“Yaká, landá ngai”
Esí ekómelá yo obunga nzela mpe ozala na mposa moto moko alakisa yo nzela? Yesu Kristo azali Mokambi oyo Nzambe apesá, oyo bato nyonso bazali na mposa na ye. Alobaki boye: “Ngai nazali mobateli ya mpate oyo aleki malamu. Nayebi bampate na ngai mpe bampate na ngai eyebi ngai.” (Yoane 10:14) Oyebi mpenza Mobateli ya mpate ya malamu? Oyebi bizaleli na ye, nsango na ye, mosala na ye, molende na ye mpe bolingo na ye? Buku oyo ekosalisa yo oyeba mpenza Yesu mpe olanda ye malamumalamu.