Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ypq motuna 9 nk. 27-29
  • Nasengeli kondima ete bomoi ebimá yango moko?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasengeli kondima ete bomoi ebimá yango moko?
  • Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka
  • Masolo mosusu
  • Bomoi ekelamá to ebimá yango moko?—Eteni 2: mpo na nini koboya kondima liteya ya evolisyo?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Bomoi ekelamá to ebimá yango moko?—Eteni 1: Mpo na nini kondima ete Nzambe azali?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Evolisyo eyokani na mateya ya Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Evolisyo
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka
ypq motuna 9 nk. 27-29
Bana-kelasi bazali kotala mokuwa ya motó

MOTUNA 9

Nasengeli kondima ete bomoi ebimá yango moko?

NTINA NA YANGO

Soki ya solo bomoi ebimá yango moko, wana bomoi na biso ezali na ntina te. Kasi, soki bomoi ekelamá, tokoki kozwa biyano na mituna oyo etali bomoi mpe bomoi na mikolo ekoya.

YO OLINGAKI KOSALA NINI?

Talá likambo oyo: Alex asili mayele. Banda kala, andimaka ete Nzambe azali mpe ye nde akelá biloko nyonso. Kasi lelo, molakisi na bango ya bioloji azali komonisa na mpiko ete bomoi ebimá yango moko, mpe ete makambo oyo bato ya siansi bayekoli emonisi yango. Alex aboyi kobima zoba. Na nse ya motema, alobi: ‘Soki bato ya siansi kutu bamonisi ete bomoi ebimá yango moko, ngai nani mpo naboya yango?’

Soki ozalaki Alex, olingaki kondima ete bomoi ebimá yango moko kaka mpo babuku ya kelasi emonisi yango?

KANISÁ!

Ezala baoyo bandimaka ete biloko nyonso ebimá yango moko to baoyo bandimaka bongo te balobaka kaka kozanga báyeba mpenza ntina.

  • Bato mosusu bandimaka ete bomoi ekelamá kaka mpo bateyá bango bongo na ndako-nzambe.

  • Bato mosusu bandimaka ete bomoi ebimá yango moko kaka mpo bateyá bango bongo na kelasi.

MAKAMBO MOTOBA YA KOTALELA

Biblia elobi: “Ndako nyonso etongamaka na moto, kasi oyo atongá biloko nyonso ezali Nzambe.” (Baebre 3:4) Ebongi kondima likambo yango?

Elenge mobali moko azali kotala ndako moko

Koloba ete bomoi ezali na Mozalisi te ezali bozoba, ndenge moko na koloba ete ndako oyo ebimá yango moko

LIKANISI YA BATO: Eloko nyonso oyo ezali na molɔ́ngɔ́ ebimá kaka boye, na pwasa.

1. Nani to nini esalaki ete nyonso ebima na pwasa?

2. Ebongi mpenza kondima nini: ete biloko nyonso ebimá kaka yango moko, to ete moto moko nde asalaki yango?

LIKANISI YA BATO: Moto autá na nyama.

3. Soki moto autá na nyama​—na ndakisa makako—​mpo na nini mayele ya moto eleki mosika mpenza mayele ya makako?

4. Mpo na nini ata bikelamu ya mikemike mpenza ekamwisaka mingi?

LIKANISI YA BATO: Ezali solo ete bomoi ebimá yango moko.

5. Moto oyo alobi bongo, ye moko atalelaki likambo yango malamu?

6. Bato mingi bandimaka ete bomoi ebimá yango moko kaka mpo bayebisá bango ete bato nyonso ya mayele bandimaka bongo!

“Soki ozali kotambola na zamba mpe omoni ndako moko kitoko esalemá na banzete, okoloba nde ete: ‘Oyo ndako kitoko! Banzete ekweaki awa mpe na nsima ndako yango ebimaki.’ Okoloba bongo te! Ekoki kosalema bongo te. Bongo mpo na nini koloba ete biloko nyonso oyo ezali na molɔ́ngɔ́ ebimá kaka yango moko?”​—Julia.

“Soki moto alobi na yo ete masini moko ya konyata mikanda epanzanaki mpe mai na yango ekangamaki na bifelo mpe na plafɔ mpe ebimisaki buku moko ya monene. Okondima yango?”​—Gwen.

MPO NA NINI KONDIMA ETE NZAMBE AZALI?

Biblia elendisi yo osalelaka mayele, to “makoki na [yo] ya kokanisa.” (Baroma 12:1) Yango elimboli ete osengeli te kondimela Nzambe

  • BINDIMELÁ (Nabanzi ezali na moto moko oyo aleki na nguya)

  • MPO NA BILANDALANDA (Epai nafandi, bato basambelaka)

  • MPO NA MBAMBA YA BASUSU (Baboti na ngai bateyá ngai ete Nzambe azali; nakokaki kokanisa ndenge mosusu te)

Kasi, osengeli koyeba ntina oyo ondimaka ete Nzambe azali.

“Ntango molakisi na biso azali kolimbola ndenge nzoto ya moto esalaka, nandimaka mbala moko ete Nzambe azali. Eteni mokomoko ya nzoto ezalaka na mosala na yango, ata makambo ya mikemike, mpe mbala mingi esalaka kozanga kutu tóyeba. Nzoto ya moto ezali mpenza likamwisi!”​—Teresa.

“Soki namoni ndako ya etaje, masuwa ya minene, to motuka, namitunaka ete ‘Nani asalá yango?’ Na ndakisa, esɛngaka kozala mayele mpo na kosala motuka, mpo biloko nyonso oyo ezali na kati esengeli kosala malamu mpo motuka etambola. Soki moto nde asalá motuka, boye, bato mpe bakelamá.”​—Richard.

“Koyeba makambo mingi ya siansi etindaki ngai namonaka ete bomoi ebimá yango moko te. . . . Mpo na ngai, esɛngi kozala na ‘kondima’ mingi mpo na kondima ete bomoi ebimá yango moko koleka mpo na kondima ete Mozalisi azali.”​—Anthony.

KANISÁ NAINO

Atako bato ya siansi basali bolukiluki bambula ebele, bango nyonso bandimi naino te ete bomoi ebimá yango moko. Soki bato mosusu ya siansi bandimaka te ete bomoi ebimá yango moko​—bango kutu bato ya mayele​—okosala mabe soki oboyi kondima yango?

MAKAMBO NAKOSALA

  • Soki mwana-kelasi na bino alobi na yo: “Ngai nandimaka te ete Nzambe azali. Bongo yo?” Komá makambo oyo okoyebisa ye.

MAKAMBO MOSUSU!

Oyo bilenge mosusu balobi—Kondimela Nzambe

Talá video Makambo bilenge mosusu balobi​—Kondimela Nzambe na www.pr418.com. (Kende na MATEYA YA BIBLIA > BILENGE)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto