Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yp1 lok. 2
  • Biyano oyo ebongi!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano oyo ebongi!
  • Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
yp1 lok. 2

Maloba ya ebandeli

Biyano oyo ebongi!

‘Ndenge nini nakoki kosolola ná baboti na ngai?’ ‘Ndenge nini nakoki kozwa baninga?’ ‘Mabe eza’ wapi soki nasangisi nzoto na moto nyonso oyo nalingi?’ ‘Mpo na nini nakómi mawamawa boye?’

Soki osilá komituna mituna wana, yebá ete ozali yo moko te. Ezala olukaki toli epai nini, mbala mosusu bapesaki yo biyano ndenge na ndenge. Mpo na kosalisa bilenge bázwa toli ya malamu, na sanza ya yambo [Janvier] 1982, masolo ndenge na ndenge ya Biblia ebandaki kobima na zulunalo Lamuká!; masolo yango ezali na motó ya likambo “Mituna oyo bilenge batunaka . . .” Banda wana, bato mingi bazali kaka kosepela na masolo yango. Basalaka bolukiluki mingi mpo na kobimisa masolo yango. Kutu, mpo na koyeba mpenza ndenge oyo bilenge bakanisaka mpe bamiyokaka, bakomi ya zulunalo Lamuká! basololaki ná bilenge mingi na mokili mobimba! Nzokande, likambo eleki ntina, toli oyo ezali na masolo “Mituna oyo bilenge batunaka” eutaka na Biblia, Liloba ya Nzambe.

Buku oyo osimbi ebimisamaki liboso na 1994. Kasi, tobongisi mpenza mikapo mpo eyokana na makambo oyo bilenge bazali kokutana na yango lelo oyo. Mikapo koleka 30 euti na masolo “Mituna oyo bilenge batunaka” oyo ebimaki kobanda 2004 tii 2011.

Buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, Volimi 1 ekopesa yo batoli oyo ebongi mpo okóma mokóló oyo akoki mpenza. Tozali na elikya ete soki osaleli batoli yango, okozala na kati ya bamilio ya bato, bilenge mpe mikóló, oyo basalelaka makoki na bango ya kososola mpo na “kokesenisa ná mabe ná malamu.”​—Baebre 5:14.

Babimisi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto