Nkomá ya batángi
Bokeseni oyo ezali kokabola bato Tolingi komonisa botɔ́ndi na biso mpo na masoló “Bokeseni esengeli nde kokabola biso?” (8 Yúni 1996, ebimeli ya Lifalansé) Tozali kosala lokola basáli ya bolingo malamu na mosala ya botongi awa na engumba Mexico esili koleka soko mbula moko. Ata nsima ya basanza mingi, tozalaki naino na mokakatano ya komimesenisa na basusu, kasi tososolaki te mpo na nini yango ezalaki bongo. Masoló yango masalisaki biso na koyeba mokakatano yango ete ezalaki mayoki ya kozanga kolónga komimesenisa na basusu. Tolandaki likanisi oyo elobaki ete “komonisa motuya na mimeseno ya basusu ekoki kopesa matomba malamu na bomoi na biso” mpe na yango tosili kozwa esengo mingi na mosala na biso.
C. H. mpe J. H., Mexique
Nasepelaki mingi na lolenge lisoló yango ya kobenda likebi emonisamaki mpe elobelamaki. Bokeseni esili mpenza kobimisa ezaleli ya koyinana kati na lisoló ya bato. Kobanda sikawa lisoló yango likosalisa ngai ete natalela mimeseno ya basusu na lisosoli malamu. Nasɛngi na moto nyonso kati na mokili ete atánga masoló yango mpe abongola makanisi na ye na ntina na basusu!
G. O., Nigeria
Masoló yango mabimisaki ngai mpisoli. Nazali na moninga moko oyo toyokanaka malamu pene na ntango nyonso. Kasi nazalaki mpenza komona ete kati na biso, ezalaki na epekiseli moko oyo ezangaki komonana. Nayebi sikawa ete touti na bisika oyo ezali na mimeseno mikeseni mpenza. Lisoló oyo ekosala mbongwana monene na lolenge na kobanda kotalela ye sikawa.
A. F., États-Unis
Ntango nazalaki kosala bolukiluki mpo na kokoma búku oyo ekopesa ngai nzela mpo na kosilisa kelasi na eteyelo monene na siansi ebéngami antropoloji, nalekisaki bapɔ́sɔ mingi na mboka moko na Afrika. Nazwaki libaku ya koyeba Batatoli ya Yehova mingi na mboka wana mpe nayanganaki na makita na bango. Ezalaki mpenza likambo ya kosepelisa! Lokola lisoló elobelaki yango, kosala boyebani na bato ya mboka mosusu ezali na matomba. Nazalaki na likoki ya kosala boninga malamu mpe ya sika.
S. B., Italie
Habu Nasepelaki mingi na lisoló “Habu—Nyoka oyo esengeli kokima yango.” (8 Yulí 1996, ebimeli ya Lifalansé) Lisoló yango likomamaki na lolenge ya kosepelisa, mpe bafɔtɔ́ ezalaki kitoko mpenza!
E. P., Ukraine
Lisoló yango lizalaki ya koteya mpe ya kosɛkisa. Kasi likambo moko ekeseneki na oyo bateyaki ngai. Botángaki búku moko oyo ezali kosɛnga kobenda ngɛngɛ na monɔkɔ na esika oyo nyoka eswei. Yango ezali mpenza likámá te?
C. D., Nigeria
Emonani ete minganga mingi bazali kondimela te eutelo oyo etángami na lisoló na biso. Ya solo, minganga mosusu bakanisaka ete komeka kobenda ngɛngɛ na monɔkɔ ekoki kozala likámá mpo na oyo azali kosalisa mpe ekosalisa mpenza te moto oyo nyoka eswei ye. Minganga bandimi ete lisungi ya liboso oyo ezali na ntina koleka ezali bongo kokenda na moto yango na lopitalo nokinoki.—BABIMISI
OVNI Matɔ́ndi mingi mpo na lisoló “Engebene Biblia: OVNI (extra-terrestre)—Bamemi-nsango ya Nzambe? (8 Yulí 1996, ebimeli ya Lifalansé) Na esika tofandi, bato mosusu bandimaka masoló na ntina na ba extraterrestre. Kokanisáká ete Biblia elobeli makambo yango te, bazalaka na ntembe na ntina na Biblia. Lisoló yango lisalisi biso na koyeba ete Satana mpe bademó na ye bazali koluka kozimbisa bato mpe na yango ekozala likambo ya kozanga mayele na kondima masoló ya ba extra-terrestre.
A. W., Taiwan
Tulipe Matɔ́ndi mingi mpo na lisoló kitoko oyo ezalaki na motó na likambo ete “Tulipe—Fololo moko ya lisoló mobimba.” (8 Yulí 1996, ebimeli ya Lifalansé) Namonaki ete bansango na ntina na eutelo na yango mpe mitindo na yango mpo na tulipe oyo ekóli ezalaki mpenza ya kosepelisa.
D. G., États-Unis