Maloba ya ebandeli
Osilá kokufela moto moko oyo olingaki mingi?
Ozali kino sikawa kooka mawa?
Ozali na mposa ya lisungi mpo na mawa na yo?
Elikya ezali mpo na bakufi?
Soki ezali, elikya yango ezali nini?
Lolenge nini tokoki mpenza kondimisama?
Kati na mwa búku oyo, mituna motindo oyo mikozwa biyano ya kobɔndisa miuti na Biblia. Tosɛngi na yo ete ótánga yango na likebi nyonso.