Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/9 lok. 10
  • ‘Biloko kitoko bikoti’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Biloko kitoko bikoti’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Masolo mosusu
  • “Biloko kitoko” ezali kotonda na ndako ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Tiká ete bato banso bákumisa Yehova!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mokanda ya Biblia nimero 37—Hagai
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/9 lok. 10

Masolo ya basakoli ya Bokonzi

‘Biloko kitoko bikoti’

Na 520 liboso na ntango na biso, mosakoli Hagai akomaki maloba oyo: “‘Nakotetemisa mpe mabota nyonso mpe biloko kitoko na mabota bikoyingela; mpe nakotondisa ndako oyo na nkembo,’ Jéhovah na bibele alobi bongo.” (Hagai 2:7) “Biloko kitoko” na mabota, oyo bitondisi ndako na Jéhovah na nkembo, bazali basambeli na ye ya sembo. Bato ya motema malamu ya lolenge oyo bayambi nsango malamu na mboka ltalie, kino ete lelo mboka oyo ezali na Batemwe 166 000 baoyo bazali koteya Biblia na bazalani na bango. Bakonzi na lingomba ya katolike na ltalie bazali komona bokoli oyo na kokamwa lokola “likambo moko na kobangisa mingi” bazali “komibanzabanza” mpe “kotungisama” mpo na yango. Topesa nzela epai na mwasi moko ayebisa biso ndenge nini azwaki solo:

“Uta mbula zomi nazalaki catéchiste, mpe nandimaki makasi ete na nzela na mosala oyo nazalaki komonisa bolingo na ngai mpo na Nzambe mpe bazalani na ngai. Nazalaki na moninga na ngai Témoin de Jéhovah, kasi nazuaki ntango te mpo na koyoka nsango ya Biblia. Ata bongo, esili koleka mwa ntango, Batemwe bakomaki epai na ngai, mpe nakotisaki bango na ndako. Nalingaki koyebisa bango ete bakoma lisusu te epai na bokilo na ngai ya mwasi, mpo ete akomaki mobangé mingi. Nayebisaki bango ete ‘Na esika ya kokende epai na bato bakomi mibangé, bosololaka na bato lokola ngai’. Banda wana, bayaki kotala ngai mbala na mbala, kasi ntango nyonso balobelaki likambo etali mateya, nazali kosenga bango tosolola yango mokolo mosusu, mpo ete nakoka kosala bolukiluki.

“Nasololaki na basango ebele, kasi namonaki ete bazalaki na eyano te ya Biblia ya kopesa ngai. Moko na bango, misionere, alobaki na ngai ete ezalaki mpenza ntina mingi te ya koyangana na messe. Andimisaki ‘soki totali malamu, na ndakisa na mboka Brésil, bato bazali kosala likambo mosusu na esika ya kokende na messe. Eloko ya ntina, ezali nde kosalela Nzambe na ndenge okoki.’ Maloba oyo mapesaki ngai makasi ekoki mpo na kokabwana na Lingomba ya katolike. Epai na mobali na ngai, ye mpe katolike, sango mosusu apesaki ye toli ya kotika ngai nazala Témoin de Jéhovah soki yango nde ezalaki mposa na ngai, mpo ete Ba Témoins de Jéhovah bazali kaka na mbeba moko, bazali na molende ya kolekisa ndelo. Ngai mpe moko kati na bana na ngai tobatisamaki. Mobali na ngai azali koyekola Biblia mpe azali kosepela na nsango ya Bokonzi.”

Wana Jéhovah azali koningisa mabota na koyebisaka bikateli na ye na mabelé, bato mingi baoyo bazali koluka boyengebene bazali kotika misala oyo elongobani te mpe kolanda mitinda ya Biblia. Liboso ya koyeba solo, mobali moko na ltalie, akotaki banyongo ebele, na komiloba ete akofuta nyongo na ye na mbongo ya lifuti na ye oyo azwaka mpe “matabisi” ezangi kolongobana oyo azalaki kozwa. Ntango abandaki kozwa boyebi ya solo, azwaki likatami makasi ya koboya “matabisi” oyo ya kolongobana te. Ye mpe mwasi na ye bazwaki batisimo mpe babandaki kosalela Nzambe lokola bapionniers. Na lopitalo esika azali kosala, mosala na ye ezali ya kosukola bibembe, mpe mbala na mbala akutaka mbongo mingi kati na bilamba. Ndakisa, mokolo moko akutaki 150 000 lires (pene na 45 000 zaïres), mpe mbala mosusu 600 000 lires (pene na 195 000 zaïres). Lokola akomaki na ezalela ya kolongobana, azongisaki mbongo oyo, yango epesaki ye libaku ya kosolola mpo na solo na bakonzi ya lopitalo mpe epai na minganga. Bakonzi ya lopitalo batindelaki ye mikanda mpo na kokumisa ye mpo na etamboli na ye ya kolongobana mpe ebongi na kotiela motema.

Makambo oyo malekaki na mboka ltalie mazali bobele lolenge moke oyo emonisi ndenge “biloko kitoko” bizali kotika ebongiseli mabe ya lelo mpe ya mobulu, mpo na koya kati na lisangá ya peto mpe ya kimya ya Jéhovah, liboso ete atelemisa mpo na libela ebongiseli ya politike ya Satana na kobomaka yango na Armagedon.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto