Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ll eteni 3 nk. 8-9
  • Bomoi ezalaki ndenge nini na Paradiso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi ezalaki ndenge nini na Paradiso?
  • Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
  • Masolo mosusu
  • Bato oyo baleki biso
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Babengani bango na Edene
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Bayokelaki Satana—Makambo nini emonani?
    Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
  • Eteni 3
    Yoká Nzambe
Makambo mosusu
Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
ll eteni 3 nk. 8-9

ETENI 3

Bomoi ezalaki ndenge nini na Paradiso?

Yehova apesaki Adama ná Eva biloko mingi ya malamu. Ebandeli 1:28

Ntango Yehova akelaki Eva, apesaki ye epai ya Adama

Yehova akelaki Eva, mwasi ya liboso, mpe apesaki ye epai ya Adama mpo azala mwasi na ye.​—Ebandeli 2:21, 22.

Yehova akelaki bango na makanisi mpe na nzoto ya kokoka, ezalaki ata na mbeba moko te.

Adama ná Eva bazali kotalatala Paradiso esika bafandi

Paradiso, epai bazalaki kofanda ezalaki elanga ya Edene​—esika moko ya kitoko mingi oyo ezalaki na ebale moko, banzete oyo ebotaka mbuma mpe banyama.

Yehova azalaki kosolola na bango; koteya bango. Soki bayokelaki ye, balingaki kozala na bomoi libela na Paradiso awa na mabele.

Nzambe apekisaki bango kolya mbuma ya nzete moko. Ebandeli 2:16, 17

Nzete oyo Yehova apekisaki Adama ná Eva kolya mbuma na yango

Yehova alakisaki Adama ná Eva nzete moko na elanga mpe ayebisaki bango ete soki balei mbuma ya nzete yango, bakokufa.

Anzelu mabe, Satana Zabolo, asalelaki nyoka mpo na kosolola na Eva

Moko ya baanzelu atombokelaki Nzambe. Anzelu mabe yango ezali Satana Zabolo.

Satana alingaki te Adama ná Eva bátosa Yehova. Na yango, asalelaki nyoka mpo na koyebisa Eva ete soki alei mbuma ya nzete yango, akokufa te, kasi akozala lokola Nzambe. Na ntembe te, likambo yango ezalaki lokuta.​—Ebandeli 3:1-5.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto