Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/6 nk. 8-9
  • Ayokeli babola mawa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ayokeli babola mawa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Masolo mosusu
  • Ayoki mawa mpo na banyokwami
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Yesu abikisi mwana moko ya mwasi ná moto moko akufá matoi
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Ndenge oyo kobeba binama ya nzoto ekosila
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Ozali na “makanisi ya Klisto”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/6 nk. 8-9

Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye

Ayokeli babola mawa

Nsima na kokweisa bizaleli ya bonkoko oyo ezali komonana epai na Bafalisai ya moimi, Yesu akei elongo na bayekoli na ye. Tozali komikundola ete mwa ntango moke liboso, akokaki te komibenda elongo na bayekoli na ye mpo na kopema, mpo ete bibele balandaki ye. Kasi sikawa, amemi bango na Tula mpe na Sidona, bamboka oyo ezali na ntaka ya bakilometre mingi kuna na nord. Ezali mobembo bobele moko oyo akosala elongo na bayekoli na ye na libanda na Yisraele.

Nsima wana bazwaki ndako ya kolala, Yesu alobi ete alingi te bato bayeba esika ye azali. Kasi, ata na teritware kuna mosika na Yisraele, akoki kobombana te. Mogreke moko ya mwasi, ye mobotami na zongazonga yango, Phénicie de Syrie, abelemi epai na ye mpe abandi kobondela ye kolobaka: “E Nkolo, Mwana na Davidi, yokela ngai mawa! Mwana mwasi na ngai azali na elimo mabe.” Kasi, Yesu ayanoli ye ata liloba te.

Nsima na mwa ntango, bayekoli bayebisi Yesu boye: “Longola ye, mpamba te azali konganga nsima na biso.”

Mpo na komonisa ntina nini aboi koyanola, Yesu alobi: “Natindami bobele epai na bampate na ndako na Yisraele baoyo babungani.”

Kasi ata bongo, mwasi azali kolemba te. Abelemi epai na Yesu, afukami liboso na ye mpe abondeli ye na kolobaka: “Nkolo, sunga ngai.

Mwasi yango abondeli Yesu na bosembo nyonso mpe yango epesi Yesu mawa mingi. Kasi amonisi lisusu ete mokumba na ye ya liboso ezali ya kosalela Yisraele, libota na Nzambe. Na ntembe te, ezali mpo na komeka kondima ya mwasi yango nde Yesu alobeli komitombola oyo Bayuda bazali na yango liboso na bapaya, na kolobaka: “Ezali malamu te kokamata bilei na bana mpe kopesa yango epai na bana na mbwa.”

Mongongo na ye mpe elongi na ye emonisi kozanga ntembe ete azali koyokela bapakano mawa. Alembisi ata kokokana oyo ezali kati na Bapakano mpe bambwa na kobengaka bango “bana ya mbwa.” Na esika ete mwasi yango azoka, azongeli likanisi yango na kosokema nyonso mpe alobi: “Ee Nkolo, kasi ata bana na mbwa bakolyaka mpumbu oyo ekokweaka longwa na mesa na nkolo na bango.”

Bongo Yesu ayanoli ye ete: “E mama, kondima na yo ezali monene mpenza! Ebimela yo lokola elingi yo.” Mpe yango esalemi bongo mpenza! Ezongi ye, akuti mwana na ye alali na mbeto, maladi esili.

Longwa na etando na ngambo na Sidona, Yesu mpe bayekoli na ye bakatisi mokili na nzela na Yordani epai na nord, oyo na ntembe te bakatisi yango na makolo kuna na likolo ya ebale Galilai. Bakoti na nsima na régio ya Dekapole, na est. Kuna bamati likolo na ngomba, kasi bibele balandi bango mpe bakumbeli Yesu batengumi, bato bakatana maboko, bakufi-miso, bababa mpe bibosono mosusu mpe bato na maladi. Babwaki bango liboso na ye mpe abikisi bango na bokono. Bato bakamwe, mpamba te bababa bazali koloba, bibosono bazali kotambola mpe bakufi-miso bazali komona, mpe bazali kokumisa Nzambe na Yisraele.

Yesu atye likebi na ye epai na mokufi-matoi moko, oyo azali koloba na mpasi. Bakufi-matoi bamiyokaka malamu te, mingimingi soki bazali kati na to ebele. Mbala mosusu lokola Yesu amoni liyoki na ye, ayokeli ye mawa mpe abendi ye pembeni. Ntango bakomi bobele bango mibale, amonisi ye likambo akosala mpo na ye. Akotisi ye misapi na matoi mpe, nsima na kobwakela yango nsoi, asimbi lolemo na ye. Mpe kotalaka na likolo, apemi makasi mpe alobi: “Zipwa!” Bobele na ntango yango, mobali yango abandi koyoka mpe abandi koloba malamumalamu.

Ntango bamoni Yesu asali mirakle oyo nyonso, bibele batondi ye na kolobaka: “Asali makambo nyonso malamu, akoyokisaka bato bakufi matoi, akolobisaka bimimi.” Matai 15:21-31; Malako 7:24-37.

◻ Mpo na nini Yesu aboi kobikisa nokinoki mwana ya mwasi mogreke?

◻ Na nsima Yesu akumbi bayekoli na ye epai wapi?

◻ Ndenge nini Yesu amonisi ete azali na mawa epai ya mokufeli matoi oyo azali koloba na mpasi?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto