Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/12 lok. 24
  • Mituna na batanbi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batanbi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Masolo mosusu
  • Nsima ya kosamba na Sanedrina, bamemi ye epai ya Pilate
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yehova asalisaka biso tókokisa mosala na biso ya kosakola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Yesu bomoi na ye, mpe mosala na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Liboso na Sanedrina, mpe liboso na Pilato
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/12 lok. 24

Mituna na batangi

◼ Yesu azalaki kokanisa na yuda wana elobaki ye epai na Pilate ete: “Ye oyo akabi ngai epai na yo azali na lisumu lileki”?​—Yoane 19:11.

Na maloba yango, emonani te ete Yesu azalaki kolobela mpenza mpo na mwa motuya ya bato bazalaki na mokumba kati na makambo masalaki ete Yesu akoma liboso na Pilate mpe anyokwama.

Topusami na kokanisa libosoliboso na Yuda, mpamba te ntoma yango ya lokoso atekisaki Yesu na nsima. (Yoane 6:64, 71; 12:4-6) Akendaki kokutana na banganga-nzambe mikonzi oyo balingaki “koboma” Yesu, mpe bango bapesaki ye palata 30 mpo ete atekisela bango ye. (Luka 22:2-6) Ntembe ezali te ete Yuda asalaki lisumu monene, oyo epesaki nzela na kobomama na Yesu.

Kasi Yuda azalaki ye moko te na mokumba yango ya kobomama na Yesu. Nganga-nzambe monene Kaife asalaki nyonso mpo na kobomisa Yesu. (Yoane 11:49, 50) Matai alobi ete nsima na kokweisa Yesu, “banganga minene mpe Koyangana mobimba” bazalaki na mokano se moko: “Banganga minene nyonso mpe mikolo na bato bayangani mwango mpo na Yesu ete baboma ye. Bakangi ye mpe balongoli ye mpe batindi ye na Pilate, mokolo na mokili?” (Matai 26:59-65; 27:1, 2) Nsima wana Pilate amonaki ete Yesu azali na likambo te. “bibele” basengaki ete Barabbas atikama. Kasi mpo na Yesu, bangangaki: ”Abomama na nzete!”​—Matai 27:20-23; Yoane 18:40.

Emonani polele ete Yesu azalaki kokanisa bobele na moto moko te wana elobaki ye epai na Pilate ete: “Ye oyo akabi ngai epai na yo azali na lisumu lileki.” (Yoane 19:11) Mokumba na Yuda “mwana na libebi”, ezalaki solo na kilo, kasi bato mosusu mpe bazalaki na mokumba mpo na liwa na Yesu. (Yoane 17:12) Yango wana mokolo na Pantekote, ntoma Petelo alendisaki Bayuda bamibongola na lisumu monene oyo basalelaki Mwana na Nzambe. (Misala 2:36-38) Bayuda yango bazalaki basangani ya libota oyo epesamaki na Nzambe na Yesu, Jéhovah. Bakokaki koyeba bisakweli bizalaki komonisa ete Yesu azali Masiya. Mpe mingi kati na bango bamonaki bikamwiseli Yesu asalaki. Na ntembe te, bazalaki bongo na lisumu monene koleka gouverneur mopakano oyo alobaki ete Yesu azali na likambo te.​—Yoane 18:38.

◼ Maloba na Jéhovah malimbolaki nini wana elobaki ye epai na Ezekiele ete elongi na ye ekozala makasi lokola elongi na Bayuda?

Ezekiele, mosakoli na Nzambe, azalaki kati na Bayuda oyo bamemamaki na Babilone. Bayuda bazalaki kokanisa ete Jéhovah akoya kosalisa bango na ntango esengeli mpo ete bazalaki libota na ye. Baboyaki kondima ete mpasi eyelaki bango mpo na mabe na bango.

Wana ezali Jéhovah koloba na Ezekiele ete: “Lobela bango maloba na ngai”, ezalaki wana mokumba ya petee te. Mpo na kobongisa ye na yango, akebisaki ye na maloba oyo: “Bakoyoka yo te, mpo ete bandimi koyoka ngai te, mpamba te ndako na Yisraele nyonso bazali na mitó makasi mpe na mitema mabe.”​—Ezekiele 3:4, 7.

Yango wana Nzambe alobaki epai na Ezekiele: “Tala, nasili kosala elongi na yo makasi epai na bilongi na bango, mpe motó na yo makasi epai na mitó na bango. Nasili kozalisa motó na yo lokola libanga (silex), ee koleka libanga (silex) na makasi. Banga bango te, mpe yoka nsomo mpo na bilongi na bango te, mpo ete bazali ndako na batomboki.”​—Ezekiele 3:8, 9.

Bayuda na ntango yango bazalaki na motó makasi mpe batomboki. (Ezekiele 2:6) Bakokaki kosala na boye ete momemi nsango na Nzambe abanga mpe atika koloba? Te; Ezekiele oyo asimbamaki na Nzambe, akokaki kolemba te liboso na bango. Silex ezali libanga makasi mpenza koleka ebende. Soko Bayuda na motó makasi na bango bakokisamaki na silex, Ezekiele mpe akokisamaki na yango. Mbele alingaki kokokana ata na diamant, libanga oyo eleki makasi na nyonso, na makasi na yango ekoki ata kokata silex.”​—Yilimia 17:1, 2.

Yango elingi koloba te ete na moi ya lelo, basaleli na Nzambe basengeli kozala na ezaleli makasi, kozanga kotalela mayoki ya bamosusu, kozanga mawa mpo na kokokisa makambo oyo emonani malamu na miso na bango. Ntoma Petelo apesi bango toli oyo mpo na boyokani na bango elongo na bamosusu: “Mpo na kosuka, bino nyonso bozala na motema moko, kobondisana, kolingana, lokola bandeko na mitema na mawa, na kosokema. Bozongisa mabe mpo na mabe te soko kotuka mpo na kotuka te; kasi na motindo mosusu bopambolaka”​—1 Petelo 3:8, 9.

Koyokela bato mosusu mawa ezali moko na mayoki oyo tozalaka na yango na ntango tosakolaka nsango malamu epai ya bazalani na biso. (Matai 9:36-38) Kasi soki bato oyo tozali kokutana na bango bazali koboya koyoka, bazali kobengana biso to bazali kotemela mpenza mosala na biso, tozali kolemba te kosakola nsango oyo Nzambe alingi ete topanza yango na eleko na biso. Tozali mpe kosakola ete etikali moke akopesa na ”bato mabe etumbu, baoyo bayebi Nzambe te mpe bazangi kotosa nsango malamu na Nkolo na biso Yesu”. (2 Batesaloniki 1:6-9) Tosengeli kobanga te, tokoki kotika kosakola mpe te. Ezali na ndenge yango nde tokoki kozala na elongi makasi koleka diamant, lokola Ezekiele.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto