 Nsima na yango Yesu ná bayekoli na ye bakendaki na bamboka ya Kaisaria ya Filipe. Na nzela abandaki kotuna bayekoli na ye, alobi: “Bato bazali koloba ete ngai nazali nani?”+ 28 Bazongiselaki ye: “Yoane Mobatisi,+ basusu bazali koloba Eliya,+ basusu mpe, moko ya basakoli.” 29 Mpe atunaki bango motuna oyo: “Bongo bino bolobi ete ngai nazali nani?” Petro ayanolaki ye: “Ozali Kristo.”+ 30 Na yango, apesaki bango mitindo makasi ete báyebisa moto te soki azali nani.+ 31 Lisusu, abandaki koteya bango ete Mwana ya moto asengeli komona mpasi mingi mpe akoboyama na bankulutu, banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli, akobomama+ mpe akosekwa* mikolo misato na nsima.+ 32 Ya solo, azalaki koloba likambo yango polelepolele. Kasi Petro abendaki ye pembeni mpe abandaki kopamela ye.+ 33 Bongo abalukaki, atalaki bayekoli na ye mpe apamelaki Petro, alobi: “Leká nsima na ngai, Satana! mpo lolenge na yo ya kokanisa ezali ya Nzambe te, kasi oyo ya bato.”+

34 Na nsima abengaki ebele ya bato ná bayekoli epai na ye mpe alobaki na bango: “Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi* mpe akoba kolanda ngai.+ 35 Mpo moto oyo alingi kobikisa bomoi* na ye akobungisa yango, kasi moto oyo abungisi bomoi* na ye mpo na ngai mpe mpo na nsango malamu akobikisa yango.+ 36 Mpo litomba nini moto akozala na yango soki azwi mokili mobimba kasi abungisi bomoi*+ na ye? 37 To eloko nini mpenza moto akoki kopesa na esika ya bomoi*+ na ye? 38 Mpamba te moto oyo azali koyoka nsɔni mpo na ngai mpe mpo na maloba na ngai na libota oyo ya ekobo* mpe ya masumu, Mwana ya moto mpe akoyoka ye nsɔni+ ntango akoya na nkembo ya Tata na ye elongo na baanzelu basantu.”+

9 Lisusu alobaki na bango: “Ya solo nalobi na bino ete bato mosusu na kati ya baoyo batɛlɛmi awa bakokufa naino te liboso bámona Bokonzi ya Nzambe eyei na nguya.”+ 2 Nsima ya mikolo motoba, Yesu azwaki Petro, Yakobo ná Yoane mpe akendaki na bango na ngomba moko molai; bazalaki kaka bango moko. Mpe abongwanaki liboso na bango;+ 3 bilamba na ye ya likoló ebandaki kongɛnga, ekómaki mpɛmbɛ makasi mpenza, oyo ata mosukoli-bilamba moko te awa na mabele akoki kokómisa yango mpɛmbɛ bongo. 4 Lisusu, Eliya ná Moize babimelaki bango, mpe bazalaki kosolola na Yesu. 5 Bongo Petro alobaki na Yesu: “Rabi, ezali malamu tózala awa. Boye tótɛlɛmisa bahema misato, moko mpo na yo, moko mpo na Moize mpe moko mpo na Eliya.” 6 Ya solo, ayebaki te asala nini, mpo bazalaki kobanga mpenza. 7 Bongo lipata moko esalemaki mpe ezipaki bango, mpe mongongo moko+ eutaki na lipata yango, elobi: “Oyo azali Mwana na ngai, ya bolingo.+ Bóyoka ye.”+ 8 Na mbala moko ntango batalaki epai na epai, bamonaki lisusu moto moko te elongo na bango, longola kaka Yesu.

9 Ntango bazalaki kokita na ngomba, apekisaki bango makasi ete báyebisa moto moko te makambo oyo bamonaki,+ tii ntango Mwana ya moto akolamuka na liwa.*+ 10 Batyaki maloba yango na motema,* kasi bazalaki kotunana soki kolamuka yango na liwa elimboli nini. 11 Mpe babandaki kotuna ye mituna, balobi: “Mpo na nini bakomeli balobaka ete Eliya+ asengeli koya liboso?”+ 12 Alobaki na bango: “Eliya asengeli koya liboso mpe kobongisa makambo nyonso;+ kasi ndenge nini ekomamá ete Mwana ya moto asengeli komona bampasi mingi+ mpe kotalelama lokola eloko mpamba?+ 13 Kasi nazali koloba na bino ete Eliya+ ayaki mpenza, mpe basalaki ye makambo nyonso oyo balingaki, kaka ndenge ekomamaki mpo na ye.”+

14 Ntango bakómaki epai ya bayekoli mosusu, bamonaki ebele ya bato zingazinga na bango mpe bakomeli bazalaki kotyana na bango ntembe.+ 15 Kasi ntango kaka ebele ya bato wana nyonso bamonaki Yesu, bakamwaki mingi, mpe bakimaki mbangu epai na ye mpo na kopesa ye mbote. 16 Na yango atunaki bango: “Likambo nini bozali kotyana na bango ntembe?” 17 Mpe moto moko na kati ya ebele ya bato ayanolaki ye: “Moteyi, namemeli yo mwana na ngai ya mobali mpo azali na elimo moko oyo ekómisá ye baba.+ 18 Epai nyonso oyo ekangaka ye, ebwakaka ye na mabele, mpe abimisaka fulufulu na monɔkɔ, alyaka mino na ye mpe asilaka makasi. Nasɛngaki bayekoli na yo bábimisa yango, kasi bakokaki te.” 19 Azongiselaki bango: “Ee libota oyo ezangá kondima,+ tii ntango nini nasengeli kozala ná bino? Tii ntango nini nasengeli kokanga motema na makambo na bino? Bómemela ngai ye.”+ 20 Bongo bamemelaki ye mwana yango. Kasi ntango elimo yango emonaki Yesu, ebandaki koningisa mwana yango makasi mpenza. Mwana yango akweaki na mabele, azalaki kobalukabaluka mpe kobimisa fulufulu na monɔkɔ. 21 Bongo Yesu atunaki tata ya mwana yango: “Banda ntango nini likambo oyo ezali kokómela ye?” Alobaki: “Banda bomwana mpenza. 22 Mpe mbala mingi ebwakaka ye na mɔtɔ to mpe na mai mpo na koboma ye. Kasi soki okoki kosala mwa eloko, yokelá biso mawa mpe salisá biso.” 23 Yesu alobaki na ye: “Mpo na nini olobi, ‘Soki okoki’? Ya solo, makambo nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.”+ 24 Na mbala moko tata ya mwana yango agangaki: “Nazali na kondima! Salisá ngai na esika oyo nazangi kondima!”+

25 Ntango Yesu amonaki ebele ya bato bazali koya mbangu epai na bango, apamelaki elimo yango ya mbindo, alobaki na yango: “Yo elimo oyo ekómisaka baba mpe ebomaka matoi, nalobi na yo, bimá na kati na ye mpe kokɔtela ye lisusu te!”+ 26 Nsima ya koganga mpe koningisa mwana yango makasi mpenza, elimo yango ebimaki, mpe mwana yango amonanaki lokola moto akufi, bongo bato mingi bazalaki koloba: “Akufi!” 27 Kasi Yesu asimbaki ye na lobɔkɔ mpe alamwisaki ye, bongo atɛlɛmaki. 28 Ntango Yesu akɔtaki na ndako, bayekoli na ye batunaki ye wana bazalaki kaka bango moko: “Mpo na nini biso tokokaki kobimisa yango te?”+ 29 Alobaki na bango: “Oyo ya motindo wana ekoki kobima kaka na libondeli.”

30 Balongwaki kuna mpe bakatisaki Galile, kasi alingaki te moto ayeba yango. 31 Mpo azalaki koteya bayekoli na ye mpe koyebisa bango: “Mwana ya moto akotɛkama na mabɔkɔ ya bato, mpe bakoboma ye,+ kasi atako akobomama, akolamuka* mikolo misato na nsima.”+ 32 Nzokande, bakangaki ntina ya maloba na ye te, mpe babangaki kotuna ye mituna.

33 Mpe bakómaki na Kapernaume. Nzokande, ntango azalaki na kati ya ndako, atunaki bango: “Mpo na likambo nini bozalaki kotyelana ntembe na nzela?”+ 34 Bafandaki nyɛɛ, mpo na nzela bazalaki kotyelana ntembe mpo na koyeba nani kati na bango aleki baninga. 35 Bongo afandaki, abengaki bantoma zomi na mibale mpe alobaki na bango: “Soki moto alingi kozala moto ya liboso, asengeli kozala moto ya nsuka ya bato nyonso mpe mosaleli ya bato nyonso.”+ 36 Na nsima azwaki mwana moko ya moke, atɛlɛmisaki ye na katikati na bango, azingaki ye na mabɔkɔ na ye mpe alobaki na bango: 37 “Moto oyo ayambi mwana moke+ lokola oyo mpo na nkombo na ngai, ayambi mpe ngai. Mpe moto oyo ayambi ngai, ayambi kaka ngai te, kasi mpe Moto oyo atindaki ngai.”+

38 Yoane alobaki na ye: “Moteyi, tomonaki moto moko azali kobimisa bademo na nkombo na yo mpe tomekaki kopekisa ye, mpo azalaki kolanda biso te.”+ 39 Kasi Yesu alobaki: “Bómeka kopekisa ye te, mpo soki moto asali likamwisi na nkombo na ngai, akokoka te koloba mabe mpo na ngai kaka na ntango wana. 40 Mpo moto oyo azali kotɛmɛla biso te azali na ngámbo na biso.+ 41 Mpe moto oyo apesi bino kɔpɔ ya mai ya komɛla mpo bozali bato ya Kristo,+ ya solo nazali koyebisa bino, akobungisa mbano na ye soki moke te.+ 42 Kasi moto oyo abɛtisi moko ya bato mike oyo, oyo bazali na kondima libaku, ekokaki kozala malamu mpo na ye soki bákangisaka ye na nkingo libanga oyo banikaka na yango mbuma oyo mpunda ebalolaka, mpe bábwaka ye na mbu.+

43 “Soki lobɔkɔ na yo ezali kobɛtisa yo libaku, katá yango. Eleki malamu ozwa bomoi ozali ebɔsɔnɔ, na esika okende ná mabɔkɔ mibale na Gehena,* na mɔtɔ oyo ekoki kobomama te.+ 44 *—— 45 Soki lokolo na yo ezali kobɛtisa yo libaku, katá yango. Eleki malamu ozwa bomoi ozali motɛngumi na esika obwakama ná makolo mibale na Gehena.*+ 46 *—— 47 Mpe soki liso na yo ezali kobɛtisa yo libaku, bwaká yango.+ Eleki malamu okɔta na Bokonzi ya Nzambe ozali na liso moko, na esika obwakama ná miso mibale na Gehena,*+ 48 epai nkusu ekufaka te mpe mɔtɔ ebomamaka te.+

49 “Mpo moto nyonso asengeli kotyama mungwa na mɔtɔ.+ 50 Mungwa ezalaka malamu mingi, kasi soki mungwa esili elɛngi, bokopesa yango elɛngi na nini?+ Bózala na mungwa na kati na bino,+ mpe bózalaka na kimya kati na bino.”+

10 Yesu alongwaki kuna mpe akendaki na ngámbo mosusu ya Yordani, na ndelo ya Yudea. Ebele ya bato bayanganaki lisusu epai na ye mpe abandaki lisusu koteya bango, ndenge amesanaki kosala.+ 2 Bafarisai bayaki epai na ye. Mpo na komeka ye, batunaki ye soki epesami nzela mobali aboma libala na mwasi na ye.+ 3 Azongiselaki bango: “Mitindo nini Moize apesaki bino?” 4 Balobaki: “Moize apesaki ndingisa ya kokoma mokanda ya kobengana mwasi mpe koboma na ye libala.”+ 5 Kasi Yesu alobaki na bango: “Ezali mpo na motema makasi+ na bino nde apesaki bino mitindo wana.+ 6 Nzokande, banda na ebandeli, ntango Nzambe akelaki bango, ‘Asalaki bango mobali ná mwasi.+ 7 Yango wana mobali akotika tata na ye ná mama na ye,+ 8 mpe bango mibale bakozala mosuni moko.’+ Boye, bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko. 9 Yango wana, oyo Nzambe akangisi esika moko,* moto akabola yango te.”+ 10 Ntango bazalaki lisusu na ndako, bayekoli batunaki ye mpo na likambo yango. 11 Alobaki na bango: “Moto oyo abomi libala na mwasi na ye mpe abali mosusu, asaleli ye ekobo.+ 12 Mpe soki esalemi ete mwasi, nsima ya koboma libala na mobali na ye, abali mosusu, asali ekobo.”+

13 Bato babandaki sikoyo komemela ye bana mike mpo asimba bango, kasi bayekoli bapamelaki bango.+ 14 Ntango Yesu amonaki bongo, asilikaki mpe alobaki na bango: “Bótika bana mike báya epai na ngai; bómeka te kopekisa bango, mpo Bokonzi ya Nzambe ezali ya bato oyo bazali lokola bango.+ 15 Ya solo nalobi na bino, moto oyo ayambi Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke te akokɔta kuna ata moke te.”+ 16 Mpe azwaki bana na mabɔkɔ na ye mpe abandaki kopambola bango, atyelaki bango mabɔkɔ.+

17 Ntango azalaki kotambola na nzela na ye, moto moko ayaki mbangu, afukamaki liboso na ye mpe atunaki ye motuna: “Moteyi Malamu, nasengeli kosala nini mpo nazwa* bomoi ya seko?”+ 18 Yesu alobaki na ye: “Mpo na nini ozali kobenga ngai moto malamu? Moto moko te azali malamu longola kaka moko, Nzambe.+ 19 Oyebi mibeko: ‘Koboma moto te,+ kosala ekobo te,+ koyiba te,+ kopesa litatoli ya lokuta te,+ kobuba te,+ kumisá tata na yo mpe mama na yo.’”+ 20 Mobali yango alobaki na ye: “Moteyi, nasalaka makambo nyonso wana banda bolenge na ngai.” 21 Yesu atalaki ye na bolingo, mpe alobaki na ye: “Eloko moko ezali kozanga yo: Kende, tɛká biloko nyonso oyo ozali na yango mpe pesá babola, mpe okozwa eloko ya motuya na likoló; na nsima yaká, landá ngai.”+ 22 Kasi alɛmbaki nzoto na eyano yango mpe akendaki na mawa, mpo azalaki na biloko mingi.+

23 Nsima ya kotala epai na epai, Yesu alobaki na bayekoli na ye: “Ekozala mpasi mpenza mpo baoyo bazali na mbongo bákɔta na Bokonzi ya Nzambe!”+ 24 Kasi bayekoli bakamwaki mpo na maloba yango. Bongo Yesu azongiselaki bango: “Bana na ngai, ezali mpasi mpenza mpo na kokɔta na Bokonzi ya Nzambe! 25 Kokɔta ya kamela na lidusu ya ntonga ezali pɛtɛɛ koleka kokɔta ya mozwi na Bokonzi ya Nzambe.”+ 26 Bakamwaki mingi koleka mpe balobaki na ye:* “Nani akoki kobika?”+ 27 Yesu atalaki bango na bilongi, mpe alobaki: “Mpo na bato ekoki kosalema te, kasi mpo na Nzambe ezali bongo te, mpo makambo nyonso ekoki kosalema mpo na Nzambe.”+ 28 Petro alobaki na ye: “Talá! Totiki biloko nyonso mpe tolandi yo.”+ 29 Yesu alobaki: “Ya solo nalobi na bino, moto moko te oyo atiki ndako, to bandeko mibali, to bandeko basi, to mama, to tata, to bana, to bilanga mpo na ngai mpe mpo na nsango malamu,+ 30 akozanga kozwa mbala 100 sikoyo na eleko oyo—bandako, bandeko mibali, bandeko basi, bamama, bana, mpe bilanga, elongo na minyoko+—mpe na mokili oyo ezali koya,* bomoi ya seko. 31 Kasi bato mingi oyo bazali bato ya liboso bakozala bato ya nsuka, mpe bato ya nsuka bakozala bato ya liboso.”+

32 Bazalaki sikoyo komata na nzela ya Yerusaleme, mpe Yesu azalaki kotambola liboso na bango. Bakamwaki, kasi baoyo bazalaki kolanda bango babandaki kobanga. Abendaki lisusu bantoma zomi na mibale pembeni mpe abandaki koyebisa bango makambo oyo elingaki kokómela ye:+ 33 “Talá! Tozali komata na Yerusaleme, mpe Mwana ya moto akokabama na mabɔkɔ ya banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli. Bakokatela ye etumbu ya liwa mpe bakokaba ye na mabɔkɔ ya bato ya bikólo; 34 bango bakosɛka ye, bakobwakela ye nsoi, bakobɛta ye fimbo mpe bakoboma ye, kasi mikolo misato na nsima akosekwa.”*+

35 Yakobo ná Yoane, bana ya Zebede,+ bayaki epai na ye mpe balobaki na ye: “Moteyi, tolingi osalela biso likambo oyo tokosɛnga yo.”+ 36 Yesu alobaki na bango: “Bolingi nasala nini mpo na bino?” 37 Bayanolaki: “Pesá biso nzela ya kofanda, moko na lobɔkɔ na yo ya mobali mpe moko na lobɔkɔ na yo ya mwasi, na nkembo na yo.”+ 38 Kasi Yesu alobaki na bango: “Likambo oyo bozali kosɛnga, boyebi yango te. Bokoki komɛla kɔpɔ oyo nazali komɛla, to kobatisama na batisimo oyo nazali kobatisama na yango?”+ 39 Balobaki na ye: “Tokoki.” Bongo Yesu alobaki na bango: “Kɔpɔ oyo nazali komɛla, bokomɛla yango, mpe batisimo oyo nazali kobatisama, bokobatisama na yango.+ 40 Kasi kofandisa moto na lobɔkɔ na ngai ya mobali to na lobɔkɔ na ngai ya mwasi ezali likambo na ngai te, kasi ezali ya baoyo babongiselá bango yango.”

41 Ntango bantoma mosusu zomi bayokaki yango, basilikelaki Yakobo ná Yoane.+ 42 Kasi Yesu abengaki bango esika azalaki, mpe alobaki na bango: “Boyebi ete baoyo bamonanaka* ete bazali koyangela bikólo balakisaka bato bokonzi na bango mpe bato na bango ya minene bakonzaka bato.+ 43 Esengeli kozala bongo te na kati na bino; kasi moto oyo alingi kokóma moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino,+ 44 mpe moto oyo alingi kozala moto ya liboso na kati na bino asengeli kozala moombo ya bato nyonso. 45 Mpo ata Mwana ya moto ayaki, mpo bato básalela ye te, kasi mpo na kosalela+ bango mpe kopesa bomoi* na ye lisiko na esika ya bato mingi.”+

46 Bongo bakómaki na Yeriko. Kasi ntango Yesu ná bayekoli na ye mpe ebele mpenza ya bato bazalaki kobima na Yeriko, Bartime (mwana ya Time), mosɛngi-biloko moko oyo akufá miso, afandaki pembeni ya nzela.+ 47 Ntango ayokaki ete Yesu moto ya Nazarete nde azalaki koleka, abandaki koganga mpe koloba: “Mwana ya Davidi,+ Yesu, yokelá ngai mawa!”+ 48 Na yango, bato mingi babandaki kogangela ye ete akanga monɔkɔ, kasi azalaki kaka koganga lisusu makasi koleka ete: “Mwana ya Davidi, yokelá ngai mawa!” 49 Bongo Yesu atɛlɛmaki mpe alobaki: “Bóbengela ngai ye.” Bongo babengaki moto yango oyo akufá miso, balobi na ye: “Zalá na mpiko, tɛlɛmá, azali kobenga yo.” 50 Abwakaki elamba na ye ya likoló, apumbwaki mpe akendaki epai ya Yesu. 51 Yesu atunaki ye: “Olingi nasala nini mpo na yo?” Moto yango oyo akufá miso alobaki na ye: “Rabuni,* namona lisusu.” 52 Mpe Yesu alobaki na ye: “Kende, kondima na yo ebikisi yo.”+ Na mbala moko akómaki komona lisusu, mpe abandaki kolanda ye na nzela.+

11 Ntango bazalaki kopusana na Yerusaleme, mpe bakómaki pene na Betefage mpe Betani+ na Ngomba ya Olive, atindaki bayekoli na ye mibale+ 2 mpe ayebisaki bango: “Bókende na mboka oyo bozali komona liboso na bino. Ntango kaka bokokɔta kuna, bokomona mwana ya mpunda oyo bakangi nsinga, oyo likoló na yango moto moko afandá naino te. Bófungola yango mpe bóya na yango awa. 3 Soki moto moko alobi na bino: ‘Mpo na nini bozali kosala bongo?’ bóloba: ‘Nkolo azali na mposa na yango, mpe akozongisa yango noki.’” 4 Bongo bakendaki mpe bakutaki mwana ya mpunda oyo bakangisá nsinga pembeni ya porte moko, libándá na balabala, mpe bafungolaki yango.+ 5 Kasi bato mosusu oyo batɛlɛmaki wana balobaki na bango: “Mpo na nini bozali kofungola mwana ya mpunda yango?” 6 Bayebisaki bango kaka ndenge Yesu alobaki, mpe batikaki bango bákende.

7 Bongo bamemaki mwana ya mpunda+ yango epai ya Yesu, mpe batyaki likoló na yango bilamba na bango ya likoló, mpe Yesu afandaki likoló na yango.+ 8 Lisusu, bato mingi batandaki bilamba na bango ya likoló na nzela, kasi basusu bakataki nkasa ya nzete na bilanga.+ 9 Mpe bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe baoyo bazalaki koya na nsima bazalaki se koganga: “Tobondeli yo, bikisá!+ Moto oyo azali koya na nkombo ya Yehova* apambwama!+ 10 Bokonzi ya tata na biso Davidi+ oyo ezali koya epambwama! Tobondeli yo, bikisá, kuna na likoló!” 11 Yesu akɔtaki na Yerusaleme, na nsima akendaki na tempelo, mpe kuna, atalaki biloko nyonso. Kasi lokola ngonga epusanaki, abimaki, akei na Betani elongo na bantoma zomi na mibale.+

12 Na mokolo oyo elandaki, ntango bazalaki kobima na Betani, ayokaki nzala.+ 13 Na mosika, amonaki nzete moko ya figi oyo ezalaki na nkasa, mpe akendaki kotala soki akokaki kokuta mbuma na nzete yango. Kasi ntango akómaki pembeni na yango, akutaki eloko te kaka nkasa, mpo ezalaki eleko ya bafigi te. 14 Bongo alobaki na yango: “Moto moko te akolya lisusu mbuma na yo.”+ Mpe bayekoli na ye bazalaki koyoka.

15 Bongo bakómaki na Yerusaleme. Kuna akɔtaki na tempelo mpe abandaki kobwaka libándá baoyo bazalaki kotɛka mpe kosomba na tempelo. Abalolaki mpe bamesa ya bato oyo basenzaka mbongo mpe bakiti ya baoyo bazalaki kotɛka bibenga,+ 16 mpe azalaki kotika nzela te ete moto aleka na esaleli moko na kati ya tempelo. 17 Azalaki koteya mpe koloba na bango: “Ekomamá te ete: ‘Ndako na ngai ekobengama ndako ya mabondeli mpo na bikólo nyonso’?+ Kasi bino bokómisi yango mobenga ya miyibi.”+ 18 Banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli bayokaki yango, mpe babandaki koluka ndenge ya koboma ye;+ mpo bazalaki kobanga ye, mpo ebele ya bato wana nyonso bazalaki ntango nyonso kokamwa na mateya na ye.+

19 Ntango mpokwa ekómaki, Yesu ná bayekoli na ye babimaki na engumba yango. 20 Na ntɔngɔntɔngɔ ntango bazalaki koleka na nzela, bamonaki nzete yango ya figi esili kokauka banda na misisa na yango.+ 21 Petro akanisaki likambo yango mpe alobaki na Yesu: “Rabi, talá! nzete ya figi oyo olakelaki mabe ekauki.”+ 22 Yesu azongiselaki bango: “Bózala na kondima epai ya Nzambe. 23 Ya solo nalobi na bino ete moto oyo ayebisi ngomba oyo: ‘Longwá awa mpe kende komibwaka na mbu,’ mpe soki atye ntembe te na motema na ye, kasi azali na kondima ete likambo oyo alobi ekosalema, ekosalema mpe bongo epai na ye.+ 24 Yango wana nazali koyebisa bino, biloko nyonso oyo bozali kobondela mpo na yango mpe kosɛnga, bózala na kondima ete bozwi yango, mpe bokozala na yango.+ 25 Mpe ntango botɛlɛmi, bozali kobondela, bólimbisa mabe nyonso oyo moto asalaki bino, mpo Tata na bino oyo azali na likoló alimbisa mpe bino mabunga na bino.”+ 26 *——

27 Bakómaki lisusu na Yerusaleme. Mpe ntango azalaki kotambola na tempelo, banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli ná bankulutu bayaki 28 mpe balobaki na ye: “Bokonzi nini ozali na yango ya kosala makambo oyo? To nani apesi yo bokonzi oyo ya kosala makambo yango?”+ 29 Yesu alobaki na bango: “Nakotuna bino motuna moko. Soki boyanoli ngai, ngai mpe nakoyebisa bino na bokonzi nini nazali kosala makambo oyo. 30 Batisimo ya Yoane+ eutaki na likoló to epai ya bato? Bóyanola ngai.”+ 31 Bongo babandaki kolobana bango na bango: “Soki tolobi: ‘Na likoló,’ akoloba: ‘Bongo mpo na nini bondimelaki ye te?’ 32 Kasi soki tomeki koloba: ‘Epai ya bato’?” Bazalaki kobanga ebele wana ya bato, mpo bango nyonso bazalaki komona ete Yoane azalaki mpenza mosakoli.+ 33 Na yango, bazongiselaki Yesu ete: “Toyebi te.” Bongo Yesu alobaki na bango: “Ngai mpe nakoyebisa bino te na bokonzi nini nazali kosala makambo oyo.”

12 Sikoyo abandaki koloba na bango na bandakisa: “Moto moko alonaki elanga ya vinyo+ mpe asalaki lopango zingazinga na yango. Atimolaki ekamwelo ya vinyo mpe atongaki ndako moko molai.*+ Na nsima atyaki basali-bilanga mpo báfutela yango, mpe akendaki mobembo na mboka mopaya.+ 2 Na eleko ya kobuka mbuma, atindelaki basali-bilanga moombo moko, mpo azwa ndambo ya mbuma ya vinyo epai na bango. 3 Kasi bazwaki ye, babɛtaki ye mpe bazongisaki ye mabɔkɔ mpamba. 4 Atindelaki bango lisusu moombo mosusu, kasi babɛtaki ye na motó mpe basambwisaki ye.+ 5 Atindaki mosusu, kasi babomaki ye. Mpe atindaki lisusu bato mosusu mingi, kasi babɛtaki basusu mpe babomaki basusu. 6 Azalaki lisusu na moto moko, mwana moko oyo alingaki mingi.+ Ye nde moto ya nsuka oyo atindelaki bango, alobi: ‘Bakopesa mwana na ngai limemya.’ 7 Kasi basali-bilanga wana balobanaki: ‘Talá mozwi-ya-libula.+ Bóya, tóboma ye, mpe libula ekozala ya biso.’ 8 Bongo bazwaki ye, babomaki ye mpe babwakaki ye libándá ya elanga ya vinyo.+ 9 Nkolo ya elanga ya vinyo akosala nini? Akoya mpe akoboma basali-bilanga, mpe akopesa elanga ya vinyo epai ya bato mosusu.+ 10 Botángá naino te eteni oyo ya Makomami, ete: ‘Libanga oyo batongi-ndako babwakaki ekómi libanga monene ya ntina mingi ya ndako.*+ 11 Yango euti epai ya Yehova,* mpe ezali likambo ya kokamwa na miso na biso’?”+

12 Na yango, bakomeli ná banganga-nzambe bakonzi balingaki kokanga ye, mpo bayebaki ete apesaki ndakisa wana nde mpo na bango. Kasi babangaki ebele ya bato, bongo batikaki ye mpe bakendaki.+

13 Na nsima, batindelaki ye mwa ndambo ya Bafarisai mpe bato mosusu ya Erode, mpo bázwa ye na maloba na ye.+ 14 Ntango bato yango bakómaki, balobaki na ye: “Moteyi, toyebi ete olobaka solo mpe olukaka kondimama na bato te, mpo otalaka bato te ndenge bazali komonana libándá, kasi makambo oyo oteyaka mpo na Nzambe eyokani na solo. Epesami nzela* kofuta Kaisala mpako oyo moto nyonso afutaka to te? 15 Tosengeli kofuta to tosengeli kofuta te?” Yesu ayebaki bokosi na bango, mpe alobaki na bango: “Mpo na nini bozali komeka ngai? Bóyela ngai denari* moko natala yango.” 16 Bayaki na yango moko. Mpe atunaki bango: “Elongi oyo mpe likomi oyo ezali ya nani?” Bayanolaki: “Ya Kaisala.” 17 Bongo Yesu alobaki: “Bózongisa biloko ya Kaisala epai ya Kaisala,+ kasi biloko ya Nzambe epai ya Nzambe.”+ Mpe maloba na ye ekamwisaki bango.

18 Bongo Basadukai, oyo balobaka ete lisekwa ezali te,+ bayaki mpe batunaki ye:+ 19 “Moteyi, Moize akomelaki biso ete soki mobali oyo abalá akufi, kasi abotaki bana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kozwa mwasi oyo ye atiki mpo abotela ndeko na ye bana.+ 20 Ezalaki na bandeko mibali nsambo. Oyo ya liboso abalaki mwasi, kasi ntango akufaki atikaki bana te. 21 Mpe oyo ya mibale abalaki mwasi yango, kasi akufaki kozanga kotika bana, mpe oyo ya misato ndenge moko. 22 Bango nyonso nsambo batikaki bana te. Nsukansuka, mwasi wana mpe akufaki. 23 Na lisekwa, akozala mwasi ya nani kati na bango? Mpo akómaki mwasi na bango nyonso nsambo.” 24 Yesu alobaki na bango: “Ezali te mpo na yango nde bozali na libunga, mpo boyebi Makomami te, boyebi mpe nguya ya Nzambe te?+ 25 Mpo ntango bakolamuka na liwa,* mibali bakobala te mpe basi bakobalisama te, kasi bakozala lokola baanzelu na likoló.+ 26 Kasi na likambo etali kolamuka ya bakufi, botángá te na mokanda ya Moize, na lisolo ya mwa nzete ya nzubɛ, ete Nzambe alobaki na ye: ‘Nazali Nzambe ya Abrahama, Nzambe ya Yisaka mpe Nzambe ya Yakobo’?+ 27 Azali Nzambe, ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi. Bozali mpenza na kati ya libunga.”+

28 Moko ya bakomeli oyo ayaki ayokaki bango bazali kotyana ntembe. Lokola amonaki ete Yesu ayanolaki bango na ndenge moko ya malamu, atunaki ye: “Mobeko nini ezali liboso ya* mibeko nyonso?”+ 29 Yesu ayanolaki: “Ya liboso yango oyo: ‘Yoká, Ee Yisraele, Yehova* Nzambe na biso azali Yehova* kaka moko, 30 mpe osengeli kolinga Yehova* Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na molimo* na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso, mpe na makasi na yo nyonso.’+ 31 Ya mibale yango oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’+ Mobeko mosusu te ezali monene koleka oyo wana.” 32 Mokomeli yango alobaki na ye: “Moteyi, olobi malamu; maloba na yo eyokani na solo: ‘Ye azali kaka Moko, mpe mosusu azali te kaka ye’;+ 33 mpe kolinga ye na motema na yo mobimba, na mayele na yo nyonso, mpe na makasi na yo nyonso mpe kolinga mozalani na yo lokola yo moko, ezali na ntina mingi koleka makabo nyonso ya kotumba mpe bambeka.”+ 34 Na yango lokola Yesu asosolaki ete ayanoli na mayele, alobaki na ye: “Ozali mosika te na Bokonzi ya Nzambe.” Na nsima, moto moko te azalaki lisusu na mpiko ya kotuna ye motuna.+

35 Nzokande, wana Yesu azalaki naino koteya na tempelo, atunaki: “Ndenge nini bakomeli balobaka ete Kristo azali mwana ya Davidi?+ 36 Na lisalisi ya elimo santu,+ Davidi ye moko alobaki boye: ‘Yehova* alobaki na Nkolo na ngai ete: “Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali tii nakotya banguna na yo na nse ya makolo na yo.”’+ 37 Davidi ye moko abengi ye ‘Nkolo,’ bongo ndenge nini akoki kozala mwana na ye?”+

Mpe ebele ya bato bazalaki koyoka ye na esengo. 38 Mpe na mateya na ye alobaki lisusu: “Bókeba na bakomeli, oyo balingaka kolekaleka na bazambala mpe balingaka bato bápesaka bango bambote na bazando+ 39 mpe balingaka bakiti ya liboso na basinagoga mpe bisika oyo eleki lokumu* na ntango ya bilei ya mpokwa.+ 40 Babɔtɔlaka biloko ya basi* oyo mibali bakufá mpe mpo na komilakisa* basalaka mabondeli ya milaimilai. Bango bakozwa lisambisi moko ya makasi* koleka.”

41 Na nsima afandaki liboso ya bakɛsi* ya makabo+ mpe abandaki kotala ndenge ebele wana ya bato bazalaki kotya mbongo na bakɛsi ya makabo; bazwi mingi bazalaki kotya mbongo mingi ya bibende.+ 42 Nzokande mwasi mobola moko oyo mobali akufá ayaki mpe atyaki mbongo mibale ya bibende ya motuya moke mpenza.*+ 43 Bongo Yesu abengaki bayekoli na ye mpe alobaki na bango: “Ya solo nalobi na bino ete mwasi mobola wana oyo mobali akufá atye mingi koleka bato mosusu nyonso oyo batyaki mbongo na bakɛsi ya makabo;+ 44 Mpo bango nyonso batye makabo oyo eutaki na bozwi na bango oyo elekaki, kasi ye, na kokelela* na ye, atyaki nyonso oyo azalaki na yango, nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobikela.”+

13 Ntango azalaki kobima na tempelo, moko ya bayekoli na ye alobaki na ye: “Moteyi, talá! Mabanga ya kitoko boye mpe bandako ya kitoko boye!”+ 2 Nzokande, Yesu alobaki na ye: “Omoni bandako wana ya minene? Ata libanga moko te ekotikala likoló ya libanga mosusu awa, nyonso ekobebisama.”+

3 Ntango afandaki na Ngomba ya Olive, na esika oyo etalani na tempelo, Petro, Yakobo, Yoane mpe Andre batunaki ye, kaka bango moko, ete: 4 “Yebisá biso: Makambo yango ekosalema ntango nini, mpe elembo nini ekomonisa ete makambo nyonso wana elingi kokóma na nsuka?”+ 5 Bongo Yesu abandaki koloba na bango: “Bókeba, moto akosa bino te.+ 6 Mingi bakoya na nkombo na ngai, mpe bakoloba: ‘Ngai nazali ye,’ mpe bakokosa bato mingi. 7 Lisusu, ntango bokoyoka lokito ya bitumba mpe bansango ya bitumba, bóbanga te; makambo wana esengeli kosalema, kasi wana ekozala naino nsuka te.+

8 “Mpo ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi.+ Koningana ya mabele ekosalema na bisika ndenge na ndenge. Nzala mpe ekozala.+ Makambo wana nyonso ekozala ebandeli ya bampasi.+

9 “Kasi bino, bókeba: Bato bakokaba bino na batribinale ya mboka,+ mpe bakobɛta bino na basinagoga+ mpe bakotɛlɛmisa bino liboso ya baguvɛrnɛrɛ mpe bakonzi mpo na ngai, mpe yango ekozala litatoli mpo na bango.+ 10 Lisusu, na bikólo nyonso, nsango malamu esengeli naino kosakolama.+ 11 Mpe ntango bakomema bino mpo na kokaba bino, bómitungisa liboso te mpo na oyo bosengeli koloba; kasi oyo ekopesama epai na bino na ngonga wana bóloba yango, mpo ezali bino te nde bokoloba, kasi ezali nde elimo santu.+ 12 Lisusu, ndeko akokaba ndeko na ye na liwa, mpe tata akosala mpe mwana na ye bongo, mpe bana bakotombokela baboti mpe bakobomisa bango.+ 13 Mpe bato nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.+ Kasi moto oyo akoyika mpiko* tii na nsuka,+ akobika.+

14 “Nzokande, ntango bokomona eloko ya bosɔtɔ oyo eyeisaka libebi+ etɛlɛmi na esika oyo yango esengeli kotɛlɛma te (tiká motángi asalela bososoli), na ntango yango, baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba.+ 15 Moto oyo azali likoló ya ndako akita te, mpe akɔta na ndako na ye te mpo na kozwa eloko; 16 mpe moto oyo azali na bilanga azongela te biloko oyo ezali na nsima mpo na kozwa elamba na ye ya likoló. 17 Mawa na basi ya zemi mpe na baoyo bakomɛlisa bana mabɛlɛ na mikolo yango!+ 18 Bókoba kobondela mpo ete yango ezala te na eleko ya malili makasi. 19 Mpo mikolo yango ekozala mikolo ya bolɔzi+ moko oyo esalemá naino te banda ebandeli ya bozalisi oyo Nzambe azalisaki tii na ntango wana, mpe ekosalema lisusu te.+ 20 Kutu, soki Yehova* ayeisaka mikolo yango mokuse te, ata moto moko te alingaki kobika. Kasi mpo na bato oyo baponami, oyo ye aponá, ayeisá mikolo yango mokuse.+

21 “Bongo soki moto alobi na bino: ‘Talá! Kristo azali awa,’ to ‘Talá! Azali kuna,’ bóndima te.+ 22 Mpo ba-Kristo ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima+ mpe bakosala bilembo mpe bakosala makamwisi mpo na kokosa ata baoyo baponami, soki likoki ezali. 23 Yango wana bino bókeba.+ Nayebisi bino makambo nyonso libelalibela.

24 “Kasi na mikolo yango, nsima ya bolɔzi yango, moi ekoyinda, mpe sanza ekopesa pole na yango te,+ 25 minzoto ekouta na likoló ekwei, mpe banguya oyo ezali na likoló ekoningana. 26 Bongo bakomona Mwana ya moto+ azali koya na mapata na nguya mingi mpe na nkembo.+ 27 Bongo akotinda baanzelu mpe akoyanganisa esika moko bato oyo ye aponá longwa na bansuka minei ya mokili,* longwa na nsuka ya mabele tii na nsuka ya likoló.+

28 “Sikoyo bózwa liteya oyo na ndakisa ya nzete ya figi: Ntango kaka etape na yango ya sika ekómi pɛtɛpɛtɛ mpe ebimisi nkasa, boyebaka ete eleko ya molunge ekómi pene.+ 29 Bino mpe ndenge moko, ntango bokomona makambo yango ezali kosalema, bóyeba ete azali pene, na porte.+ 30 Ya solo nalobi na bino ete libota oyo ekoleka ata moke te tii makambo nyonso wana ekosalema.+ 31 Likoló ná mabele ekoleka,+ kasi maloba na ngai ekoleka soki moke te.+

32 “Mpo na mokolo yango to ngonga yango moto moko ayebi te, ezala baanzelu na likoló, ezala Mwana, kaka Tata nde ayebi.+ 33 Bókeba, bólala mpɔngi te,+ mpo boyebi te mokolo nini ntango oyo etyamá ekokoka.+ 34 Ezali lokola moto oyo azali kokende mobembo na mboka mopaya. Liboso ya kokende, atiki ndako na ye na nse ya bokonzi ya baombo na ye,+ apesi moto na moto mosala na ye, mpe apesi mokɛngɛli ya porte mitindo ete akoba kosɛnzɛla.+ 35 Yango wana bókoba kosɛnzɛla, mpo boyebi te ntango nini nkolo ya ndako akoya,+ soki na mpokwa to na katikati ya butu to liboso ntɔngɔ etana* to na ntɔngɔntɔngɔ,+ 36 mpo ntango akoya na mbalakaka, akuta bino te bozali kolala mpɔngi.+ 37 Kasi oyo nalobi na bino nalobi yango na bato nyonso: Bókoba kosɛnzɛla.”+

14 Nzokande, etikalaki mikolo mibale+ mpo Elekeli+ mpe fɛti ya Mampa ezangá levire+ ekoka. Banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli bazalaki koluka ndenge ya kokanga ye na mayele mabe* mpe koboma ye.+ 2 Kasi bazalaki koloba: “Na fɛti te, mbala mosusu yikiyiki ekobima na kati ya bato.”

3 Ntango Yesu azalaki kolya* na Betani, na ndako ya Simo moto ya maba, mwasi moko ayaki na molangi ya albatre oyo ezalaki na mafuta ya nsolo kitoko, narda ya solosolo, ya ntalo mingi. Abukaki molangi yango mpo na kofungola, mpe abandaki kosopa yango na motó ya Yesu.+ 4 Kasi basusu balobanaki bango na bango na nkanda ete: “Mpo na nini kobebisa mafuta oyo ya nsolo kitoko boye? 5 Mpo bakokaki kotɛka mafuta yango na denari* koleka 300 mpe kopesa mbongo yango babola!” Mpe basilikelaki mwasi yango.* 6 Kasi Yesu alobaki: “Bótika ye kimya. Mpo na nini bozali kotungisa ye? Asali likambo moko ya malamu mpo na ngai.+ 7 Mpo babola, bokozala na bango ntango nyonso,+ mpe bokoki kosalela bango bolamu ntango nyonso oyo bolingi. Kasi ngai bokozala na ngai ntango nyonso te.+ 8 Asali oyo ekoki na ye; asopi libelalibela mafuta ya nsolo kitoko na nzoto na ngai, mpo na kokundama na ngai.+ 9 Ya solo nalobi na bino, epai nyonso oyo nsango malamu ekosakolama na mokili mobimba,+ bakolobela mpe likambo oyo mwasi oyo asali, mpo na kokanisa ye.”+

10 Mpe Yudasi Mokeriota, moko ya bantoma zomi na mibale, akendaki epai ya banganga-nzambe bakonzi mpo na kotɛka Yesu epai na bango.+ 11 Ntango bayokaki yango, basepelaki mpe balakaki kopesa ye mbongo ya palata.+ Bongo abandaki koluka libaku mpo na kotɛka ye.

12 Na mokolo ya liboso ya fɛti ya Mampa ezangá levire,+ mokolo oyo bazalaki na momeseno ya kopesa mbeka ya Elekeli,+ bayekoli na ye batunaki ye: “Epai wapi olingi tókende kobongisela yo bilei ya Elekeli?”+ 13 Na yango atindaki mibale kati ya bayekoli na ye mpe alobaki na bango: “Bókende na engumba, mpe moto moko oyo amemi elokó ya mai akokutana na bino. Bólanda ye,+ 14 mpe esika nyonso oyo akokɔta, bóloba na nkolo-ndako boye: ‘Moteyi alobi: “Wapi ndako ya koyamba bapaya epai nakoki kolya Elekeli elongo na bayekoli na ngai?”’ 15 Mpe akolakisa bino shambrɛ moko monene ya likoló, oyo ezali na biloko nyonso mpe ebongisami malamu. Bóbongisela biso bilei ya Elekeli kuna.” 16 Na yango bayekoli bakendaki. Ntango bakɔtaki na engumba, bakutaki makambo kaka ndenge alobaki na bango, mpe babongisaki Elekeli.

17 Ntango mpokwa ekómaki, ayaki elongo na bantoma zomi na mibale.+ 18 Ntango bafandaki* na mesa mpe bazalaki kolya, Yesu alobaki: “Ya solo nalobi na bino, moko na bino, oyo azali kolya elongo na ngai, akotɛka ngai.”+ 19 Bayokaki mawa mpe mokomoko abandaki kotuna ye: “Ezali ngai te, boye te?” 20 Alobaki na bango: “Ezali moko ya bantoma zomi na mibale, oyo azali kotya lobɔkɔ na saani elongo na ngai.+ 21 Mpo Mwana ya moto azali kokende, ndenge ekomamá mpo na ye, kasi mawa na moto oyo atɛki Mwana ya moto!+ Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango soki abotamaka te.”+

22 Ntango bazalaki kokoba kolya, Yesu azwaki limpa, abondelaki mpo na kosɛnga lipamboli, abukaki yango mpe apesaki bango yango, alobi: “Bózwa yango; oyo elakisi nzoto na ngai.”+ 23 Azwaki mpe kɔpɔ, abondelaki mpo na kopesa matɔndi, na nsima apesaki bango yango, mpe bango nyonso bamɛlaki yango.+ 24 Mpe alobaki na bango: “Oyo elakisi makila na ngai, ‘makila+ ya kondimana,’+ oyo ekosopama mpo na bato mingi.+ 25 Ya solo nalobi na bino, nakomɛla lisusu vinyo oyo te, tii mokolo oyo nakomɛla yango ya sika na Bokonzi ya Nzambe.” 26 Nsukansuka, nsima ya koyemba nzembo ya masanzoli, babimaki, bakei na Ngomba ya Olive.+

27 Mpe Yesu alobaki na bango: “Bino nyonso bokobɛta libaku, mpo ekomamá boye: ‘Nakobɛta mobateli ya mpate,+ mpe bampate ekopanzana.’+ 28 Kasi nsima ya kosekwa,* nakokende liboso na bino na Galile.”+ 29 Bongo Petro alobaki na ye: “Ata soki basusu nyonso babɛti libaku, ngai nakobɛta libaku te.”+ 30 Na yango Yesu alobaki na ye: “Ya solo nalobi na yo ete lelo, kaka na butu oyo, liboso ete nsoso elela mbala mibale, okowangana ngai mbala misato.”+ 31 Kasi Petro azalaki kaka koloba: “Ata soki esengeli nakufa ná yo, nakowangana yo ata moke te.” Basusu nyonso mpe babandaki koloba kaka bongo.+

32 Bongo bakómaki na esika babengi Getesemane, mpe alobaki na bayekoli na ye: “Bófanda awa ntango ngai nakei kobondela.”+ 33 Mpe azwaki Petro, Yakobo, ná Yoane elongo na ye,+ bongo abandaki koyoka mawa makasi* mpe kotungisama makasi mpenza. 34 Alobaki na bango: “Nazali* na mawa makasi mpenza,+ lokola nakufa. Bótikala awa mpe bókoba kosɛnzɛla.”+ 35 Nsima ya kopusana mwa moke liboso, afukamaki na mabele mpe abandaki kobondela ete, soki likoki ezali, likambo oyo* eleka mosika na ye. 36 Alobaki mpe: “Aba,* Tata,+ mpo na yo makambo nyonso ekoki kosalema; longolá kɔpɔ oyo epai na ngai. Nzokande, ezala te oyo ngai nalingi, kasi oyo yo olingi.”+ 37 Ntango azongaki, akutaki bango balali mpɔngi, bongo alobaki na Petro: “Simo, ozali kolala mpɔngi? Ozwi makasi ya kokoba kosɛnzɛla ata mpo na ngonga moko te?+ 38 Bókoba kosɛnzɛla mpe bóbondelaka ntango nyonso, mpo bókwea na komekama te.+ Ya solo, elimo ezali na molende,* kasi nzoto ezali na bolɛmbu.”+ 39 Bongo akendaki lisusu mpe abondelaki, alobaki kaka likambo yango.+ 40 Ayaki lisusu mpe akutaki bango balali mpɔngi, mpo miso na bango ezalaki kilo, bongo bayebaki eyano ya kopesa ye te. 41 Ayaki lisusu mbala ya misato mpe alobaki na bango: “Na ntango ya boye, bozali kolala mpɔngi mpe kopema? Ekoki! Ngonga ekoki!+ Talá! Mwana ya moto azali kotɛkama na mabɔkɔ ya basumuki. 42 Bótɛlɛma, tókende. Talá! Moto oyo azali kotɛka ngai akómi pene.”+

43 Mpe na mbala moko, wana azalaki naino koloba, Yudasi, moko ya bantoma zomi na mibale, ayaki elongo na ebele ya bato oyo basimbi mipanga ná mangenda. Banganga-nzambe bakonzi mpe bankulutu nde batindaki bango.+ 44 Nzokande motɛki na ye apesaki bango elembo oyo bayokanaki na yango, alobaki: “Moto oyo nakopesa lipwɛpwɛ, ye wana; bókanga ye mpe bókɛngɛla ye malamumalamu na nzela.” 45 Akendaki mbala moko epai ya Yesu mpe alobaki: “Rabi!” mpe apesaki ye lipwɛpwɛ na boboto mpenza. 46 Bongo batyaki Yesu mabɔkɔ mpe bakangaki ye. 47 Nzokande, moko ya baoyo batɛlɛmaki wana abimisaki mopanga na ye, abɛtaki moombo ya nganga-nzambe monene mpe akataki ye litoi.+ 48 Kasi Yesu azongiselaki bango: “Bobimi mpo na kokanga ngai na mipanga mpe na mangenda lokola nde boyeli moyibi moko boye?+ 49 Mokolo na mokolo nazalaki elongo na bino na tempelo, nazalaki koteya,+ kasi bokangaki ngai te. Nzokande, nyonso oyo esalemi mpo Makomami ekokisama.”+

50 Bongo bayekoli nyonso basundolaki ye mpe bakimaki.+ 51 Kasi, elenge mobali moko abandaki kolanda ye penepene, alati kaka elamba ya lini ya kitoko na nzoto, mpe balukaki kokanga ye, 52 kasi asundolaki elamba na ye ya lini mpe akimaki bolumbu.*

53 Bamemaki Yesu sikoyo epai ya nganga-nzambe monene,+ mpe banganga-nzambe bakonzi nyonso, bankulutu mpe bakomeli bayanganaki.+ 54 Kasi Petro azalaki kolanda ye na mosika, tii na lopango ya nganga-nzambe monene. Kuna, afandaki elongo na bato ya misala mpe azalaki koyɔta mɔtɔ oyo ezalaki kopela.+ 55 Banganga-nzambe bakonzi mpe Sanedrina mobimba bazalaki koluka litatoli moko mpo na kokweisa Yesu mpo abomama, kasi bazalaki kozwa ata likambo moko te.+ 56 Ya solo, bato mingi bazalaki kopesa matatoli ya lokuta mpo na kokweisa ye,+ kasi makambo oyo bazalaki koloba ezalaki na boyokani te. 57 Basusu mpe bazalaki kotɛlɛma mpe kopesa litatoli ya lokuta mpo na kokweisa ye, balobi: 58 “Toyokaki ye azali koloba: ‘Nakobuka tempelo oyo, oyo esalemá na mabɔkɔ ya bato, mpe na mikolo misato nakotonga mosusu, oyo ekosalema na mabɔkɔ te.’”+ 59 Kasi ata na likambo yango, matatoli na bango ezalaki na boyokani te.

60 Bongo nganga-nzambe monene atɛlɛmaki na katikati na bango mpe atunaki Yesu: “Okozongisa eloko te? Olobi nini mpo na makambo oyo bato oyo bazali kofunda yo na yango?”+ 61 Kasi Yesu afandaki kaka nyɛɛ mpe apesaki ata eyano te.+ Nganga-nzambe monene atunaki ye lisusu mpe alobaki na ye: “Ozali Kristo Mwana ya Oyo apambwamá?” 62 Bongo Yesu alobaki: “Ezali ngai; mpe bokomona Mwana ya moto+ afandi na lobɔkɔ ya mobali+ ya Nzambe ya nguya mpe azali koya na mapata ya likoló.”+ 63 Na yango, nganga-nzambe monene apasolaki bilamba na ye mpe alobaki: “Ntina nini tóluka lisusu batatoli?+ 64 Boyoki ndenge afingi Nzambe. Ekateli na bino ezali nini?”* Bango nyonso bakweisaki ye ete abongi na liwa.+ 65 Basusu babandaki kobwakela ye nsoi,+ kozipa ye elongi, kobɛta ye makofi, mpe koloba na ye: “Sakolá!” Mpe, nsima ya kobɛta ye bambata na elongi, bakɛngɛli ya tribinale bazwaki ye.+

66 Nzokande wana Petro azalaki na nse, na kati ya lopango, moko ya basaleli ya basi ya nganga-nzambe monene ayaki.+ 67 Ntango amonaki Petro azali koyɔta mɔtɔ, atalaki ye na elongi mpe alobaki: “Yo mpe ozalaki na moto yango ya Nazarete, Yesu wana.” 68 Kasi awanganaki yango, alobi: “Nayebi ye te, mpe makambo oyo ozali koloba, nazali kokanga ntina na yango te,” mpe abimaki, akei na esika ya kokɔta na lopango. 69 Kuna, mosaleli wana ya mwasi amonaki ye, mpe alobaki lisusu na baoyo batɛlɛmaki wana: “Moto oyo azali moko na bango.” 70 Petro awanganaki lisusu. Nsima ya mwa ntango moke, baoyo batɛlɛmaki wana babandaki lisusu koloba na Petro: “Ya solo yo ozali moko na bango, kutu, ozali moto ya Galile.” 71 Kasi abandaki komilakela mabe mpe kolapa ndai ete: “Nayebi moto oyo bozali kolobela te!” 72 Na mbala moko nsoso elelaki mpo na mbala ya mibale,+ mpe Petro akanisaki lisusu makambo oyo Yesu alobaki na ye, ete: “Liboso nsoso elela mbala mibale, okowangana ngai mbala misato.”+ Bongo alɛmbaki nzoto mpe abandaki kolela.

15 Na ntɔngɔntɔngɔ, banganga-nzambe bakonzi ná bankulutu mpe bakomeli, elingi koloba Sanedrina mobimba, bayanganaki elongo. Nsima ya kokanga Yesu bansinga, bakendaki na ye mpe bakabaki ye epai ya Pilate.+ 2 Bongo Pilate atunaki ye: “Yo ozali Mokonzi ya Bayuda?”+ Yesu azongisaki: “Yo moko olobi yango.”+ 3 Kasi banganga-nzambe bakonzi bazalaki kofunda ye na makambo mingi. 4 Na yango Pilate atunaki ye lisusu: “Ozali na eyano ya kopesa te?+ Talá ebele ya makambo oyo bazali kofunda yo na yango.”+ 5 Kasi Yesu apesaki eyano mosusu te, bongo Pilate akamwaki.+

6 Nzokande na fɛti nyonso, Pilate azalaki na momeseno ya kobimisela bato mokangami moko na bolɔkɔ, oyo bango bazalaki kosɛnga.+ 7 Na ntango wana, moto moko na nkombo Barabasi azalaki na bolɔkɔ elongo na batomboki, oyo babomaki moto ntango babimisaki mobulu. 8 Bongo ebele ya bato bayaki mpe babandaki kosɛnga Pilate asala ndenge amesaná kosalela bango. 9 Pilate ayanolaki bango ete: “Bolingi nabimisela bino Mokonzi ya Bayuda?”+ 10 Mpo Pilate ayebaki ete ezalaki kaka mpo na likunya nde banganga-nzambe bakonzi bakabaki Yesu.+ 11 Kasi banganga-nzambe bakonzi batindaki ebele ya bato básɛnga ye abimisela bango nde Barabasi.+ 12 Pilate alobaki na bango lisusu: “Bongo nasala nini na moto oyo bozali kobenga Mokonzi ya Bayuda?”+ 13 Bagangaki lisusu: “Baká ye na nzete!”*+ 14 Pilate atunaki bango: “Mpo na nini? Mabe nini asali?” Atako bongo bagangaki lisusu makasi koleka ete: “Baká ye na nzete!”*+ 15 Na yango Pilate, lokola alingaki kosepelisa ebele yango ya bato, abimiselaki bango Barabasi; mpe nsima ya kotinda bábɛta Yesu fimbo,+ akabaki ye mpo bábaka ye na nzete.+

16 Basoda bamemaki ye na kati ya lopango, elingi koloba, na ndako ya guvɛrnɛrɛ, mpe bayanganisaki etuluku mobimba ya basoda.+ 17 Mpe balatisaki ye elamba moko ya motane-bulé, batongaki motole ya nzubɛ mpe balatisaki ye yango na motó. 18 Mpe babandaki kobelela ye, balobi: “Mbote,* yo Mokonzi ya Bayuda!”+ 19 Lisusu, bazalaki kobɛta ye na motó na mwa nzete mpe kobwakela ye nsoi, bafukamaki mpe bagumbamelaki ye.* 20 Nsukansuka, ntango basilisaki kosɛka ye, balongolaki ye elamba yango ya motane-bulé mpe balatisaki ye bilamba na ye.* Na nsima bamemaki ye libándá mpo na kobaka ye na nzete+ na bansɛtɛ. 21 Mpe bazwaki na makasi moleki-nzela moko, moto moko boye ya mboka Sirene na nkombo Simo, oyo autaki na bilanga, tata ya Alezandre mpe Rufusi, mpo amemela Yesu nzete na ye ya mpasi.*+

22 Bamemaki ye na esika babengi Golgota, oyo soki babongoli, elimboli “Esika ya Mokuwa ya Motó.”+ 23 Kuna, bamekaki kopesa ye vinyo oyo basangisá na elangwiseli babengi mire,+ kasi aboyaki komɛla yango. 24 Bongo babakaki ye na nzete na bansɛtɛ, mpe bakabolaki bilamba na ye ya likoló nsima ya kobwaka mbɛsɛ mpo na koyeba nani akozwa nini.+ 25 Ezalaki sikoyo ngonga ya libwa ya ntɔngɔ* ntango babakaki ye na nzete na bansɛtɛ. 26 Mpe bakomaki na etanda moko likambo oyo bafundaki ye na yango, ete: “Mokonzi ya Bayuda.”+ 27 Lisusu, babakaki miyibi mibale na banzete pembeni na ye, moko na lobɔkɔ na ye ya mobali mpe mosusu na lobɔkɔ na ye ya mwasi.+ 28 *—— 29 Baleki-nzela babandaki kofinga ye, bazalaki koningisa mitó na bango+ mpe koloba: “Ɛɛ! Yo moto olingaki kobuka tempelo mpe kotonga yango na mikolo misato,+ 30 omibikisa yo moko, kitá na nzete ya mpasi.”* 31 Ndenge moko mpe, banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli bazalaki kosɛka ye bango na bango mpe koloba: “Abikisaki basusu; akoki komibikisa ye moko te!+ 32 Tiká ete Kristo, Mokonzi ya Yisraele, akita sikoyo na nzete ya mpasi,* mpo tómona mpe tóndima.”+ Ata baoyo babakamaki na banzete pembeni na ye bazalaki kolobela ye mabe.+

33 Ntango ekómaki midi,* molili ekɔtaki na mokili wana mobimba tii na ngonga ya misato ya nsima ya midi.*+ 34 Na ngonga ya misato nsima ya midi, Yesu abelelaki na mongongo makasi, alobi: “Eli, Eli, lama sabakatani?” oyo soki babongoli, elimboli: “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai?”+ 35 Ntango bayokaki bongo, bato mosusu kati na baoyo batɛlɛmaki pembeni babandaki koloba: “Bóyoka! Azali kobenga Eliya.” 36 Bongo moto moko apotaki mbangu, apɔlisaki linyuka moko na vinyo ya ngayi, atyaki yango na nsɔngɛ ya mwa nzete, mpe apesaki ye amɛla,+ alobi: “Tiká ye! Tótala soki Eliya akoya kokitisa ye.” 37 Kasi Yesu agangaki makasi mpe akataki motema.+ 38 Mpe rido ya esika mosantu+ epasukaki na biteni mibale banda na likoló tii na nse.+ 39 Nzokande, ntango mokonzi ya basoda oyo atɛlɛmaki liboso ya Yesu amonaki makambo oyo esalemaki na ntango ya liwa na ye, alobaki: “Ya solo moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe.”+

40 Basi mosusu mpe bazalaki kotala na mosika; kati na bango Maria Magadalene, Maria mama ya Yakobo Moke ná Yose, mpe Salome.+ 41 Basi yango bazalaki kotambola na ye mpe kosalela ye+ ntango azalaki na Galile. Ezalaki mpe na basi mosusu mingi oyo bamataki elongo na ye na Yerusaleme.

42 Lokola ekómaki mpokwa, mpe lokola ezalaki ntango ya Bolɛngɛli, elingi koloba mokolo oyo ezalaka liboso ya Sabata, 43 Yozefe moto ya Arimatea ayaki; azalaki moto moko ya lokumu mingi ya Tribinale monene ya Bayuda,* oyo azalaki mpe kozela Bokonzi ya Nzambe. Azwaki mpiko, akendaki epai ya Pilate mpe asɛngaki ye nzoto ya Yesu.+ 44 Kasi Pilate akamwaki mpe amitunaki soki Yesu asilaki mpenza kokufa, bongo abengaki mokonzi ya basoda mpe atunaki ye soki asilaki kokufa. 45 Lokola mokonzi ya basoda ayebisaki ye ete ezali mpenza bongo, apesaki Yozefe nzela ya kozwa nzoto yango. 46 Yozefe asombaki lini ya kitoko mpenza, akitisaki ye, azingaki ye na lini yango ya kitoko mpe alalisaki ye na lilita*+ oyo batimolá na kati ya mabanga; mpe abalolaki libanga tii na monɔkɔ ya lilita yango.+ 47 Kasi Maria Magadalene ná Maria mama ya Yose bazalaki kaka kotala esika oyo balalisaki ye.+

16 Ntango Sabata+ elekaki, Maria Magadalene, Maria+ mama ya Yakobo, mpe Salome basombaki malasi basalá na matiti mpo na koya kopakola yango na nzoto ya Yesu.+ 2 Mpe na ntɔngɔntɔngɔ mpenza ya mokolo ya liboso ya pɔsɔ, ntango moi ebandaki kobima, bayaki na lilita.*+ 3 Bazalaki kolobana bango na bango boye: “Nani akobalolela biso libanga mpo elongwa na monɔkɔ ya lilita?” 4 Kasi ntango batombolaki miso, bamonaki ete libanga esilaki kobalolama, atako ezalaki monene mingi.+ 5 Ntango bakɔtaki na lilita, bamonaki elenge mobali moko afandi na lobɔkɔ ya mobali, alati zambala moko ya mpɛmbɛ, mpe bayokaki nsɔmɔ. 6 Alobaki na bango: “Bóyoka nsɔmɔ te.+ Bozali koluka Yesu moto ya Nazarete, oyo babakaki na nzete. Alamuki.+ Azali awa te. Bótala, esika balalisaki ye yango oyo.+ 7 Kasi bókende koyebisa bayekoli na ye mpe Petro ete: ‘Akei liboso na bino na Galile.+ Kuna nde bokomona ye, kaka ndenge ayebisaki bino.’”+ 8 Bongo ntango babimaki na lilita, babandaki mbala moko kokima, bazali kolɛnga mpe nsɔmɔ makasi ekangaki bango. Bayebisaki moto moko likambo te, mpo bazalaki kobanga mingi.*+

Lil., “liboso ya elongi na yo.”

Talá Ap. A5.

To, “kozindisa.”

To, “bózala na kondima na.”

To mbala mosusu, “bayebaki soki azalaki nani.”

To, “mokatatali.”

To, “asosolaki na elimo na ye.”

To, “atandamaki na mesa.”

To, “batandamaki na mesa.”

To, “elamba ya likoló.”

To, “mampa ya kolakisa.”

To, “ekufá.”

To, “ekufá.”

To, “kobikisa molimo.”

To, “aponaki.”

To, “aponaki.”

To, “moto ya molende.”

Nkombo mosusu mpo na kolobela Satana.

Lil., “ndako.”

To, “kotuka.”

To, “makambo ya ntango oyo.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “kitunga ya komekela.”

To, “malita ya kokanisama.”

Talá Ap. A5.

To, “Etúká ya bingumba zomi.”

To, “alingi kokufa.”

To, “elamba ya likoló.”

To, “bilamba ya likoló.”

To, “tiká kobanga.”

To, “apekisaki bango makasi.”

To, “misala ya nguya.”

To, “baboyaki kondimela ye.”

Lil., “kwivre.”

Lil., “bilamba mibale.”

To, “asekwi.”

To, “baoyo batandamaki na mesa.”

To, “baoyo bafandaki na ye na mesa.“

To, “lilita ya kokanisama.”

Talá Ap. B14.

Elingi koloba, banda pene na ngonga ya 3 ya butu tii ntango moi ebimaka, pene na ngonga ya 6 ya ntɔngɔ.

To, “asalaki lokola.”

Elingi koloba, oyo basaleli molulu ya kopɛtola te.

Elingi koloba, tii pene ya lipeka.

To, “alobi mabe mpo na.”

Talá Ap. A3.

Boike ya liloba ya Grɛki pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.

To, “etamboli ezangá nsɔni.” Na Grɛki, asélgéïa. Talá Ndimbola ya maloba.

To, “abotamá na.”

To, “bana ya mbwa.”

To, “etúká ya bingumba zomi.”

To, “kitunga ya kobomba biloko.”

Lil., “Mitema na bino ezali.”

To, “kitunga ya kobomba biloko.”

To, “akolamuka.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “molimo.”

To, “molimo.”

To, “molimo.”

To, “molimo.”

To, “oyo ezangá bosembo.”

To, “akosekwa.”

To mbala mosusu, “babombaki likambo yango mpo na bango moko.”

To, “akosekwa.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Talá Ap. A3.

Talá Ndimbola ya maloba.

Talá Ap. A3.

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “atye na ekanganeli moko.”

To, “nazwa libula ya.”

To mbala mosusu, “balobanaki.”

To, “na makambo ya ntango oyo ezali koya.” Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “akolamuka.”

To, “baoyo bayebani lokola.”

To, “molimo.”

Elimboli “moteyi.”

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A3.

To, “linɔ́ngi.”

To, “libanga ya litumu.” Lil., “motó ya litumu.”

Talá Ap. A5.

To, “ebongi.”

Talá Ap. B14.

To, “ntango bakosekwa.”

To, “eleki ntina.”

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

Talá Ndimbola ya maloba.

Talá Ap. A5.

To, “oyo eleki malamu.”

Lil., “balyaka bandako ya basi.”

To, “mpo na kokosa.”

To, “kilo.”

To, “basanduku.”

Lil., “lepta mibale, oyo esali kadra moko.” Talá Ap. B14.

To, “bobola.”

To, “oyo ayiki mpiko.”

Talá Ap. A5.

Lil., “mipɛpɛ minei.”

To, “ntango nsoso elelaka.”

To, “na mayele.”

To, “afandaki na mesa.”

Talá Ap. B14.

To, “balobaki na ye na nkanda.”

To, “batandamaki.”

Lil., “kolamuka.”

To, “kobulungana.”

To, “Molimo na ngai ezali.”

Lil., “ngonga.”

Liloba ya Ebre to ya Aramɛyɛ, oyo elimboli “Ee Tata!”

To, “elingaka kosala oyo ezali malamu.”

To, “alataki kaka elamba moko ya kati.”

To, “Bokanisi nini?”

To, “Bomá ye.”

To, “Bomá ye.”

To, “Losako.”

To, “bakumisaki ye.”

To, “bilamba na ye ya likoló.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “ngonga ya misato.”

Talá Ap. A3.

Talá Ndimbola ya maloba.

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “ngonga ya motoba.”

Lil., “ngonga ya libwa.”

To, “Sanedrina.”

To, “lilita ya kokanisama.”

To, “lilita ya kokanisama.”

Na bamaniskri oyo eumeli mingi koleka mpe ebongi kotyela motema, Evanzile ya Marko esuki na maloba oyo ezali na vɛrsɛ 8. Talá Ap. A3.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto