Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt 2 Bakorinti 1:1-13:14
  • 2 Bakorinti

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 2 Bakorinti
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakorinti

MOKANDA YA MIBALE EPAI YA BAKORINTI

1 Ngai Paulo, ntoma ya Kristo Yesu na kolanda mokano ya Nzambe, mpe Timote+ ndeko na biso, tozali kotindela bino mokanda oyo na lisangá ya Korinti, mpe epai ya basantu nyonso oyo bazali na Akaya+ mobimba:

2 Boboto monene mpe kimya ya Nzambe Tata na biso mpe ya Nkolo Yesu Kristo ezala na bino.

3 Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo+ asanzolama, Tata ya motema mawa mingi+ mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso,+ 4 oyo abɔndisaka* biso na komekama* na biso nyonso.+ Mpo na libɔndisi oyo tozwi epai ya Nzambe,+ tókoka kobɔndisa basusu+ na komekama* oyo bazali kokutana na yango. 5 Tozali kokutana na bampasi mingi lokola bayekoli ya Kristo,+ mpe na nzela ya Kristo tozwaka mpe libɔndisi mingi. 6 Nzokande, soki tozali kokutana na komekama,* ezali mpo na libɔndisi na bino mpe lobiko na bino; mpe soki tóbɔndisami, ezali mpo bóbɔndisama, mpe yango esalisa bino bóyika mpiko na bampasi oyo biso mpe tozali kokutana na yango. 7 Mpe elikya na biso mpo na bino ezali koningana te, mpo toyebi ete bozali kokutana na bampasi lokola biso, bokozwa mpe libɔndisi lokola biso.+

8 Mpo bandeko, tolingi te kobombela bino mikakatano oyo ekómelaki biso na etúká ya Azia,+ mikakatano yango ezalaki mpasi mingi mpo na biso, tokokaki te koyikela yango mpiko na makasi na biso moko, mpe tozalaki ata kobanga mpo na bomoi na biso.+ 9 Ya solo, tokanisaki ete tozwi etumbu ya liwa. Ezalaki bongo mpo biso tótya motema, epai na biso moko te, kasi epai ya Nzambe+ oyo asekwisaka* bakufi. 10 Na likama monene oyo ya liwa, nde abikisaki biso mpe akobikisa biso, mpe elikya na biso ezali epai na ye ete akokoba mpe kobikisa biso.+ 11 Bino mpe bokoki kosalisa biso na nzela ya malɔmbɔ na bino mpo na biso,+ mpo bato mingi bápesa Nzambe matɔndi na ntina na biso mpo na boboto oyo tozwi na biyano ya mabondeli ya bato ebele.*+

12 Talá likambo oyo tozali komikumisa na yango: lisosoli na biso ezali kopesa litatoli ete tomitambwisaki na mokili, mpe mingimingi mpenza epai na bino, na bosantu, na bosembo oyo euti na Nzambe, na bwanya ya moto ya mosuni te,+ kasi na boboto monene ya Nzambe. 13 Mpo ya solo, tozali kokomela bino makambo mosusu te longola kaka oyo bokoki kotánga* mpe kokanga ntina. Mpe nazali na elikya ete bokokoba kokanga ntina ya makambo yango malamumalamu,* 14 kaka ndenge mpe bondimaki, na meko moko boye, ete biso nde ntina ya komikumisa na bino, ndenge bino mpe bokozala mpo na biso na mokolo ya Nkolo na biso Yesu.

15 Bongo lokola nazali kotya motema ndenge wana, nakanisaki liboso koya epai na bino, mpo bózwa libaku ya mibale ya kozala na esengo;* 16 mpo nazalaki na likanisi ya kotala bino wana nazali kokende na Masedonia mpe ntango nakouta na Masedonia, nakozongela bino, mpe na nsima bokokende kotika ngai na nzela ntango nakokende na Yudea.+ 17 Na yango, ntango nakanaki bongo, nazwaki nde makambo na ndenge ya lisɛki? To makambo oyo nazali kokana, nazali kokana yango nde na ndenge ya mosuni, mpo naloba “Ɛɛ, ya solo” mpe na nsima naloba “Te, ata moke te”? 18 Lokola Nzambe akoki solo kotyelama motema, maloba oyo toyebisaki bino ezali te “ɛɛ” nzokande “te.” 19 Mpo Mwana ya Nzambe, Yesu Kristo, oyo biso, elingi koloba, ngai, Silvano* ná Timote+ tosakolaki na kati na bino akómaki te “ɛɛ” nzokande “te,” kasi “ɛɛ” ekómi nde “ɛɛ” na likambo oyo etali ye. 20 Mpo ata soki bilaka ya Nzambe ezali ebele boni, ekómi “ɛɛ” na nzela na ye.+ Na yango, na nzela na ye mpe “Amen” ezali kolobama epai ya Nzambe,+ yango ezali komema nkembo epai ya Nzambe na nzela na biso. 21 Kasi moto oyo azali kopesa ndanga ete biso ná bino tozali bato ya Kristo mpe moto oyo atye biso mafuta ezali Nzambe.+ 22 Atye mpe kashɛ na ye likoló na biso+ mpe apesi na mitema na biso ndanga ya eloko oyo ezali koya, elingi koloba, elimo.+

23 Sikoyo nazali kobelela Nzambe azala motatoli mpo na bomoi* na ngai moko ete ezali mpo na kobatela bino nde nayei naino te na Korinti. 24 Ezali te ete tozali bakonzi ya kondima na bino,+ kasi tozali nde baninga ya mosala mpo na esengo na bino, mpo na kondima na bino nde botɛlɛmi.

2 Mpo nazwaki ekateli ete ntango nakoya lisusu kotala bino bózala na mawa te. 2 Mpo soki nayokisi bino mawa, nani lisusu akopesa ngai esengo longola kaka moto oyo nayokisi ye mawa? 3 Yango wana nakomaki likambo yango, mpo ntango nakoya, nakóma na mawa te mpo na baoyo esengelaki bápesa ngai esengo, mpo nazali mpenza na kondima ete esengo oyo nazali na yango, bino nyonso mpe bozali na yango. 4 Mpo na komekama mingi mpe na mpasi na motema nde nakomelaki bino, na mai ya miso mingi, ezalaki te mpo na koyokisa bino mawa,+ kasi mpo bóyeba ndenge oyo nalingaka bino mpenza.

5 Nzokande soki moto moko asali likambo moko oyo eyokisi mawa,+ ezali ngai te nde ayokisi mawa, kasi bino nyonso na meko moko boye—nalobi bongo mpo maloba na ngai ezala makasi te koleka ndelo. 6 Mpamela oyo bato mingi bapesi ekoki bongo mpo na moto wana; 7 sikoyo, bosengeli nde kolimbisa ye na boboto mpe kobɔndisa ye,+ mpo azinda te na mawa na ye oyo eleki ndelo.+ 8 Na yango, nazali kolendisa bino ete bólakisa ye ete bolingaka ye.+ 9 Ezali mpe mpo na yango nde nazali kokomela bino, mpo na koyeba soki botosaka na makambo nyonso. 10 Likambo nyonso oyo bokolimbisa moto, ngai mpe nakolimbisa ye yango. Kutu, likambo nyonso oyo nalimbisi, (soki ezali na likambo moko oyo nasengeli kolimbisa), yango ezali mpo na bolamu na bino na miso ya Kristo, 11 mpo Satana alonga biso te+ mpo toyebi malamu mayele na ye.*+

12 Ntango nakómaki na Troase+ mpo na kosakola nsango malamu etali Kristo, mpe libaku malamu epesamelaki ngai na mosala ya Nkolo,* 13 nazalaki kaka komitungisa ndenge nakutaki ndeko na ngai Tito+ te. Na yango napesaki bango mbote mpe nakendaki na Masedonia.+

14 Kasi Nzambe azwa matɔndi, ye moto azali ntango nyonso kotambwisa biso na molɔngɔ ya balongi esika moko na Kristo mpe azali kopanza* malasi ya boyebi na ye esika nyonso! 15 Mpo epai ya Nzambe tozali malasi ya nsolo kitoko ya Kristo na kati ya baoyo bazali kobikisama mpe na kati ya baoyo bazali kokufa; 16 epai ya baoyo bazali kokufa, nsolo* ya liwa oyo ezali komema na liwa,+ epai ya basusu, malasi ya bomoi oyo ezali komema na bomoi. Mpe nani abongi mpenza na makambo wana? 17 Ezali biso, mpo tozali te bato oyo batɛkaka* liloba ya Nzambe+ ndenge bato mingi bazali, kasi tozali koloba nde na bosembo, lokola bato oyo batindami na Nzambe, ɛɛ na miso ya Nzambe, esika moko na Kristo.

3 Tobandi nde lisusu komilobela biso moko? To mpe, lokola bato mosusu, tozali nde na mposa mikanda elobela biso epai na bino to oyo euti epai na bino? 2 Bino nde mokanda na biso,+ oyo ekomami na mitema na biso, oyo eyebani mpe ezali kotángama na bato nyonso. 3 Mpo ezali komonisa polele ete bino bozali mokanda ya Kristo oyo tokomi na nzela ya mosala na biso,+ ekomami na mai ya mokanda te kasi na elimo ya Nzambe ya bomoi, likoló ya bitanda ya mabanga te,+ kasi likoló ya bitanda ya mosuni, likoló ya mitema.+

4 Ezali mpo na Kristo nde totyelaka Nzambe motema ndenge wana. 5 Tolobi te ete tozali na makoki ya kosala mosala yango biso moko, kasi Nzambe nde azali kosalisa biso mpo tósala yango,+ 6 moto oyo asali ete tózala na makoki ya kosala mosala ya kondimana ya sika,+ ya mibeko oyo ekomami te,+ kasi ya elimo; mpo mibeko oyo ekomami epesaka etumbu ya liwa,+ kasi elimo epesaka bomoi.+

7 Sikoyo, soki mibeko oyo ekomami, oyo ememaka na liwa mpe oyo bakataki makomi na mabanga+ eyaki na nkembo, oyo bana ya Yisraele bakokaki te kotala mpenza elongi ya Moize mpo na nkembo ya elongi na ye,+ nkembo oyo esengelaki kolongolama, 8 mpo na nini te makambo oyo elimo ekoki kosala+ ezala na nkembo mingi koleka?+ 9 Soki mibeko oyo ezali kopesa bato etumbu ya liwa+ ezali na nkembo,+ mosala oyo ezali komema na bosembo* ezali kutu na nkembo mingi koleka!+ 10 Kutu eloko oyo bakómisaki na ntango ya kala eloko ya nkembo elongolami nkembo na yango, mpo na nkembo oyo eleki yango.+ 11 Mpo soki eloko oyo esengelaki kolongolama bakɔtisaki yango na nkembo,+ eloko oyo ezali koumela esengeli kozala na nkembo mingi koleka.+

12 Lokola tozali na elikya ya boye,+ tozali koloba polele mpenza mpe na bosembo, 13 mpe tozali kosala te ndenge Moize asalaki ntango atyaki litambala na elongi na ye,+ mpo bana ya Yisraele bátala na likebi te nsuka ya eloko oyo esengelaki kolongolama. 14 Kasi makanisi na bango ekómaki molili.+ Mpo tii na mokolo ya lelo ntango batángaka kondimana ya kala, litambala wana elongolami naino te,+ mpo elongolami kaka na nzela ya Kristo.+ 15 Ɛɛ, tii lelo oyo, ntango nyonso oyo batángaka makomami ya Moize,+ litambala ezali na mitema na bango.+ 16 Kasi ntango moto abaluki epai ya Yehova,* litambala elongwaka.+ 17 Nzokande Yehova* azali Elimo;+ mpe esika elimo ya Yehova* ezali, bonsomi ezali wana.+ 18 Biso nyonso, bilongi elongwe na litambala, mpe lokola talatala, tozali kongɛngisa nkembo ya Yehova.* Ntango tozali kosala bongo, tozali mpe kobongwana mpo tózala lokola elilingi na ye, kongɛngisa malamu lisusu nkembo yango,* kaka ndenge Yehova,* oyo azali Elimo, azali kosala.*+

4 Yango wana, lokola tozwi mosala oyo mpo na motema mawa oyo bamoniseli biso, tozali kotika te. 2 Kasi totiki makambo ya kobombama oyo eyokisaka nsɔni, tozali kotambola na mayele mabe te, tozali mpe kobebisa te liloba ya Nzambe;+ kasi ndenge tozali komonisa solo polele, na miso ya Nzambe tozali kokóma ndakisa ya malamu mpo na lisosoli ya bato nyonso.+ 3 Soki nsango malamu oyo tozali kosakola ezipami mpenza, ezipami nde epai ya baoyo bazali kokufa, 4 baoyo na kati na bango nzambe ya mokili oyo*+ azipi makanisi ya bato oyo bazangi kondima,+ mpo ete kongɛnga ya nsango malamu ya nkembo oyo etali Kristo, oyo azali elilingi ya Nzambe,+ ekoka kokɔta te.+ 5 Mpo ntango tozali kosakola, tozali koloba te mpo na biso, kasi tozali koloba mpo na Kristo Yesu oyo azali Nkolo, mpe tozali kosakola ete tozali baombo na bino mpo na Yesu. 6 Mpo ezali Nzambe nde alobaki ete: “Pole engɛnga uta na molili,”+ mpe Nzambe angɛngisi pole na ye na mitema na biso,+ ezali pole oyo epesaka nkembo ya boyebi ya Nzambe na nzela ya elongi ya Kristo.

7 Nzokande, tozali na eloko oyo ya motuya+ na kati ya bambɛki ya mabele,*+ mpo nguya oyo eleki makasi ezala ya Nzambe kasi oyo euti epai na biso te.+ 8 Tokamolami na ndenge nyonso, kasi tofinani te tii tózanga koningana; tosili mayele, kasi tozangi mwa nzela ya kobima te;*+ 9 tozali konyokwama, kasi tosundolami te;+ tozali kobambama na nse, kasi tobomami te.+ 10 Epai nyonso oyo tozali kokende, tozali kokutana na likama ya liwa lokola Yesu,+ yango ezali komonisa bato ete tozali konyokwama ndenge Yesu anyokwamaki. 11 Tozali na bomoi kasi bomoi na biso ezali ntango nyonso na likama+ mpo tozali kolanda Yesu, yango ezali mpo na komonisa bato ete tozali konyokwama ndenge Yesu anyokwamaki. 12 Na yango, liwa ezali kosala mosala na kati na biso, kasi bomoi na kati na bino.

13 Nzokande lokola tozali na elimo ya kondima wana kaka moko oyo bakomá mpo na yango ete: “Nazalaki na kondima, yango wana nalobaki,”+ biso mpe tozali na kondima, yango wana tozali koloba, 14 mpo toyebi ete moto oyo asekwisaki* Yesu akosekwisa mpe biso elongo na Yesu mpe akolakisa biso elongo na bino.+ 15 Mpo makambo nyonso ezali mpo na bino, mpo boboto monene oyo ebakisamaki mingi etonda kotonda mpo bato mingi mpenza bazali kopesa matɔndi mpo na nkembo ya Nzambe.+

16 Yango wana tozali kotika te, kasi ata soki lolenge ya moto oyo tozali na libándá ezali kobeba, ya solo mpenza, lolenge ya moto oyo tozali na kati ezali kokóma ya sika mokolo na mokolo. 17 Mpo atako komekama* ezali ya ntango mokuse mpe ya pɛpɛlɛ, ezali kopesa biso nkembo moko monene mpenza,* oyo ekokani na eloko mosusu te mpe ezali ya seko;+ 18 wana tozali te kotya miso na biso na biloko oyo emonanaka, kasi nde na biloko oyo emonanaka te.+ Mpo biloko oyo emonanaka ezali ya ntango mokuse, kasi biloko oyo emonanaka te ezali ya seko.

5 Mpo toyebi ete soki ndako na biso ya mabele, hema oyo, ebebi,+ tokozwa mpenza ndako oyo euti na Nzambe, ndako oyo esalemi na mabɔkɔ te,+ oyo ezali ya seko na likoló. 2 Mpo na kati ya ndako* oyo, tozali mpenza kolela na mawa, tozali na mposa makasi ya kolata oyo ya biso moko, oyo euti na likoló,*+ 3 mpo nsima ya kolata yango, tózala bolumbu te. 4 Ɛɛ, biso baoyo tozali na kati ya hema oyo tozali kolela na mawa, tozali komona mpasi, mpo tolingi te kolongola eloko oyo tolati, kasi tolingi nde kolata mosusu wana,+ mpo bomoi emɛla eloko oyo ekufaka.+ 5 Nzokande moto oyo abongisaki biso mpo na likambo yango mpenza ezali Nzambe,+ ye nde apesaki biso elimo lokola ndanga ya eloko oyo ezali koya.+

6 Na yango, tozali ntango nyonso na mpiko mpenza mpe toyebi ete ntango nyonso oyo tozali na kati ya nzoto, tozali mosika na Nkolo,+ 7 mpo tozali kotambola na kondima, kasi na komona te. 8 Tozali na mpiko mpenza mpe tokosepela mingi kozala mosika na nzoto mpe kofanda elongo na Nkolo.+ 9 Yango wana, ezala tofandi esika moko na ye to tozali mosika na ye, tozali kosala makasi ete tósepelisa ye. 10 Mpo biso nyonso tosengeli kobima* liboso ya kiti ya kosambisa ya Kristo, mpo moto na moto afutama na kolanda makambo oyo asalaki ntango azalaki na nzoto, ezala ya malamu to ya mabe.+

11 Na yango, lokola toyebi ntina ya kobanga Nkolo, tozali kokoba kondimisa bato. Toyebani malamu* epai ya Nzambe, mpe nazali na elikya ete toyebani mpe malamu* na lisosoli na bino. 12 Tozali komilobela lisusu epai na bino te, kasi tozali nde kopesa bino libaku ya komikumisa mpo na biso, mpo bózwa eyano ya kopesa baoyo bazali komikumisa mpo na oyo ezali komonana libándá+ kasi mpo na oyo ezali na motema te. 13 Mpo soki tosalaki likambo moko kozanga kokanisa,+ tosalaki yango mpo na Nzambe; mpe soki tosalaki likambo yango na makanisi ya malamu, ezali mpo na bolamu na bino. 14 Mpo bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba, mpo oyo tomoni yango oyo: ete moto moko akufelaki bato nyonso;+ bongo, na ndenge yango, bato nyonso bakufaki. 15 Mpe akufelaki bato nyonso mpo baoyo bazali na bomoi bázala na bomoi mpo na bango moko lisusu te,+ kasi mpo na moto oyo akufelaki bango mpe asekwisamaki.*

16 Yango wana, banda sikoyo, toyebi moto moko te na ndenge ya mosuni.+ Ata soki toyebaki Kristo na ndenge ya mosuni, ya solo mpenza sikoyo toyebi ye lisusu bongo te.+ 17 Na yango, soki moto azali na bomoko elongo na Kristo, azali ekelamu ya sika;+ biloko ya kala eleki, talá! biloko ya sika esalemi. 18 Kasi biloko nyonso euti na Nzambe, oyo azongisaki biso na boyokani elongo na ye moko na nzela ya Kristo+ mpe apesaki biso mosala ya kozongisa na boyokani,+ 19 elingi koloba ete Nzambe na nzela ya Kristo azalaki kozongisa mokili na boyokani ná ye moko,+ atángelaki bango mabunga na bango te,+ mpe apesaki biso nsango ya kozongisa na boyokani.+

20 Na yango, biso tozali bantoma*+ na esika ya Kristo,+ lokola nde Nzambe azali kobondelabondela na nzela na biso. Na esika ya Kristo, tozali kobondela ete: “Bózonga na boyokani elongo na Nzambe.” 21 Moto oyo ayebaki lisumu te,+ Nzambe akómisaki ye lisumu* mpo na biso, mpo tókóma bosembo ya Nzambe na nzela na ye.+

6 Lokola tozali kosala elongo na ye,+ biso mpe tozali kobondela bino ete bóndima boboto monene ya Nzambe te mpe na nsima bóbosana ntina na yango.+ 2 Mpo azali koloba ete: “Na ntango moko oyo endimami nayokaki yo, mpe na mokolo ya lobiko nasalisaki yo.”+ Talá! Sikoyo nde ntango mpenza oyo endimami. Talá! Sikoyo nde mokolo ya lobiko.

3 Tozali kobɛtisa bato libaku na likambo moko te, mpo moto moko te atyola mosala oyo tozali kosalela Nzambe;+ 4 kasi na makambo nyonso, tozali kopesa ndakisa malamu ete tozali basaleli* ya Nzambe,+ na ezaleli ya koyika mpiko na makambo mingi, na komekama, na bosɛnga, na mikakatano,+ 5 na kobɛtama, na babolɔkɔ,+ na makambo ya mobulu, na misala makasi, na babutu kozanga mpɔngi, na bantango ya kozanga bilei,+ 6 na bopɛto, na boyebi, na motema molai,+ na boboto,+ na elimo santu, na bolingo oyo ezangi bokosi,+ 7 na maloba ya solo, na nguya ya Nzambe;+ na nzela ya bibundeli ya bosembo+ ya lobɔkɔ ya mobali* mpe ya lobɔkɔ ya mwasi,* 8 na nzela ya nkembo mpe ya kosambwisama, na nzela ya nkombo mabe ná lokumu ya malamu. Totalelami lokola bakosi nzokande tozali bato oyo balobaka solo, 9 lokola bato oyo bayebani te nzokande toyebani, lokola bato oyo bazali kokufa* nzokande, talá! tozali na bomoi,+ lokola bato oyo bazwi etumbu* nzokande tokabami te na liwa,+ 10 lokola bato oyo bazali na mawa kasi tozali kosepela ntango nyonso, lokola babola kasi tozali kokómisa bato mingi bato ya bomɛngo, lokola bato bazali na eloko te nzokande tozali na biloko nyonso.+

11 Tolobeli bino polele,* Bakorinti, tofungoli motema na biso mobimba. 12 Bolingo oyo tozali na yango mpo na bino ezali na ndelo te,+ kasi bino nde bozali kotya ndelo na bolingo na bino mpo na biso. 13 Yango wana, nazali koloba lokola na bana na ngai—nabondeli bino bósalela biso mpe bongo—bino mpe bófungola mpenza motema.*+

14 Bókangana te na ekanganeli ya mabe esika moko na bato oyo bazali bandimi te.+ Mpo boninga nini ezali na kati ya bosembo mpe kobuka mibeko?+ To pole ná molili esanganaka na nini?+ 15 Lisusu, boyokani nini ezali kati na Kristo mpe Beliale?*+ To eloko nini mondimi* azali na yango elongo na moto oyo azali mondimi te?+ 16 Mpe boyokani nini ezali kati na tempelo ya Nzambe mpe bikeko?+ Mpo tozali tempelo ya Nzambe ya bomoi;+ kaka ndenge Nzambe alobaki ete: “Nakofanda na kati na bango+ mpe nakotambola na kati na bango, mpe nakozala Nzambe na bango, mpe bakozala bato na ngai.”+ 17 “‘Yango wana bóbima na kati na bango, mpe bókabwana,’ Yehova* alobi bongo, ‘bótika kosimba eloko ya mbindo’”;+ “‘mpe ngai nakoyamba bino.’”+ 18 “‘Nakokóma tata na bino,+ mpe bino bokokóma bana na ngai ya mibali mpe ya basi,’+ Yehova* Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi bongo.”

7 Na yango, lokola tozali na bilaka wana,+ bandeko ya bolingo, tómipɛtola na eloko nyonso oyo ekómisaka nzoto mpe elimo mbindo,+ tómonisaka ete tozali kobanga Nzambe mpo bosantu na biso ekóma ya kokoka.

2 Bópesa biso esika na mitema na bino.+ Tosaleli moto mabe te, tobebisi moto te, tolyeli moto te.+ 3 Nazali koloba bongo te mpo na kokweisa bino. Mpo nautaki koloba yango liboso ete ezala tozali na bomoi to tokufi bozali na kati ya mitema na biso. 4 Nazali koloba na bino polele mpenza mpe na bosembo. Nazali komikumisa mingi mpo na bino. Nabɔndisami mingi mpenza, natondi na esengo mingi na mpasi nyonso oyo tozali komona.+

5 Ya solo, ntango tokómaki na Masedonia,+ topemaki te,* tokobaki konyokwama na ndenge nyonso—ezalaki na bitumba libándá, kobanga na kati. 6 Kasi Nzambe, oyo abɔndisaka baoyo balɛmbi nzoto,+ abɔndisaki biso na kozala ya Tito; 7 kaka na kozala na ye te, kasi mpe na libɔndisi oyo azwaki epai na bino, mpo ayebisaki biso mposa makasi oyo bozali na yango ya komona ngai lisusu, mawa makasi na bino mpe likebi* na bino epai na ngai; bongo nasepelaki mingi lisusu koleka.

8 Yango wana ata soki nayokisaki bino mawa na mokanda na ngai,+ nazali koyoka mpasi te mpo na yango. Ata soki na ebandeli nayokaki mpasi mpo na yango, (lokola mokanda yango eyokisaki bino mawa, atako mpo na mwa ntango moke kaka), 9 sikoyo nazali kosepela, kaka te mpo boyokaki mawa, kasi mpo boyokaki mawa tii na kobongola motema. Mpo boyokaki mawa oyo esepelisaka Nzambe, na yango likambo moko te ya mabe ezwaki bino mpo na biso. 10 Mpo mawa oyo esepelisaka Nzambe ememaka na kobongola motema mpo na lobiko mpe mpo na yango moto akoyoka mawa te na nsima;+ kasi mawa ya mokili ebotaka liwa. 11 Ezali polele ete boyoki mawa oyo Nzambe alingaka mpe mpo na yango bosali milende mingi, bopɛtoli bankombo na bino, boyokaki nkanda mpo na mabe oyo esalemaki, bobangaki Nzambe, bozalaki na mposa ya kobongola motema, bosalelaki Nzambe na motema na bino, bobongisaki mabe oyo esalemaki,+ eloko nyonso esalemaki na ndenge oyo ebongi mpo na kosilisa likambo yango. 12 Soki nakomelaki bino, nasalaki yango te mpo na moto oyo asalaki mabe,+ to mpo na moto oyo basalelaki mabe, kasi nakomelaki bino mpo na komona soki bokomonisa mpenza liboso ya Nzambe ete bozalaki na mposa makasi ya koyoka biso. 13 Yango wana biso tobɔndisami.

Kasi, longola kobɔndisama na biso, tosepelaki lisusu mingi koleka mpo na esengo ya Tito, mpamba te bino nyonso bobɔndisaki ye. 14 Mpo ata soki nakumisaki bino epai na ye, nayokisami nsɔni te; kasi kaka ndenge makambo nyonso oyo toyebisaki bino ezalaki ya solo, ndenge moko mpe komikumisa na biso liboso ya Tito emonani ete ezali ya solo. 15 Lisusu, bolingo na ye ya motema mpo na bino ekómi lisusu makasi, ntango azali kokanisa botosi na bino nyonso,+ ndenge boyambaki ye na kobanga mpe na kolɛnga. 16 Nazali kosepela mpo nazali kotyela bino motema na makambo nyonso.*

8 Bandeko, sikoyo tolingi koyebisa bino likambo etali boboto monene ya Nzambe oyo emonisamaki epai ya masangá ya Masedonia.+ 2 Na ntango ya komekama moko makasi na kati ya mpasi, esengo na bango monene mpe bobola na bango ya makasi esalaki ete bokabi na bango emonana lisusu mingi.* 3 Bapesaki na kotalela makoki na bango+ ata koleka oyo bakokaki kopesa,+ ngai moko nazali kotatola yango, 4 wana bango moko bazwaki likanisi ya kokoba kobondela biso makasi mpo bázwa libaku malamu ya kopesa makabo mpe ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosalisa basantu.+ 5 Mpe bapesaki kaka te ndenge tozalaki kolikya, kasi na mokano ya Nzambe, bamipesaki nde libosoliboso epai ya Nkolo mpe epai na biso. 6 Tito+ asengeli kosilisa mosala oyo abandaki kati na bino, elingi koloba, kosangisa makabo oyo bopesaki na bolingo na bino. 7 Nzokande, kaka ndenge botondi na biloko nyonso—na kondima, na liloba, na boyebi, na molende makasi, mpe na bolingo oyo biso tozali kolinga bino, bino mpe bókabaka mingi na mosala oyo ya kopesa makabo na bolingo.+

8 Nazali koloba bongo te mpo na kopesa bino mitindo, kasi mpo bóyeba molende makasi oyo basusu bazali komonisa mpe mpo na koyeba soki bolingo na bino ezali ya solo. 9 Mpo boyebi boboto monene ya Nkolo na biso Yesu Kristo, ete atako azalaki moto ya bomɛngo akómaki mobola mpo na bino,+ mpo bókóma bato ya bomɛngo na nzela ya bobola na ye.

10 Mpe na likambo yango nazali kopesa likanisi na ngai:+ yango ezali mpo na litomba na bino, mpo esili koleka mbula moko bosukaki kaka na kosala te, kasi bozalaki mpe kolinga kosala. 11 Na yango sikoyo, bósilisa likambo oyo bobandaki kosala, mpo mposa makasi na bino ya kopesa ekokokisama na kotalela makoki na bino. 12 Mpo soki libosoliboso mposa makasi ezali, ekondimama mingimingi mpenza na kotalela oyo moto azali na yango,+ kasi te na kotalela oyo moto azali na yango te. 13 Mpo nalingi te ete makambo ezala pɛtɛɛ mpo na basusu, kasi mpasi mpo na bino; 14 kasi nalingi kaka ete, na nzela ya bokokani, biloko oyo eleki mingi epai na bino ezipa sikoyo kozanga na bango, mpo ete biloko oyo eleki mingi epai na bango eya mpe kozipa kozanga na bino, bongo bokokani ezala. 15 Kaka ndenge ekomamá ete: “Moto oyo azalaki na mingi azalaki na mingi koleka te, mpe moto oyo azalaki na moke azalaki na moke koleka te.”+

16 Nzambe azwa matɔndi ndenge apesi Tito+ motema oyo ezali na mposa makasi ya kosalisa bino ndenge biso mpe tozali na mposa makasi ya kosala bongo, 17 mpo andimi mpenza elendiseli yango, kasi azali na mposa makasi ya kosala makambo oyo tosɛngaki ye asala, azali koya epai na bino na likanisi na ye moko. 18 Kasi tozali kotinda ye nzela moko na ndeko oyo lokumu na ye eyebani na masangá nyonso mpo na mosala oyo azali kosala mpo na nsango malamu. 19 Esuki kaka bongo te, kutu aponami mpe na masangá mpo azala moninga na biso ya mosala mpo na kotambwisa mosala ya kopesa makabo ya boboto mpo na nkembo ya Nkolo mpe mpo na komonisa mposa makasi na biso ya kosalisa. 20 Tozali kosala bongo mpo toboyi moto azwa likambo ya kolobela biso mabe mpo na likabo monene wana oyo tozali kokabola.+ 21 Mpo “tozali kokokisa mosala yango na bosembo, kaka te na miso ya Yehova,* kasi mpe na miso ya bato.”+

22 Lisusu, tozali kotinda bango nzela moko na ndeko na biso oyo tomekaki mbala na mbala mpe tomonaki ete azali na molende na makambo mingi, mpe oyo sikoyo azali na molende makasi mpo azali kotyela bino motema mingi. 23 Nzokande, soki mituna ezali mpo na Tito, ye azali moninga na ngai mpe moto oyo nasalaka na ye mpo na matomba na bino; soki mituna ezali mpo na bandeko na biso, bango bazali bantoma ya masangá mpe nkembo ya Kristo. 24 Na yango, bólakisa bango elembeteli ya bolingo na bino+ mpe bómonisa na masangá ntina oyo tozali komikumisa mpo na bino.

9 Nzokande na likambo oyo etali mosala yango mpo na basantu,+ ezali kutu na ntina te nakomela bino, 2 mpo nayebi mposa makasi na bino mpe nazali komikumisa na yango epai ya bato ya Masedonia, ete Akaya emibongisá esali sikoyo mbula moko; mpe molende na bino elamwisi mingi na bango. 3 Kasi nazali kotinda bandeko, mpo komikumisa oyo tomikumisaka mpo na bino ezala mpamba te na likambo yango mpe bómibongisa mpenza, ndenge kaka nazalaki koloba yango ete bokomibongisa. 4 Soki bongo te, ezala na ndenge nini, soki bato ya Masedonia bayei elongo na ngai mpe bakuti bino bomibongisi te, biso—naboyi kotánga bino—tokoyoka nsɔni na ndenge totyelaki bino motema. 5 Na yango, namonaki malamu kolendisa bandeko báya epai na bino liboso mpe bábongisa libelalibela likabo na bino ya motema malamu oyo bolakaki, mpo ebongisama lokola likabo oyo epesami na motema malamu kasi te lokola eloko oyo ebɔtɔlami.

6 Kasi na likambo yango, moto oyo azali kolona mingi te akobuka mpe mingi te mpe moto oyo azali kolona mingi akobuka mpe mingi.+ 7 Moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na koimaima te to na kotindikama te,+ mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.+

8 Kutu, Nzambe akoki kosala ete boboto monene na ye nyonso etonda epai na bino, mpo bózala ntango nyonso na oyo ekoki na bino na makambo nyonso, bózala mpe na mingi oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.+ 9 (Kaka ndenge ekomamá ete: “Akabi biloko mingi, apesi babola. Bosembo na ye ezali mpo na libela.”+ 10 Moto oyo apesaka moloni mboto mingi mpe limpa ya kolya akopesa mpe akobakisa mboto mpo bólona mpe akokómisa mbuma ya bosembo* na bino ebele.) 11 Nzambe apamboli bino mingi mpo bókoka kokaba mingi, mpe bato bakopesa Nzambe matondi mpo na makabo na bino oyo tokopesa mpe basusu; 12 mpo mosala oyo bozali kosala mpo na bolamu ya bato nyonso ezali te kaka mpo na kokokisa malamu bamposa ya basantu,+ kasi ezali mpe mpo matɔndi mingi epesama na Nzambe. 13 Mpo na elembeteli oyo mosala yango ya kopesa lisungi ezali kopesa, bazali kopesa Nzambe nkembo mpo bozali kotosa ndenge bozali kosakola polele nsango malamu oyo etali Kristo, mpe bozali kopesa makabo na motema mobimba mpo na bango mpe mpo na bato nyonso.+ 14 Mpe elongo na mabondeli* oyo bazali kosala mpo na bino bazali komonisa ete balingaka bino mpo na boboto monene ya Nzambe oyo eleki mpenza, oyo azali komonisela bino.

15 Nzambe azwa matɔndi mpo na likabo na ye wana ya ofele oyo ekoki kolimbolama te.

10 Nzokande ngai moko, Paulo, nazali kobondela bino na motema pɛtɛɛ mpe na boboto ya Kristo,+ atako namonanaka moto moke epai na bino,+ nzokande ntango nazali te nalobelaka bino makambo na mpiko.+ 2 Nazali kolikya ete ntango nakoya, baoyo bazali kokanisa ete tozali komitambwisa na kolanda mosuni bakobongwana mpo napamela bango makasi te. 3 Atako tozali na bomoi lokola bato mosusu nyonso, tozali kobunda etumba te na ndenge ya mosuni. 4 Mpo bibundeli ya etumba na biso ezali ya mosuni te,+ kasi ezali na nguya oyo euti na Nzambe+ mpo na kokweisa biloko oyo epikamá makasi. 5 Mpo tozali kokweisa makanisi mpe libaku nyonso oyo ezali kopekisa bato báyeba Nzambe,+ mpe tozali kokómisa likanisi nyonso mokangami mpo etosa Kristo; 6 mpe tozali pene ya kopesa etumbu na makambo nyonso ya kozanga botosi,+ ntango kaka botosi na bino ekokóma ya kokoka.

7 Bozali kotala makambo ndenge ezali komonana na libándá. Soki moto amimonaka mpenza ete azali moto ya Kristo, ayeba mpe likambo oyo mpo na ye moko: ete kaka ndenge ye azali moto ya Kristo, biso mpe tozali bongo. 8 Mpo ata soki nasengeli komikumisa mwa mingi mpo na bokonzi oyo Nkolo apesá biso ya kotonga bino kasi ya kobuka bino te,+ nakoyokisama nsɔni te. 9 Nalobi bongo mpo namonana te lokola nde nazali koluka kobangisa bino na mikanda na ngai. 10 Mpo bazali koloba ete: “Mikanda na ye ezali na kilo mpe na nguya, kasi kozala na ye moko moto ezali na bolɛmbu mpe elobeli na ye ezali mpamba.” 11 Moto wana ayeba likambo oyo ete: makambo oyo tozali koloba* na mikanda na biso ntango tozali kuna te, tokosala yango* ntango tokozala kuna.+ 12 Mpo tomekaka kutu te komitya na molɔngɔ ya bamosusu to komikokanisa na bamosusu oyo bamilobelaka bango moko.+ Kasi, ntango bamimekaka bango moko mpe bamikokanisaka bango moko, yango ezali komonisa ete bazali na mayele te.+

13 Nzokande, tokomikumisa te na libándá ya bandelo ya esika oyo bapesá biso, kasi nde na kotalela ndelo ya teritware oyo Nzambe apesá biso, ndenge akómisaki yango tii epai na bino.+ 14 Ya solo, topusi te bandelo ya teritware na biso lokola nde ekómaki te tii epai na bino, mpo tozalaki bato ya liboso oyo bakómaki tii epai na bino ná nsango malamu oyo etali Kristo.+ 15 Ɛɛ, tozali komikumisa te na libándá ya bandelo ya esika oyo bapesá biso, mpo na misala makasi ya moto mosusu. Tozali nde na elikya ete mosala oyo tosali na kati ya teritware na biso ekokoba kokola. Bongo tokozala na likoki ya kosala lisusu mingi koleka 16 mpo na kosakola nsango malamu na mikili oyo ezali mosika koleka bino. Na bongo tokomikumisa te na teritware ya moto mosusu epai mosala esilá kosalema. 17 “Kasi moto oyo azali komikumisa, amikumisa na Yehova.”*+ 18 Mpo Yehova* andimaka moto oyo Ye akumisi,+ kasi te moto oyo amikumisi ye moko.+

11 Nalingi bókanga motema na mwa bozoba na ngai. Kutu, ya solo, bozali kokanga motema na makambo na ngai! 2 Mpo nazali koyokela bino zuwa, zuwa oyo eyokani na mokano ya Nzambe,* mpo ngai mpenza nalakaki kobalisa bino na mobali kaka moko, mpo nabimisa bino lokola ngɔndɔ moko ya pɛto epai ya Kristo.+ 3 Kasi nazali kobanga ete ezala na ndenge nini, lokola nyoka abendaki Eva na mayele mabe na ye,+ makanisi na bino ebebisama mpe elongwa na bosembo mpe na bopɛto ya bizaleli oyo esengeli na Kristo.+ 4 Mpo ya solo, soki moto ayei kosakola Yesu oyo akeseni na oyo biso tosakolaki, to soki bozwi elimo oyo ekeseni na oyo bozwaki, to nsango malamu oyo ekeseni na oyo boyambaki,+ bokangaka motema na makambo ya moto yango kozanga kokakatana. 5 Mpo namoni ete ezali ata na likambo moko te oyo ngai nazali na nse ya bantoma minene na bino.+ 6 Kasi ata soki nalobaka malamu te,+ nazali na boyebi ya Nzambe; kutu tomoniselaki bino yango polele na ndenge nyonso mpe na makambo nyonso.

7 Nazalaki na esengo ya kosakwela bino nsango malamu ya Nzambe kozanga lifuti.+ Kasi nasalaki nde lisumu ndenge namikitisaki mpo bino bótombwama? 8 Nazwaki lisalisi oyo eutaki na masangá mosusu, mpe ezalaki lokola nabɔtɔlaki bango mpo nasalela bino.+ 9 Nzokande ntango nazalaki elongo na bino mpe nakelelaki, nakómaki kilo mpo na moto moko te, mpo bandeko oyo bautaki na Masedonia bapesaki ngai biloko mingi oyo ekokisaki bamposa na ngai.+ Ɛɛ, naboyaki na ndenge nyonso kozala kilo epai na bino mpe nakozala kaka bongo.+ 10 Ntango nyonso oyo solo ya Kristo ekozala na kati na ngai, nakotika te komikumisa+ mpo na bitúká ya Akaya. 11 Mpo na nini? Mpo nalingaka bino te? Nzambe ayebi ete nalingaka bino.

12 Ezali na basusu oyo bazali komikumisa mpe koloba ete bazali bantoma kaka lokola biso. Yango wana nakokoba kosala oyo nasalaka ntango nyonso+ mpo ete bázwa ata ntina moko te ya komikumisa. 13 Mpo bato wana bazali bantoma ya lokuta, basali ya mosala ya bokosi, oyo bazali komibimisa lokola bantoma ya Kristo.+ 14 Mpe likambo ya kokamwa ezali te, mpo Satana ye moko azali kokoba komimonisa lokola anzelu ya pole.+ 15 Bongo ezali likambo ya kokamwa te soki basali na ye mpe bazali kokoba komimonisa lokola basali ya bosembo. Kasi nsuka na bango ekozala na kolanda misala na bango.+

16 Nazali koloba lisusu ete: Moto moko te akanisa ete nazali zoba. Kasi soki bokanisi mpenza ete nazali bongo, bóndima ngai ata ndenge wana lokola zoba, mpo ngai mpe nakoka komikumisa mwa moke. 17 Ndenge nazali koloba sikoyo ezali te ndenge Nkolo alingaki koloba, kasi nazali komikumisa ndenge zoba alingaki kosala. 18 Lokola bato mingi bazali komikumisa na mosuni, ngai mpe nakomikumisa. 19 Lokola bozali mayele mingi, yango wana bozali kokanga motema na makambo ya bazoba. 20 Ɛɛ, bozali kokanga motema na makambo ya moto nyonso oyo azali kokómisa bino baombo, moto nyonso oyo azali kozwa mpe kolya biloko oyo bozali na yango, moto nyonso oyo azali komitombola likoló na bino, mpe moto nyonso oyo azali kobɛta bino na elongi.

21 Tozali na nsɔni ya koloba bongo, mpo ekoki komonana epai ya basusu na kati na bino ete tozali na bolɛmbu makasi mpo na kosalela bokonzi na biso na ndenge ebongi.

Kasi soki bato mosusu bayoki nsɔni te ya komikumisa—bongo ngai mpe nakoyoka nsɔni te ya komikumisa ata soki moto amoni ngai ete nazali zoba. 22 Bazali Baebre? Ngai mpe.+ Bazali Bayisraele? Ngai mpe. Bazali bana* ya Abrahama? Ngai mpe.+ 23 Bazali basaleli* ya Kristo? Nazali koyanola lokola moto ya ligboma, ngai naleki mpenza: nasalaki mosala mingi+ koleka bango, nakɔtaki babolɔkɔ mbala mingi+ koleka bango, nabɛtamaki koleka ndelo, mpe mbala na mbala nakómaki pene ya liwa.+ 24 Mbala mitano, Bayuda babɛtaki ngai fimbo 40 longola moko,+ 25 babɛtaki ngai na mangenda mbala misato,+ babambaki ngai mabanga mbala moko,+ nazindaki na masuwa mbala misato,+ nalekisaki butu mobimba mpe moi mobimba na kati ya mbu monene; 26 na mibembo mbala na mbala, na makama ya bibale, na makama ya miyibi, na makama oyo euti na bato na ngai moko,+ na makama oyo euti na bikólo,+ na makama na kati ya engumba,+ na makama na kati ya esobe, na makama na mbu, na makama epai ya bandeko ya lokuta, 27 na mosala makasi mpe na mitoki, na babutu kozanga mpɔngi mbala na mbala,+ na nzala mpe na mposa ya mai,+ na kozanga kolya biloko mbala mingi,+ na malili mpe kozanga bilamba.*

28 Longola makambo wana ya libándá, ezali na eloko oyo ezali konyokola ngai mokolo na mokolo: mitungisi mpo na masangá nyonso.+ 29 Nani alɛmbi, mpe ngai nalɛmbi te? Nani abɛti libaku, mpe nangali na nkanda te?

30 Soki esengeli namikumisa, nakomikumisa na makambo oyo ezali komonisa bolɛmbu na ngai. 31 Nzambe mpe Tata ya Nkolo Yesu, Moto oyo asengeli kosanzolama libela na libela, ayebi ete nazali kokosa te. 32 Na Damasi, guvɛrnɛrɛ ya mokonzi Aretasi azalaki kokɛngɛla engumba ya bato ya Damasi mpo na kokanga ngai, 33 kasi bakitisaki ngai na kati ya kitunga moko ya nkɛkɛlɛ, na fɛnɛtrɛ oyo ezalaki na efelo,+ mpe nakimaki na mabɔkɔ na ye.

12 Nasengeli komikumisa, na yango nakolobela bimonaneli+ oyo Nkolo amonisaki ngai mpe nsango oyo apesaki ngai,+ atako kosala bongo ezali na litomba te mpo na ngai. 2 Nayebi moto moko oyo, na bomoko elongo na Kristo, eleki mbula 14 amemamaki na likoló ya misato—nayebi te soki ezalaki na nzoto to na libándá ya nzoto, kasi Nzambe nde ayebi. 3 Ɛɛ, nayebi moto yango—nayebi te soki ezali na nzoto to na libándá ya nzoto, kasi Nzambe ayebi— 4 oyo amemamaki na paradiso mpe ayokaki maloba oyo ekoki kolobama te, oyo epesami nzela te ete moto aloba yango. 5 Nakomikumisa mpo na moto wana, kasi mpo na ngai moko te, longola kaka komikumisa mpo na bolɛmbu na ngai. 6 Mpo ata soki nalingi namikumisa, nakozala zoba te, mpo nakoloba nde solo. Kasi nalingi kosala bongo te, mpo moto moko te abakisela ngai makambo mosusu koleka oyo azali komona epai na ngai to oyo azali koyoka epai na ngai, 7 kaka mpo nazwaki bimoniseli ya kokamwa.

Mpo namitombola koleka ndelo te, bapesá ngai nzubɛ moko na kati ya mosuni,+ anzelu moko ya Satana, mpo akoba kobɛtaka ngai mbata, mpo nakoka te komitombola koleka ndelo. 8 Mbala misato nabondelaki Nkolo alongola nzubɛ oyo. 9 Kasi alobaki na ngai ete: “Boboto monene na ngai epai na yo ekoki bongo, mpo nguya na ngai ezali kokóma ya kokoka na kati ya bolɛmbu.”+ Na yango, na esengo nyonso, nakomikumisa nde mpo na bolɛmbu na ngai, mpo nguya ya Kristo ezala lokola hema likoló na ngai. 10 Na yango nazali kosepela na bolɛmbu, na mafinga, na bosɛnga, na minyoko mpe mikakatano, mpo na Kristo. Mpo ntango nazali na bolɛmbu, na ntango wana nde nazali mpenza na nguya.+

11 Nakómi zoba. Bino nde bato botindaki ngai nakóma bongo, mpo bino kutu nde bosengelaki kolobela ngai. Mpo namimonisaki ata na likambo moko te ete nazali na nse ya bantoma minene na bino, ata soki nazali eloko te.+ 12 Ya solo, nayikaki mpiko mpenza mpo na komonisa bino bilembeteli ya bontoma na ngai na bilembo,+ na makamwisi* mpe na misala ya nguya.+ 13 Kutu na likambo nini bino bokómi na nse ya masangá mosusu oyo etikali, soki ezali kaka te na likambo oyo ete ngai mpenza nakómaki kilo te epai na bino?+ Bólimbisa ngai mabe wana na motema moko.

14 Talá! Oyo ezali mbala ya misato namibongisi mpo na koya epai na bino, mpe nakokóma kilo te. Mpo nazali koluka te biloko oyo bozali na yango,+ kasi bino moko; mpo ezali bana te+ nde basengeli kobomba biloko mpo na baboti na bango, kasi baboti mpo na bana na bango. 15 Kasi ngai, na esengo nyonso, nakopesa biloko na ngai nyonso mpe nakopesa bomoi na ngai mobimba mpo na bino.*+ Soki nazali kolinga bino mingi boye, ebongi te bólinga ngai ndenge ngai nazali kolinga bino? 16 Kasi atako bongo, namemisaki bino kilo te.+ Nzokande, bozali koloba ete, nazalaki na “mayele mabe” mpe nazwaki bino “na mayele ya bokosi.” 17 Nalyelaki bino nde na nzela ya bato oyo natindaki epai na bino? 18 Nabondelaki Tito makasi aya kotala bino mpe natindaki ndeko mosusu elongo na ye. Tito alyelaki nde bino?+ Tomonisaki nde elimo moko wana te? Totambolaki nde na matambe moko wana te?

19 Na ntembe te bozali kokanisa ete tozali kosamba liboso na bino, kasi ezali bongo te. Kutu lokola bayekoli ya Kristo tozali koloba solo liboso ya Nzambe. Bandeko ya bolingo, makambo nyonso oyo tozali kosala ezali mpo na kotonga bino. 20 Mpo nazali kobanga ete ezala na ndenge nini, ntango nakoya, naya kokuta bino te ndenge oyo nalingi mpe namonana epai na bino te ndenge oyo bolingi, kasi nazali kobanga noki nakuta nde koswana, zuwa, bankanda makasi, kowelana, kotɔngana, banungunungu, kovimba na lolendo, mpe mobulu. 21 Mbala mosusu ntango nakoya lisusu, Nzambe na ngai akoki koyokisa ngai nsɔni liboso na bino, mpe nakoki kolela mpo na bato mingi oyo kala basalaki masumu kasi babongolaki motema te na mbindo na bango, pite* mpe etamboli ya nsɔni na nko* oyo bamipesaki na yango.

13 Oyo ezali mbala ya misato nazali koya epai na bino. “Na maloba* ya batatoli mibale to misato nde likambo nyonso esengeli kondimama.”+ 2 Atako sikoyo nazali kuna te, ezali lokola nde nazali kuna mpo na mbala ya mibale, mpe nazali kokebisa libelalibela baoyo basalaki masumu liboso mpe na bamosusu nyonso oyo batikali, ete soki mpenza nayei lisusu, moto moko te akokoka kokima disiplini, 3 lokola bozali koluka elembeteli oyo emonisi ete Kristo oyo azali moto ya bolɛmbu te epai na bino, kasi azali moto ya nguya na kati na bino, azali mpenza koloba na nzela na ngai. 4 Ɛɛ, ezali solo ete, abakamaki na nzete mpo na bolɛmbu, kasi azali na bomoi mpo na nguya ya Nzambe.+ Ezali mpe solo ete tozali bato ya bolɛmbu ndenge ye azalaki, kasi tokozala na bomoi elongo na ye+ mpo na nguya ya Nzambe oyo ezali kosala na kati na bino.+

5 Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima; bókoba kotala soki bozali ndenge nini.+ Bozali koyeba te ete Yesu Kristo azali na bomoko elongo na bino? Loba nde soki bozali bato oyo baboyami. 6 Nazali mpenza kolikya ete bokoyeba ete biso tozali te bato oyo baboyami.

7 Nzokande tozali kobondela Nzambe ete bósala likambo moko te ya mabe. Ezali te mpo tolingi ete tózala bato oyo bandimami, kasi tolingi nde ete bósalaka makambo oyo ezali malamu mingi, ata soki biso tozali komonana lokola bato oyo baboyami. 8 Mpo tokoki kosala eloko moko te mpo na kotɛmɛla solo, kasi kaka mpo na kosimba solo. 9 Ya solo mpenza tosepelaka ntango nyonso oyo biso tozali bato ya bolɛmbu, kasi bino bozali bato ya nguya. Mpe tozali kobondela mpo na likambo oyo: bósembolama. 10 Yango wana nakomeli bino makambo oyo ntango nazali kuna te, mpo ntango nakozala kuna, nasalela na makasi te bokonzi oyo Nkolo apesá ngai,+ kasi nasalela yango nde mpo na kotonga kasi kobuka te.

11 Bandeko, mpo na kosukisa, bókoba kosepela, kosembolama, kobɔndisama,+ kokanisa ndenge moko,+ kofanda na kimya;+ mpe Nzambe ya bolingo mpe ya kimya+ akozala na bino. 12 Bópesana mbote na lipwɛpwɛ mosantu. 13 Basantu nyonso batindeli bino mbote.

14 Boboto monene ya Nkolo Yesu Kristo, bolingo ya Nzambe mpe mapamboli oyo bozali kozwa elongo na nzela ya elimo santu ezala na bino nyonso.

To, “alendisaka.”

To, “bolɔzi.”

To, “bolɔzi.”

To, “bolɔzi.”

Lil., “alamwisaka.”

To, “mpo na bilongi ya bato mingi oyo bazali kobondela.”

To mbala mosusu, “oyo boyebi malamu.”

Lil., “tii na nsuka.”

To mbala mosusu, “mpo na kozwa litomba mpo na mbala ya mibale.”

Bazalaki mpe kobenga ye Silasi.

To, “molimo.”

To, “mayele mabe na ye.”

Lil., “porte moko efungwamaki liboso na ngai na mosala ya Nkolo.”

To, “azali koyokisa.”

To, “malasi.”

To, “bazwaka litomba na.”

To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

Lil., “uta na nkembo tii na nkembo.”

Talá Ap. A5.

To mbala mosusu, “na nzela ya elimo ya Yehova.”

To, “makambo ya ntango oyo.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “bambɛki ya mabele ya lima.”

To mbala mosusu, “tozangi elikya te.”

Lil., “alamwisaki.”

To, “bolɔzi.”

Lil., “ya kilo mingi koleka.”

To, “ndako ya kofanda.”

To, “kolata esika na biso ya kofanda ya likoló.”

To, “komonisama polele.”

To, “Tomonani polele.”

To, “tomonani polele.”

Lil., “alamwisamaki.”

To, “baambasadɛrɛ.” Mosali oyo mokonzi atindi mpo na komonisa ye na mboka mopaya.

To, “mbeka ya lisumu.”

To, “baministre.”

To mbala mosusu, “mpo na kobunda.”

To mbala mosusu, “mpo na komibatela.”

To, “totalelami lokola bato oyo babongi na liwa.”

To, “disiplini.”

To, “Tofungoli monɔkɔ na biso mpo na kolobela bino polele.”

To, “bino mpe bófungwama.”

Euti na liloba ya Ebre oyo elimboli, “zoba.” Esalelami mpo na kolobela Satana.

To, “moto ya sembo.”

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

Lil., “mosuni na biso epemaki te.”

Lil., “molende.”

To mbala mosusu, “nakoki kozala na mpiko mpenza mpo na bino.”

To, “bokabi na bango etonda kotonda.”

Talá Ap. A5.

To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “malɔmbɔ.”

Lil., “ndenge biso tozali na maloba na biso.”

Lil., “ndenge mpe tokozala na misala.”

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

Lil., “molende ya Nzambe.”

Lil., “momboto.”

To, “baministre.”

Lil., “bolumbu.”

To, “makamwisi oyo ezali komonisa makambo oyo ekoya.”

To, “milimo na bino.”

Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.

Na Grɛki, asélgéïa. Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “Na monɔkɔ.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto