Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g99 Janvier lok. 31
  • Alɛmbaki te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Alɛmbaki te
  • Lamuká!—1999
  • Masolo mosusu
  • Nazali na bomoi ya mpasi
    Lamuká!—1994
  • Tozali Banzambe te, Banganga-nkisi mpe te
    Lamuká!—1994
  • “Okokufa!”
    Lamuká!—2000
Lamuká!—1999
g99 Janvier lok. 31

Alɛmbaki te

MOKOLO ya 5 Ɔkɔtɔbɛ 1995, basalaki Matt Tapio, elenge mobali ya mibu 14, lipaso ya kanser na bɔɔngɔ. Baekzamɛ oyo basalaki emonisaki ete kanser yango ezalaki kopalangana. Ezalaki wana lipaso ya liboso, kasi mapaso mingi masengelaki kolandana na boumeli ya mbula mibale na ndambo. Na nsima, asengelaki kolanda kosalisama na oyo babéngi chimiothérapie mpe radiothérapie.

Matt azalaki kofanda na Michigan, na États-Unis, epai kuna azalaki kokende kelasi mpe koyangana na makita ya boklisto. Azalaki kolobela bindimeli na ye epai na balakisi na ye mpe baninga na ye ya kelasi. Azalaki mpe kosakola nsango malamu. Na boumeli ya ntango oyo azalaki kokɔta mpe kobima na lopitalo​—na boumeli ya mbula mibale na ndambo ya nsuka na bomoi na ye, alekisaki sanza 18 kati na mapitalo ndenge na ndenge​—akabolaki bankama ya mikanda mikolimbolaka Biblia epai na bato oyo azalaki kokutana na bango.

Mbala mingi, Matt azalaki kobunda na liwa, kasi azalaki kobika. Mokolo moko, wana bazalaki kokende na ye na lopitalo, mpema na ye ekatanaki. Na lisalisi ya mwango oyo babéngi réanimation cardiorespiratoire, apemaki lisusu. Ntango amiyokaki malamu, abandaki kolela mpe koganga ete: “Nakobunda! Nakobunda! Nakolɛmba te!” Bato balobaki ete ezalaki kondima na ye epai na Nzambe nde epesaki ye nguya ya kosala nyonso ete azala na bomoi.

Mokolo ya 13 Yanuali 1996, Matt akokisaki mposa moko oyo azalaki na yango na motema, amipesaki epai na Yehova Nzambe mpe azwaki batisimo. Mpo na kopɛngola kozwa mikrobe, batisimo esalemaki na pisini moko mpo na ye moko. Nsima ya mwa mikolo, azongaki lisusu na lopitalo mpo na lipaso mosusu. Na Augusto 1997, Matt asanzaki na boumeli ya bapɔsɔ mingi, kasi akómaki malamu nsima ya lipaso mosusu.

Atako mikakatano nyonso wana, Matt azalaki ntango nyonso kosala mwa masɛki, kosɛka na minganga mpe balifulumɛ oyo bazalaki kosalisa ye. Bazalaki kokanga ntina te mpo na nini azalaki na ezaleli motindo wana. Monganga moko alobaki na ye ete: “Matt, soki nazalaki kobɛla lokola yo, mbɛlɛ nakangi rido ya mbeto na ngai, namizipi molekani kino na motó mpe nabimisi moto nyonso libándá.”

Na Febwali 1998, Matt abimaki na lopitalo mpo na mbala ya nsuka. Azalaki na esengo mingi mpo ete azalaki na bomoi. Mpe bobele ntango bakómi na ndako, alobaki: “Nazali na esengo mingi! Tóbondela.” Amonisaki esengo na ye epai na Yehova na libondeli. Nsima ya sanza mibale, na mokolo ya 19 Aprili, akufaki na kanser.

Mwa ntango liboso, na likita moko na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova, batunaki Matt mituna mpe azalaki kopesa biyano. Batunaki ye boye: “Okoki koloba nini epai na baoyo bazali na nzoto kolɔngɔnɔ mpo na mosala ya kosakola mpe makita ya boklisto?”

Matt ayanolaki ete: “Salá oyo okoki kosala sikawa. . . . Okoki koyeba te nini ekokómela yo. . . . Kasi, ata likambo nini oyo ekómeli yo, kolɛmba te kotatola nkombo ya Yehova.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto