MOTUNA 13
Biblia elobi nini mpo na mosala?
“Omoni moto oyo azali na mayele na mosala na ye? Ezali liboso ya bakonzi nde akotɛlɛma; akotɛlɛma liboso ya bato mpamba te.”
“Moyibi ayiba lisusu te, kasi asala nde mosala makasi, asala na mabɔkɔ na ye mosala oyo ezali malamu, mpo azala na eloko ya kokabela moto oyo azali kokelela.”
“Moto nyonso alya mpe amɛla mpenza mpe amona bolamu mpo na mosala na ye nyonso ya makasi. Ezali likabo ya Nzambe.”