Komikosa te na oyo ozali komona
TOZALAKI kofanda na zamba, na ndako ya bopemi ya moninga na ngai moko, oyo apesaki biso eteni ya nsé ya ndako na ye ya etaze mpo na kolala. Na bongo, lokola maninisa mazalaki na nsé mpenza, tozalaki kotala pene na biso mabelé na libándá ya eteni na biso ya ndako. Pene na ngonga ya 6 ya ntɔ́ngɔ́, mokolo ya liboso, nalamukaki mpo na makɛlɛlɛ makasi lokola bazali kobɛta bibende bipai na bipai na ndako mobimba. Nakamwaki mpe natɛlɛmaki, nakendeki na kúku mpo na kotala soki makɛlɛlɛ yango ezalaki kouta na frigo to na masini ya kopesa molungé na ndako. Ezalaki kuna te. Motema likoló, nayokaki na mbala moko lokola makɛlɛlɛ yango ezalaki kouta na eteni ya ndako ya bosololi. Nakɔtaki malɛmbɛmalɛmbɛ kuna, kasi nakamwaki ntango namonaki na libándá, ndɛkɛ moko ya motané mpenza, na nkombo cardinal, oyo ezalaki kobɛtabɛta talatála ya lininisa na ekómo na yango! Ndɛkɛ yango ezalaki kopumbwapumbwa na lininisa mokomoko ya ndako—na eteni ya ndako ya kolala, ya kosukola, ya kosolola mpe ya kotala televizyó—na esika nyonso oyo lininisa ezalaki mosika te na mabelé. Nakamwaki mpenza.
Ntango napusanaki malɛmbɛ pene na lininisa, nayaki koyeba ntina ya likambo yango—cardinal moko, ya mwasi, ezalaki kolya mbuma na esengo nyonso, mosika te na libándá. Kasi mpo na nini cardinal ya mobali ezalaki kobɛtabɛta maninisa na ekómo na yango? Wana ezalaki komona elilingi na yango moko na talatála ya lininisa, ekanisaki ete ezalaki cardinal mosusu ya mobali mpe ezalaki komeka kobengana yango lokola monguna! Ndɛkɛ yango emikosaki solo na oyo yango ezalaki komona.
Na nsima, nandimaki ete yango ezalaki ntina ya ezaleli ya kokamwisa oyo ndɛkɛ wana ezalaka na yango. Na búku na ye The Cardinal, June Osborne alobi ete cardinal ya mobali “ebundaka na makasi nyonso mpo na kobatela esika na yango na banguna mosusu nyonso ya mibali. . . . Ezalaka te bobele kobengana bakɔteli wana bapaya, kasi eyebani ete . . . ebundisaka ata elilingi na yango moko ntango emoni yango na disike oyo ezipaka piné ya motuka, na talatála ya motuka, to na talatála ya maninisa mpe na talatála ya bikuke.” Na nsima, abakisi likanisi oyo tokoki kondima biso nyonso ete: “[Ezaleli] yango ekoki kobebisa kimya ya bato na ndako.” Mikolo nyonso, na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́, tozalaki kokutana na mokakatano yango.
Okoki kosala nini mpo na kosukisa ezaleli wana ya kozanga komipekisa ya cardinal ya mobali? Mokomi Osborne apesi likanisi oyo ete: “Ntango mosusu ekozala malamu kozipa bitanda oyo bizali kongɛnga, mpo na kozongisa kimya mpe kosilisa makɛlɛlɛ . . . , na koleka, kosaláká bongo ekobatela ndɛkɛ yango ete emiboma te mpo na etumba yango ya matata mpenza.”—Euti na ndeko moko.