Sida: Maladi oyo ezali se kopalangana
KAREN akolaki na wɛsti ya États-Unis.a Lokola azali Motatoli ya Yehova, abatelaki mitinda mitombwami ya bizaleli malamu na boumeli ya bolenge na ye mobimba. Na 1984, ntango akómaki na mibu 23, abalanaki na Bill, oyo akómaki Motatoli esilaki koleka bobele mbula mibale. Babotaki bana mibale: mwasi na mobali.
Na 1991, bolingo na bango ekómaki makasi mpenza, mpe bazalaki na esengo mingi. Na nsuka ya mobu yango, litɔnɔ moko ya mpɛmbɛ ebimaki na lolemo ya Bill mpe ezalaki kosila te. Akendaki epai ya monganga.
Mwa moke nsima na yango, Karen na bana bazalaki kokɔmbola matiti na libándá. Bill afandaki na veranda ya ndako mpe abéngaki Karen aya kofanda pembeni na ye. Azingaki ye mabɔkɔ na loketo mpe wana mai na miso ezalaki kobima ye, alobaki ete alingaka ye mingi mpe alingi kozala na ye libela na libela. Kasi, mpo na nini mai na miso? Monganga alobaki ete ekoki kozala ete Bill azali na sida.
Libota mobimba esalisaki ekzamɛ mpe emonisaki ete Bill mpe Karen bazali na sida. Bill azwaki yango liboso ete akóma Motatoli ya Yehova; mpe na nsima apesaki yango na Karen. Kasi ekzamɛ emonisaki ete bana bazali na sida te. Nsima ya mbula misato, Bill akufaki. Karen alobi: “Nayebi te ndenge nini nakoki kolobela likambo ya komona mobali kitoko oyo ozalaki kolinga mpe kosepela kozala na ye libela na libela, kosila nzoto mokemoke kino kotikala bobele loposo mpe mikuwa mpamba. Nazalaki kolela butu nyonso. Akufaki sanza misato liboso ete tókokisa mbula zomi ya libala na biso. Azalaki tata malamu mpe mobali malamu.”
Atako monganga moko ayebisaki Karen ete nsima ya mwa mikolo akokufa lokola mobali na ye, kasi azali naino na bomoi. Mikrobe yango ekómi na eteni ya ebandeli ya maladi.
Karen azali bobele moko kati na bato soko milio 30 oyo bazali sikawa na sida, motángo oyo eleki monene soki tosangisi motángo ya bafandi nyonso ya ekólo Australie, Irlande mpe Paraguay. Ekanisami ete kati na bato yango oyo bazali na sida, bato milio 21 bazali na Afrika. Soki totaleli mitángo oyo mipesami na Mabota Masangani, na ebandeli ya ekeke ya 21, motángo yango ekomata kino na milio 40. Lapolo moko ya Mabota Masangani elobi ete maladi yango ezali kopalangana mpenza ndenge moko na maladi mosusu nyonso oyo ezwaki bato na mbala moko na boumeli ya lisolo ya bato. Kati na mikóló oyo bazali na mibu 15 kino mibu 49 oyo bazali kosangisa nzoto mingi, moto moko kati na bato 100 asili kozwa sida. Na baoyo nyonso bazwi sida, bobele moto moko kati na bato zomi nde ayebi ete azali na yango. Na bipai mosusu na Afrika, mikóló 25 likoló na monkama bazali na sida.
Uta ebandeli ya maladi yango na 1981, ekanisami ete bato milio 11,7 bakufi na sida. Ekanisami ete bobele na 1997, bato milio 2,3 bakufaki na yango. Atako bongo, milende oyo ezali kosalema mpo na kobundisa sida mizali kopesa elikya. Na boumeli ya mwa bambula oyo eleki, bato ya sika oyo bazwaki sida na mikili ya bozwi bazalaki mingi te. Lisusu, bankisi oyo ekoki kosunga ezali kopesa bato oyo bazali na sida elikya ya kozala na mwa kolɔngɔnɔ malamu mpe ya koumisa bango mwa ntango molai na bomoi.
Ndenge nini okoki komibatela na sida? Basili kozwa nkisi ya kosalisa mpe nkisi ya mangwele mpo na sida? Maladi yango ekosila mokolo mosusu? Mituna yango mikotalelama na masolo oyo malandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Wana ezali bankombo na bango te.